Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Aux origines de KIntambo, KILIMANI kwetu.
Natif de Kintambo, ma curiosité m'a conduit récemment à m'in terroger sur la dénomination de Kilimani, pour désigner l'ancienne"Montagne" où les Frères des Écoles Chrétiennes avaient installés leur première école en 1909.
Aujourd'hui, le souvenir de Kilimani - Mangolo Ngaliema comme disaient nos anciens de Kintambo, est entrain de s'effacer derrière "Mont Fleuri", sa désignation actuelle.
Il est en effet très curieux, que cette colline qui devrait être un village Wumbu - à cause de la présence de manguiers - prenne une dénomination swahili. Puisque Kilima - désigne la montagne et Kilimani désignerait le village, et Imani serait le lien entre la Montagne et les missionnaires des Frères des Ecoles chrétiennes.
Aujourd'hui il n'existe pas de littérature pour nous renseigner sur cette présence swahili à Kintambo. En effet, si la présence des pécheurs Basoko et Lokelé est confirmé sur les bords de la baie de Ntambo bien avant l'arrivée de Stanley et par après pour la construction du chemin de fer Leopoldville - Matadi, on peut difficilement signaler des swahili au même endroit. On peut cependant imaginer que parmi les porteurs de Stanley il y ait eu des "gens de l'Est" comme le géant "Mutara", sinon des gens du Maniema comme disait mon père.
Cela expliquerait en tout cas que Victor Komoriko, prémier président du sénat congolais à l'indépendance se soit installé à Kintambo. Komoriko était le beau père de Papa Botomba - André Benoit - lui même  né à Kilimani en 1914.
D'où était donc Komoriko originaire? si quelques mbokatier peuvent me répondre cela compléterait ma documentation.
dans tous les cas, Kintambo n'aura que très peu d'affinités avec la langue swahili et restera pendant longtemps, le quartier des bangala et des bakongo voire des bazombo. Le swahili restera juste un repère, très flou, de la rencontre de cette contrée Wumbu Teke, avec les hommes de Bula Matari, Henry Morton Stanley.

Joseph Pululu
Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
M

C'est vrai que Victor Komoriko,alias Bom'o ngombo (buffle en langue  des Batito) était beau-frère de Bontomba et il est vrai également qu'il était le premier président  du sénat à
l'accession de notre pays à  l'indépendance le 30 juin 1960.

Komoriko est originaire de Wambia dans le territoire d'Oshwe,province de Bandundu.

Pendant la colonisation belge, pour des raisons que j'ignore, il était déporté et était envoyé dans le Congo Central (Bas-Congo). Là il sera élève des missionnsires des Frères des Écoles
chrétiennes, à Boma précisement et fera la connaissance de Joseph Kasavubu  qui, en 1960 sera le premier président du Congo.

En 1962, avec la création des provincettes , Komoriko Victor deviendra le premier président de la province du Lac Léopold II. Il sera évincé,alors qu'il était en vacances dans son village natal,
par une motion de sensure introduite au parlement provincial.

Léon Zangabi le remplacera comme président.

Mais en 1965, Komoriko sera élu au sénat pour le compte du territoire d'Oshwe.

Il meurt en 1965 à Kinshasa.

Il était un bon boxeur et adorait le football. Un bon danseur.

Québec, le 4 juin 2010

Maurice-Blondel BOKOKO ELOLO.

Répondre
L

Ndeko Pululu,
Mbote na yo, nayebi okokoba na yo na masolo ya Kintambo, puisque ba points ezali na yango ebele, kasi na likambo ya Leo II na Mobutu, biso toyokaka ete parmi les membres signataires (co-fondateurs)
ya creation ya M.N.C. (Lumumba), moko na bango azalaki muana ya Kintambo, il est connu de tous. Abotama, atanga, akola kaka se na Leo II, balobaka lisusu, bien que ba vieux ya Leo II, bazalaki ba
membres ya ba partis lokola ABAKO, PUNA etc... kasi bango nionso bazalaki na flamme ya Lumumbisme na motema, Mobutu ayebaki yango malamu, puisque Mobutu azalaki tout le temps na Lumumba, meka naino
o s'informer epayi ya ba vieux na bino ya Leo II, tango mosusu bakopesa yo ndimbola na manso owuti koloba, ezali mpenza na nzela, ata Major Mpika, azalaki lisumu te, afutaki nde lisumu ya ba vieux
ya Leo II, ye nde motu azalaki lisumu te, Leo II ezali na lisumu lisango to peche originel. En clair, balobaka ba vieux ya Leo II, bazalaki ko respecter Mobutu te, bazalaki nde kobanga ye, puisque
ye nde azalaki na force armee.
Les membres co-fondateurs du MNC sont : Lumumba, Kalonji, Nguvulu, Nkuli et consorts.
Lolita Marie Anne.

Répondre
J

Lisumu ya Major Mpika, Eyano na Sonny Mokonzi.

