Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

 

Bonjour,

un commentaire vient d'être posté par Ba Nkolo Miziki sur l'article La réponse de Faugus Izeidi à Claude Clo Clo,

Extrait du commentaire:


Papa Seskain Molenga,



Bonjour, c´est un réel plaisir de savoir que vous êtes en vie, car il y a de cela quelques décenies, on nous apprenait votre disparition, voici la version des faits.



Un orchestre est venu joué dans un pays d´Europe de l´est, les musiciens étaient de toutes les nationalités africaines, mais l´orchestre en soi était congolais (zairois), notre ami qui habitait

avec nous et qui avait fait venir l´orchestre, présentera le droumeur de cet ensemble comme étant le Fils de Seskain Molenga de l´Afrisa.


Cela étant ce droumeur nous contera une histoire à vous faire dormir débout, suivez :



Ngai nazali muana ya Papa Seskain Molenga ya Afrisa ya Rochereau, boyebi ezali Papa na ngai motu akotisa drum na musique ya Congo (zaire), Papa abeta na Olympia mpe na ba voyages nionso ya Afrisa

ezalaki kaka papa na ngai. Une très bonne référence.


Papa na ngai akufa, mokolo mosusu na Paris, Papa Tabu Ley alingaki abeta kasi contre toute attente Droumeur ayaki na concert te, alors lokola ngai nazalaki na salle, Papa Rochereau alobi na ngai

nabetela bango drum, à la satisfaction générale, na tangu ya pose na vestiaire, nayebisi Papa Ley soki alingi nazongela lisusu kobeta, il faut afuta ngai mbongo na ngai, etikali 5 minutes mpo
Afrisa ezongela kobeta, Papa Rochereau alobi na ngai, muana kosala boye te, oyebi Papa na yo Seskain Molenga atikela ngai kaka yo, bongo yo obandi lisusu kosala ngai boye, muana oyebi malamu Papa
na yo Molenga alingaka ngai mingi, sikoyo etikali kaka une minute, Papa Rochereau abandi kolela na kombo ya Seskain Molenga, ngai mpe na mawa ya Papa na ngai nabandi kolela, tolelani biso
mibale na Papa Tabu Ley, mbala moko asimbi ngai na loboko amemi ngai na podium, nabeti miziki tii na suka, sans ke nasenga lisusu mbongo na ngai.


Lisolo oyo elelisa biso nionso, mpe to organizaki mua réception mpo na deuil na yo, topesaki  Seskain Molenga Junior ba cadeaux ndenge na ndenge, ngai personnellement napesaki ye appareil ya

video ya sika na carton, baninga basusu bayaki na biloko kili-kili.


Après wana orchestre ezongaki na yango na Paris, ezonga lisusu mbala mosusu te mpo nakobeta, kasi Seskain Junior azua vraiment LOBOKO na yo sans mentir, puisque aningisaki MOKITANI YA WENDO,

vraiment ezalaki du vrai Seskain Molenga.


Merci mingi na ndenge Nkolo Nzambe abombi yo tii na moyi ya lelo mpe abakisela yo lisusu bomoyi bolayi elengo moko na ba vedettes ya tangu na bino, lokola ba vieux Michelino, Faugus, Rochereau,

Simaro Masiya, Josky Kiambukuta, Djeskain, Sinatra na Matadidi Mario de Sosoliso, Guvano, Sam Mangwana na bayo oyo nionso natangi ba kombo te.


 


 


 


Ba Nkolo Miziki.

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article