Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Biographies corrigées

 

……………………………………………………………………………………………………..

 

Thomas Kanza Nsenga

 

Na 1934 nde amoni mokili na Kinshasa. Atangi na école primaire mpe secondaire na Institut Saint Joseph ya Léopoldville mpe asilisi kuna na 1951. Sima ya ba kelasi na ye, akomi molakisi kaka na Saint Joseph. Thomas azali kukutu ya Sophie Madeleine mpe leki ya Philippe. Bango banso, bana ba mbuta Daniel Kanza.

Na 1952, akeyi koyekola na Louvain, grâce na piston ya tata Raphaël de la Kethule. Ye nde amemaki Kanza epayi ya Directeur ya Usine Textile ya Léopoldville (U.TEX. Léo), Romain Nelissen, na perspective que a se porter garant ya Kanza na mikolo minso akosala na Belgique mpo na ba kelasi na ye. Nelissein andimaki sans problème mpe yango nde e permettre Kanza akende kotanga na Belgique.

Rappelons que Romains Nelissein azalaki mpe administrateur-gérant ya journal Pourquoi pas ? Congo. Ayaki mpe kosomba lisusu journal l’Avenir colonial belge, tango esalaki faillite. Tango asombi yango, abongoli kombo , ekomi L’Avenir.

Ye mpe lisusu nde a engageaki Philippe Kanza, kulutu ya Thomas, Secrétaire na journal Pourquoi pas ? Congo.

Na projet na ye, alingaki kokende kosala ba études ya droit. Malheureusement, ba autorités coloniales balingaki te asala ba études wana. Mpo abima na Congo belge, esengelaki andima oyo bango ba imposaki ye : pédagogie na psychologie.

Akeyi na Louvain, atangi yango mpe azui licence na pédagogie na psychologie na 1956. Wuta, wana, Kanza akoma diplômé universitaire laïc ya liboso ya ekolo na biso.

Tango azongi na Léopoldville na septembre 1956, akomi kotangisa na Institut Saint Joseph mpe na Institut ya éducation physique. Neti azalaki diplôme ya université, esengelaki azala na ba mêmes droits lokola mindele oyo bazali ba diplômes ya université lokola ye. Kasi, yango ezalaki bongo te. Situation wana elukaki ba manifestations na milieu ya ba étudiants congolais ya Lovanium mpo bamilobaki que soki ye mutu kutu atangi kuna na Louvain, bazali koo traiter boye na mindele, ebongo biso baye tozali kotanga awa na Léopoldville, soki tosilisi tokozala na traitement nini ? Na musukusuku wana nde mundele ayaki kopesa Kanza, carte ya immatriculation mpe kopesa ye mosala na université en tant que assistant. Kasi, yango e calmaki kaka ba esprits te.

Na 1957, Kanza azongi lisusu Belgique kotanga mpe akoti na Collège européen ya Bruges kosala ba études post-universitaires.

Na 1958, azui diplôme spécial ya  hautes études européennes. Tango asilisi, azui mosala en tant que fonctionnaire international na Marché commun, na siège na yango na Bruxelles. Na ngambo mosusu azali très actif na journal Congo, oyo esalemi na mars 1957 na Léopoldville epayi ya Philippe Kanza na Mathieu Ekatou mpe na ye moko Thomas Kanza. Ce dernier,  azalaki Chef de  bureau ya journal Congo na Bruxelles wuta 1958.

Na 1960, a démissionner na Marché commun mpo na komipesa na misala ya avenir ya Congo. Akomaki proche ya Lumumba mpe membre ya A.N.C. Philippe na Thomas nde bazauaki likanisi ya kobengisa African Jazz eya kobeta na Table ronde na Bruxelles mpe na quelques pays ya Europe na 1960.

Na 23 juin 1960 tee na 12 septembre 1960, Ministre délègue na New York na Organisation des Nations Unies (O.N.U.), na gouvernement Lumumba.

Na 05 septembre 1960 tee na 12 septembre 1960, Ministre délégué na New York na O.N.U., na gouvernement Ileo.

Na octobre 1960, akomi na gouvernement Gizenga na Stanleyville.

Na mokolo mua 03 tee na 07 janvier1961, atindami en qualité ya représentant ya gouvernement Gizenga na Conférence ya Groupe Progressiste (GR.PR.), na Casablanca. Groupe oyo, ekomaki kobengama Groupe de Casablanca.

Na février  tee na août 1961, Ministre délégué na New York na O.N.U, na gouvernement Gizenga.

Na janvier 1962 tee na août 1963, Chargé d’Affaires en titre ya Congo na Londres, na gouvernement  Adoula.

Na septembre 1963, azongeli kelasi na université ya Oxford, esika azali koyekola économie.

Tango azui diplôme na ye na 1964, akeyi epayi ya Gbenye, na République Populaire du Congo mpe akoti na gouvernement  rebelle na ye comme  Ministre des Affaires extérieures et du Commerce extérieur wuta juillet 1964 tee na mai 1966.

Wuta mai 1966,  akeyi na Harvard esika a soutenir thèse na ye ya doctorat na économie. 

Na 1967, abandi kotangisa na ba universités ya Harvard,  na Cambridge, na Massachusetts na Etats-Unis mpe na Oxford, na Angleterre. Na même moment mpe azali ko collaborer na journal Jeune Afrique.

Na 1970, abandi kosangisa ba activités na ye ya universitaire na ba affaires mpo azali kati na ba actionnaires mpe cadres ya Groupe multinational Lonrho.

Na juin 1985, azongi na Zaïre mpo na ko implanter filiale zaïroise ya Lonrho. Na yango, akomi Président délégué général ya Lonrho na Zaïre.

Na 15 août 1992, na élection ya Premier Ministre na Conférence Nationale Souveraine, azalaki candidat malheureux face na Etienne Tshisekedi.

Na 08 juin 1997 tee na 23 juillet 1997, Ministre ya Coopération internationale, na gouvernement L.D.Kabila.

Na 22 mai 1997, Administrateur ya Banque Centrale du Congo.

Wuta 23 juillet1998 tee na 05 janvier 1999, Ministre ya Travail et Prévoyance sociale, na gouvernement L.D.Kabila.

Na octobre 1999 tee na 25 octobre 2004, Ambassadeur extraordinaire et plénipotentiaire ya R.D.Congo na Stockholm ; Helsinki ; Copenhague mpe na Oslo. Résidence ezali na Stockholm. A continuaki en tant qu’Ambassadeur, wuta 16 janvier 2001, na gouvernement Joseph Kabila.

Na 15 aout 1996, a fonder Fondation tata Raphael.

Na 18 septembre 1996, akomi Président na yango tee mokolo liwa eyibaki ye mokolo mua 25 octobre 2004 na Oxford, na Angleterre.