Lorsque na 1975, likambo ya Coup monté et manqué eningisi Zaïre, pasi ezalaki makasi epai na biso na Kintambo. Kulutu André Mpika, oyo Mobutu akotia mosapi lokola oyo alingaki kobomba, azalaki
muana ya Kintambo. Quelque part, promotion na ye na FAZ, ezalaki lifuta po na fidélité ya Kintambo, na manso tosalaki po na MPR. Est-ce que Mobutu akangelaki biso lino sans que toyeba, est-ce que
Complot wana, ezalaki ebandeli ya divorce entre Kintambo na Mobutu? Nayebi te. Une chose est sûre, nionso tokosala po na régime, lifuta ekokende na basusu. Pire, alors que biso bato tosimbaki
animation, eleko ekokoma "ministère ya MOPAP, bakopimela bana Kintambo ebonga wana. bana Kinshasa, lokola ba Sakombi bakodondua n'ango. Kin Malebo mobimba eyebi likambo yango. yango basekaka n'ango
biso.Puisque même bamivila lokola Tshimbombo bakodoubler biso na likambo yango. Pourtant ezalaka Kop na biso.

FRustration epai na biso bana kintambo ezalaka makasi po na likambo wana ya kopimela biso ki commissaire d'Etat, alors que tozangaki bato ya mayele pe ba universitaires te, soki totali nini
Kintambo esala po na MPR. Quelque part biso bana Kintambo, babini ya mbonda ya Mobutu, bafuta biso, lokola eloba BNolowa Bonzakua, lifuta ya >Mobini ya zoba: kwanga ya pamba.
Bandakisa ezali mingi. Tobanda na eleko ya CVR, base n'ango ezalaki epai na biso na Léo II. Bapremiers nzembo, basaluti - kotiya loboko na moto, ebima epai na biso. Pourtant moto akozua lupemba
n'ango muana IMMOCONGO : Kabaidi Paul.
Soki totali na likambo ya animation, Groupe Choc Kake, ezalaki likanisi ya bakulutu na biso NALA LUNGA na BOTOMBA ETSIKE Libanga, puisque cri na biso : Mangembo Oyéé!!! (rappelez-vous Fula Fula ya
Me Vital Nkelani), tokopesa yango na Mobutu, ekoya kobonguana Mobutu Oyééé!!!, kasi tango ekokoma te lifuta ezuama, Momene muana Kinshasa nde akokoma Gouverneur, tout comme na maye ya JMPR, imaginé
na ba vieux na biso b'anciens ya Croix Rouge na Xaveri lokola Nala na Minos, tope Nyemba Arthur, lifuta, bakopesa encore une fois na muana kinshasa, Monkolot.
Pourtant, nini tosalaki te po na MPR na Mobutu?
Mama Atembina Limaya, motolu ya Léo II azalaki première trésorière ya MPR pe akosuka bobele wana. Bakulutu Botomba LIbanga, Nala Lunga na Nyemba Arthur bokoboma nzoto po batombola likolo lokumu ya
Mobutu. Bokanisa banzembo na biso lokola: Mariage Mobutu Peuple to Mokako swa totombeli Mobutu. Wana bavéritable classiques ya animation.
C'est peut être wana lisumu na biso: Mobutu na bato na ye, basukisaki biso na lisano, babosanaki te tozalaki pe na bato ya mayele. Derrière situation wana, etumba moko makasi ezalaki epai Bana Mon
Frère "Assanef", epai bana basango "ADAPES".
Lokola réputation na biso bana ba frère ezalaka maitrise professionnelle, nionso ezalaki ya mayele, ezalaki réservé na bana ba sango ya Scheut. C'est ainsi que bakulutu na biso ya Kintambo
bakodondua na Armée, alors que Bana basango ADAPESD, baékodondua na misala ya ba commissaire d'Etat.
dans les années 80, Mobutu akomeka ko se' rattrapper po na iso bana ya Kintambo. Bakutulutu lokola Katumua akokoma chef de cabinet ya ministre, Kokola na Daya bakokoma ba DGA.
Imaginez soki biso bana Kintambo tosimbaki luyalu, peut être que Makambo elingaka kobonguana na Congo.
Enfin, oyo ezali n'ango subjectif pe point de vue personnel, quelque part, Mobutu akofutisa biso "Lisumu ya Mpika" tii na suka. Bana Kintambo bakotikala na miso ya Mobutu bobele babini ya zoba.
Lokola pe tosila kozua mayele, nakaninsi, lobi tokokueya na motambo lisusus te. De toute façon, tozongela cri na biso : Mangembo Oyééé!!!
Joseph Pululu

Répondre
S

Ndeko JOSEPH PULULU,ngai nakolinga mua eclaircissement na likambo oyo:mokolo moko ezalaki vers les annees 80s,tozalaka ko discuter sur ba yankees pe ba bills ya kisasa ensemble na muana
moko ya kitambo,sima kaka na discution wana,abuaki eloko moko alobi ahhh yo si oyoka COMMISSAIRE D'ETAT  abimi na kitambo????,ngai nakamuaki pe po nazali muana ya kitambo te,alors namitunaki
soki ya solo kitambo oyo ezali parmis ba mboka ya liboso ya leopoldville soki etikala jamais kobimisa commissaire d'etat na epoque ya mobutu(1965-1997)....pona kobakisa kitambo ezali esika oyo
ebimisi pe bato mua mingi ya mayele(docteurs,ingenieurs,pretres,etc....).

Répondre
D
Bonjour,
Nazali pe muana ya Kitambo.
Nazalaka na Kwamouth na likolo.
Boyebisa nga equipe nini ezalaki makasi entre :
Lisolo nganga
Pamba pamba
Paka paka
Ebotu

Ba joueurs oyo bazalaka kobeta na ba équipes nini ya Kitambo ?
Vieux : Zumbel, Mavuba, Iko Vile.
Vieux Bingema azalaki kokumisa equipe nini ?

