La revue d'Emmanuel Kandolo
Il nous revient après une longue absence due à ses nombreuses occupations. Voici son point de vue sur les derniers sujets abordés dans notre blog durant son indisponibilité.
Bon retour ndeko Emma.(Msg)
Sujet : Emile Soki et Jeannot Abumba Masikini, même destin
Ba ndeko,
Yambo ya koloba likambo, esengeli naino komituna soki lolenge ya kolobela likambo yango ezali ndenge elongobani nto mpe ezali bongo te. Ezali mpe ekozala malamu mingi soki tozali kobeta masolo maye toyebi, makambo maye tomoni mpe to vivre. Soki tomonaki ou to vivre yango te, esengeli nde toloba ndenge toyokelaki ou ndenge bakumbelaki biso lisolo wana ou encore soki mpe ezali kaka sango ya mupepe ya balabala, esengeli mpe toloba que selon radio trottoir, ebandaki kolobama lolenge wana !!!
Sika tomeka kosolola likambo ya Emile Soki Dianzenza na Jeannot Abumba Masikini.
1. Problème ya Emile Soki Dianzenza ezalaki na maboko ma ndenko na ye Maxime Soki Vangu « Max » te ! Ata muke te !!! Ngai nakoloba boye mpo nayebanaki na Max, tobandaki kokutana, kosolola mpe namona ndenge atambusaki makambo mingi na vie na ye. Par ailleurs, Emile azalaki leki, relation ya ngai na ye ezalaki ndenge moko na Max te.
Famille Soki ezali famille moko oyo ezalaki na ba makambo minene ya division familiale oyo esala que ba frères na ba sœurs ya papa oyo aboti Florentine Soki Fuani Eyenga, Max, Emile babandaki koyokana te. Elingi koloba que ba tata kulutu na ba tata leki ya Max bazalaki na camp na bango. Ba tata muasi mpe na camp na bango. Donc, ndenge ba Florentine na ba Max bazalaki wana, relation ya famille ezalaki kaka na ba tata kulutu na ba tata leki. Côté ya ba tata muasi na bango relation ezalaki te. Na division wana bitumba ya nkisi mpe ezalaki makasi na komekama na ndenge nionso, c’est-à-dire côté ya ba tata muasi bako combattre réussite ya côté ya ba tata et vice versa. Yango wana, papa Soki asalaki nionso bana na ye batanga ba kelasi mpo bakoma bato na vie. Florentine asilisa ba études universitaires mpe asala carrière na ye tee na ndenge ayaka kokoma haut cadre ya M.P.R. mpe ministre mbala na mbala. Max akataki ba études universitaires, Emile ye atikala kokende na université te après diplôme d’Etat na ye.
Max na musala na ye ya miziki azalaki na réussite artistique na matérielle. Bella Bella ezalaki na sommet ya miziki ya Zaïre mpe ebandaki kosala ba voyages bipayi na bipayi, kobimisa ba nzembo kitoko mpe kotekama malamu, mpe ebandaki ko honorer ba contrats ya production ebele. Max azalaki associer na ba Editions Allez-y frères Soki, afandisi immeuble na Bandal, asombaki ndaku na quartier Salongo na Lemba, azali kotambola toujours na Mercedes ya sika, kolata, mbongo etc. Nionso oyo entre 1970 na 1980, période oyo Emile mpe abandaki kosala succès na ye.
Vie ya max ezalaki mingi kotungisama na ba problemes mibale : bolingo na ye na Gertrude Salayi « Getu » na ba problèmes ya santé ya Emile.