Kanza akomi ba buku iye :

-          Kanza, Thomas R., Tôt ou tard ...: (Ata ndele ...), Bruxelles, Le Livre Africain, 1959.

 

-          Kanza, Thomas R., Le Congo à la veille de son indépendance ou propos d’un Congolais désillusionné, Bruxelles, L’Auteur, 1959.

 

-          Kanza, Thomas R., Propos d’un Congolais naïf, Bruxelles, les Amis de Présence  Africaine, 1959.

 

-           Kanza, Thomas R., Congo, pays de deux évolués, Léopoldville, Actualités africaines, 1956.

 

-          Kanza, Thomas R., Eloge de la Révolution, Bruxelles, remarques Congolaise, 1964.

 

-          Kanza, Thomas R., Sans rancune, Bruxelles, Remarques Congolaises, 1965.

 

-          Kanza Thomas R., Conflict in the Congo: the rise and fall of Lumumba, Oxford, Penguin African library, 1972.

 

-          Kanza Thomas R., The rise and fall of Patrice Lumumba: conflict in the Congo, Londres, R. Colling, 1978.

 

-          Kanza Thomas N., Evolution and Revolution in Africa, Harvard, Schenkman Books, 1978.

 

-          Kanza Thomas N., Africa Must Change: An African Manifesto, Harvard, Schenkman Books, 1978.

 

-          Kanza Thomas N., Sans rancune, Paris, Collection L'Afrique au cœur des lettres, L'Harmattan, 2006.

Notons que roman « Sans Rancune », na deuxième édition na yango, epesamaki na manuscrits non polis epayi ya Jean-Pierre Orban. Ye abanda koluka banda kala ko travailler na professeur Thomas Kanza mpo na kokoma lisusu buku iye. Kasi, tango abengaki epayi na ye, na Oxford mpo na kozua rendez-vous, famille Kanza eyebisi ye que awutaki kozongisa molimo na butu ewuti koleka. Yango nde epesaki ye ba manuscrits oyo ye moko Kanza atiki mpo abandaki déjà kokoma lisusu sur la suite ya « Sans rancune ». Mise au point mpo na édition na yango esalemaki na Valérie Kanza, muana nkasi ya Thomas Kanza. Introduction esalemi na professeur Herbert Weiss, ya City Univesity ya New York, na kati alobeli jeunesse ya Kanza na introduction sociopolitique asaleli ye. Professeur Mukala Kadima-Nzuji na Jean-Pierre Orban nde basali lecture.

 

……………………………………………………………………………………………………………………………………………………..

 

  Marcel Antoine Lihau Ebua Libana la Molengo

 

Abotami mokolo mua 09 septembre 1931 na Monga, na province ya Equateur. Asali ba kelasi na ye epayi ya ba sango ya Scheut, na petit séminaire ya Notre Dame de Grâce ya Bolongo-Molongo. Tango asilisi école primaire kuna na 1943, alongue, akoti na école moyenne na Boyange mpe asilisi kuna na 1947.Azui mosala na administration provinciale comme Commis, wuta 1947 tee na 1949.

Na 1949,  akoti na Ecole des sciences administratives ya Lovanium-Kisantu mpe asilisi kuna na 1955.

Na 1955, akeyi na université ya Louvain esika azui inscription na philosophie. Akati ba cours na nzela mpe akoti na droit.

Wuta 1955 tee na 1959, Président ya Association Générale ya ba Etudiants Congolais na Belgique (A.G.E.C., section Belgique).

Na 1959, akomi azui licence na droit. 

Pendant séjours na ye na Belgique, misala mia Table ronde politique mpe économique misalemaki  wuta janvier tee na avril 1960.  Lihau, na position na ye ya Président ya Association des Etudiants Congolais, asololaki na ba politiciens Congolais mpo na kolakisa bango ntina ya lisanga na maye matali masolo ma lipanda ya Congo.

Azalaki mpe na Table ronde inso mibale na qualité ya observateur mpe azalaki associer na préparation na yango, spécialement  na kati ya Commission Vogel, mpo na Table ronde économique.

Wuta 19 septembre 1960  tee na 09 février 1961, Commissaire général  (Ministre) na Justice, na Collège des Commissaires généraux (gouvernement) Bomboko.

Na 09 février 1960 tee na 02 août 1961, Secrétaire d’Etat (vice-Ministre)  na Justice, na gouvernement Ileo II.

Na mars-avril 1961, Porte-parole ya Conférence ya Tananarive, mpo na réconciliation na  Congo.

Na 1962, a soutenir thèse na ye ya doctorat na droit public mpe akomi Docteur.

Na 1963, akomi kotangisa na faculté ya droit ya université de Lovanium. Ye azali Congolais ya liboso mpe mutu moindo ya liboso oyo akomi professeur na faculté ya droit, Chef ya département ya droit public mpe Doyen ya faculté.

Na 1964, professeur associé na université de Lovanium.

Wuta mokolo mua 10 janvier 1964 tee na 11 avril 1964, membre ya Commission constitutionnelle esanganaki na Luluabourg (Kananga). Yango ebimisaki projet ya Constitution oyo endimamaki na référendum populaire esalemaki wuta 25 juin tee10 juillet 19964 mpe Promulguer mokolo mua 1er août 1964.

Na 1966, professeur na université Lovanium.

Na février 1966, Lihau azali moko na kati ya baye basali projet ya Constitution ya sika, oyo Président Mobutu a déposer na mars 1966, na Parlement. Yango nde ebengami Constitution ya 24 juin 1967.

Na 1967, Président Mobutu a signer Ordonnance-loi n° 67/312 ya 10 août 1967, portant création mpe organisation ya Office National de la Recherche et du Développement (O.N.R.D.) mpe Lihau aye koponama Délégué général na yango.

Na  janvier 1968 tee na 03 octobre 1975, Premier Président ya Cour Suprême de Justice.

Wuta 1968, Lihau akoma professeur ordinaire na université Lovanium

Na 1971 tee na 1974, membre ya Comité exécutif ya Mouvement Populaire ya Révolution (M.P.R.).

Na mokolo mua 08 mars 1974 tee na mokolo mua 03 octobre 1975, membre ya Bureau Politique  (Commissaire politique) ya M.P.R.

Mokolo mua 03 octobre 1975, Président Mobutu alongolaki Lihai na poste ya Premier Président ya Cour suprême ya Justice mpe ya membre ya Bureau Politique (Commissaire politique) mpo azalaki ko partager te décision iye Bureau politique ezuaki na bateau M.S. Kamanyola, na réunions esalemaki mikolo mua 11 tee na 13 juillet 1974. Yango nde eyaki kondima  mokolo mua 10 août 1974, projet  ya loi portant révision constitutionnelle, oyo ezalaki na 83 articles mpe ezuaki vote na unanimité na séance esalemaki pendant cinq heures du temps. Yango nde epesaki Président Mobutu ba pouvoirs inimaginables. A ce sujet, Lihau abandaki déjà ko manifester volonté na ye ya ko démissionner mpo azalaki conscient na dérive oyo ezali kokumba ba pouvoirs minene Chef de l’Etat et Président de la République akomaki na yango. Avant kutu a démissionner ye moko, ba « informateurs » basila koyebisa Président Mobutu nionso sur ba intentions ya Lihau. Wuta awa, atikalaki kaka na mosala na corps académique ya université nationale du Zaïre.