Bobenga na numéro oyo : 07 58 31 58 54 (France)
0033 7 58 31 58 54 (de l'étranger)
C

Ndeko Pululu,
Ya liboso mpenza longonia epayi ozali, kaka na cadre ya ba vieux ya Leo II, soki okoki kozala na moyen ya kobetela biso biographie ya vieux Nzuzi Emmanuel, en moins que nazala na kati ya confusion,
nabanzi ezali ye nde mokolo ya Nzuzi Bar, La Delice Bar, oyo bayemba na nzembo ya African Fiesta "MILANO", oyo azalaki Commandeur ya Ordre National ya Leopard, mokonzi ya ba equipes ya football
etc... donc azalaki na destin moko exceptionnel.
Toyokaka lisusu ete Major MPIKA ZI BIKEMBO, le celebre RANGER, azalaki muana ya Kintambo, na General WABALI oyo azalaki mokonzi ya PTT, COLONEL KELE...
Bon, tokita sikoyo na Animation ya Groupe Choc Nkake, ya ville ya Kinshasa, ba vieux mingi ya Leo II, bazalaki bakonzi kuna, tels que NALA, MONDOMBELE, BELAFONTE (nayebi te soki ezali Arthur
Nyemba), BOTOMBA etc...
Ba nzembo ya Afrisa ya Rochereau, KELE BIBI mpe NALA, ezali bango moko ba vieux Kele na Nala, batu ba composaki yango, to Rochereau ayembela bango, to Rochereau ye moko a composaki yango, simple
coincidence ya ba kombo, kasi soki otali malamu, tout indique que bayemba yango mpo na bango, donc ba vieux Kele et Nala, et en plus ba vieux oyo mibale bazali ba musiciens.
Ndako ya "fond d'avance" oyo batonga na lopango ya ba vieux Djeskain, sur rue Lusambo, balobaka ezali soeur ya Loko Massengo Marcel, motu atonga yango, soeur oyo azalaki kosala na BATA, puisque na
tangu wana, ezala vieux Djeskain na ba misusu ya ba LOKO, bozui ezalaki lokola lelo te.
Soki nazali kotuna boye, pamba te, ezali masolo oyo ebetamaka tii na moyi ya lelo, ba mbula ezali koleka, histoire ekoya kokoma deformer ya pamba, malamu toyebaka, epayi towuta mpe epayi tozali
kokende.

Connaissez-vous Kintambo.

