Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager


Ba Ndeko Claude Kangudia na Dodo,

 

Na finale ya Kisangani ba équipes oyo ezalaki kuna, kolongola oyo botangi na sujet ya retour sur le football congolais ezali  : T.P.Englebert (Mazembe), na Sporting Malekesa. Il est vrai que confusion elekaki kuna mpo na finale ya Bukavu, molili nde esalaki que match esila te mpe batu bakotaki na terrain. Kasi Fédération Congolaise de Football (FE.CO.FA.) eyaki kopesa Vita titre wana sans pour autant a gagner coupe na terrain. Par ailleurs, na Kananga, na 1971, contre Tshipepele ya Président Mbueshi, Vita elongaki, kasi Mazembe nde ekendaki Coupe d’Afrique na 1972.

Na finale ya 1969, ya solo Pierre Kalala abeta te. Par contre, na oyo ya 24 janvier 1971, azalaki mpe a retrouvaki brassard na ye ya capitaine. Mazembe elataki maillot ya carrocarro mine : deux ya pembe na deux ya noir, ba shorts na chaussettes ya noir na ba survêtements ya noir. Kotoko azalaki tout en blanc,  Mensah na ekoti na ye ya moniere ya carrocarro ya mike ya marron!

Tosangisaka masolo boye.

 

 

Ba ndeko,

 

Yambo na continuer, nakosala mua rectification na oyo etali équipe ya Kotoko de Koumassi oyo ebetaki finale ya Coupe d’Afrique des clubs champions na T.P. Englebert (Mazembe) dimanche le, 24 janvier 1971 na Kinshasa. 

Titulaires : Robert Mensah « Nana Benyin », Olivier Acquah, Orlando Osamu, Brenya Ohene, Ben Kasu, Mussa Sulley, Odame Clifford, Osei Koffi, Wiberforce Kwado Mfum, Ibrahim Sunday, Malik Jabir

Réserves : Kwaku Duah « Jaspar », Kwo Baffoe, Mohamed Salisu, Joe Sam, Don Oppong, Yaw Sam, Albert Essuman

Mazembe : Robert Kazadi  «Bob Denard, le gardien Volant», Ngoy Laurent, Albert Mukombo « Demoiselle », Raymond Buanga, Pierre Katumba, Nyembo « Toyota », Léonard Saïdi  « Suisse », Kabeya «Sotsho»”, Pierre Kalala (Capitaine), Andre Kalonzo, Martin Tshinabu “Brinch”

Réserves : Paul Kalambayi, Mbuyi « Athénée », Mukendi, Freddy Kapata  « Dix Sengi », Mulenda, Kabenji , Nyembo, Kamba

Match esukaki na 1 à 2 en faveur ya Kotoko. Buts ya Kotoko etiamaki na Mfum na Malik Jabir. Ya Mazembe ezalaki œuvre ya Tshinabu « Brinch ». Sima tango Freddy Kapeta « Dix sengi » akoti, bakweyisi ye na surface de réparation mpe Brinch abeti penalty, ekeyi likolo. Soki Mazembe azuaki coupe wana, peut-être Tshinabu Brinch alingaki azua ballon d’Or  1971.

Ba victoires nionso mibale ya Mazembe na Coupe d’Afrique des clubs champions, ezui yango tango Frédérique Kibasa azalaki ministre ya jeunesse et sport. Na 1971, un autre Katangais, Sampasa Kaweta Milombe (Godefroid Sampasa) akomaki mpe ministre ya jeunesse et sport. Na yango, en coordination na Fédération Zaïroise de Football, tango wana Président ya FE.ZA.F.A ezalaki Tshobo Ingana (Faustin Tshobo), ministère ya jeunesse et sport ezuaki mokano mua kotinda Mazembe na Coupe d’Afrique 1972 mpo azalaki na chance ya kolongola trophée kwame Nkrumah définitivement. Donc, pour la troisième fois. Vita Club (Victoria Club) ya solo ewutaki ko longa Renaissance Tshipepele ya Kananga na finale retour na 2 à 0. Na match aller na Kinshasa basalaki nul ya 2 à 2. Bien que Vita abimaki champion du Zaïre, bakonzi batindaki Mazembe na Afrique. Ezalaki décision moko difficile à digérer mpo na Vita, kasi Président Mobutu akanaki kaka Mazembe elongola coupe wana libela mpo ye a remplacer yango na oyo ekobengama na kombo na ye. Décision oyo ekozala na ba conséquences minene na cadre ya dette morale ya FE.ZA.FA. epayi ya Vita Club.