Na 27 mars 1982, akangemi na prison central ya Makala suite na création ya U.D.P.S., le 15 février 1982.

Na 19  tee na 28 juin 1982, procès esalemi  na Cour ya  Sûreté de l’État mpo na complot qualifié.

Na 01er   juillet 1982, Cour ya  Sûreté de l’État e condamner ye na mbula mitano ya boloko.

Na 09 juillet 1982, alongue na prison ya Makala mpe atindami na village natal, na Monga, esika esengeli asala etumbu na ye.

Na bénéfice ya Ordonnance-loi n° 83/007 ya 21 mai 1983 portant amnistie générale concernant tous les Zaïrois, azui liberté mpe azongi na Kinshasa.

Na 1985, akeyi kosenga ngunda na na Etats-Unis mpe azui yango. Andimami mpe na université Harvard, na Cambridge, na Massachusetts. Comme professeur ya droit.

Azongi na Kinshasa na vacance, na juin 1986. Na kokita ya avion, akangami mbala moko.

Na mokolo mua 13 juin 1986, atindami na relégation, na Monga, village natal na ye.

Na janvier 1987, azui liberté mpe azongi na Kinshasa. Na sima, azongi na Cambridge.

Na 1988, abengisi masolo na Cambridge, na Massachusetts mpo na kofandisa U.D.P.S. na Etats-Unis.

Suite na élan ya 1988 nde makanisi ma kobengisa Conférence Nationale mpo na kosolola makambo matali Zaïre, ebotamaki na juin 1989, epayi ya Lihau.

Wuta mokolo mua 07 août 1991 tee na 06 décembre 1992, Conférence Nationale Souveraine (C.N.S.) esalemi na Zaïre. Lihau azalaki Président ya Commission Constitutionnelle.

Na 1994, pouvoir eyaki ko utiliser maladi ya Lihau mpo na kokotisa bokabuani na baninga ba ye ba U.D.P.S. mpe ye asalaki ba déclarations ya divisons ethniques, contraires na ligne philosophique et politique na ye. Mutu nionso amonaki que Lihau wana, ezalaki oyo azalaki lisusu na makasi mingi te mpo maladi esilaki kolemisa bo mutu bua ye.

Eyebanaki banda kala que wuta 1985, Lihau azalaki ko faire face na ba problèmes ya santé. Mokolo mua lundi 10 Avril 1999, na Boston, na Massachusetts,  atikaki baye banso ba mokili.

 

 

……………………………………………………………………………………………………………………………………………………

 

 

Sophie Madeleine N’Kanza Lusibu Zala (Sophie Lihau N’Kanza)

 

Aye na mokili, na Léopoldville, mokolo mua 08 février 1940. Atangi école primaire mpe secondaire epayi ya ba ma melo ya Sacré-Cœur, na lycee Sacré-Cœur ya Léopoldville. Atangi lisusu  na secondaire epayi ya ba ma melo ya Saint-Joseph ya Cluny na Brazzaville, sima azongi lisusu na Sacré-Cœur ya Léopoldville mpe aye ko continuer ba humanités latines epayi ya ba sango Jésuites na Collège Albert 1er  ya Léopoldville, na 1960.

Akeyi na Suisse, na université de Genève, na faculté ya sciences économiques et sociales (S.E.S.)., esika azui licence na sociologie, na 1964. Mbala moko, faculté e retenir ye comme  assistante na département ya sociologie.

Tango Président Mobutu abengisi ye na Kinshasa, na 1966, a démissionner na mosala mua ye na université ya Genève.

Na 29 octobre 1966 tee na  05 octobre 1967,  Ministre ya Affaires sociales, na gouvernement Mobutu.

Na 05 mai 1967 tee na 17 décembre 1967, membre mpe Présidente ya Commission ya Promotion sociale ya Bureau politique ya Mouvement Populaire de la Révolution (M.P.R.).

Na 05 octobre 1967 tee na 05 mars 1969, Ministre ya Affaires sociales et Développement communautaire, na gouvernement Mobutu.

Na 05 mars 1969 tee na 1er  août 1969, Ministre d’Etat chargée na Travail, Prévoyance sociale, Habitat na Coordination des Affaires sociales, na gouvernement Mobutu.

Na 1er  août 1969 tee na 07 décembre 1970, Ministre d’Etat chargée na Affaires sociales, na gouvernement Mobutu.

Na 1971, akeyi na Etats-Unis, na département ya sociologie ya université ya Harvard, na Cambridge, na Massachusetts.

Na 1973, azui diplôme ya études approfondies, na département ya sociologie ya université ya Harvard, na Cambridge, na Massachusetts mpe akomi fonctionnaire internationale mpe membre ya Conseil d’administration ya Institut des Nations Unies pour la Formation et la Recherche (I.N.U.FR.), wuta 1973 tee na 1977, na New York, na Etats-Unis.

Na 1977, a soutenir thèse na ya doctorat mpe azui titre ya Docteur en sociologie ya université ya Harvard, na Cambridge, na Massachusetts.  Theme ya these na ye:

-Nkanza Lusilu Zala, The Social Origins of Political Underdevelopment in the Ex-Belgian Congo, Zaïre, Ph.D., dissertation, Harvard University, Cambridge, MA. 1977.

Na 1977 tee na 1981, Directrice ya Centre des Nations Unies pour le Développement Social et les Affaires Humanitaires, na New York, na Etats-Unis.

Na 1981 tee na 1985, Directrice générale adjointe ya Organisation des Nations unies pour l’éducation, la science et la culture (U.N.E.S.C.O.), na Paris.

Wuta 1981 tee na 1999, professeur na université ya Boston.

Wuta 1985  tee na  1988,  Chargée de Mission ya Directeur général ya  U.N.E.S.C.O.

Na 1984 tee na 1985, professeur visiteur na faculté ya sciences économiques ya université de Kinshasa (U.N.I.KIN.).

Na 1989, asali Ecole internationale Zala, na Kinshasa. Secrétaire général ya Nations Unies aponi ye Secrétaire  exécutif ya Année internationale des personnes handicapées.

Na 1990, asali parti politique ebengami Force Populaire Africaine (F.P.A.).

Professeur Sophie Nkanza azalaki muana ya mbuta Daniel Kanza mpe molongani ya professeur Marcel Lihau (bakabuana wuta ba années 70). Elongo, baboti bana mitano ya basi : Elisabeth, Anne, Irène, Rachel na Sophie.