Répondre
J

Lusamba Wetu, losako.
Mituna na yo nazui pe nakomeka kosembola moke moke. epai nakobunga, tembe te, bakulutu lokola Ben Botomba, bakobakisa.
Nalingi yambo nakota na mozindo ya mituna na yo, koloba ete, oyo nayebi ya Léo II, ezali liboso kozala na bakolo, sima pe koluka ndenge mondele alobaka, kosala ba recherches. Documentation po ya
bana Léo II to Kintambo, ezali n'ango ebele, ,ndekisa epai ya ba frères na sainte Marie, ba photos ya nbana classe ya Montagne, ya vélo Club ya léo II, ya ebandela ya Ecole saint Georges to pe
Vélodrome ezali, elongo na makoma mike mike. Soki pe totali na likambo etali ba "motolu", ba régistres ya baptême ezali naino na eglise saint François. Kuna ebandi bongo na 1918 tee lelo. Nionso
wana ezali po nakofungola boyebi na biso.
PAPA KASONGO YE NANI
papa Kasongo azalaka bongo saxophoniste ya kafu kafu. ye lokola Jeannot Lopongo, bayekoli kobeta piololo na Fanfare Sainte Cécile, epai ya ba "Mon Frère". Papa kasongo, liboso même ya Grand kallé
akoya kosala orchestre ya liboso ya Léopoldville. Kombo na yango ezalaka "ODEON" - Avant même bandeko na biso ya mbonda, odéon ezalaki. bango babandaka kobeta bobele miziki, na lolenge ya
mindele. Mingongo ezalaka te. kaka miziki. na kati ya lingomba wana justement, Lpongo na Joseph Booto bakozala na kati. Baconcerts na bango  mingi ebandaki kozala na Parc de Bock - jardin
botanique ya Kinshasa lelo. Babeti lindanda bazalaki liokolo na podium, pe babini na piste. Moke moke mingo ekoya kokota. jeannot Lopongo na bandeko basi ya lingomba bakoya kotiya mondo,
lolenge  ya nzembo oyo nazui na "roots " rumba, esalemaki na accompagnement ya Odéon.
"deux titres ezali, nakosenga na messager atiela biso yango.
GAIS LURONS
Nakoki koloba té que gais Lurons, groupe de petis chanteurs et danseurs, créé par Me Arthur Nyemba Ndilu - ye ezali nanu na bomoyi - ezali plagiat. Il faut toyeba que ezalaki mouvement, mopepe
moko eyaki na kinshasa, na lokolo ya ba petits chanteurs et danseurs de kenge ya Van Den Boom. Sinon, traadition ya bachorale epai na biso na kintambo, ezalaki n'ango na makila. malgré que
ezalaki initiative ya mondele té, ba gais Lurons, bakoya kotiya panzi likolo na bana Kenge. Soki oluki awa na Mbokamosika, okomona nwuta kokoma mua lisolo ya groupe wana. Il faut oyeba pe te,
maitre Arthur, azalaka molakisi. Très cultivée, asalaki repertoire moko ya somo po na ba gais lurons. yango pe ekopesa biso nzela ya kosala ba choeurs ya somo, na Géard Madiat pe Myriam
Makeba.
Po na likambo etali mbonda ya bana Odéon, mbnotama n'ango ezali entre 1977/1978. bana Odéon, po na kolakisa "filiation" na bango na lingomba ya papa Kasongo na trio na bango. Liboso ya Odéon, il
faut tozonga na 1975/76. Kintambo ebandisi lisano ya Football-Loisir. Mobandisi n'ango ezalaki bongo Pierre Botomba Libanga. Na tango ye akomaki "vice-gouverneur en charge ya animation na
Kinshasa, azalaki na makoki po nakozua Bus mobimba pe komema babeti ndembo ya kintambo epai na epai po na motope. Equipe ya liboso kombo n'ango ezalaka "Baka mondongo". na loyenge wana, na 1976,
bakulutu babimisi likani te, quartier na quartier ya kintambo ezala na équipe pe groue d'animation n'ango. Pamba pamba, Lisolo nganga, Paka paka monzele, Boboto, Bondoki, ezalaki bongo, bakombo
ua quelques équipes. bamatchs ezalaki samedi pe dimanche. Chaque match ezalaki non seulement na terrain, mais na wenze, epai animation ezalaki kotoko. Sonnerie Nkuya, par exemple, asimbaki
animation ya pamba pamba, alors que Mbalim asimbaki ya boboto. banzembo ebele pe bacris ya b'atalaku ebimaki n'esika wana. Na 1977, mouvement ya balle ekiti, mais loyenge ya mbonda etikali.
Groupe moko ekoya ya kobima, na kombo ya "La jeunesse Arumbaya". Ekosangisa bongo style ya bawumbu na bazombo. Sabu Mbwesa, Ditutala bango bawumbu epai; Bana ya Pedro Ngulu Sabu na Londa, na
baninga na bango lokola Nono Atalaku, bango nde ba piliers ya yambo ya mbonda ya Kintambo. Sima ya mua matata ya misolo, bokabuani ekokota. na eleko wana KUMAYE, oyo akendaka kovanda na Mbanza
Ngungu azomgi mboka. ye nde akobima sponsors pe patro ya lingomba ya ba dissidents ya la jeunesse Arumbaya. Ezali nde ye moto akopesa kombo ya Odéon na mbonda na biso, surement en hommage na ba
kulutu na biso, trio KALOBO na groupe na bango Odéon.
Mwana nsuka, hymne ya Léo II
Ah maggie ya télévision. Il a suffit na passage moko kaka na télévision grâce na Beta Kumaye oyo asopaki mosolo, po te Kinshasa mobimba ezongela mbonda. Po na téléshow wana, bayaya na biso;
lokola malata Loko, lipasa ya Djeskain ya Trio Madjesi, balengelaki chorégraphie ya somo. Première interprétation ya Muwana Nsuka ekozala bongo guitarre, mbonda na Jazz (kisaka saka). Miyalu
Kayonda ye compositeur n'ango akozua succès ya somo. En une semain, mouvement na Kinshasa ekomaki epai na biso na Kintambo. Concurrence na ba Ok Jazz to Zaiko, tobandaki kobanga yango te.
D'ailleurs, bato ebele babandaka kobanda ambiance na bango epai na biso kobanda ba 19h tii minuit, sima bakeyi concert ya miziki moderne.
Il est vrai que Alamoule, ayaki kotia mobulu na nzonziing asalisaka Miyalu. Tout ce que apesaka ye ezali salon moko ya cuire ya somba zikida, ensuite akeyi kobomba na hotel moko na Ozone, avant
atinda Miyalu na Brazza. Carrioère ya Miyalu ekoya kobeba wana. Na maye matali matata ya Beta Kumaye na Alamoule, ndenge yo moko oyebi, likambo ya miziki esukaka kaka bongo.
Orchestre Emancipation
ya solo Joseph Booto, pianniste émérite pe arrangeur ya somo ye azuaki likanisi ya kosala orchestre ya bana basi Emancipation. Alors mua confusion ekoki kozala na kombo.Moto babandaka kobenga "
de Both ou Debock" ezalaki bongo Papa Botutun ayebanaka makasi na Kinshasa na kombo ya Me Botutu. ye pe azalaka alanga nzembo. >Joseph Booto, ye nde membre ya trio KALOBO. Non seulement
azalaki initiateur ya orchestre Emancipation, ye na moninga na ye Lopongo, bato babimisaka likanisi ya conservatoire de musique et d'arts dramatique oyo ekoya kokoma INA.
MARIE JOSE YA BAVON
ya Marie José ya bavon ezali bongo kulutu na biso oyo azalaka na bavon marie marie, na eleko asalaka accident na Cosbaki. Kulutu na biso atikala handicapé. Libota na ye ezala na bala bala kasaï
na Kintambo, na mopanzi ya Hopital ya Kintambo. ye azali naino na bomoyi. Lolenge mko na ba grandsn noms ya Kintambo lokola BINGEMAN, PAURRET EYOMA PE ZANGA ZANGA.
Po na Me Jacques Kele, oyo asimbaka fanfare ya garde républicaine, ye akoya kokufa na grade ya Colonel, mais lopango ya famille ya Kintambo ezali toujours, wana voisin na oyo ya famille
Booto.
Ya Nkelani, ma Hélé, azali naino na bomoyi. Ye abelaka makasi pe azali na poto na France epai ya bana, kopemisa nzoto.
Enfin po na likambo ya koloba te totongaka libanda, ezali faute na biso te. Mingi toconsidéraka lopango ya baboti esika na biso. Ata tokeyi kofutela to kotonga libanda, tozongaka toujours na
mboka na biso. ya solo, ezangaka biso koyeko esprit d'investissement ya bana ndjili. Il faut aussi boyeba que bato nionso oyo bazua na kinshasa balingi kaka mboka na biso. Tosala boni. bango pe
soki babongisi ezali kaka malamu. Enfin, Kintambo défaut n'ango ezali "Cité dortoir".
Enfin na koconseiller yo, soki okeyi na kinshasa pe olingi okutana na bakulutu ya Kintambo, leka na coin ya Lusambo na Port Francky na MBY, omela mua kopo na ponkua. Soki ezali dimanche, na 9h,
sima ya messe, telema kaka na Lusambo, epai ya ba Loko, kota na molongo ya club des marcheurs ya Kintambo, sima, kata molangi na molinda!
Josep Pululu