Tango Mazembe ekeyi kobeta Coupe d’Afrique 1972,  alongi Police ya Libreville, akueyisi Africa Sport ya Abidjan, alalisi Aigle Nkongsamba (Nkongsamba ezali na Cameroun, à 145 km ya Douala mpe na 375km na Yaoundé), na demi-finales na aller, a gagner Hafia Footbal Club de Conakry na 3 à 2 na Lubumbashi. (Mazembe asi alonga Hafia mbala na mbala tango ebandaka kobengama Conakry II) 

Na premier tour, TP Mazembe  na  Police ya Libreville, Mazembe alongi na 2 à 0 na Lubumbashi, mpe asali nul ya 1 à 1na Libreville. Na deuxième tour, na Abidjan contre African Sport, Mazembe a gagner na 1 à 2. Na retour na Lubumbashi, Mazembe alongi lisusu african Sport na  5 à 2. Na quart des finales, Mazembe akutani na Aigle Nkongsamba, Mazembe epolisi Aigle na 4 à 1 na Lubumbashi. Na retour na Nkongsamba, Aigle epoli na 2 à 1. Le, 5 novembre 1972 na demi-finales, na Lubumbashi, Mazembe alongi Hafia Football Club de Conakry na 3 à 2.

Match ya Mazembe na Hafia Football Club de Conakry ezalaki match ya makambo ebele. Mazembe ewutaki ko eliminer Aigle de Nkongsamba ya Cameroun. Ba arbitres Camerounais oyo bayaki na match contre Hafia de Conakry bazalaki na hauteur te. En plus, na match wana, ba erreurs ya arbitrage ezalaki monumentales mpe ba critiques esalemaki mingi sur incompétence ya ba arbitres Camerounais. Epayi mosusu, Hafia tango akomaki na Kinshasa, esengelaki esala entrainement na stade du 20 mai, kasi bakutaki  ba portes ya stade ya kokanga mpe moyen ba s’entrainer na kati ezalaki te. Basalaki entrainement libanda na terrain numéro 4. Ezalaki normal te mpo FE.ZA.FA. eyebaki malamu que soki équipe eye ndenge wana esengeli yango etia équipe wana ba bonnes dispositions : terrain mpo e s’entraîner, logement, transport, restauration, sécurité, etc. FE.ZA.FA.  eboya koyebisa Hafia que match ekobetama na Kinshasa te, pendant que délégation ya Guinée eyebaki que match ekobetama na Kinshasa. Samedi le, 4 décembre na pokwa, nde FE.ZA.FA. eye koyebisa équipe ya Hafia que match ekobetama na Lubumbashi mpe esengeli bazua avion ya butu. Nionso wana na miso ya na Guinéens ezalaki de bon goût te parce que kosala voyage en avion ya 2000 km na veille ya match mpe na manque ya possibilité ya reconnaissance ya terrain de jeu avant le match, etiaki ba joueurs Guinéens na état psychologique ya malamu te. Hafia ekomaki Lubumbashi na butu mpe dimamche na après midi esengelaki ebeta na Mazembe na stade de la Kenya.

 

Mazemba ebetisaki équipe oyo : Kazadi Mwamba « Bob Denard », Mwepu Ilunga, Mukombo Mwanza, Bwanga Tshimenu, Ngoy Kafula, Mutombo « Pelé », Saïdi « Suisse », Nyembo « Toyota », Tshamala « Machine », Ntumba Kalala « Pouce », Tshinabu Kamunda « Bricnch

Réserves : Klambay Otepa, Mukusa, Kapata « Dix sengi », Kamba, Ngile « Lomé » Kabenji

 

 Hafia : Sylla Morcire, Jacob Bangura, Ali Bangoura Keita « Kolov », Ibrahim Fofana «Calva », Saumah Mamadouba, Soumha Soriba « Edente », Ibrahim Keita « Petit Sory,  Thiam Oussman Tollo, Mamadou Keita  Aliou « N’jolea », Chefi Suleyman « Suley », Maxim Camara.

Réserves : Bernard Sylla, Traore Sekou, Arsène Campell, Naby Laye »papa Camara », Bengaly Sylla, Conde Mory.