Sophie N’Kanza azali elenge muasi ya liboso laïque na R.D.Congo azui diplôme ya ba humanités secondaires, diplômes ya université mpe post universitaire, fonctionnaires internationale, professeur ya université, Secrétaire générale adjointe ya U.N.E.S.C.O.,  Ministre, Ministre d’Etat.

Ye amipesaki makasi na ba actions humanitaires na bosungi bana etike, bilenge basi mpe na  personnes handicapées physiques.

Abimisaki buku na makomi maye esalaki thèse na ye ya doctorat:

-          N’Kanza Zola, Les origines sociales du sous-développement politique du Congo belge : « de Patroado a la loi fondamentale », 1482-1960, Kinshasa, Presse Universitaire du Zaïre, 1985.

 

Na 1999, nde atikaki mokili.

 

 

............................................................................................................................................................

 

 

Léon Engulu Baanga Mpongo Bakokele Lokanga

 

Amoni mokili na Mbandaka, le 01er  avril 1944. Atangi epayi ya ba Frères ya ba Ecoles Chrétiennes na Mbandaka, esika asali école primaire na secondaire na ye mpe azui diplôme ya secondaire na 1953, na section commerciale et administrative.

Abandi mosala na Bokungu, esika azali Commis, wuta 1953 tee na 1956. Na 1956, akomi attaché na direction provinciale ya poste mpe na 1958 tee na 1959 Commis en Chef na direction provinciale ya Affaires indigènes.

Pembeni ya mosala mua ye na territorial, na 1957, azali kati na ba co-fondateurs ya Association Les Amis du Progrès. Na 1958, akomi Président provincial ya Mouvement National Congolais (M.N.C.). Sima ya wana, akeyi kosangana na baninga baye na Union des Mongo, oyo ebotami na janvier 1960, na Justin-Marie Bomboko. Ce dernier, azali Président, Léon Englu, Secrétaire général.

Na janvier-février 1960, a participer na Table ronde politique ya Bruxelles, en tant que membre suppléant ya délégation ya ba coutumiers ya province ya Equateur.

Na mars 1960, akoti na Collège executif ya province ya Equateur.

Na mai 1960, aponami Député provinciale na Mbandaka mpe akomi Ministre provincial de l’Intérieur kobanda 1960 tee na 1962, na gouvernement Eketebi.

Na 1962,  Président Kasa Vubu a signaki loi ya 27 avril 1962 relative aux critères de création de nouvelles entités administratives. Yango nde eyaki kokabola ba 06 provinces en 21 provinces « provincettes ».  Le 14 août 1962 nde Cuvette Centrale eyaki kokoma province. Wana nde Engulu ayaki kokoma Président ya gouvernement na yango wuta 1962 tee na 1964.

Na ba élections législatives  ya août 1965, aponami Député provincial mpe Gouverneur ya Cuvette Centrale.

Na 1966, Président Mobutu a nommer ye Gouverneur ya province ya Equateur kobanda mokolo mua 25 avril 1966 tee na 03 janvier 1967. Nomination iye esalemaki sima na unification ya ba 21 provinces en 08 provinces, selon Ordonnance-loi n° 66-205 ya 06 avril 1966 modifiant les divisions du territoire de la République

Na 1966 tee na 1968, Gouverneur ya Kivu

Na 1967 tee na 1970, Gouverneur ya Katanga

Wuta mokolo mua 07 décembre 1970 tee na 07 mars 1974, Commissaire d’Etat (Ministre) aux Travaux publics mpe na Aménagement du territoire.

Wuta mokolo mua 08 mars 1974 tee na 22 février 1977, Commissaire d’Etat aux Affaires politiques, chargé de la coordination des acticités du parti.

Na 08 mars 1974 tee na 18 février 1981, akomi membre ya Bureau politique ya Mouvement Populaire de la Révolution (M.P.R.-parti-Etat)

Kobanda mokolo mua 23 février 1977 tee na 07 juillet 1977, vice-Président du Conseil exécutif (vice-Président du gouvernement) mpe Commissaire d’Etat na Administration du territoire (Intérieur).

Na 08 juillet 1977 tee na 04 janvier 1979, Commissaire d’Etat na Administration du territoire.

Na 05 janvier 1979 tee na 17 janvier 1980, Commissaire d’Etat na Agriculture mpe na Développement rural.

Na septembre 1980 tee na Janvier 1985, premier mandant en tant que membre ya Comité central ya M.P.R. parti-Etat.

Na juillet 1981, akomi licencié na Sciences politiques et administratives ya Université ya Zaïre, campus de Lubumbashi. Esengeli tobakisa que diplôme wana ezalaki vraiment mériter te mpo abandaki kokota kelasi te mpe abandaki komonana kaka mokolo ya ba examens. Ata ko bongo, azuaki diplôme na ye na distinction !!!!

Na 02 janvier 1983 tee na 24 avril 1990, membre ya Bureau Politique (Commissaire politique) ya M.P.R. parti-Etat

Na janvier 1985 tee na 24 avril 1990, membre ya Comité central ya M.P.R. parti-Etat

Na 04 mai 1990 tee na 1er avril 1991, Ministre ya Intérieur.

Na 1991, asali Union Nationale des Démocrates (U.N.A.D.E.), yango ezalaki na plate forme ya Mouvance présidentielle « parti satellite » ya M.P.R. - fait privé.

Na 2003, akomi Sénateur na étiquette ya Mouvement de Libération Congolais (M.L.C.)

Na 2006, asangani na José Endundu Bononge mpo na bokeli Union Nationale des Démocrates Chrétiens (U.N.D.C.). Engulu akomi Président  na yango mpe ekoti na kati ya Alliance pour la Majorité  Présidentielle (A.M.P.).

Na janvier 2007, aponati Sénateur ya circonscription électorale ya Tshuapa.

Na faveur ya  mesure ya zaïrianisation,  Engulu akoma Président ya Cultures Zaïroises. Yango ezali na ba plantations na Equateur mpe na Bas-Zaïre. Engulu  bénéficia, wuta 1974, na 35. 727 hectares ya ba plantations. Ye, na Président Mobutu babandaki ko totaliser : 33% ya plantations ya hévéas,  29% ya plantations ya palmerais, 29% ya plantations ya palmerais mpe na 06% ya plantations ya café.

 

 

………………………………………………………………………………………………….

 

 

Complément ya biographies

 

Joseph Ileo Songo Amba

 

Aye na mokili na Léopoldville, mokolo mua mua 15 septembre 1923. Atangi ba kelasi na Institut Saint Joseph ya Léopoldville wuta 1929 tee na 1940.

