Réponse à Papatoto, au sujet de Pierre Kanyonga
Ndeko Papatoto,
Mpo na ko yanola na mituna otungi ngai, esengeli yambo toyeba que Pierre Kanyonga Mobateli azaki un homme politique, opposant na régime ya Président Mobutu, ngunda na royaume ya Belgique. Kuna na Belgique azalaki très actif na parti politique ebengami Mouvement d’Action pour la Résurrection du Congo (M.A.R.C.) Yango esalemaki clandestinement le, 24 juillet 1974 na Kinshasa. Baye basalaki yango bazali : Pierre Kanyonga Mobateli, Jean de Dieu Kudia Kubanza, Rudahingwa, Kanyonga Bidimpata. M.A.R.C. eyaki koyebana na plume ya Pierre kanyonga na Jean-Alidort Kalonga « Ali » na journal mensuel Miso Gaa oyo ebandaki kobima na Bruxelles.
Kanyonga azalaki très actif na Jeunesse du Mouvement Populaire de la Révolution (J.M.P.R.), section Belgique. Tango alongue kuna, akeyi kosala M.A.R.C. na baninga na ndeko na ye oyo natangi lokolo.
Sika ndenge nini liwa ya Pierre Kanyonga Mobateli eye kokoma affaire Kanyonga ?
Na Zaïre, na milieu ya ba années 70, vague ya ba promotions ya ba jeunes militaires ebele (liboso ezalaki kaka quelques têtes) formés na ba académies minene ya Belgique, France, Etats-Unis, Italie (pilotes) ebandi kozonga na Zaïre mpe kozonga wana ekomi kokotisa mupepe ya sika : soda alobaka français, anglais, italien, liseki te ; soda asolola pepele na mutu nionso ; soda azali kopesa ba arguments sans kanda mpe azali ko dénoncer torture, moyibi, corruption, arrestations arbitraires mpe azali koluka kozala kati na population etc. Wana ezalaki une nouvelle expérience epayi ya ba zaïrois. Bizaleli wana, ebandaki kosepelisa bakonzi mususu ya armée te mpo bayebaki que bana wana , kala te bakozua bibonga na bango. Yango wana tobandaki komona na mess des officier na mont Ngaliema mua ba froideurs na ba officiers oyo basali ba études minene te.
Na poto kuna, M.A.R.C. ekomaki na audience mingi mpe ebandi koleka na ba journaux ya télévisions na ba radios mpe ba journalistes bazali kokoma ba articles na ba activités na yango. Na Belgique, parti e s’organisaki na lolenge liye : Président, Daniel Monguya Mbenge, Secrétaire général, Pierre Kanyonga Mobateli.
Na charte ya M.A.R.C. ebandaki ko souligner caractère historique ya ba relations entre Belgique na Zaïre. Yango wana elingaki libre circulation ya ba touristes belges na zaïrois entre ba pays mibale mpe elakaki instauration ya ba conditions ya retour ya ba industriels, Homme d’affaires, entrepreneurs na ba commerçants belges na Zaïre mpo basala ba affaires sans motungisi. Donc, yango ebandaki ko prôner libéralisme économique intégrale.
Daniel Monguya Mbenge, politicien, azalaki gouverneur ya région ya Shaba, ex-muleliste, ye azalaki en contact na ba personnalités mosusu na Zaïre : Matanda Ma Temu, Kudia Kubanza, Bouryaba Kenga, Makani kamani. Azalaki na ba ambitions na ye politiques, yango wana asalaki connaissance na Major Kalume Kahamba par l’intermédiaire ya Henri Kadiebwe (vieux Henri ya mabo na Bruxelles).
Na fin de l’année 1977, ba interpellations ya ba commissaires d’Etat (ministres) na ba dirigeants ya ba entreprises publiques de l’Etat ekomaki kosalema mingi na Palais de la nation mpe ezali koleka en direct na télévision na radio. Par cette occasion, bazalaki na ba difficultés makasi devant ba commissaires du peuple (députés) mpo ba expliquer ndenge nini makambo ezali kotambola malamu te na gestion na bango esika bazali bakonzi : cas ya Général Molonya Mayikwisa, Président directeur général ya Air-Zaire, na général Wabali Ba Kitambisa na département (ministère) ya Postes, téléphones na télécommunications ezalaki soni mingi mpe etiaki Président Mobutu na embarras. Mpe lisusu, ba relations mobulu na Belgique mpe na soutien ya Belgique na opposition, ebandaki kobongisa makambu te
Na 1976, Ngbanda Nzabo Ko Atumba, azui nomination na qualité ya diplomate. Affectation na ye ezali na ambassade ya Zaïre na Bruxelles en tant que Premier conseiller d’ambassade mpe responsable ya Centre culturel zaïrois na Bruxelles. Confusion ebandaki kozala mingi na oyo etali ministère ya tutel ya centre culturel zaïrois : tango moko ezalaki na tutelle ya département ya enseignement supérieur, tango mosusu batie yango na culture et art. Na nionso oyo, mokonzi na yango ezalaki mutu ya présidence de la République. Na tête ya centre culturel, ezalaki couverture mpo Ngbanda en réalité azalaki Chef ya antenne ya renseignements (espionnage).Série na ye, centre culturel ezalaki sous tutelle ya département ya enseignement supérieur et universitaire. Kuna nde mbongo nionso ya bourse ebandaki kokweya, na ba mbongo ya achats ya ba consciences, recrutements ya ba informateurs, kokata ba bourses mpo na chantages, kosalisa ba opérations na ba missions kili kili. Chef na ye direct ezalaki Seti Yale, administrateur ya service ya documentation extérieure (S.D.E.)
