D'où vient le terme "Ebembe Adoula" ?
Cher Messager,
Na mboka na biso tozalaki kobenga soso (poulet)congelés, emballés: "ebembe ya Adoula" to ebembe Adoula; Nalingi koyeba origine ya kombo wana.
Na zali ko yeba lisusu na bomuana na biso bazalaki koloba que soki ba surete to ba agents ya intelligence "sirete" bayoki yo na kombo ya Adoula bakokanga yo!
Bongo tika natuna na ngai tina ya kombo oyo ba pesaki na ba soso.
Motuna: est ce que ezali na rapport na Mr Cyrille Adoula?
Charles
Ndeko Charles,
Ebembe ya Adoula elakisi ebandeli too introduction ya « poulets surgelés » na RDC. Yo moko oyebi te na kala congolais amesanaka kolia obele soso ya bomoyi. Sima ya lipanda lolenge ya kolia ebonguamaki, liboso tango ba sodats ya ONUCONGO bamemaka Long RIZ too loso GHANA, sima tango ba Américains, na programme USAID vers 1962, batindaka Assistance na kati ya ba boîtes ya conserve mpe na céréales na kati ya ba cartons moko na dessin ya losako o kati ya loboko ya mundele na moyindo.
Elingi koloba te assistance yango ekomaka tango Cyril Adoula azalaka premier ministre vers 1963. Yango babambaka ba soso yango kombo « EBEMBE YA ADOULA ».
Kobosana te ba congolais batonda humour. Tango Mobutu asalaka élevage ya ba soso na N’SELE vers 1970, ba congolais babengaki yango SOSO YA NSELE, par opposition na SOSO YA BOMOYI. Kutu ba jeunes filles ya Limete na Centre Mama Mobutu babengamaki lokola « SOSO YA NSELE ».
Nasuki wana. Oyo alingi kobakisa akoki kobakisa.
Messager