1. Gertrude «Getu» Salayi azali fille ya quartier 20 mai (immo Congo), une très jolie fille. Ye akotaki libala epayi ya Max mpo balinganaki makasi bien que baboti ba Getu balingaki bolingo wana te. Max akimisa Getu mokolo mua libala liye Getu alingaki asala na un jeune diplôme universitaire oyo famille na ye Getu eponelaki ye. Getu ayaki kondima kosala libala mpo na ko apaiser ba pressions oyo ezalaki sur ye : ba yaya na ye ya mibali babeta ye ndenge na ndenge likolo ya Max, kasi Getu abandaki kaka koyoka te. Mpo na ko barer esprit na bango, andimaki libala. Kasi mokolo mua mariage coutumier, azeli tee na minute ya suka yambo ya kosala libala, abulungani. Famille eyoka soni ya kosakana te. Eluka Getu na Kinshasa, etikala komona ye te. Banda akima ndako ya baboti ba ye, ayaka kokomana na miso ya ba ndeko ba ye mokolo kulutu na ye ya mobali ayaka komona ye par hasard na matanga ya papa na Max azali kolela kuna makasi. Kaka na Christ roi wana na Kasa Vubu, abanda kobeta Getu na miso ya batu. Bon, suka suka, famille ya Getu eyaki kolemba mpe batiki ye ma Max. Soulignons que ezali paradoxale ndenge famille ya Getu ebandaki kolinga Max te sous prétexte que azali musicien, pendant que mama ya Getu azali grande sœur ya mama na Maxime « Max » Mongali « Idi Mane » ya Los Nickelos.
Kasi bolingo yango ezalaki ya kimia te mpo Getu abandaki kokanga zemi te mpe babandaki kobota te na Max. Na pasi ya kozanga kobota, ebakisami lisusu na mobulu na ye Getu. Pendant que azali na ndaku ya Max, atournaka na ye na Mbungu Tati, footballeur ya Vita Club na Papy Tex Matolu Dode ya Empire Bakuba (Papy Tex abetaka pe na Emile na Bella Mambo série Empire ezangaki instruments. Série wana mpe Emile abandaki koyokana na ndeko na ye Max te !). Donc, tango Getu azali na matata na Max, voir soki basuani ou mua incompréhension muke, ebandaki kofongolela ye nzela. Wana, akimi ndaku akeyi na ye epayi ya Tati ou Papy Tex. Na nionso wana, Max abandaki kolimbisa ye mpe kondiama ba humiliations wana na kombo ya bolingo. Max abandaki meme kolela ko téléphone na batu oyo bayebi Getu kotuna soki banonaki ye, etc. Mokolo moko, Max ayaka koloba na ngai que bayebisi ye que Getu atia ye na muyu. Akanga ye likolo ya nzete ya mbila. Soki alingi akita, miso na ye ekutanaka na ya nioka moko azali na nse ya nzete wana, Somo ya nioka wana ezongisaka ye kaka esika azali na likolo ya nzete wana. Nzete ya mbila wana nde Getu. Bon, tango akomaka kokende epayi ya Ebale mbonge nde mpeve santu wana eyaki kobimisa ye na mutambu wana. Getu tee leleo mpe atikala kozua muana te mpe a continuaka vie na ye frivole tee na moyi ya lelo oyo.
Cas ya Emile ezalaki kotungisa Max dans la mesure où mutu makasi na ye Emile nde esalaki que abanda ko fréquenter ba tata muasi na ye. Eyebanaki que ako s’en sortir te mpo ezalaki lier directement na famille na bango mpe ayebaki ndenge ba nkisi ebandaki kotambola na kati ya rivalité ya famille ya papa na bango ezalaki na ba effets na yango. Ba effets na yango ezalaki na tournée Bella Bella esalaka na Europe. Trois jours sima ya bokomi na bango na Bruxelles, Emile azongi na Kinshasa sans pour autant a signaler mutu ata moko. Kaka boye !! Tango akomi na Kinshasa, alobi que azali kokoka climat te, pendant que voyage esalemaki na kati ya printemps. Incroyable comportement wana, tee na lelo oyo mutu ata moko te atikala ko comprendre yango !!! Kobanda wana nde atikala lisusu kotelema te, lolenge babebisaki ye ebungisaki ye nzela tee na suka ya mikolo mia ye.
Nabanzi que sika baninga bako comprendre motungisi ya Max na vie na ye mpe na ndenge azalaki pour rien na makambo eyelaki Emile.
Ndeko Messager, soki ozali na nzembo ya Getu Salayi, s'il te plaît, okoki kotiela biso yango?
