La saga des Bills ...enrichie par Muan'a mangembo et C.Lukoki
Ndeko kandolo,
Yasolo, chronique ya ba bills na ba yankés opesi biso lelo ezali suka na Epaka. Nalingaki juste nabakisa mua moke po na batangi na biso que makambo ya ba yankés na ba bills ndenge okomi, etumba
n'ango ebandaka uta "temps flamands".
Mua précision nalingi na pesa bandeko na biso, esengeli koyeba qu'à part likambo ya kobengana ba chômeurs na Léo, eloko oyo efungola nzela na ba délinquants à Léo, ezali d'abord likambo ya
kelasi.
En effet, il faut toyeba que tango mondele afungoli bakelasi, ezalaki obligatoire. kasi kelasi esalemaki po na moto nyonso te. Mingi baponaki kosala "bitshtsha". Vieux Paurret Iyoma, Vieux
Eboma Degazin - vrai kombo na ye Nsumbuka - tango nasangisaka bango na Kintambo na 1986, na cadre ya "jubilée ya Vieux Paurret", bayebisaka ngai boye:
"Ba yankés ya liboso na Léo, ezalaka biso: tozalaka ba "Kadiampemba". Monoko na biso tango wana ezalaka ki "GOZA", mélange ya minoko na biso - kikongo, mongo, tshiluba". objectif na bsio
ezalaki ko tiya baboti na mobulu po ba comprendre te, nini tozolkana kosala".
Astuce ezalaki simple: mongala akolakisa mokongo ba termes ya monoko na ye, mokongo pe akopesa na moninga ba termes oyo ezali nécessaire, surtout pou babima na lopango. Ainsi, soki Paurret, oyo
azalaki mungala akeyi na Singa Kuanga (Linguala) kozua moninga na ye Degazin, abandaki liboso kobongola kombo na ye: Nsumbuka ekomaki "Tshomboka", ensuite, soki asilisi kopesa mbote na
baboti, po apesa moninga na ye signal alanda ye, na kati ya maloba ya "aurevoir" epai ya baboti, akobakisa "Hundaka", wana Degazin ayebi que il faut aluka moyen ya kobulungana.
Nakobakisa te, likambo ya "ndinga" ya ba Goza, ezalaki lolenge moko ya malamu po na kosangisa bilenge ya tango wana. bango moko babomaki ba frontières ya ba ndinga entre bango. Lelo encore,
bato ebele balobaka "Goza". parmi ba musiciens ya Congo, Dindo Yogo nde azalaka makasi na exploitation ya Goza. Epai na ye, chaque fois que c'était possible, abandaki kotoya maloba ya kikongo
na esika ya français.
Ba Grands Goza, bazali bongo ba prcurseursya ba bills na ba yankés. Bein sûr canaille ezalaki carte de visite na bango, lolenge moko na bitumba entre bango. Règne ya ba goza tokosituer yango
entre 1945 na 1950, avant bango nionso ba kueya na loyenge ya ba films ya ba cow boy. Po na kocomprendre antériorité na bango, il suffit botala ba kati ya liste ya ba kombo Ndeko Kandolo apesi
po na ba yankés na ba bills. bakombo oyo eza na rapport moko té na ba films ya ba cow boy to western, ezali kolakisa que bato wana bazali ba goza.
zanga zanga, Moruma, Paurret par exemple, bazali bagoza, kasi Bingeman (Big Man) , Tex Bill ou Willy Cody bazali bakitani to baleki. Génération directement lié na westerns.
Bakombo ya ba quartier na bango pe ezalaki en rapport na antériorité wana. Ainsi na Kintambo ezalaki mboka ya ba kadiampemba, Linguala ezalaki quartier Singa Kuanga, Barumbu Citas. Na tango ya
ba yankés, Kintambo ekokoma Mangembo, Barumbu Casamar.
Rôle ya bana bazombo.
Problème ya ba délinquant na Léo, ezalaki en partie na rapport na bana ya ba réfugiés angolais, po na oyo etali kelasi na bango. Mingi bazuaki place té na ba écoles catholique, bazalaki bongo
kotikakala kosakana. Neti bazalaki na baninga, babandaki koya kozela bango sima ya kelmaési, pe moke moke, bakomaki kokimisa baninga kelasi pe kokende kosakana na ba zamba mike mike oyo
ezingaka kinshasa na tango.
