Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Les  voeux  d’Emmanuel Kandolo

 

Ndeko  Charles  A.,

 

Ndenge tolobi, esengeli diaspora abanda kozua ba responsabilités na ye en réfléchissant na lolenge akoki ko contribuer concrètement  na kotombola R.D.Congo. Soki mpe tobandi na ko comprendre notion ya décolonisation mentale na ndenge professeur Auguste Mabika kalanda alobaki, ekozala ebandeli ya changement ya malonga.

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel kandolo

 

 

Rétro sur le football congolais, par Emmanuel kandolo

 

Ba ndeko Dodo na Claude kangudie,

 

Sujet oyo esili naino te, tokozongela masolo oyo na ba détails bopeseli awa na mikolo mikoya.

 

Patriotiquement

 

Emmanuel Kandolo

 

 

 

Le message d’Emmanuel Kandolo

 

Ndeko anclet,

 

Relation ya famille entre papa Damien Kandolo na ngai ezali te. Kasi ndenge yo moko oyebi, kombo oyo ezali  ya Kasaï, lien nionso yango wana. Na oyo etali kokoma buku, totala kaka soki avenir ezali ko réserver nini ? Kasi pour le moment, esengeli nde to profiter na blog na biso oyo mpo tosololaka sans tabou na maye tokoki koyeba sur ekolo na biso.

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

 

 

Ndeko Claude kangudie,

 

Merci mingi na ba compléments na rectificatifs  sur le talentueux footbaleur Ndaya Muteba « empire mukuba wa mbelenga ».

Oyebi que na Sanga Balende ya époque wana, il y avait aussi un autre joueur a marque ngai, le redoutable gardien de but Kanyinda Buanga Tshimbela. Na mona  ye en œuvre mbala na mbala na intérieur  na championnat ya Mbuji Mayi ou na coupe du Zaïre à travers le pays. Kasi na ba occasions nionso namona ba matchs ya Sanga Balende ezala na intérieur ou na Kinshasa, kanyinda atikala kokanga penalty te mpe abandaki kolanda yango te. Wana ezalaki point très très faible na ye ( il parait que biloko na ye ebandaki kosenga bongo !). Azalaki un excellent gardien de but.

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

 

 

Investiture d’Obama

 

Ndeko Dio-Dio,

 

Merci mpo na ba précisions obakisi. Na nionso oyo, organisation ezalaki parfaite. Soki tozongeli mua muke na likambo ya église ezali effectivement ba rituels oyo ebandi lelo te mpe ezali na signification makasi car kokoma Président  ya Etats-Unis ezali ko impliquer makambo ebele na réalité ya pouvoir. Restriction ya baye bakotaka kuna ezali na ntina na yango. Est-ce que ozali koyeba que couple Obama ememaki bana na bango na ba rituels wana te ? Oyebi ndenge balobaka que bana bazalaka na mitu ya pete ! Par ailleurs, vice-président Biden ayaki na libota na ye mobimba mpo bana na ye basi bakoli. Na Etats Unis, lien entre église na Etat ezali makasi : mapamboli mpe sens sacré oyo epesama na pouvoir na bilembo na yango : drapeau na bango, mbongo na bango, maison blanche, ezali na signification makasi. D’ailleurs, na ba Grandes écoles  awa na France ou na Etats Unis na niveau ya D.E.A na ba Conférences de Methode  ezali na ba chapitres sur les aspects cachés du pouvoir na ba force ya bilembo ya Etat.  Nabanzi soki tozui possibilité na blog na biso oyo tokolobela  makambo ya ba élites, formation  na bango na ba Grandes écoles na ba liens oyo ezali kosalema na kati ya mangomba oyo mutu nionso akotaka te, le pourquoi ya sélection makasi, sens ya secret, secret d’Etat, élimination physique na kombo ya l’Etat, rôle ya nzambe na Etat, bénédiction ya église wuta na pape tee na séparation entre église na Etat, etc.

Système Cruz wana, toyokaki lisolo na yango, ngai namekaki téléphone na ngai mpo effectivement natala effet na yango. Ezali liseki te ! en plus, nzela nzela ba camoins, P.C. de contrôle mobile, étranges ya couleur noir etonda na systèmes électroniques ezalaki na ba coins strategiques.

Problème ya ba tickets wana esengeli Sénat américain emeka kotiya ordre na ndenge ba sénateurs bakabolaka yango ou carrément baluka ndenge bakoki ko éviter batu basala ba billets ya mayuya oyo ezali ko faire perdre ba ayant droit, ba droits na bango.