2. Elisabeth Finat (Abeti Masikini « Tantine ») na Jeannot Finat (Abumba masikini) bazalaki bango nionso bana ya papa Jean-Pierre Finant, cinq filles et un garçon. Ye azalaki ngambo Belge, ngambo Moboa ya Province Orientale, district ya Tshopo na territoire ya Banalia. Azalaki député national ya MNC/Lumumba. Tango papa nabango akufi na 1961, famille eyaki ko s’installer na Kinshasa, sur avenue Itanga na commune ya Kinshasa. Neti famille ezalaki de confession protestante, yango wana tantine Abeti abandaki kotanga na Armée du Salut, sur avenue Kasaï. Atako bongo, leki na ye Josée ye abandaki kotanga na Saint Paul. Na Armée du Salut nde tantine Abeti ayaki kokutana na Antoinette Etisomba Lokindji.
Tantine Abeti azalaki na talant ya kobotama mpe baboti ba ye basombelaki ye orgue. Abandaki koyekola miziki banda na ndako mpe a continuer koyekola yango na kelasi na Armée du Salut. Etisomba mpe ayekolaki mpe abandaki kobeta le même instrument. D’ailleurs na concours ya 1969, ye nde abimaki la deuxième, sima ya Emile Soki, le premier.
Carrière ya tantine Abeti ebandaki na rencontre asalaki na Gérard Akuason, un franco togolais. Ye azalaki musicien awa na Paris na trio Makueson. Sima ya miziki ayaki kokoma producteur mpe parmi ba ye ye a produire : Francis Bebey na Bella Bellow. Tango Bella Bellow ayaka na Kinshasa na 1970, sur invitation ya mama présidente, mama Sese, la jeune Elisabeth akendaka kokutana na Gérard Akuason mpo ayemba ata na enlever des rideaux. Kasi ye aboyaki mpo amonaki ye muana muke mingi mpe abangaki mindondo na bakonzi ya mboka. Kasi tango Akuason azongi na Togo na Bella Bellow, kuna makambo eyaki kobonguana mpo Bella Bellow akutanaki na elenge mobali moko asepelaki abala ye. Du coup ayaki kokata bolingo na Akuason. Bella Bellow abali, aboti mpe sima mikolo aweyi na accident de circulation durant période na ye ya congé mpo akataki ba acctivités ya miziki mpo na maternité.
Akuason akiti na Kinshasa na recherche ya la jeune Elisabeth Finant. Na koluka koluka sans suite, aye kozua likanisi ya kosalisa concours ya ba jeunes talents. Par chance, Elisabeth mpe a réponde na yango. En vérité concours wana ezalaki parodie ya concours mpo Akuason afutaki jury mbongo mpo Elisabeth Finant alonga yango. Ye moko la concernée alobaka yango mpo durant concours abandaki komona Akuason sele sele na ba membres ya jury. Elisabeth Finat alongi concours wana mpe Akuason a promettre que akozala producteur na ye. Naturellement, esengelaki Elisabeth akende na Lomé esika Akuason afandisa makambo na ye, maison na ye ya production. Famille ya Elisabeth Finat na ministre ya culture eboyi catégoriquement likanisi wana. Suka suka, bayaki kondima à condition que bakende na Jeannot Abumba na orchestre. Elisabeth asala orchestre mpe apesa kombo les Ecureuils : six musiciens na quatre danseuses. Ba apriorités ba signiser Akuason ba contrats mpe afuti ba billets bakeyi na Lomé na Togo. Elisabeth Finat, na authenticite ayaki kokoma Abeti Masikini « tantine Abeti » Kobanda kuna basala ba tournee na ouest Afrique mpe suka suka tantine Abeti aye Kobeta ba Olympia mpe na Carnegie hall na New York, na Zénith de Paris. Na ba voyages wana akutani na batu lokola : Bruno Coquatrix, Pierre cardin (oyo ayaki ko signer na ye contrat avec 14 chansons). Ba succès nionso wana asali yango na arrangements artistique ya ndeko na ye Abumba. Sauf na Zénith, Abumba azalaki lisusu te.