Tango asilisi, abanki kosala na journal Courrier d’Afrique kobanda na 1940 tee na 1945. Sima Na 1945 tee na 1950, akomi secrétaire ya direction général ya Bata. Asepeli kozua formation mosusu mpe akimomisi na ba cours du soir ya comptabilité na Mission Sainte Anne mpe azali kolanda ba cours ya philosophie, sciences politiques, sociologie, logique, droit, économie na psychologie. Ba cours iye ezali kopesama na groupe ya ba évolués catholiques epayi ya  Abbé Joseph Malula na Mission Christ-roi. Yango nde ememaki Manifeste de Conscience Africaine, mokolo mua 30 juin 1956.

Na 1951 tee na 1960, akomi comptable na Office des Cités Africaines.

Na 1947, azali kati na Union des Intérêts Sociaux Congolais (UN.I.S.CO.).

Na 1958, akomi Rédacteur en chef ya Conscience Africaine. Azali kati na ba batu zomi na motoba oyo ba signer Mémorandum ya 26 août 1958.

Membre ya Comité provisoire ya Mouvement National Congolais (M.N.C.) na mokolo mua 10 octobre 1958.

Na bokabuani bua M.N.C. na ba ailes mibale : Lumumba na Kalonji, na juillet 1959, akomi Secrétaire ya M.N.C. / Kalonji mpe azali ko collaborer na Voie du peuple, journal ya M.N.C / Kalonji.

Na décembre 1959, aponani Secrétaire général ya Bureau ya Congrès ya Cartel fédéraliste A.BA.KO., na Kisantu.

Na 20 janvier tee na 20 février 1960, membre effectif ya délégation ya M.N.C. / Kalonji, na Table ronde politique ya Bruxelles.

Na avril 1960, akomi Administrateur ya Institut politique congolais na ya Courrier d’Afrique

Na mai 1960, a échouer na ba élections législatives na province ya Equateur. Kasi, aponami Conseiller provincial ya Léopoldville na liste ya M.N.C. / K.- P.S.A. Aponami  Sénateur ya Union ya ba Mongo UNI.MO. na province ya  Equateur.

Na mokolo mua 22 juin 1960, aponami Président ya Sénat national na liste ya cartel ya Union nationale. Azui na 49 voix, contre 39 voix na Alexandre Mahamba, candidat ya Bloc nationaliste lumumbiste.

Na mokolo mua 05 septembre tee na 12 septembre 1960, akomi Premier Ministre, Ministre ya défense nationale mpe Ministre ya Justice, na gouvernement Ileo I.

Na 13 tee na 20 septembre, Premier Ministre, na Gouvernement Ileo II.

Na 09 février tee na 1er août 1961, Premier Ministre, na Gouvernement Ileo III.

Na 25 janvier tee na 16 février 1961, Président ya Table ronde ya Léopoldville.

Na 08 tee na 12 mars 1961, membre ya Conférence ya Tananarive.

Wuta 24 avril tee na 28 mai 1961, membre ya Conférence ya Coquilathville.

Na 22 juillet tee na 2 août 1961, azali na Conclave ya Lovanium.

Na mikolo minso Ileo azalaki Premier Ministre, gouvernement na ye ezalaki provisoire mpo ba Ministres na ye bakikala kozala investis te mpe ba postes misusu ezalaki kaka na ba Ministres te par défaut ya cohésion nationale mpe ba oyo bazalaki wana,  bazalaki na cumul ya mandat ya Ministre na ya Député.

Wuta 16 janvier 1969 tee na 14 avril 1964, Ministre-résident ya gouvernement central na Katanga, gouvernement Adoula.

Kobanda na 14 avril tee na 09 juillet 1964, Ministre d’Etat chargé des Affaires katangaises, na gouvernement Adoula.

Na 13 décembre 1963, akomi Président ya Commission Constitutionnelle ya Luluabourg.

Na ba elections legislatives ya octobre 1965, aponami Sénateur ya province ya Cuvette centrale.

Na 1967 tee na 1971, Président ya Conseil d’administration ya Office nationale pour la Recherche et le Développement (O.N.R.D.).

Wuta 08 mars 1969 tee na 28 janvier 1975,  membre ya Bureau politique (Commissaire politique) ya Mouvement Populaire de la Révolution (M.P.R.).

Na août 1971 tee na octobre 1981, Président ay Conseil d’administration ya université du Zaïre

Na 08 mars 1974, akomi doyen ya Bureau politique ya M.P.R.

Kobanda na 28 janvier 1975 tee 18 février 1981, membre permanent ya Bureau politique ya M.P.R.

Na novembre 1975, aponami Commissaire du peuple (Député) na circonscription électorale ya Bas-fleuve.

Wuta 22 novembre 1977 tee na 18 février 1981, Secrétaire permanent ya Bureau politique ya M.P.R.

Kobanda na avril 1979 tee na avril 1980, Président ya Conseil législatif national (Assemblée nationale) mpe azali ko cumuler na mandat ya Commissaire politique.

Kobanda na 02 septembre 1980 tee na 21 septembre 1981, membre ya Comité central du M.P.R. Ye moko alonguaki na politique active mpo na ba raisons ya santé.

Na mai 1990, azali co-fondateur ya Parti Démocrate et Social-Chrétien (P.D.S.C.) mpe akomi Président national.

Na 17 janvier 1991, P.S.C.D. ekomi légaliser na ministère ya intérieur.

Mokolo mua 19 septembre 1994, papa Ileo aweyi na bokono, na Bruxelles.

 

…………………………………………………………………………………………………………………………………………………………………………

 

 Diomi Gaston

Gaston Diomi Ndongala Midietu

 

Abotami na 08 août 1922 na Léopoldville. Atangi na Institut Saint Joseph na Léopoldville mpe sima akeyi na petit séminaire ya Kolo mpe sima akeyi ko continuer mpe kosilisa secondaire na  Ecole ya agriculture na Kisantu.

Akoti na  Ecole ya Assistance Médicale Indigènes  ya Léopoldville na 1943. Neti ezalaki période ya grande guerre, azalaki na Force publique na campagne ya Birmanie na deux ans ya stage alekisaki na kati ya Force publique.

Na 1946, azui diplôme na ye ya Assistant médical.

Na 1947, azui mosala na Baningville (Bandundu, ville)

Na 1952, azui carte ya mérite civique.

Na 1952, azui mutation na Mushie.

Na 1953, azongi na Léopoldville.

Kobanda 1954 tee na 1958, abandi kokoma na ba journaux La Voix du Congolais na La Croix du Congolais.

Na juin 1956, azali kati na baye bakomi Manifeste de la Conscience Africaine.

Kati na 1955 tee na 1957, azali membre ya conseil ya Cité indigène, membre ya Comité ya Fonds Reine Elisabeth pour l’Assistance Médicale aux Indigènes au Congo belge (FO.RE.MI.)

1955 tee na 1960, Président ya Mutualité Chrétienne.