 

Match ezalaki makasi mpe mazembe a attakaki comme il faut, kasi trio arbitral ya Cameroun ezalaki tout simplement médiocre. Défense ya Guinée ezali ko multiplier ba gestes ya anti-jeux sur Ntumba « pouce », arbitre azali ko sifflet te, kuna bazali kobetela Mukusa mabe, rien kaka. Ba fautes intentionnelles ya kosimba balle na maboko azali kopesa carton te. Finalement, « Pouce » akokaki lisusu ko pesa le meilleur de lui-même te mpo akomaki diminuer na blessure, tout comme Mukusa mpe azalaki blesser, esengelaki abima, yango nde eyaki kopesa Cherif Suleyman nzela ya kofunguama. Kasi esengeli kondima que Petit Sory, Maxime Camara, Sherif Suleyman na « N’jolea » bazalaki makasi mpe efficace. Kasi Mazembe alongaki bango na 3 à 2.

 

Sima match retour esengkaki ebetama na Conakry dans deux semaines na Conakry.

Tango Hafia azongi na Conakry, via Kinshasa na Douala, na escale ya Douala, ba sympathisants Camerounais bayebisi na ba dirigeants ya Hafia que esengeli bakeba na T.P. Mazembe na match retour mpo ezali na kisi makasi. Mazembe etambolaka na mutu moko ya mokuse, mutu ango azali nganga na bango. Tango nionso soki Mazembe ekeyi na étranger, ye nde abimaka mutu ya liboso na avion. Soki kaka abimi, afungoli kitunga na ye ya motane, aniati mabele ya piste ya aéroport, afungoli  poso ya léopard oyo alingi na kitunga na ye, nde ba joueurs ya Mazembe babimi mpe batamboli likolo ya poso wana. Soki kaka batamboli na poso wana na mabele na bino, ba kogagner match. Botika bango ata muke te babimisa mutu wana mpo asala bikila kila na ye wana na aéroport. Hafia mpe tango ekomi na Conakry etuni likambo wana na batu ya African Sports pour vérification. Ba Ivoiriens ya African Sport mpe ba témoigniaki na likambo yango. Likambo ya victoires à l’extérieur na score ya  2 à1 contre Africa na Aigle de Nkongsamba ebandaki ko confirmer lisusu na miso ya ba Guinéens, puissance ya biloko ya Mazembe !

Hafia mpe epesi rapport na bakonzi ya mboka na bango mpe bazuaki ba mesurers mpo kisi ya Mazembe ezala na effet te. Notons que na époque wana, nionso ebandaki kosalema na mboka, ata likambo muke na quartier, Président Hamed  Sekou Toure abandaki koyeba yango mpo système ezalaki bongo, likambo ekowuta na chef ya quartier emati tee na Chef de l’Etat

 

Effectivement tango Mazembe akomi na aéroport international Gbessia ya Conakry, tango kaka nganga de mukuse akiti, mbala moko ba gendarmes balokoti ye sans même abanda bikila kila na ye, batikelaki ye ata seconde moko te, bakeyi na ye likolo likolo. Panique na kati ya avion mpe kanda ya ndenge wana  epayi ya ba joueurs na ba dirigeants ya Mazembe, bango nionso baboyi kokita na avion ! Na batu nionso wana kaka ba entraineurs Kabamba na Vidinic (abandaki ko ko prêter main forte na Kabamba sur demande ya Fédération na ba matchs ya Coupe dAfrique) na Kazadi na Buanga nde batikala calmes. Président ya FE.ZA.FA., Justin Tshobo na Secrétaire général adjoint, Armand Kaundu na Journaliste Lucien Tshimpumpu bakenda ko négocier na bakonzi ya ba gendarmes na ba services ya police…tee sima ya trois heures nde batikaki Badiangwenda. Sima ya wana, ba joueurs na ba dirigeants babimi na avion. Kasi rituel esalemaki lisusu te puis que ba gendarmes Guinéens bakangaki ba plans nionso. Mais Badiangwenda ayebisa bango que soki bapesi ye ba plans na ye te, ekopela moto avant Mazembe ebima na aéroport. Na moto makasi ya ba gendarmes, bamona kaka poso ya léopard ebandi kozika na biloko nionso ezalaki na kitunga ya rouge ! Bango mpe ba paniquer !