Donc quelque part, les catho seraient en partie responsables de cette dérive des jeunes, po baboyaki bango na ba classes. Mua correction ekokota notamment, avec l'ouverture des écoles
protestantes et salutistes. Ba écoles wana nde ekopesa mua bisika na bana ya ba réfugiés, ndenge tobandaka koloba. Donc, tokoki koloba que bana ba zombo ba entrainaki baninga na nzela ya mobulu
po bazalaki désoeuvré.
C'est ainsi que ndenge Kandolo atangi kombo na ye, William Booth akosala groupe ya bakadiampemba na kintambo. Kadiampemba, ezali terme kikongo. Nakolikya te, ezalaki idée ya William Booth
(kombo azui epai ya armée du salut). William Booth ye azalaki Mozombo. Grand Bitshatsha, tango wana abandaki kelasi na ye na kintambo n'armée du salut justement, ayaki kokutana na bilenge
misusu lokola Paurret Iyoma. Lokola asepelaki na bango, akoya ko initier bango na makambo ya bitumba. Esika ya bokutani tango wana, ezalaki na loboko ya mayi ya Kalamu, entre Sendwe na Funa.
Zamba monene ezalaka wana. Esika wana nde bokutani ya bagoza na ba kadiampemba ya liboso eyaki kobanda. bazalaki tellement téméraire que bazalaki capables ya kokatisa na loboko ya brazza po na
kokende kokula kisi ya bilayi.
Na 1948, Belgique akanisi kosala plan décénal ya développement ya Congo; Plan esengaki que bafongola bamboka y a sika. DEndale, Ngiri Ngiri, Ndijili, Matete ou lemba, ekobotama sima ya plan
wana. bato mingi ya b'anciens quartiers bakokende kovanda na bamboka sika. En même temps; bakokomema bana na bango, na mouvement na bango ya bayankés na bamboka wana. Evidemment, bana entre
bango bakokota na momekano pe bakoprolonger esprit ya bitumba na ba canailles.
Etumba contre ba Goza na ba yankés.
Ba rapports ya mobulu ya baGoza, ekokoma na matoyi ya bakonzi ya colonie, à cause ya bitshatsha", bana oyo bazalaki kokima kelasi. basango bakofunda na police po na kosukisa likambo ya bokimi
kelasi - je signale que Franco akimaki kelasi na 10 ans, azalaki na 3e primiare.
Na kintambo, commissaire ya police ezalaki Derrings. Bureau na yo ezalaka na sima ya magasins kintambo, en face ya Ecole ya ba frères na Montagne.Elongo na Juge Capelle (ou Kapela), bakolancer
croisade contre ba canailleurs. Wana tozali nau nba époque coloniale, entre 1952/53.Avec aide ya ba chefs de quartier, bakolocalmiser baGoza na ba yankés jugés dangereux oyo bakokimisa bana
kelasi, po na kokanga bango.
Na kintambo arrestation la plus célèbre ezalaki ya Paurret. nalobela yango déjà (voir Eyoma na Blog na biso).Papa Lomboto, chef de quartier nde afundaki ye na commissaire Derrings. Bakoya
kokanga ye na Chanic, epai tata na ye atiaki ye na mosala. paurret azalaki alors na moins de 20 ans. Juge capelle a kokondamner ye na rélégation ya 10 ans. bakotinda paurret na Mbandaka, mboka
ya baboti na ye.
Somo n'ango ekosala que mua kimya ekota na Kintambo. mais deux à trois ans plus tard, ba gang misusu bakobima. le p^lus célèbre ezali justement Bingeman.
tango tozali kolobela ba bills na bayankés, tokoti déjà na tango ya lipanda. nakpmeka kolobela na mikolo mikoya, na lokolo ya Ndeko kandolo, lutte contre la délinquance wana. Notamment likambo
ya bana US ya Kintambo.
Muan'a mangembo
Ba ndeko nioso ya blog,spécialement ndeko Kandolo na ndeko Pululu.