Na 1956 tee na 1957, membre ya Comité ya admission ya bana batu moindo na ba écoles ya mindele

Na 1957 tee na 1959, Président ya Triennat, membre ya Conseil de ville ya Léopoldville, membre ya Conseil ya province ya Léopoldville.

Na janvier 1958 tee na juin 1960, alongi na ba élections communale ya 1958 mpe akomi Bourgoumestre ya Ngiri Ngiri.

Na août 1958, azali kati na batu zomi na motoba ba signer mémorandum des seize

Membre ya bureau provisoire ya M.N.C. na création na yango.

Na décembre 1958, azali na Conférence ya Rassemblement des Peuples Africain, na Accra.

Na 12 janvier 1959, mundele alongoli ye Bourgoumestre ya Ngiri Ngiri mpe akangami suite na ba événements ya 04 janvier 1959 (martyrs de l’indépendance)

Na janvier 1960, azongeli ebonga na ye ya Bourgoumestre. Sima mikolo, keyi na Conférence ya Rassemblement des Peuples Africain, na Tunis.

Aponami na ba élections ya mai 1960, Conseiller provincial ya Léopoldville na liste ya Alliance des Ba Kongo (A.BA.KO.).

Na 3 Juin 1960, Vice-président ya Gouvernement ya Léopoldville.

Na 11 juin 1960 tee na 29 juin 1960, Président ya province ya Léopoldville.

Na 1963, akomi Commissaire général extraordinaire mpo na provincette ya Sankuru.

Na octobre 1965, aponami Sénateur national.

Na 1967 tee na 1972, Président ya Compagnie Maritime Congolaise (C.M.C.). awa nde ba bateaux minene etekemaka mingi : na 1967, « Charlesville » ; na 1968, «Elisabethville» ; 1973, « Albertville » na « Léopoldville » oyo eyaki kokoma « P.E. Lumumba ».

Na 1970 tee na 1975, Président ya Conseil d’administration ya Compagnie Générale de Produits Chimiques et Pharmaceutiques du Congo (CO.PHA.CO.).

Na novembre 1970, aponami Député national ya circonscription ya Funa, na Kinshasa.

Wuta 1974 tee na 1979, Président ya Conseil d’administration ya Tuileries et Briqueteries de Kinshasa (BRI.KIN) ; Président ya Conseil d’administration ya Siemens-Zaïre. 

Na 1974, na faveur ya Zaïrianisation, akomi Délégué général ya Société Papadimitrious, Administrateur na compagnie Jules Van Lancker  (J.V.L.), Président ya Conseil d’administration ya La Zaïroise de Gestion et de Réalisation Immobilières (ZAI.REAL.), Administrateur Directeur général ya Société Diomi-Import, Gestionnaire principal ya ba  Etablissements Diogas.

Na novembre 1975, aponami Commissaire du peuple ya circonscription ya Funa, na Kinshasa.

Na octobre 1977, aponami lisusu  Commissaire du peuple ya circonscription ya Funa, na Kinshasa.

N.B. ba élections législatives esalemaki na 1977 suite na discours présidentiel ya juillet 1977, oyo esakolaki démocratisation ya M.P.R., une décentralisation ya pouvoir mpe na création ya poste ya Premier Commissaire d’Etat (Premier Ministre), coordonateur ya action ya gouvernement. Na cadre oyo nde, ba élections générales esalemaki.

Na 1982, aponami lisusu Commissaire du peuple ya circonscription ya Funa, na Kinshasa.

Azali mpe Président ya groupe national ya Union des parlementaires africains, membre ya Rotary Club international; groupe l'Association des Cadres et Dirigeants Catholiques des Entreprises au Congo, Union Internationale des Associations Patronales Catholiques, Section Zaire (CADICEC-UNIAPAC / Zaïre), membre ya Ordre ya Rose-Croix.

Na ba distinctions honorifiques : Chevalier ya Ordre de la Couronne belge, Commandeur ya Ordre national ya Léopard na médaille de mérite agricole ya Zaïre.

Diomi Ndongala awe na mokolo mua 16 octobre 1985, na Kinshasa.

 

 

………………………………………………………………………………………………………..

 

Godefroid Munongo Mwenda M’Siri Shyombeka we Shalo

 

Abotami mokolo mua 20 novembre 1925 na Bunkeya. Asali école primaire esika abotami, na 1936 mpe akeyi kosilisa yango na Saint-Boniface na Elisabethville na 1940. Sima ya wana, akeyi kosala ba humanités na Mission catholique ya Kapiri wuta 1940 tee na 1947.

1947-1949 Tango asilisi ba humanités na ye, akeyi kokota na Grand séminaire ya Baudouinville mpo na kosala philosophie. Kasi, asilisaki tee mpo atangaki kaka mbula mibale, kobanda 1947 tee na 1949.

Tango alongue kuna, amati na Kisantu mpo na kotanga na Ecoles ya sciences administratives ya Lovanium-Kisantu, esika azuaki diplôme na 1954. Tango asilisi kuna, abandi mosala.

Na 1954 tee na 1955, Commis na administration coloniale, na service ya pension.

Na  1955 tee na 1956, Greffier na Tribunal de police.

Na 1956 tee na 1957, Juge-assesseur na Tribunal de territoire mpe sima aye kokoma Juge de police.

Na 1957 tee na 1959, Juge-Président ya Tribunal de territoire.

Na 1959,  agent territorial, Chef de bureau ya état civil, sima akomi Administrateur ya ya Etablissement public Inga mpe akeyi na misala mia Conseil, na Bruxelles, na 1959.

Na octobre 1958, co-fondateur mpe premier Président général ya Confédération des Associations tribales du Katanga (CON.A.KAT.). Neti azalaki mosali na administration coloniale, fonctionnaire, atikeli Moïse Tshombe, ebonga.

Na mai 1960, aponami Député provincial ya Confédération Nationale ya Katanga (CO.NA.KAT.).

Na juin 1960, membre du Collège exécutif provincial ya Katanga.

Na 14 juillet 1960 tee na janvier 1963, Ministre ya Intérieur, na gouvernement (gouvernement  sécessionniste) Tshombe.

Na époque oyo nde asalaki épuration ethnique na bobengani ba Luba ya Kasaï na oyo ya Katanga tango ya sécession ya Katanga. Discours na action ya Munongo ezalaki ya kobengana ba Luba na Katanga mpo bango bazali na misala oyo esengeli ezongela ba Katangais mpe bazali kozua bomengo nionso ya Katanga pendant que ba katangais bazali na eloko te, et pourtant mabele na bango etondi na bomengo mpe bomengo oyo esengeli e profiter kaka na bana ya Katanga (Sud-Katanga =  Katangais de souche). Yango wana esengelaki kobengana ba étrangers Luba mpo na kopesa ba Katangais de souche nionso ebendaki ko bénéficier na bango.

