Partage des sentiments autour de quelques chansons souvenirs
Partage des sentiments autour de quelques chansons souvenirs
Ba ndeko,
Awa likanisi ezali ya komeka kosala rubrique moko mpo to partager souvenir, fait, nostalgie, histoire, récit, lisolo en rapport na nzembo. Par exemple, durant voyage na route ozali koyoka nzembo, na préparation ya concours ya baccalauréat, ba folies ya jeunesse, etc. Tobandi na ba nzembo oyo :
/image%2F0931504%2F20210713%2Fob_baea4a_917pl5b-psl-ss500.jpg)
« SURMENAGE »
Kester Emeneya ayembela Juvin Muzinga, mpo na mbongo akomaki na yango mpe ba katas abandaki kosala ba séries wana. Azalaki jeune diamantaire mpe akufa na accident na intersection ya ba avenues victoire na Kasa-Vubu. Range Rover na ye ekenda kokota na nse ya bus Renault, ya Société de Transport du Zaïre (SO.TRA.Z.). En voyant état ya Range na ye, il est difficile ya ko comprendre violence ya impact wana mpo na endroit wana, il est presque impossible ya ko rouler na plus de 60km/h na distance ya plus de 60 mètres mpo trafic ezalaka permanent wana na deux sens ya ba avenues Victoire to comme ya Kasa-Vubu. Mutu azalaki na ye na mutuka, son cousin, Godard Motemona (akomaka Ministre provincial na époque ya Kimbuta), abima mobimba. Tee na lelo oyo explication apesaka sur ba circonstances ya accident wana elakisaka que yango ewuta na ba nzela mosusu. Kester alelaka ye makasi lokola mama akufeli muana.
« OMANGA »
Rochereau Tabu Ley ayemba Marie Omanga, fille ya Yolo-nord, d’origine ya Wembo nyama, na Sankuru. Abandaki kobima na ye mpe amemaka ye tee na Lagos, na 1977, na African Festival of Arts and Culture (FEST.A.C.), oyo esalemaki kuna kobanda 15 janvier tee na 12 février 1977. Ah! Rochereau mpe alanguaki bolingo makasi. Ndenge atambolaki moto mpo na Marie Omanga etikala kokamuisa ngai te mpo ye penza ayebaki komipesa makasi. Marie azali sœur ya Wilson Omanga na Véronique Omanga (ex-ya Stervos Niarkos, mpe mama na Gianni Versace).
« MIYELELE »
Ezali loyembo papa Wemba, tango wana Jules Prisley, ayembela Marie Omanga mpo abandaki kobima na ye. Awa mua paradoxe moko ezalaki na ba filles ya Yolo! Bazalaki kosala succès tout comme babandaki mpe komitumba suite na déception amoureuse.
« ADEITO »
Rochereau Tabu ley ayembelaki love na ye. Jeannine Adeito Amelo, azali Ababua, originaire ya secteur Bobongono, territoire ya Bambesa, na province ya Bas-Uele. Une belle jeune fille, courtoise, sympathique, généreuse mpe atonda ba belles manières. Noko na ye, Ambassadeur Augustin Bagbeni Adeito Nzengeya nde ayaka na ye na 1971, tango atindamaki na Amsterdam comme Ambassadeur ya Zaïre. Sima ya wana, Adeito atindami Ambassadeur mpe Représentant permanent ya Zaïre na siège ya Organisation d’Unité Africaine (O.U.A.), na Addis-Abeba, na 1972. Janine atikali na Belgique kotanga, kasi akendaka Addis-Abeba kaka mpo na ba vacances scolaires. Wana noko na ye ayaka souvent kotala évolution na ye mpe na bana banso.
Na 1975, Adeito abengami na Kinshasa mpo na kozua ebonga ya Directeur général ya département ya Affaires étrangères et Coopération internationale. Sima ya ba mbula, Janine akoli mpe akomaki moke moke kolongua na nzela. Noko na ye a décider kozongisa ye na Kinshasa. Tango akomi kuna, au lieu azala pene ya noko mpe ko continuer ba kelasi, a bandi kokendaka na Yolo esika mama na ye azalaki na nganda. Kuna nde esika abandaki kokutana, sous influence ya mama na ye, na ba tata oyo bazalaki na ba moyens. Wana Augustin Adeito très occupé na ba responsabilités wuta 1977, akoma Ministre. Tango Président Mobutu azongisi ye na poto comme Ambassadeur et Représentant permanent ya Zaïre na Organisation des Nations Unies na Genève, akumbi ye. Wana tokoni na 1980.
Na 1983, Adeito atindami Ambassadeur na Jakarta, Colombo, Pulau Ujong avec résidence na New Delhi. Esika Janine atikalaki, akoti na Paris, kotambola na Bruxelles tee ayaki kokoma ko tester ba pimbo ya lolenge na lolenge mpo amesanaki na yango makasi, na komela, kotuba tuba mpe kotekisa.
Na 1985, Adeito, atindami Ambassadeur na Nations Unies, na New York. Kasi, avant wana asala tout mpo na ko récupérer nièce na ye, kasi pamba. Suka suka, Janine ayaki ko se retrouver na Kinshasa. Ba refoula ye, abebisa mukanda, akomaki na vie moko ebandaki kolelisa mutu nionso ayebaki ye mpe amoni ye ndenge akoli awa na poto te, désastre penza. Nazali koloba boye mpo nayebaki kulutu Augustin Adeito awa na Paris depuis 1964, tango ayaka kosala ba études na ye awa na Paris. Asala ba brillantes études mpe akomaka Ministres ya Affaires étrangères na suka ya carrière na ye. Mbala mosusu tokomeka kozongela biographie na ye…
Kuna na Kinshasa esika Jeanine akomaki, a continuer na vie ya kotambola tambola tee na ndenge ayaki koniata mine… Muasi kitoko, mawa mpo milieu akotaki : bilamba ya talo, musique, pimbo, mbongo ya pimbo, bisengo mpe ba fêtes interminables, rythme frénétique ya jouissance sans ko se soucier na cours normal ya la vie, ekumbaki ye na trop de loyenge sans azua temps ya kozua lisungi mpe encadrement ya makasi face na dérive oyo pimbo emamaka associer na succès oyo jeune fille courtisée asalaka tango azali ko ngenga.
« SAINTE AMELO »
Espérant Kisangani ayembela Janine nzembo oyo mpo na ko immortaliser ye na hauteur ya valeur na ye, une fille na ba qualités humaines exceptionnelles. Azalaki mpe nzele na ye. Tee na suka ya vie na ye, Espérant abandaki toujours kolela Janine tout comme biso banso toyebaki ye : Une fille au grand cœur.
Patriotiquement,
Emmanuel Kandolo