Jeannot Abumba Masikini akuabuanaki na tantine Abeti Masikini mpo na ba incompréhensions na ligne artistique. Akuason akomaki ko imposer une certaine façon ya kobeta oyo Abumba abandaki ko partager te. Na ba incompréhensions wana, Abumba na Akuason babundaki na Lemba wana epayi ya tantine Abeti en plein séance ya ba répétitions (kuna répétition ebandaki kosalema tous les jours kobanda tongo tee pokua). Bitumba wana yango nde eyaki kosala que bakabuana . Abumba akeyi kosala mouvement na ye Abumba du Zaire. Abimisi ba nzembo lokola : Mibali ya Kinshasa, Zaïroisement votre, Likambo ya falanga, etc. par contre, Tantine Abeti aye kopesa groupe na ye kombo ya redoutables.
Sika, pourquoi tantine Abeti et dans quel intérêt alingaki abebisa mua mobali kaka moko wana bazali na ye ? Succès azuaki ezalaki na Abumba na kati mpe tango wana ezalaki kaka musala na koyeba na bango nde ekomisaki bango na sommet tee na kobeta na ba salles wana avec réussite oyo toyebi. Notons aussi que tantine Abeti azuaki ba propositions fermes ebele na ba producteurs na U.S.A. sima ya succès na ye na New York. Ba excès de zèles ya Président Mobutu nde eyaki kobebisela ye suite logique ya succès na U.S.A. mpo asengaki na Abeti akata turnee na U.S.A., aya na Paris koyemba na soirée oyo ye a organiser sima ya bokunani na Président Georges Pompidou. Or na même mois de mars 1974, sima ya ndule ya Carnegie Hall, ba publicité ekomaki kosalema na ba productions mosusu Abeti akosala na U.S.A. Commissaire d’Etat na culture akatisa Abeti ba productions na ye. Tantine Abeti akoma na Paris boye, Président Mobutu a annuler déplacement na ye na France suite na liwa ya Président Georges Pompidou. Le temps Abeti, Akuason na Abumba et les Ecureuils baluka kozonga na U.S.A. ko récupérer situation, trop tard, ba producteurs bamonaki yango que ezali manque ya professionnalisme : ba réservations ya salles esalemi, ba publicites esalemi, ba billets imprimer, ba réservations ya hôtels, mpe mbongo ebimi na ebebi, etc. Yango nde eyaki ko freiner progression ya Abeti na U.S.A.
Quand à Abumba, asalaki dépression nerveuse mpe alandaki ba soins ndenge esengelaki te. Tango wana, tantine Abeti alonguaki na Kinshasa akomaki kofanda na Lomé. Sima akeyi ko s’installer na France mpo Akuason azali français.
Wana ezalaki mua ndakbu nazalaki na yango mpo na ko contribuer na bosolo bua masolo.
Patriotiquement,
Emmanuel Kandolo
Sujet : C’est la vérité, un nouveau style de chanter
Ndenge ndeko Messager alobi na titre ya sujet na ye, c’est la vérité ya Wembadio ezalaki eyembeli ya sika na kati ya Zaiko mpo yango ezalaki chorale ya quatre chanteurs, contrairement na oyo ba kulutu na bango babandaki kosala na deux personne, maximum trois, à la rigueur. Kotika mutu na mutu a s’exprimer en solo ndenge wana, ezalaki mbala ya liboso na répertoire ya Zaiko.
La vérité ezali composition ya Jules Wembadio. Kasi en réalité, Jossart Nyoka nde a travailla nzembo oyo mpe apesa idée ya ba solos oyo bango misato, Jossart Nyoka, Jules Wembadio, na Siméon Mavuela basala.
Marie-Thérèse Tshikudi, azalaki une fille ya Bandal Tshibangu. Azalaki muasi kitoko. Ba séries wana, Wembadio awutaki mpe kobanda na Marie-Rose (Rosa, Amazone) sika. Ndenge ezalaki na tango wana, ba ndeko ya Marie-Thérèse à chaque-fois babandaki ko menacer Wembadio au sujet ya muana na bango. Wembadio akanisaki que soki abimisi nzembo tout en citant kombo ya famille Tshikudi, bakobengana Marie-Thérèse na ndaku, wana ye a récupérer ye. Yango elekaki bongo te, au contraire, Marie-Thérèse azaki gratifier na sérieux lukutu mpe Wembadio azuaki ba menaces ya kokangisama. Lisolo mpe esuka wana. Marie-Thérèse, atika mokili oyo, eleki mua ba ngonga.
Patriotiquement,
Emmanuel Kandolo
GETOU SALAY