QUELLES SONT LES LANGUES PARLÉES À KISANGANI ? UNE QUESTION DE GALIKULA JULIUS
QUELLES SONT LES LANGUES PARLÉES À KISANGANI ? UNE QUESTION DE GALIKULA JULIUS
/image%2F0931504%2F20210120%2Fob_90ceec_kisangani-carte.gif)
Losako na bino banso bayi-ekolo congo. Nazali na mwa motungisi na oyo etalii nkota (langues) oyo elobamaka na kisangani. Nasii nayokaa ete na kisangani nkota mibale nde elobamaka ,LINGALA MPE KISWAHILI. Kasi nayebi naino te soki bayi-boyoma banso balobaka minoko mibale wana to ezali na mwa liboke ya bayi-boyoma oyo balobaka monoko moko kaka mpe basusu balobaka se monoko moko.
Epusi malamu bino bakulutu baye bozali na boyebi ya enguma kisangani bomeka kotalisa biso ndenge minoko wana mibale elobamaka kuna.
Mpo na mituna
1.monoko nini kati na lingala na kiswahili nde ezali ya yambo kolobama na kisangani
2.Bikolo (tribu/nation) kani na kisangani elobama mingi mingi monoko songolo ,longola monoko ya mboka
3.Ezali na ntaka (communes ) ya kisangani epai wapi monoko songolo nde elobamaka mingi koleka mosusu?
4.Mpe bayi-kisangani bangomei bamimonaka bato ya mangala to baswahili .
Maloba o mboka bino.
Kimya o mabota ma bino.
GALIKULA Julius
EYANO NA BISO
Stanleyville too Kisangani etongami na Henry Morton Stanley na mobuu 1883. Sima na yango, bato ya Zanzibar, too ba esclavagistes bakomi pe bapotanani pe babengani ba ntoma ya Etat indépendant ya Congo na mobuu 1887.
Na mobuu 1888, Etat indépendant du Congo ezongi pe etie Tippo Tipo, moko ya ba esclavagistes bawuta Zanzibar lokola gouverneur ya district ya Stanley.
Ndenge omoni, ba esclavagistes ya Zanzibar nde bato ba introduire SWAHILI na mboka Kisangani. Kasi, ba congolais babosana nkota na bango te, lokola Wagenia, Lokele, Topoke, etc, etc.
Na yango tokoki koloba été, Swahili nde monoko elobama na Kisangani liboso ya lingala oyo bangala ya districts ya UELE bamema sima.
Ba nkolo mboka Kisangani ezali Wagenia, na Ba Kumu, na bosangani ya 250 ethnies.
-Na Commune ya Tshopo : okokuta Bamanga, Popoï, Baboa,
-Na Commune ya Lobunga : okokuta Ba Lokole, Turundu, Mbole, Kumu, Wagenia, REGA (arabisés bawuta Maniema),
-Na Commune ya Mangobo : okokuta Topoke, Lokele, Turundu, Basoko,
- Na Commune ya Kabondo, okokuta Bali, Lendu, Budu, Bangetu, Logo, Alur, Hema, Nande, Yira.
Na mokuse na mboka Kisangani balobaka swahili na lingala. Kasi swahili nde elobama liboso.
Compilé par Messager