Répondre
L

Ndeko na biso Pululu,
Salut, nabanzi ozali malamu epayi yo ozali elongo na baninga ba yo.
Nakosepela mingi soki nayoki biyano to ndimbola na makambo maye, nazali koluka nayeba ntina na yango.
Otangi Papa Lompongo, Booto, mpe obosani moko wa bango Kasongo, soki
natali na bolamu bonso, bango basato bazalaki na le Trio KALOBO, Kasongo Lompongo Booto, na kati ya ba Nkolo Miziki, mpe lisusu bazali bana ya Leo II.
Mpe lisusu likambo etali lisano : les Gais Lurons ezalaki plagiat ya les Petits Danseurs et Chanteurs de Kenge, to mpe ezalaki kaka idée ya bato ya Kintambo.
Mokonzi na bango to motu oyo afondaki yango ye nani.
Bana ya Odéon, oyo eyembaki MWANA NSUKA, kasi na disque ezalaki  ya NZONZING, compositeur ya nzembo oyo abimisaki yango en complicité na Editeur Makengele "A LA MOULE", mpe ezalaki lisusu
elengi na ndenge ya original te, oyo babetaki na Bana Odéon. Likambo liango lisalaki makelele mingi, mokonzi ya Bana Odéon, nayebi lisusu nkombo na ye te, peut-être KUYATE, alobaki akofunda
likambo yango epayi ya Gd Maître Franco Luambo. Nalingi nayeba soki Bana Odéon ezalaki ko exister avant 1960 na Leo II, to ezalaki kaka oyo toyebaki ya Mwana Nsuka.
Orchestre ya bana basi EMANCIPATION, fondateur na yango ezalaki Papa Booto, oyo biso banso toyebaki na nkombo ya Vieux Deboth, sur rue Bandundu pembeni ya commune, orchestre oyo elimuaki kaka
boye, likambo yango ezalaki ndenge nini.
Mwana muasi oyo Bavon Marie-Marie asalaki na ye accident oyo ya liwa na ye, est-ce que azali na bomoyi to ye mpe akufa, mpo confusion ezalaka mingi basusu balobi azalaki fille ya Kintambo, basusu
balobi fille ya Bandalungwa.
Vieux Kele Jacques, tangu akufaki azalaki na grade nini na l´armée, Major to Colonel.
Mwasi ya vieux Simaro Masiya, Mama Kelani Ma Helé, azali na bomoyi, mpe avandaka wapi, mpo na anniversaire ya vieux Simaro Masiya, tomonaki kaka Mama Zuani okendeke malamu Mbole,
Vieux Bingema azali kaka na bomoyi ?
Ya suka, motuna na ngai ezali boye, mpo na nini Bana ya Kintambo ba investisaka na Kintambo te, lokola Bana ya Ndjili, Ngaba, Kasa-vubu etc... oyo bazalaka, soki bazwi mbongo, eloko ya liboso ko
investir na Commune d´origine na bango, kasi Bana ya Kintambo, c´est le contraire, ils préfèrent acheter des maisons à Bandalungwa, Kasavubu, Lemba, Mont-Ngafula etc... POURQUOI ?
Nasuki awa mpo na lelo, lisusu mokolo molamu epayi ozali Ndeko na biso José Pululu.
Lusamba Wetu.

Répondre
M

Papa Messager,
Ndenge ndeko Pululu atangi kombo ya bus Pipinis, ekozala malamu, otutela biso nzembo ya Rochereau na Sam Mangwana  avec l'orchestre African Fiesta National "A LA SANTE", mpo na kati ya nzembo
oyo baloba TIKA NAMELA, NABIKAKI NA LIWA, NA AUTOBIS YA PIPINISI EEE MBULA ELEKI", mpo nakolakisa na bilenge ete, masolo oyo tozali koloba awa, ezali na source na yango.
Lisusu Papa Messager, losako esika ozali.
Mutombo wa Mpanya.

