A PROPOS DES VEUVES DU KASAÏ
A PROPOS DES VEUVES DU KASAÏ
un commentaire vient d'être posté par Saka sur l'article Les veuves du Kasaï refusent de se remarier dans la belle famille, sur votre blog Le blog de Messager
Mbote ba Ndeko nionso,
Lisolo oyo namoni ebandi kokoma intéressant, likambo ya ba veuves ezali kaka mpo na Afrika ya ngele (nse) te, na mikili nionso oyo Nkolo Nzambe asala ezalaka mpe na mibeko na yango, ata na ba pays industrialisés, na likambo ya droit de succession, nabenga yango ata ndenge oyo, na sima ya liwa ya mobali.
Na sima ya liwa ya Mama to muasi, problème ezalaka makasi mingi te, surtout soki mama atiki bana mike, mpe semeki na ye azali motu ya kozua, ndeko ya mama akondima noki mpo na ko remplacer kulutu na ye na libala, sous prétexte, aya kobokola bana ya yaya na ye.
Ngai nazali na ba parents na ngai moko ya Afrique centrale mosusu ya Afrique de l´ouest, lelo nafandi na Poto, contact na ba Africains ya Afrique de l´est, nasali constat ke na likambo ya kobalisa Mama na sima ya liwa ya Papa ezali kaka ndenge moko, ezali ko dépendre mpe na famille na famille, puis na héritage Papa atiki.
Basi ya mindele mingi oyo mpe babala ba Africains, lokola bayebi coutume wana, bakoma soki mobali akufi mpe atiki ba biens na Afrika, bakoya na Afrika ko solliciter mariage na famille ya mobali, ba Africaines mpe ndenge moko kaka. Kasi soki mobali atiki RIEN, alors ke famille ya mobali bazali kolinga babalisa muasi na moko na bango, wana nde esika elukaka makambo...
Ya solo tangu na tangu ezalaka na makambo na yango, kasi tobosana te kobalisa mama na famille ya nkondo mobali na ye, surtout ezalaka mpo na unité ya famille, puisque bana soki bakeyi kokola na famille mosusu, ezalaka mpasi mpo nakoyeba famille ya Papa na ndenge esengeli, bobangi wana ya kobungisa bana, yango nde etindaka famille ya mobali ya kobalisa semeki na bango na leki ya mobali.
Likambo ya ba malchance to liboma, wana ezali kaka mpo nakobangisa veuve, mpo ba Congolais nionso bayebi malamu ke famille moko bien réputée, Grand-frère azalaki motu monene, na sima ya liwa na ye babalisi muasi na leki na ye, azalaki ministre, puis leki oyo ya ministre akufa na accident, likambo oyo ebenda ba point d´interrogation ndenge na ndenge, basusu balobi muasi azali na malchance, basusu balobi muasi azali na NDOKI, ye motu azali kosilisa famille ya mobali, baboya kobalisa muasi oyo na un 3e membre ya famille.
Muasi na ngai azali na camarade na ye motu ya Somalie, peut-être bokofungola monoko na oyo nakoyebisa bino, Somalienne oyo ayebisa biso ete mobali na ye ya liboso babotaki bana mibale, sima mobali aboyi ye, lokola na coutume ezali prévu soki mobali akufi il fo abala kaka na famille ya mobali, alors ye na cas na ye, aseengaki na famille ya mobali abala moko na kati ya famille ya ex na ye, esika akoma quatrième femme ya cousin ya mobali na ye, mpe babota lisusu bana mibale, sikoyo akoma mama ya bana mineyi.
Totunaki ye soki les deux cousins de mari bayokanaka, alobi ezali grave te, puisque na bango na Somalie babalanaka na kati ya famille, muana ya Noko akobala muana ya Tata ya Mwasi, c´est vrai jalousie ekoki kozanga te, kasi ezalaka na ndenge oyo biso tozali kokanisa te.
Tambola na Mokili omona makambo.
SAKA