Leki to muana na biso Ndombasi(selon âge naye)abimiseli biso sujet monene à traiter.Makambo manso maye malobami likolo ya passé Kinois,masepelisi biso na ndenge ya solo,na mpe mayei ko
faire revivre tango wana ya kala-kala.Nazali na kamua lisolo oyo elakisi mpe côté ya malamu ya bilenge ba GOZA,Bill na ba Yankée.Tokoki ko comparer situation oyo na loi de la
jungle,ndenge tomonaka ndenge kati ya ba niama,il y a toujours moko nabango akolinga kozala mokonzi,mpe à son tour il faut atiya ordre kati nabango na kobatela basusu lokola,tango ya
likama.Soki totali malamu ba Bill oyo ya solo,bazalaki bato ya moyibi te.Mobulu nabango nde koluka kodiriger espace nabango na compte godias(canaille).Yango ba délinquants ba profiter na
situation oyo mpo ba sémer terreur na kombo ya ba bill.
Na bois dur tozalaki na vieux Demoyen,moto oyo nde ye kaka Wello.Kombo ya Demoyen aboyaki yango,mpo ezalaki likolo ya mokuse naye,yango wana akomaki Wello.Figure moko eyaki kobima
na kombo ya Boungalow kati ya quartier(année 57).Vieux Boungalow abandaki kosala terreur na quartier Bois dur.Lokola ezalaki habitude ya ba maman kotekisa makayabu na kwanga na butu,na coin
ya balabala,Boungalow akomaki kozua dîner naye na bisika wana na compte canaille sans kofuta,mpe akomaki kokanga ba fille "prévenues"na ndako naye.Botala likambo oyo bandeko.Likambo yango
eyei kosuka grâce à l´intervention ya Vieux Wello,mpo a menaçaki ye na miso ya mère na bana ya quartier.Banda esika wana,ngala ya Boungalow esilaki.
Libre abandaki ko ya kosala terre- terre na bois dur,mpe ayaki kosuka mokolo Black-Tagart ayaki kobengana ye devant ba ngembo ya Ok Jazz devant Alex Bar na Gambela.Libre azalaki kokota bois
dur lisusu te.
Ba yankée oyo ya vrai bazalaki na intentions ya moyibi te.Bango souci nde position de force kati ya quartier.Tango mosusu bazalaki kobunda po na kombo.Soki yo ozali Bing bill,ngai mpe
nazali Bing bill,il faut tobunda po na ko mériter kombo yango.Dans quelques cas isolés,babundaki mpe po na basi.
Eloko mosusu eyaki kobimisa phénomène oyo,ezalaki système scolaire.Bana mingi bazalaki kotika kelasi involontairement.Bazalaki obligés batika yango po na âge nabango.Tango ya bayaya
nabiso,bana mingi bazalaki ko suka na 5ème primaire.Système scolaire ya ba belge au départ elingaki te mpo bana batanga mingi,puisque parmis ba mindele il y avait beaucoup qui ne
possédaient pas des études avancées.Soki moyindo asilisi 5ème primaire,bakopesa ye certificat to attestation.Oyo akozua certificat azali considéré Trop âgé,oyo bakopesa attestation nde
akoki ko continuer na école artisanale ou bien na sécondaire.Yango wana bana mingi oyo ya Trop âgé bazalaki obligés koluka mosala to koyekola métier na n´importe quel atelier.Baye
bazangaki volonté to ba moyen nde bazalaki na choix mosusu te.Mingi mpe parmi bango babandaki ko fréquenter ba milieu ya ba musicien soit comme portier,installateur,mpe basusu bakomaki mpe
koyekola kobeta maracas,mbonda,baguettes teee kosuka na instruments à cordes to vent.Armée mpe azalaki ko embaucher bana mingi kati nabango.Bandeko lisolo oyo ezali molayi mingi,yango wana
ebongi mpe,bandeko mosusu ba continuer yango.Boyebi ete Matete ekomaki ONU BRITANIQUE na 1963 avec NERON à la tête?Tambola Kin omona makambo. Ba Trop âgés mingi bazalaki ko déambuler na
bisika oyo ezalaki sinistres lokola La Cité,avec but,kotumbola mpe kobeta bato ba innoncents sans motif.Souvent bazalaki ko utiliser bana mike ya 11,12 ans lokola ndobo mpo
babeta pour le simple plaisir ya kobeta.Eloko oyo ekomaki kosalema mingi après l´indépendance.