Na oyo etali likambo ya noir comme Président, base ya classification ya ba Présidents américains ebandi na  constitution sur la quelle George Washington akomela Président. Kasi histoire ekoki kobosana te nionso oyo esalemaki  avant indépendance ya Etats-Unis.

Mukolo ezali tokomonana ! Ah, nakanisi ba souvenirs ya beau quartier ya université Georgetown.

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

 

 

 

Droits d’auteur : la conclusion d’E. Kandolo

 

Ndeko Joseph Pululu,

 

Merci na ajoute. Tout indique que ba nzembo ozali kolobela ebimaki sima ya masolo oyo nabeti mpo yango ezalaki na 1986. Soki Vicky Dinzolele ameki lisusu kobimisa biloko wana na support C.D.ekozala likanisi ya malamu. Problème sika awa ezali que ndenge nini ye akoki koyeba que bikolo wana batu mususu bazali na posa na yango ? Ezali na ba nzembo ebele nalingaka na miziki wana : Hymne au chef, Invocation, Hymne au Maréchal, Armée louange, etc.

Soki papa Toto atangi échange na biso, mbala mosusu akoki kosunga biso.

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

 

Les patrimoines culturels par Emmanuel Kandolo

 

Ndeko Dio-Dio,

 

Ya solo osi osolola na ngai likambo ya buku, mpe napesaki eyano. Ezali likanisi malamu, totala kaka soki avenir ebombeli biso nini. Na tango oyo, esengeli naino to contribuer makasi na Mbokamosika na maye matali connaissance ya ekolo na biso.

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

 

Ndeko la fifi,

 

Merci  mingi na appréciation osali na maye nakomaka mpo tokabola boyebi bua mbka na biso. Oui, descendance ya chef Ngaliema ezali munene mpe oyo opesi wana ezali na kati. Mais, idée opesi ezali malamu, na oyo etali camp Mombele. Nakanisi que tango tokolobela Kinshasa na ba règnes na ba chefs oyo bazalaki wana na ba villages na bango, tokokueya na camp Mombele na ba circonstances yango esalemaki (industrialisation ya Limete), kolo terrain wana, rôle ya papa Pierre Mombele na parti politique Union des ba Teke, problème ya déplacement ya ba villageois na Kingabwa, etc. ekozala intéressant ndeko na Ngai. Par la même occassion, tokolobela mpe ba chefs Lufungula, Selembao, Lemba, etc. Totala kaka ndenge masolo ekobanda kokende.

En parlant de papa Mombele, nakokota muke na likambo ya Adrien Mombele (Stervos Niarcos). Oyebi que na matanga na ye mutu ata moko te asalelaki makambu abandaki koyemba na banzembo na ye ?  Ye moko Niarcos, azalaka na soucie ya koyeba histoire ya peuple na ye. mbala mosusu nasololaka na ye sur ndambu oyo nayebi, na monaki que azalaka na émotion mingi mpe…

Toko continuer mbala ekoya. Omoni que masolo wana ezali na makambo ebele.

Nakosukisa lisusu na kobakisa que tango tokolobela makambo ya Kinshasa, nakoyanola na motuna moko natuna Maître Kula, sika 8 ans yango oyo. Natunaki ye mpo na nini lingala ekoma kolobama na Kinshasa pendant que yango ezali mboka ba Teke ? Logiquement, esengelaki ki teke elobama mpo ezali lokota ya mboka iye ! Tokopea eyano mikolo mikoya.

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

 

 

Ndeko Charles,

 

Avant Chef Ngaliema a signer traité na Stanley, bakutanaki déjà mbala ya liboso. Na deuxième rencontre nde basololaki mpo na traité na signature na yango. Chef Ngaliema mpe atikaka stanley bongo te, asalaka ye mpe grand kata. Stanley akenda kokuta ye na ndaku na ye afanda na kiti mpe alati neti ye. Or, na moment wana chef Ngaliema azalaki libanda na batu na ye na oyo ya Stanley. Tangu akuta ye na ndaku, ayebisa ye que traité oyo ekosenga ba sacrifices ya makila côté na ngai na côté na yo. Esalema : Makoko Mbe na kanda ndenge chef Ngaliema a signaki traité wana, akanga bana mibale ya mibali ya chef Ngaliema, ye moko Makoko azua mbeli mpe akata bango mibale mitu mpe atinda yango na gambo  ya flueve na village Kintambo ya chef Ngaliema. Cote ya Stanley, apesaki ngomba oyo afandaki kombo ya Leopold II. Léopold II ayaki ko perdre Congo na prix du sang.

