Demande d'informations sur IFOLEA de Zaiko
Demande d'informations sur IFOLEA de Zaiko
Bonjour Mboka Mosika ,
kombo na ngai Pal Secam .navandaka na allemagne
Vraiment site na bino e permetta nga na rafraichir mémoire na ngai na makambo ebele ya Poto moyindo autrement dit Mpumbu oto Lipopo. Nalingi bo informer ngai sur histoire ya garcon moko abeta na zaiko kombo na ye IFOLEA mais awumelaka te mais atika biso avant akenda na mokili oyo biso tout tokokende mokili ya bawa.
akota zaiko quand et comment ? asala nzembo ou pas ? akufa comment ? abeta ba concert ou pas ? azalaki né en quelle année ?
azalaka muana ya commune nini ? est ce que moyen ezali ya ko retrouvé famille na oto muana na ye ?
je vous remercie d'avance pona réponse
Pal Secam
Na niveau na ngai naza na information mingi te likolo ya IFOLEA. pe nakoki koyeba malamu te soki asala nzembo na Zaïko. Nabanzi toza na nzembo moko ayemba na orchestre Maïka, mais na kati ya nzembo balobi orchestre Monano. Moninga oyo ayebi akoka koyanola na mituna ya ndeko Pal Secam.
Toyoka naïno Kathoul.
Kathoul, par orch Maika