Répondre
J

Ndeko Curieux, losako na yo.

Chaque fois que je suis amené à évoquer mon "LEO II", je m'empresse de souligner que cela ne se fera pas sans partie pris. Il est important de souligner que la dénomination de Léo ne s'est
appliquée, jusqu'en 1926, qu'àla prtie Ouest de Kinshasa.
Leo I désignait d'abord le Mont Stanley - Ngaliema où s'était installé la première administration coloniale. C'était la première cité blanche alors qu'en même temps, Kilimani - la Montagne était
identifiée comme Léo II. Donc, si la dénomination de Kinshasa sera étendu à la capitale et va remplacer Léopoldville en 1966, Kintambo ne devrait pa forcément devenir Kin II. Leo II n'est pas la
petite soeur de Kinshasa. par contre, Leo c'était d'abord Kintambo.
Toutes les expériences d'industrialisation de la capitale du Congo Belge vont partir de là, alors que de l'autre côté, à la pointe Est, on va mettre en place l'administration.
Avec les techniciens formés à la Montagne, la Chanic - Basoko et ses chantiers navals, vont contribuer à donner à l'Otraco sa première flotille et ses barges.
A côté des mastondontes qu'étaient la Chanic et Texléo, des sel made man, ont tenté d'améliorer l'offre aux populations. Ainsi, lorsqu'en 1954, la CMOCTRIC et la CHANIC s'associent avec l'Etat
colonial pour créer la première société de transport en commun - la TCL - le réseau mis en place privilégiéra la liaison entre le "Belge" ou la cité indigène et le centre ville de kalina, oubliant
les liaisons inter communaux, notamment le Gambela - Kintambo et le Somba Zikida Kintambo.
C'est finalement un grec - Pipinis - qui va mettre en place des camions adaptés en us, les premiers Fula Fula. habitant Kintambo Magasin, il va privilégier d'abord les besoins de ses voisins et
collègues commerçant.
Nullement égoïste, Pipinis, va mettre le pied à quelques audacieux commerçant et évolués de Kintambo, en leur offrant des crédits de Fula Fula. c'est ainsi que l'on verra circuler les premiers bus
Fula Fula aux noms en relation avec Kintambo. la plupart d'ailleurs vont reprendre les noms des rues de Léo II comme Vivi, Lusambo ou Tanganyika. Les fula Fula les plus célèbres seront ceux de
maitre Vital Nkelani, Beau Père de l'artiste Simaro Massiya.
A l'époque encore enseignant à l'école Sainty Georges, il va bénéficier d'un crédit auprès de Pipinis. rapidement, sa flotte va atteindre le chiffre de trois Fula Fula. peint en jaune, ils
portaient comme inscription "Mangembo Oyéé".
Ce sera bien la première fois qu'officiellement le surnom de Kintambo sera transcrit quelque part.
Mangembo Oyéé&, le terme était lâché et faisait le tour de la capitale, reliant le Pont Cabu à Léo II. selon le témoignage des aînés, les Fula Fula ne devant pa s'arrêter au même endroit que
les TCL, chaque propriétaire désignera son terminus. Compte tenu de leur nombre - 3 ou 5 selon les témoignages, les Fula Fula jaunes Mangembo Oyéé de me Nkelani Vital, vont s'imposer sur laligne
Léo II - Gambela. Leur terminus était sur la rue Kwamouth, en face de la maison verte de Nsangu Léon.
Comme vous le voyez ndeko Curieux, Léo II était une ville dans la ville. Et aujourd'hui encore, il est difficille aux Ngembo d'accepter d'être considéré comme un sous kinshasa. Léo II a existé
parallèlement à Kinshasa. Léo II a donné son nom à la capitale entre 1926 et 1966, avant de passer la main à Kinshasa.
Enfin pour tous les Mbokatiers, sachez que Kintambo n'est pas Kin II. dans le découpage des codes postales des PTT, Kintambo est Kin 12.
Je reviendrai sur la question de la longévité des bana Léo II, les bana mayi - nés à l'hopital de la rive et Motolu certifiés - figurant sur les régistres des baptêmes de l'église caqtholique saint
François de sales.
Joseph Pululu

Répondre
C

Ndeko Pululu Zozefu,
ya liboso losako, nalingi osopela ngai lisolo na bino ya Kintambo mua moke na ba points oyo, na ba mbula ya 1960, na Leo II, mpo na biso ba non originaires, tozalaki koyoka, bazalaki koloba : bana
Ngaliema mpe Bana Belezi, bokeseni nini ezalaki na kati wana. Ya mibale mbuma ya KOKOTI, bino kuna na Leo II bozalaki kobenga yango MBEKI mpo na nini. Ya misato, ba autobus ya fula-fula lokola :
Stamakis, Katy, Maro, Vivi ezalaki kosala kaka ligne na Leo II tii na zando ya monene, mpo na nini, ba nkolo na yango bazalaki ba vieux ya Leo II to ndenge nini. Biso ba oyo tozalaki kowuta na ba
Communes ya Kinshasa, Barumbu mpe St-Jean, kuna na Kintambo bazalaki kobenga biso BANA YA KIN, to bawuti na Kini, alors ke biso moko bana ya ba communes oyo, na vocabulaire na biso ezalaki kaka
BELGE na VILLE, par belge elingi koloba ba cites indigenes nionso y compris Leo II, Ville ezalaki cite ya mindele, lokola Kalina, Kingabwa, Limete. Mpo nakosukisa, kaka na ba mbula wana ya 1960, na
Kintambo batu oyo bazalaki na plus de 100 ans, je crois bazalaki, nalingi koloba, ba vieux ya Kintambo bazalaki na bomoyi bolayi, lelo nayebi te soki ezali lisusu ndenge wana. phenomene wana
ewutaki wapi, ya bomoyi bolayi na batu ya Kintambo, eske kuna na Leo II bandoki to ba sorciers bazalaki te.
Nasuki awa, motuna na ngai ezali ko se baser mingi na difference ya culture entre bana ya Leo II na le reste ya Leopoldville.