Yango wana na histoire etikala que chef Ngaliema azalaka grand visionnaire. Sima na ye, nini esalemaki ? Tokolobela yango na histoire ya Kinshasa.

Oyebi, tosalelaki politique ya authenticité wana mabe !!! Esengelaki ba monuments wana etikala esika ezalaki mpo toyebaka esika towuti mpe e servir na notions ya histoire. Au lieu ya kolongola Stanley, tokokaki kobakisa monument ya chef Ngaliema mpo na kolakisa batu mibale oyo basalaki histoire na esika wana na traité ezali na haute portée historique. Kasi, loyenge ya authenticité ezipaki biso misoi. D’ailleurs, authenticité yang, elekela ndenge kolo na yango Professeur Auguste Mabika Kalanda a boulaki te. Elekela ndenge Président Mobutu alingaki elekela.

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

 

Haro sur la domination des musiques religieuse

 

Maitre Kula,

 

Yambo na koyanola na motuna  otuni : « pourquoi la musique "religieuse" plait de plus en plus au sein de la diaspora Congolaise et au Congo puisque c'est la bas que vous avez assiste au deuil ? »,  esengeli naino to comprendre contexte ya musique chrétienne na culture congolaise. Musique chrétienne ezui esika na culture congolaise à cause ya dictature ya église chrétienne tango eyaki ko introduire Jésus de Nazareth na Congo par la force. Kokotisa ya christianisme wana esalaki que église epekisa avec brutalité mpe violence makambo ebele oyo ezali na coutume na biso ; na bizaleli bia ba nkoko, nionso na misu na ye ezalaki na effet négatif, etc. La seule voie ya vérité ezalaki indiscutablement christianisme na liloba oyo ezali ko accompagner yango. Kobanda wana, mbotama, libala, kufa, nionso  oyo ezalaki kosalema na ba nzembo ya nzambe oyo ewutaki na ba paya. Ezala mumpe, misioni (catholique na protestant) ba nzembo nionso ebandaki koyembisa batu, ezalaki oyo ewutaki na mikili na bango mpe babongoli yango na lokota na biso. Tango mundele akeyi, misioni akomi kosala ba nzembo en fonction ya esika azuami, kintuadi  (Kimbaguisme) mpe ekomi libérer, mpe Cardinal Joseph Malula aye ko lutter mpo Vatican endima que na Congo, mumpe akoka kosala misa na ba rites na yango ndenge ya traditions et coutumes africaines. Vatican andimaki. Kobanda wana, Malula akoma père ya église catholique africaine.

Donc, ezaleli ya ba nzembo ya nzambe na matanga ezali likambo ebanda kala wuta mundele na église baniata makolo na mboka na biso. Yango e continuaki sima ya mundele mpo ba autorités ya mboka na biso bazali ba chrétiens. Yango wana na radios na télévisions etikala que soki mokonzi awe ou mutu ya munene, musique chrétienne nde ebetaka. D’ailleurs, mingi kati na biso bazalaki na reflexe wana avant ba chaînes ya radio na télé ekoma ebele neti lelo oyo. Kala ezalaki soki ba nzembo ya nzambe ezali kobeta na radio ou na télé, motuna eyaka liboso ezalaka que : nani akufi ? Ndenge moko soki musique militaire ezali kobeta na radio, en dehors ya heure ya émission ya armée, wana elingi koloba que coup d’Etat militaire esalemi ! To vivaki yango tango A.F.D.L ekotaki na Kinshasa.

Na cadre ya authenticité,  tango Prospère Mandradele Tanzi akufaki, miziki ya ba nkoko ebetaki mpe ba orchetres modernes ebetaki ba nzembo ya mawa.