 

Samedi le, 18 novembre 1972, na butu, feti esalemaki na Conakry mpo  na ba délégations nionso : C.A.F. ba dirigents ya ba équipes mibale, ba journalistes sportifs na bakonzi ya sport na Guinée. Pendant feti wana, na 20 H. ba responsables ya Fédération guinéenne bayebisi na T.P.Mazembe que po na ba raisons ya sécurité esengeli ba déplacer bango  esika mosusu. Mazembe azalaki loger na ville na Kaloum, pembeni ya stade. Stade du 28 septembre ezali na route Madina. En partant vers Gbessia aéroport, stade ezali à gauche, le grand marché ya Madina ezali à droite. Bakumbi bango mosika à 30 km ya centre ville, na camps militaire Kipe. Ba oyo bayebi Conakry, bayebi que yango ezali entourer mpe ekatisami na mayi ya océan atlantique, ezali na nse, ezali ville mayi ekatisa mpe ezali na ba ponts ebele na ba ports. Côté batiaki Mazembe, na Kipe, transport ezali te (Ezalaka te na époque wana).  

Sur place na Conakry, tango FE.ZA.FA etali liste ya ba arbitres misatu ya Gambie oyo basengelaki ba officier match entre Hafia na Mazembe, esepelaki te. FE.ZA.FA eboyaki trio arbitral ya  (arbitre central : Omar Sey) Gambiie mpo ezali oyo esengelaki e officier match mpo yango ezalaki na liste officielle ya ba arbitres internationaux te. Mpe lisusu, FE.ZA.FA elobelaki fraude na tricherie  mpo Hafia ebetisaki ba joueurs oyo bazalaki ya ba équipes mususu ya Conakry : Kaloum Stars na Kindia. Na Kaloum Stars ezalaki : Bernard Abdoulaye Sylla, Bangoura Jacob, Ali Badara keita « Kolev », Naby Laye Camara « papa Camara », Mamadou Keita « N’jolea », Thiam Oussman Tollo. Na Kindia : Sekou Traori na Mamadouba Soumah.

FE.ZA.FA ezalaki na ba preuves mpo déjà na feti ya 30 juin 1972, Kaloum Stars ebetaki na Vita Club na Kinshasa, esalaki 1 à 1, mpe ba joueurs wana nionso babetaki. Et comment après cinq mois bakoma na Hafia kaka boye ? Ba preuves ezalaki sur ba arbitres ya Gambie na ndenge bazali ba internationaux te.

Ba arbitres oyo bazali qualifier te, problèmes ya ba joueurs, esali que FE.ZA.FA. a senga vérification mpe enquête ya Confédération Africaines de Football (C.A.F.) Na yango, eboya Mazembe abeta match wana. Esika ba joueurs bazalaki, bayebi kaka que basundoli bango mpe bazali koyeba te soki nini ezali koleka. Commissaire ya match, Alcantara mpe asala ba confusions ya interprétation ya règlement mpe C.A.F. asalaki ya ye tee na ndenge bayaki kozua décision ya ko confirmer forfait bapesaki Mazembe na Conakry na Alcantara.

Nionso emonanaki neti ba Guineens bayebaki suite ya ba événements. A défaut ya Hafia na Mazembe, équipe moko ya ba Chinois ezalaki en tournée na Guinée ebetaki match kaka mokolo wana ya dimanche mpo na kosepelisa public, en présence ya madame Andrée Toure (épouse ya Président Sekou Toure).

 

Na Conakry, avant match wana, ba rumeurs mingi etambolaki na ville neti : na Kinshasa ba konzi ya FE.ZA.FA. baboyaki Hafia esala entraînement na stade du 20 mai, ba imposaki bango basala entraînement na cimetière !!! Ya solo que bazuaki ba difficultés mpo basala entraînement na kati ya stade mpo na ba raisons FE.ZA.FA eloba te. Kasi basalaki yango na parc 4, sima ya pourtours ya Imana mpe terrain wana eleki mosika oyo ya Hafia na Conakry II esika Hafia esalaka entraînements na ye.

 

Sima ya décision ya C.A.F., Hafia ekede na finale kokutana na F.C Simba  (équipe ya ba soda) ya Kampala mpe elonga bango na  aller na retour 4 à 2 na 3 à 2, abimi champion d’Afrique

 

Wana ezalaki lisolo ya oyo ekomaki kobengama : Affaire de Conakry. Yango ezali parmi ba affaires oyo ebebisaki image ya C.A.F. ba séries wana.

 

 

 

Patriotiquement,

 

 

Emmanuel Kandolo

 

 

 

P.S. Lobi tokolobela finale retour na Kinshasa entre Vita na Kotoko ya 1973

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
L
Bravo vieux oza danzé
Répondre