Paradoxe ya vision oyo ezali que ye moko Munongo, azali descendant ya nkumu M’siri, d’origine tanzanienne na village ya Nyamwenzi. Awutaka na Tanzanie mpe aye na Bunkeya na 1850 esika asalaki royaume ya Garenganze. Akutaka ba Luba na mabele ma bango na Katanga mpo bazali originaire ya wana.

Na février 1963 tee na juillet 1964, Ministre ya Justice sima, Ministre ya Santé publique, na gouvernement ya Katanga orientale.

Na 09 juillet 1964 tee na 09 juillet 1965, Ministre ya Intérieur mpe na Fonction publique, na gouvernement Tshombe (gouvernement central).

Na octobre 1965 tee na 25 avril 1966, Gouverneur ya Katanga Oriental.

Na 25 avril 1966 tee na décembre 1966, Gouverneur ya Sud-Katanga. Akangemi na likambo ya

complot na ba mercenaires étrangers. Atindami na boloko ya Bula Bemba.

Na 30 août 1968, a bénéficier na grâce présidentielle. Mpe abimi na boloko ya Bula Bemba

Na 1968 tee na 1971, azui nomination en tant que vice-Président ya Office  de Transports ya Congo (O.TRA.CO.).

Na 1971 tee na 1974, akomi vice-Président ya l’Institut de Gestion de Portefeuille.

Na 1974 tee na 1976, Président Administrateur Délégué ya Société Zaïro-Italienne de Raffinage

Wuta 12 septembre 1976, akomi introniser Chef coutumier ya Bayeke.

Na 02septembre 1980 tee na 28 janvier 1985, membre ya Comité central ya Mouvement Populaire de la Révolution (M.P.R.).

Mokolo mua 05 novembre 1982 tee na 1er  novembre 1983, Commissaire d’Etat na Administration du territoire, na gouvernement Kengo.

Na 1992, azalaki moko ya ba conférencier na Conférence Nationale Souveraine (C.N.S.).

Na mokolo mua 28 mai 1982 akufi brusquement mokolo esengelaki asala témoignage alakaki na lolenge gouvernement ya Katanga ebomaki Premier Ministre Patrice, Lumumba ; Sénateur, Joseph Okito na Député,  Maurice Mpolo, tango Président Kasa Vubu, Colonel Mobutu, Collège ya ba  Commissaires généraux na groupe de Binza e livraki bango na Tshombe, na Katanga.

Liwa ya Munongo etikala suspecte mpo na veille,  le 27 mai 1982, akendeki na Gbado-Lite kokutana na Président Mobutu. Ba proches na ye bakebisaki ye na bokutani na Président Mobutu kuna. Na bozongi na ye, asala malaise na kati ya plénière ya  Conférence Nationale Souveraine, na salle de Congrès ya Palais du peuple.

 

 

…………………………………………………………………………………………………………………………………………………………

 

Joseph Ngalula Mpanda Njila

 

Abotami mokolo mua 12 décembre 1928 na Lusambo. Akoti kelasi epayi ya ba sango ba  Frères de la Charité, esika asali école primaire mpe na école moyenne (art graphique) wuta 1934 tee na 1943.Tango asilisi , aye na Léopoldville na 1944, esika azui mosala na Office d'Exploitation des Transports Coloniaux  (O.TRA.CO.), en tant que Commis.

Na 1954, abandi kolanda ba cours ya anglais mpo na kosala face na compétence ya batu ya Afrique anglophone (coast man) mpo bango nde mindele babandaki kolinga mingi mpo na eyebeli na bango ya mosala. Mpo na komiya na niveau  linguistique mpe ko faciliter collaboration na koyekola mosala epayi na bango, yango wana amikomisaki na ba cours ya anglais na sténographie, na Léopoldville.   

Wuta 1944 tee na 1946, azui ba cours par correspondance na Institut National d’Etudes Supérieures ya Belgique. 

Na 1949, aponami vice-Président ya Ligue ya ba Employés Chrétiens.

Wuta 1951 tee na 1956, azali ko collaborer na journal ya La Croix du Congo  mpe abandi kolanda ba cours oyo ezali kopesama na epayi ya ya Abbé Joseph Malula, na Mission Christ-Roi ba cours yango ezali ya : sciences politiques, sociologie,  économie, droit, philosophie, psychologie mpe na logique.  Kuna nde likanisi ya Conscience Africaine ebotami na 1951, mpe eye kokoma Manifeste ya Conscience Africaine na mokolo mua 30 juin 1956.

Na 1952, Akomi Secrétaire ya Fédération Kasaïenne ya Léopoldville.

Na 1956, akomi journaliste na Conscience Africaine.

Na 17 avril tee na 18 octobre 1958, akeyi na exposition universelle et internationale ya Bruxelles.

Na 28, 29, na 30 juin, a participer na kati ya misala mia Congrès international ya presse coloniale, na Bruxelles.

Na mokolo mua 20 août 1958, azali kati na ba co-fondateurs ya Mouvement National Congolais (M.N.C.). mpe azui ebonga ya reponsable ya propagande.

Na septembre 1958, akomi rédacteur en chef ya Présence Congolaise mpe azali kati na baye ba signaki mémorandum ya batu zomi na motoba na 1958.

Na mokolo mua 10 octobre 1958 nde M.N.C ebimaki officiellement neti parti politique national.

Na mokolo mua 05 tee na 13 décembre 1958, akeyi ko assister elongo na baninga baye ba M.N.C., Lumumba na Diomi, na Conférence panafricaine ya Accra.

Na janvier 1959, akangemi na mobulu esalemaki mokolo mua 04 janvier 1959 (martyrs de l’indépendance) mpe batiki ye sima ya ba poso.

Na 15 tee na 21 avril 1959, akeyi na Lumumba na Guinée-Conakry, esika Président  Sekou Toure azali kati na baye basangani na Luluabourg, na Congrès ya ba partis politiques ya Congo.

Na juillet 1959, M.N.C. ekabuani na ba ailes mibale, Lumumba na Kalonji,  mpe ye aponi mopanzi nya Kalonji. Na sanza moko oyo, aponami vive-Président ya Mouvement Solidaire Muluba (M.S.M.).

Na janvier-février 1960, azali na Table ronde politique ya Bruxelles en tant que suppléant ya M.N.C. / Kalonji.

Na février-mars 1960, akeyi Etats-Unis na cadre ya programme ya échanges internationaux oyo ba Américains basangisi batu.

Na mai 1960, aponami Conseiller provincial ya territoire ya Bakawanga, na district ya Kabinda.

Na août 1960, akomi Premier Ministre ya Etat autonome ya Sud-Kasaï

Na 23 avril 1961, azali kati na Table ronde ya Coquilatheville

Na 01er  juin  tee na 16 juillet 1961, Vice-président ya royaume Fédéré ya Sud-Kasaï. Akoti en conflit na Kalonji mpe aye kolongola ye.