Na liwa ya mama Antoinette Mobutu nde ba orchestres nionso ya minene e composaki mpo na ye. Nzembo ya Mpongo Landu « Love » nde esalaki échos makasi «  Mama Akeyi »

Lelo oyo soki musique religieuse (tozuela religieuse na sens ya musique chrétienne mpo soki tozui yango na sens ethimologique na yango, wana motuna ya Maître Kula ekobima na contexte oyo etunami) ezali kosepelisa batu mingi na matanga na libanda ya Congo  mpe na Kati ya Congo, ezali mpo ba esprits convertis (bandimi) bazali kozua yango comme étant  un des éléments identitaires na bango. Ezali d’abord kokumisa Yesu avant tout ! Etant chrétien, sujet, esengeli à  s’identitier na oyo ezali kokumisa nkolo na ye Yesu masiya. Soki référence na Yesu masiya, elongue, miziki wana ekozala lisusu na impact moko te na matoyi  mpe na miso ya mondimi. Par exemple, soki neti ba nzembo ya religion Hindou ebandi kobeta na matanga, chrétien akozala na komipesa moko te oyo akoki kozala na yango tango oyo ezali kokumisa Yesu ezali kobeta. Ndenge moko mpe na croyant hindou, ou na croyant nionso oyo azali ko se reconnaître na religion wana te.

Soki musique chrétienne ezali kozua esika ezali lisusu mpo na intolérance ya musique chrétienne na koboya ko évoluer esika moko na musique soi-disant ya mokili (traditionnelle, moderne, etc). Dans la plupart de cas, ba chrétiens (ou bandimi d’une manière générale) balingaka te ko mélanger miziki na bango na mususu. Nayebi na ba matanga mini oyo Kintueni, Balukin, etc. ebetaka, ba esprits convertis babetaka miziki wana kara. Balingaka lisusu koyoka yango te ndenge babandaki koyoka yango avant bayamba Yesu.

Na oyo etali association ya ba éléments culturels traditionnels na biso na musique chrétienne : danse, instrument, chorégraphie, yango ezali likanisi malamu. Sika etikali kaka que tolérance ezala de deux côtés na oyo etali partage ya ba sons na chants na ba événements na tango ya bisengo mpe ya mawa.

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
K
Todjali kokoba se kokoba na lisolo...Na moyi mwa lelo makambo mabongwami, Cardinal Malula azongisa masolo inso na nzela na maye matali Loyembo, na makambo biyike oyo etali Bonganga Nzambe na Etonga Katolike...Banda mbongwana oyo Cardinal Malula ayaki na yango te lelo, makambo edjali lisusu ndenge moko te...Soki tozongi sima, moko te akoki kobimisela biso palaki moko to kotangela biso moyembi moko oyo adjalaki kotia libaya (concert) na lolenge ya lelo oyo todjali komona Marie Misamu, L'or Mbongo...etc...Soki tozongi sima, tokobanda na bato lokola: couple Buloba, Blaise Sakila, na soki nabeti libaku te Les Messagers...Bato oyo, bayaki na elulu moko mpe momekano edjalaki makasi na balanga nzembo misusu ya Zaiko, Viva la Musica, Wenge, QL...Lokola matoyi ya bato emesana se koyoka Rumba, Odemba, Fiesta na Ngwasuma na bisika ya kopo to ya kobina, pona bango koyoka Thomas Lokofe edjali pasi kie kie kie po mbala moko makanisi ekokende esika mosusu...kie kie kie...Todjali kokoba... 
Répondre
K
Mbote bandeko,Kulutu Emma, longonya na ndenge olimboli likambo litali mindule.Lelo oyo todjali kolobela maye matali mindule ya molimo na ya mosuni...Mingi o kati lya biso tobanzaka ete Mondele nde alakisa biso maye matali koyeba Nzambe.Te bandeko, liboso Diego Cao atia makolo na ye na Eteni ya Mabele oyo babengi Congo lelo, todjalaki...Leopold 2 Nkumu ya Belgique ayebaki oyo biso te kino lelo tolingaka koyeba te : Ba koko na biso bayebaki maye matali  Nzambe...na yango alobaki na ba sango babeta sete se na likambo lyoko, ndenge nini bakoki ko konza biso mpo bakwa bomengo...Ah bandeko, nalanda naino ndenge Michael Jean oyo adjali elili ya Reine Elisabeth 2 awa na Canada,ndenge adjali koyamba Obama...Ba ndeko,Mokili edjali kobongwana na miso na biso...Nani akoki kondima ete bayindo babale nde bapesa bango Lokumu na LOLENGE YA BOYE soki tolandi maye manso maleka, ndenge Moyindo anyokwama awa na America ????Quelle revanche...voila j'ai anticipe sur le recit de Ya Diodio et du Kulutu Emma...Tokozongela lisolo ya mindule... 
Répondre