Répondre
J

Ndeko Bila pe Léoman,
Likambo ya Kilimani, lieu de rencontre et d'intégration ya bapopulation oyo ekutanaki na Léo2. Samy bar, azalaki costman - nigérian , Petro Ngulu angolais, papa Botomba mongo, Jeannot trompette
Lopongo, tetela, Joseph Booto to maitre Nkelani Vital, bango banso bazalaka bana LéoII. kasi na 1957, bondeko wana mondele akoya kopanza yango, na eleko ya premières élections communales.
En effet, s'il fallait kolanda na oyo moko na moko assalaka na kati ya mboka wana ya Kintambo, Papa André benoît Botomba asengelaki abima Bourgmestre ya liboso ya Kintambo, mais, tribalisme ekoya
kobima, na eleko wana pe akoperdre élection, pe Alphonse Tshinkela, mokongo akoya kozua libonga ya commune.
Likambo ekuelaki papa botomba, ezali symptomatique ya manque de solidarité ya bana Léo to kinshasa lelo.
po soki totali malamu, papa Botomba, motolu ya Léo II, moko wa yambo oyo akozua carte civique ya ba évolué, premier responsable ya scoutisme ya Congo; baninga baye bakendeki wapi o eleko ya vote po
bapessa meko ya kotambusa mboka?
Curieusement, tango ekomi vote, bakongo babimi, bangala babimi, mondele alongi, apanzi bondeko ya bana Assanef, apanzi bondeko ya bana Léo II. ce qui s'est passé na Kintambo ekoya kosalema pe na ba
communes misusu ya Kinshasa.
Péché originel wana tozali kofuta masumu n'ango tii lelo: tozalaka bana Léo bobele na lisano, soki ekomi likambo ya pouvoir, moko na moko, azongi na mboka baboti, na ekolo to tribu.
ceci dit, soki baboti na biso bazalaki excusable, biso bambotama ya b'année 50 pe 60 tii lel'oyo, tosengelami tobotolo ya biso bomoto ya bana LEO. Village natal na biso, ezali esika babota biso,
ezali mboka ya baboti na biso té na Katanga, kasai, Kivu, equateur, haut Congo, bandundu to bas Congo.
Etumba ya bana Léo lelo ezali kolakisa na ya biso bana, attachement na bondeko kati na biso bana Léopoldville.
Ndenge Messager alobelaki mbala eleki: tobosanaka ete que Kinshasa to Leo ezali province mobimba. Les 24 communes ezali ba tribus na biso. Il faut tolata lolendo ya ba communes na biso.
nasepelaka mingi na moninga na ngai Santa kalombo, Moluba ya Yolo; lolenge moko nazalaka na lolendo na ba familles Botomba, Loko to Nyemba ya Kintambo. lolenge moko awa na poto, ngai nazalaka na
lolendo mingi ya kolakisa "identité" na ngai ya Muan'a mangembo.
Soki tokomi na niveau wana, biso pe bana Kin, tokoleka liboso! Ngala na biso ekobelema.
Mun'a Mangembo.

Répondre
N

Citoyen Pululu,
Salut, ndenge kaka Leoman alobi, landa malamu esika alobi, ba pecheurs Africains mpe Congolais, centre de commerce na bango ezalaki na Bolobo, et puis abakisi ete na Congo tozali na ba cours
d'eau oyo ezali naviguables, reliant en quelque sorte tout le Congo, et en plus alobi ba pecheurs bazalaki na langue na bango soit LINGALA, nabanzi ezali facteur moko ya munene mpo na integration
na kati ya societe. Tangu Leoman alobi, ba pecheurs ya Batetela oyo bazalaki na Kinsuka, bazalaki kobenga bango BANGALA KINSUKA, donc c'est clair : LES GENS DU FLEUVE A KINSUKA.
La plupart des kasaiens parlaient le Kikongo ya Leta, tout simplement parce que leurs parents bazali batu oyo bayaki kobeta libanga na Bas-Congo. Ezaleli ya motu ewutaka esika ye akoli, par
exemple, les originaires du Bas-Congo oyo bakendeki kosala na ba provinces ya Congo-Belge, ils parlent le swahili, Tshiluba, kisakata, kimongo etc...
Ndenge yo moko olobi, ba vieux Komoriko na Botomba, sans oublier le plus celebre Papa Za Bolikango, bango nionso babotama na Leopoldville, na ba mbula wana, bongo ba parents  na bango,
bayaka to babotama kaka na Leopoldville.
Komema molimo na yo mosika te, personnellement nayebaka mama moko ye mpe azali muana ya ba Ngala Kinsuka, tozalaki na bango na  commune ya Kasavubu (Dendale), abotama na Leo II, abala na Leo
II, atanga na Leo II, muana na ye ya liboso abotama na 1939, yo moko zuwa mpe benda boule, soki mama oyo akoki kozala motu ya ba mbula nini, bongo ba parents na ye.
Nakomaki na Kintambo pour la premiere fois na 1957, tangu grande soeur na ngai abalaki kuna, nayebaki, Samy Bar, La Delice, Nzuzi bar, Velodrome, St Georges, vieux Petolo Ngulu, Camp Utex,
vieux Jean Trompette Lompongo, Papa Bondonga, Maitre Vital, Commissaire de police Jacques Kelle...
NESTOR BILA.