Na 02 août 1961 tee na 11 juillet 1962, Ministre ya Education national, na gouvernement Adoula.

Wuta 12 octobre 1962 tee 26 juin 1965, Président ya gouvernement provincial ya Sud Kasaï. Na Présidence na ye  nde Bakawanga ebandaki kotongama. Suite na urbanisation wana nde ayaki kozua kombo ya Mpandanjila = mosali nzela.

Na novembre 1963, a fonder Rassemblement ya Peuples Luba (RA.PE.LU.)

Na mai 1965, aponami Député nationale na circonscription électorale ya Ngandajika mpe aye kokota na Front Démocratique Congolais (F.D.C), Cartel ya ba nationalistes pro-Kasa Vubu na lutte politique contre Tshombe na Confédération Nationale Congolaise (CO.NA.CO.) .

Na 1967 tee na 1971, Président ya Compagnie de Chemin de Fer du Katanga-Dilolo-Léopolville (K.D.L.).

Na novembre 1970, aponami Député na circonscription électorale ya Haut-Lomami.

Na novembre 1975, aponami Commissaire du peuple (Député) na circonscription électorale ya Lukunga.

Na octobre 1977, Commissaire du peuple na circonscription électorale ya Kabinda.

Wuta 1974, Administrateur na ba Editions Okapi.

Na 01 er  novembre 1980, azali kati na ba Commissaires du peuple zomi na misatu (treize parlementaires) oyo bakomi lettre ouverte au Président-Fondateur du Mouvement Populaire de la Révolution et Président de la République.

Na 31 décembre 1980, akangami na deuxième Cité ya Organisation ya Unité Africaine (O.U.A.) na pavillon 21.

Na 12 janvier 1981, a perdre mandat na ye ya Commissaire du peuple.

Na 04 décembre 1981, azongi na Kinshasa, libre, suite na ba pressions occidentales.

Na 15 février 1982, azali kati moko ya ba co-fondateurs ya Union pour la Démocratie et le Progrès social (U.D.P.S.).

Na 27 mars 1982, akangemi na prison central ya Makala suite na création ya U.D.P.S.

Na 19  tee na 28 juin 1982, procès esalemi  na Cour ya  Sûreté de l’État mpo na complot qualifié.

Na 01er  juillet 1982, Cour ya  Sûreté de l’État e condamner ye na baninga ba ye na 15 ans ya prison.

Na 09 juillet 1982, alongue na prison ya Makala mpe atindami na prison ya Osio esika esengeli asala etumbu na ye.

Na bénéfice ya Ordonnance-loi n° 83/007 ya 21 mai 1983 portant amnistie générale concernant tous les Zaïrois, azui liberté mpe azongi na Kinshasa.

Na 08 mars 1983, pouvoir ezongisi ye na village d’origine, na Tshilunda. Sima, ekumbi ye na Kapena. Nionso oyo mpo azali kati na bakonzi ya U.D.P.S. balobelaki attaque esalemaki na village natal ya Tshisekedi, Mupompa, pendant que ye azalaki kuna na relégation.

Na 22 juin 1985, bazui liberté sur intervention ya roi Baudouin 1er  mpo esengelaki aya na célébration ya 25 ans ya indépendance ya Zaïre.

Na  13 juin 1986, akangami lisusu mpe reléguer na village d’origine, na Tshilunda.

Na 05 mars 1987, akutani na Président Mobutu na Gbado-Lite mpe na mokolo mua 17 mars 1987, akumbi délégation ya U.D.P.S. na Gbado-Lite epayi ya Président Mobutu.

Na 27 juin 1987, azali moko na baye ba signaki ba accords ya Gbado-Lite. Yango ezali condima U.D.P.S. comme aile opposante na kati ya M.P.R. parti-Etat.

Na mokolo mua 01 novembre 1987, akomi membre ya Comité central ya Mouvement Populaire de la Révolution, parti-Etat. (M.P.R.parti-Etat). Awa nde atikaki ba activités ya U.D.P.S. mpe akomi kosalela ba intérêts ya Président Mobutu.

 Na mai 1990, akomi Conseiller politique ya Président Mobutu.

Ngalula atika mokili oyo ya nse.

 

 

…………………………………………………………………………………………………………………………………………………….

 

 

Conscience Africaine, na 1951 : Abbe Joseph Malula, Joseph Ileo, Victor Njoli, Joseph Ngalula, Albert Nkuli, Antoine Ngwenza na Dominique Zangabi.

Liste ya baye ba signaki mémorandum de seize, na août 1958 : Cyrille Adoula, Laurent Bariko, Gaston Diomi, Joseph Ileo, Maximilien Liongo, Patrice Lumumba,  Gabriel Makoso, Ignace Makuta, Joseph Mbungu, Jean Montigia, Joseph Ngalula, Albert Nkuli, Alphonse Nguvulu, Antoine Ngwenza, Arthur Pinzi na Pierre Tona Masesa.

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
S
<br /> <br /> Mbote ndeko Kandolo,<br /> <br /> <br /> Nasepeli kotanga ba biographies, nanu nasilisi te kasi nazui mua confusion na badate ya liwa na esika oyo:<br /> <br /> <br /> Godefroid Munongo Mwenda M’Siri Shyombeka we<br /> <br /> <br /> <br /> <br />  <br /> <br /> <br />  <br /> <br /> <br /> Mokolo mua 05 novembre 1982 tee na 1er  novembre<br /> 1983, Commissaire d’Etat na Administration du territoire, na gouvernement Kengo.<br /> <br /> <br />  <br /> <br /> <br />  <br /> <br /> <br /> Na 1992, azalaki moko ya ba conférencier na<br /> Conférence Nationale Souveraine (C.N.S.).<br /> <br /> <br /> Na mokolo mua 28 mai 1982 akufi brusquement mokolo<br /> esengelaki asala témoignage alakaki na lolenge gouvernement ya Katanga ebomaki Premier Ministre Patrice, Lumumba ; Sénateur, Joseph Okito na Député,  Maurice Mpolo, tango Président Kasa<br /> Vubu, Colonel Mobutu, Collège ya ba  Commissaires généraux na groupe de Binza e livraki bango na Tshombe, na Katanga.<br /> <br /> <br /> Liwa ya Munongo etikala suspecte mpo na veille,  le 27<br /> mai 1982, akendeki na Gbado-Lite kokutana na Président Mobutu. Ba proches na ye bakebisaki ye na bokutani na Président Mobutu kuna. Na bozongi na ye, asala malaise na kati ya<br /> plénière ya  Conférence Nationale Souveraine, na salle de Congrès ya Palais du peuple.<br /> <br /> <br /> Mua confusion ya mbula nini akufaki, 1982 to 1992?<br /> <br /> <br /> Losako<br /> <br /> <br />  <br /> <br /> <br /> <br /> <br /> <br />
Répondre