Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

BaMama mpe baTata (Mesdames et Messieurs),

 

Nazali na esengo mingi ya kokomela bino ete na mobu 2007 nakomaki buku na nkombo MOSUNI. Buku yango ezali na makasa 480 (480 pages).

Mosuni ezali elembo ya botosi mongongo mua « Lingomba lya Bosangani y’Afrika » (UA), eye etombolaki mobu 2006 lokola mobu mua minoko mia Afrika. Buku eye ekomami mpo na koluka kotombola lingala, monoko to mpe lokota moye moyokani na banzembo o kati ya bamboka mingi y’Afrika.

Mosuni elingi mpe kolakisa ndenge nini bana ya mabele y’Ebale ya Kongo bakanisaka. Yango esalami na banzela ndenge na ndenge ; mpe na makanisi ya motindo na motindo.

Mosuni ezali buku ya mibeko te, kasi yango elingi nde kozala mwinda mpo na makambo ma mokili mpe ma molimo. Lisese ya Mosuni ezali kolobela likambo ya komiyeba mpe ya koluka kotiya kimia kati na bikolo mpe bato ba motindo na motindo na mabele ya Kongo. Mosuni ezali mokanda moye mozui makunzi na yango na manso maye maleka mpe mazali koleka na kongo.

Moto nionso oyo alingi koyeba mingi likolo ya tango eleka na mpe bolobi bua Kongo asengeli kotanga buku eye.

 

Na suka ya buku « MOSUNI » namekaki kolakisa ndenge nini tokoki kobanda kolakisa bana na biso kotanga to mpe kosala « mathématiques » na lingala.

Natindeli bino elili ya Mosuni.  

 

Na tombeli bino mbote ya mingi.  

 

--------------------------------------------------------------------------------------------------

Mit besten Empfehlungen

With the compliments of

Avec les compliments de

 

Dr. Espérance-Francois Bulayumi

 Bildungsbeauftragter

Afro-Asiatisches Institut in Wien (AAI-Wien)

E-Mail: ef.bulayumi@aai-wien.at

Tel.: (+43) 1 310 51 45-350 

       (+43) 664 621 70 56

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article