Esengeli toyeba que na 1969, Daniel Monguya akangamaki na Kigali na Rwanda, esika akimaki mpe abatamaki, sur demande ya ba autorités congolaise. Motif ezalaki que abandaki ko préparer rébellion. Kudia Kubanza (kuku Jean de Dieu) ye azalaki toujours sous surveillance depuis procès na ye ya complot na 1971, na Cour ya sureté de l’Etat mpe na ndenge Président Mobutu atangisaki ye la fameuse lettre ya rétractation et aveux du 15 décembre 1971. Mpe na lolenge atombokaka na meeting na ndenge Kudia kubanza abengaki ye jeune homme na likambu ya ligue congolaise pour la paix (LI.CO.PA.)
Major Kalume Kahamba azalaki breveter d’état-major mpe diplômer na criminologie. Azalaki inspecteur ya services pénitenciers ya Forces armées zaïroises (F.A.Z.). Na 1976, na voyage ya mission asalaki na mokonzi na poto mpe akutani na batu ya M.A.R.C. Sima, na 1978, na mission mosusu akendeki na ye Général Likulia Bolongo, auditeur militaire général ya F.A.Z,. na Argentine.
Na escale na Paris, Major Kalume Kahamba abengani na Henri Kadiebwe mpe bakutani na Paris bango misatu : Kalume, Kanyonga na Kadiebwe. Bakabuani malamu. Tango Kalume na délégation conduite na Likulia bakomi na Buenos Aires, abengi lisusu bango mpo ayebisa bango que na retour na Paris, akosala saut na Bruxelles mpo bakutana lisusu. Na retour ya Argentine, tango akomi na Bruxelles nde ayaki kokutana na Daniel Monguya, Président ya M.A.R.C. Neti Monguya azalaki na Bruxelles te, bakumbani tee na Liège epayi abandaki kofanda. Sima ya wana bakeyi ko visiter usine ya minduki, Fabrique nationale ya Herstal. Kalume ayebaki yango malamu mpo atanga na académie royal militaire belge. Kuna, azuaki mitraillette ya lunette. Bakabelaki ye ? Asombaki ? Azuaki yango kuna ? Azuaki yango esika mosusu ? Selon kalume, usine ya fabrication ya minduki epesaki cadeau na général Likulia. Mitraillette wana elukelaki ye makambo mpo douane française ekangaki ye na Roissy aéroport Charles de Gaulle. Intervention ya Likulia en tant que kolo cadeaux mpe mokonzi ya Kalume nde eyaki kobimisa ye na mobulu. Ba renseigements généraux eyebisaki ba autorités françaises mpe yango eyebisaki ba autorités zaïroise na incident wana.
Kalume ayebaki te que azalaki na kati ya mutambu munene oyo déjà esalemaki banda kala. Ndenge azalaki na Belgique wana, batu ya Ngbanda babandaki kolanda bango mikolo nionso. Batu ya Ngbanda nde basimbaki Belgique na maboko mpe babandaki kolandela nionso oyoi etali ba activites ya ba zairois na Belgique. Tango Kalume na mokonzi na ye bazongi an Kinshasa, na début février 1978, na kati ya sanza wana kaka bakani ye. Na agenda na ye azalaki na ba kombo ya batu nionso oyo abandaki kokutana na bango na manso abandaki kosala au quotidien. Na détention abandi kopesa ba kombo mpe koloba trop. Total ya batu bazalaki impliquer na procès des terroristes ezalaki 78 parmi lesqueles Kanyonga, Moguya, Kadiebwe, etc. Ali kalonga ye tango wana asilaki kolongua na M.A.R.C. banda 1977 mpe asalaki Convention des démocrates socialistes (CO.DE.SO.) Azalaki inquiéter te.
Sika tika na yanola na mituna mia yo :
1. Quand Mr Pierre Kanyonga était assassiné à Bruxelles ?
Pierre Kanyonga Mobateli baboma ye koboma na 1978, na Bruxelles, juste après condamnation na ye à mort par contumace na jugement rendu na Conseil de guerre ya ville de Kinshasa, le 17 mars 1978. Sima ya wana, na été 1978, pouvoir e utilisaki T.P. O.K Jazz na complicité ya Franco mpo na koboma Kanyonga. Assassinat na ye babongolaki yango na suicide alors que ezali ndenge wana te. Pour la petite histoire, ba présumés assassins ya Kanyonga bazalaki ba vrais-faux musiciens ya O.K. Jazz oyo bazalaki na délégation ya une trentaine de musiciens Franco awutaki na bango na Kinshasa. Ba vrais-faux musiciens et présumés assassins bakotelaki ye na appartement azalaki na copine na ye ya Irène (une métisse belge). Ye azalaki na ye na butu oyo babomaki ye. Irène atikala na zemi ya Kanyonga mpe attitude na ye ezala claire te « neti azalaki mpe na likopa wa ? ».