Queques explications.
Na utilizaki mot Terre-terre(quelqu´un parmi avait parlé de viol collectif)kasi Terre-terre ezali viol te,mpo ezalaki kosalema avec le consentement de la personne,qui,par conséquence d´un
maux que nous connaisson bien,est difficile à satisfaire sexuellement(il s´agit là du feu-utérin).
En parlant de Boungalow,j´avais utilisé le mot Prévenue.Comme le dit le mot,ba yankée bazalaki parfois ko rapter ba filles devant tout le monde,mpe komema bango na chateau nabango pour une
durée quelconque dans l´impunité totale.Biloko oyo na tango ya avant l´indépendance,esalama na ndenge que ba fille d´un âge avancé bazalaki kokima ndako nabango mpe kokende kokota libala
epayi ya ba Bill ya époque,kasi sima nayango ba délinquant ndenge nalobaki bakomaki ko profiter mpo nakokotisa mobulu,mpe kozua ba fille namakasi.
Crispin-Régis Lukoki
La tradition des premiers Godias ou Goza puis des grands bills ont souvent conduits chacun dentre eux, à se doter de territoires sur lesquels ils règnent. Chacun dans son territoire, est seul maitre après Dieu. Comme l'a souligné Crispin Lukoki, comme un Roi tout puissant. On lui amène ce qu'il doit manger, boire et fumer. Et en plus, il a un "droit de cuissage" sur les filles du quartier.
Zua mpata, yela ngai Kuanga, Makayabu na cigarette.
Godias ezali canaille. Ba grands bills na ba ba Kadiampemba bazalaki n'habitude ya kotinda na ba yuma, oyo bazalaki pene na bango po na luyalu. Na kintambo wenze ya liboso ya "bwaka nzoto" ezalaki wenze ya ba "bills". Ezalaka implanté entre Ecole ya Mamelo na camp utexco. Spécialité ya Wenze ya babills ezalaka kuanga na makanzenze, to kuanga na makayabu ya kokalinga. Bato'a chanic na texaf, ba oyo bazalaka minzemba, koliya na bango ezalaka wana. Ba yankés pe na ndenge na bango, bazalaka koliya wana, ndenge eyemba Simaro Massiya:
"bana mamelo babeta nzango e
nsenge na madesu eleisa biso"
Eh oui, on venait dans ce marché, àla fois pour chercher à manger que pour "draguer" - kofoler" banzele po na ba grands godias. Système ndenge ezalaki, Grand Godias akotinda yuma na ye, avec 5F - mpata - po asombela ye biloko ya baleur ya 20 ou 50 FF. Neti Yuma pe azalaka na plan na ye, ye coté na ye akoluka moto akomvuka. souvent ezalaki bongo bana basi oyo batekaka na wenze ya butu. Soki asali fier, bafuteli ye rapport epai ya Gangacero ya quartier. Soki rapport eza ya mabe, bakotia ye na liste ya éboulement:
"enlèvement na butu,
bakokanga ye prévenu na shangai ya grand bill
pe ako subir terre-terre"
ndenge eyembama na Nzambele ya Néron :
"Wele wele wele kingo, Nzambele (2x)
Petit nzele bakokumba yo na Camp GD o
Sanduku na moto"
Système ya prévenue ezalaka simple: Grand Godias, soki asalaka akotika momie na palais akangeli, petit na confiance sinzeli. Momie akosala tout na kati ya ndako, pe akobima kaka na soir. neti ba shangai ebandaka kozala na sima ndako, liboso moto ayebi té.
Mbala sima nakosopela bino lisolo ya ba éboulementaire oyo babandaka kovanda na se ya pont kasa-vubu.
Prévenue ezalaka mingi limité na week end (samedi - dimanche) sinon, une semaine, po bayaya babandaka kolibérer mingi dimanche na tongo.
Muan'a mangembo