Répondre
B

c'est pour vous signaler que Papa Benoit André  Botomba est né en 1918 et non 1914.
L'un de ses fils;Ben Boto.

Répondre
J

Ndeko Leoman, mbote minigi.
Natumboli lisolo oyo po namoni bino bana Léo bokangi minoko, bolingi kolobela biso oyo boyebi té. Part à ngai Muan'a Mangembo, epaka ya bakongo contre Bangala nalanda yango na mosika, yango
nasepelei kodécouvrir loboko na yo, nakanisi tokokoba lisolo malamu.
A propos ya batetela, bangala kinsuka, okoki kolobela biso ndenge nini bazuali facilité ya intégration na mboka bakongo? Pourtant ndinga na bango, ezali pene na bamongo na baluba. Epai ngai nakoli
na LéoII, bafamille Tetela ezali ebele. Nakotanga mibale ndakisa Disasi na Lopongo.
Pendant longtemps, nayebaki te kotiya bango na loboko ya batetela. Badisasi nyonso nayebi batanga na BasCongo, tout comme Papa Lopongo, trompétiste ya kafu kafu; bango nyonso balingaka mingio
koloba kikongo ya leta. C en'est que tango nakomi na ba 20 ans que nakoya kosakla distinction.
Nazali kolengela bilili nawuti kosala na Kintambo, na nganda ya ba pecheurs ya Basoko. ndenge kaka olobi Ndeko Leoman, esimbami na bato ya Likolo na bateke. parmi ba té"moins na ngai nsololaki
bongo na Messieurs Mpia, originaires ua Mushi.
Merci na information ya Victor Komoriko po na biso bana LEO II.

Répondre
M

Leoman vient de le confirmer, Kumoriko fut le premier président de la province du Lac Léoèpld II ou Maindombe, de 1962 à 1963.

Messager

Répondre
L

Ndeko Pululu,
mbote ya trop, otumoli lisolo moko ya grave, oyo ekozala kaka biso ba LEOMAN batu tokoki ko participer na likita oyo, soki ozali muana ya LEO te, komeka kotiya zolo awa te, je dis bien soki ozali
LEOMAN te, omoni na tango ya ba Noko Belge, balingaki bakabola bikolo ya Congo-belge, na kati ya Leopoldville, na deux groupes, soit les Bakongo et les Bangala, yango esalaki mpe ete bikolo
bisusu kombo na yango eyokana te.
Kaka ndenge Ndeko Messager alobi, vieux Komoriko azali motu ya Mai-ndombe, mpe azalaki lisusu Gouverneur ya Mai-ndombe na tangu ya ba provincettes, na epoque ya premier ministre Cyrille
Adoula.
A part ba pecheurs ya Basoko, ezalaki mpe ya bikolo bisusu, surtout ba BATETELA na Kinsuka, oyo bazalaki kobenga bango ba NGALA KINSUKA.
Ke ve dire NGALA, ngala elingi koloba nzela ya mayi, ndenge moko na Nzale, Nzadi, Nzar, Ngala etc... nionso elingi koloba nzela ya mayi.
Presence ya fleuve Congo, na mokili na biso ya Congo esalaki ete, sango na yango etambola mpe ekoma na matoyi ya ba pecheurs ya ba pays mingi ya Afrique.  Mpe ba pecheurs mingi bayaki koluka
la vie na bongo na ebale ya Congo, ndakisa ba pecheurs ya Cameroun, Tchad, Nigeria etc... sans compter ba pays limitrophes na mokili na biso, centre de commerce na bango ezalaki epayi ezali lelo
mboka oyo babengi BOLOBO, na bosangani wana ebotaki monoko oyo babengi LINGALA, to langue ya batu ya NGALA, to batu ya mayi, yango mpe esalaki ete minoko ndenge na ndenge ebota LINGALA. Na Congo,
tozali na ba EBALE oyo ezali na ba troncons naviguables ya milayi milayi.
Kokamua te soki  kombo ya origine SWAHILI ezali na Kintambo, puisque bango nionso wana bazalaki considerer comme les Bangala, sans distinction.
Lelo na Kinshasa totikali lisusu na ba vieux  ya tangu wana mingi te, mingi bazali kokende kaka boye, kasi soki okeyi na ba pays ya Afrique de l'ouest, okoyoka masolo ndenge na ndenge ya
Leopoldville, dommage, histoire ekomi kaka kokufa boye, bosala makasi bokoma ba BUKU.
LEOMAN.

Répondre
M

Mwana mangembo,

En attendant que je procède à une fouille plus approfondie je crois que Komoriko est du Lac Léopold II.
J'en profite pour te souhaiter une bonne et heureuse année 2010.

Messager

Répondre