Tee na mokolo mua lelo oyo enquête etikala kosalema te na liwa wana. Affaire Kanyonga nde ezali continuité ya mise en scène macabre ya procès des terroristes autrement dit : procès du siècle. Yango ebomisisaki : Colonel Biamwenze, Colonel Mwepu, Lt. Colonel Kalonda, Lt. Colonel Mwehu, Lt.Colonel Tshunza, Major Kalume, Major Panubule, Cap. Fundi, Citoyen Buryaba, Citoyen Kudiakubanza, Citoyen Makani, Citoyen Matanda na Citoyen Mbangama.
Par ailleurs, Citoyen Monguya, Citoyen Kanyonga, Citoyen Kadiebwe, ba condamnaki bango par contumace. Tee lelo oyo bazali na bomoyi, sauf Kanyonga.
Ba soupçons ezalaka sur copine ya Kanyonga na lolenge a insistaki ye akende kolala kuna sans pour autant a prévenir baninga baye. Atako ye Kanyonga azalaki na munduki na nzotu, ezalaki nécessaire a prévenir mpo batu ya Ngbanda babandaki ko traquer ba opposants ndenge ya liseki te mpe bayebaki kosala batu mabe. En plus, commando oyo ewutaki Kinshasa, ezali véritable commando oyo eyebi ndenge ya kosala ba sales besognes sans kotika ba traces. Bien que ministre belge ya Affaire étrangères, monsieur Henri Simonet, asilikaki, enquête etikala kosalema te. Sima mikolo, ye ministre wana ayaka kokoma conseiller ya Président Mobutu mpe muasi na ye aye ko dondua na marché ya cobalt zaïrois na Hong Kong. Président Mobutu asomba bango. Souhaitons qu’un jour, enquête ekosalema sur likambo ya liwa ya Kanyonga mpe Ngbanda akoloba nini oyo ye ayebi mpe rôle na ye ezalaki nini tango abandaki ko diriger antenne ya Bruxelles ?
2. Quel était le nom de l’ambassadeur en poste à Bruxelles ?
Son excellence, l’ambassadeur extraordinaire et plenipotentiel Inonga Lokonga Lome nde azalaki ambassadeur ya Zaïre na Bruxelles.
3. Qui était le responsable du service de la sécurité au sein de l’ambassade du Congo à Bruxelles ?
Ngbanda Zambo Ko Atumba nde azalki responsable ya sécurité na ambassade ya Bruxelles. Par responsable ya sécurité, il faut entendre, responsable ya espionnage na ambassade ya Bruxelles, Chef ya antenne de Bruxelles.
4. Est-ce que la Belgique avait cautionné cet assassinant et pourquoi il n’y a jamais eu d’enquête jusqu’à ce jour ?
Je ne pense pas que Belgique eyebaki plan wana mpe ezali difficile koloba que e cautionner assassinat ya Kanyonga. Intérêt ya kosala une chose pareille ezalaki te puisque Kanyonga azalaki crédible epayi ya ba belges mpe azalaki na faveur na bango. Na oyo etali enquête, ekomaki difficle mpo Président Mobutu abinisaki classe politique na gouvernement belge : Léo Tindemans, Premier ministre belge, asala ba déclarations ya ko flatter Président Mobutu après ba kanda na suite na ba exécutions ya ba condamnes à mort na procès de terroristes, roi Hassan II abengisa ministre ya Affaires étrangères Henri Simonet na Rabat, asolola na ye mpe sima a téléphoner President Mobutu asololi na ye mpe na sima a Henri Simonet Président Mobutu na téléphone, babongisa makambo, ba relations ezongaka malamu, Président Mobutu atiki kosenga na Premier ministre Tindemans alongola Simonet, etc. Na ambiance wana, ezalaki risquer kotia ba intérêts d’Etat en péril likolo na enquête na liwa ya Kanyonga. Suka suka, Monsieur Simonet na muasi na ye bakomaki na service ya Président Mobutu a 100%. Sika, soki famille ya Kanyonga esali makasi mpo eyeba vérité, ekoyeba yango. Maître kanyonga Bidimpata, leki ya Kanyonga Mobateli, azali avocat, ayebi nzela esengeli alanda mpo vérité eyebana.
Nabanzi que nameki koyanola na mituna mia yo. Soki ozali na misusu, ko hesiter te, soki eyano ezali nakomeka kopesa yango.
Patriotiquement,
Emmanuel kandolo