Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Ndeko Messager,

 

Mua contribution na ngai yango wana mpo na suka ya mbula. Natombeli yo moko mpe baye banso bazali na motema mua yo mbula ya sika. Yango mpe ezala bongo mpo na Mbokamosika.

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo


Ndeko Gullaume Bayama,

 

Na lisolo obeti, tika nameka kolobela château rouge na oyo etali petite histoire na yango, ndenge tomonaki yango na bomuana mpe ndenge Zaïrois abandi kosala makambo kuna.

Château rouge na bosolo ebengamaka place du château rouge mpo kala (selon histoire ya Paris) esika wana ezalaka na château moko etongamaka na ba briques ya rouge. Château iye, ebandaki kobengama château rouge mpo na couleur na yango ya rouge. Tango Ville de Paris ebandi kotonga métro vers fin ya 19ième siècle na début ya 20ième siècle, eyaki kosala ligne numéro 4 oyo ezali ko relier ba portes mibale ya Paris : porte de Clignancourt na porte d’Orléans, mpe parmi ba stations na yango moko oyo ezali na nse ya esika château rouge ezalaki. Yango wana ebengami na kombo ya métro château rouge. Kasi na likolo, esika wana ezali kobengama place du château rouge. Place iye ezali justement na boulevard Barbès na esika ezali na croissement ya ba rues Poulet na Custine na 18ième arrondissement ya Paris.

Biso tango tozalaka bana, mingi mingi ba week end ba parents ba biso babandaki kotambusa biso na kati ya Paris. Mbala ya liboso tokomaka na place château rouge ezalaka na été 1959, towutaka visite na Butte Montmartre mpe toya makolo tee na place ya château rouge. Wana nde toyaki lisusu ko découvrir marché De Jean oyo ezali na même avenue portant le nom De Jean. A l’époque, tomonaka eloko moko te ya Afrique noire (bilamba, biloko ya koliya, mayaka, etc.), absolument rien. Wana ezalaki nde ba immigrés ya Maghreb nde babandaki kosala ba courses na bango wana (bazalaki na ba petites boulangeries na confiseries, boucheries, poissonneries, etc.) mpe batu mosusu bazalaki na boulevard Barbès. Na période wana, il était difficile kokutana na mutu moindo na nzela. Kasi nazali koyeba lisusu que quelques Sénégalais babandaki kotelengana devant ba magasins ya Barbès mpe misusu koteka biloko mike mike na nse ya tour Gustave Eiffel.

Ndenge nini Zaïrois aye ko se retrouver na château rouge ? Avant ya ko répondre na motuna oyo, tika naloba que kala ezalaki très difficile mpo na kozua biloko ya koliya ya mboka na biso. Bon, na famille na biso tozalaki vraiment na problème te dans la mesure où ravitaillement ezalaki kosalema na ba voyages na pays ou soki batindeli biso par fret. Sabena mpe sima Air Congo na Air Zaïre ebandaki koya  na ba malles ya biloko ya koliya sans problème atako tango wana trajet ezalaki ya 14 heures de vol na ba escales ebele tee eyaki kokoma ya 08 heures sans escale. Nazali koyeba lisusu que magasin ya liboso oyo ebandaki koteka biloko ya Afrique, na 1976, ezalaki na métro Trocadéro. Yango ezalaki magasin ya ba Chinois. Kuna nde ngolo ebandaki kotekama. Esika ya liboso oyo ebandaki kobenda ba rares Africains ya France mpe ya Belgique. Sima ya wana eyaki kokoma na métro Alesia. Na sima ya magasin oyo, ba Chinois mosusu mpe babandi ba activités na château rouge na magasin Rama. Yango ebotaki ba magasins mosusu kaka na nzinga nzinga ya rue De Jean wana. Zaïrois aye na château rouge na nzela ya Tati (un des grands magasins parisiens oyo etekaka biloko na prix discount). Ba jeunes filles oyo bawutaki na Bruxelles, bamemaki moyibi ya bilamba na Paris mpo bango bayebaki ndenge bayibaka na ba magasins ya Belgique. Tango wana surveillance ezalaka na ba boutiques na ba magasins neti lele oyo te. Soki bayibi biloko na magasin Tati ya Barbès, baye kotanda yango na mabele na wenze ya De Jean. Esika wana nde lisolo ya château rouge ebandaki epayi ya Zaïrois. Na yango, batu bakomaki koya wana kosala ba courses epayi ya ba Chinois, kosomba biloko ya moyibi oyo etandami na nse mpe au passage mua coop. ya chaussures moko eyibamaki, wana moyibi amemi yo na ndaku na ye, boyeki kosolola. Biloko wana eye kokumba batu na masolo ya carte orange, nzela ya métro République na gare du nord, makambu ekomi kosalema na métro  Laumière, etc.

Sika na oyo etali Robert « Bob » Masua w.w.w, ngai nakoyebisa yo kaka que luka oyeba malamu mpona nini Bob azali kokoka lisusu te ? Bob ayaki na Paris en tant qu’étudiant, kasi makambu na ye ezalaki clair te, il paraît même que azalaka na diplôme d’Etat te mpe amekaka kozua inscription na diplôme ya ndeko na ye Jules, na Paris VIII, mpe esimbaki te. Sima, aye ko se lancer na ba cailloux tee na ndenge ayaka kokoma producteur ya Koffi. Ko produire Koffi na komela batu mbongo nde eyaki kosala que ba moyens ekomi komata. Loyenge na kolawuka ya mbongo ebebisaki ye moto tee na ndenge  makambo na Koffi ebandaki lisusu kotambola malamu te mpo na ba raisons ebele. Aye kofongola boutique na château rouge, en se calcant sur initiative ya sœur na ye Véronique, une boîte à fric ya contrefaçons et autres VHS vidéos piratées ya théâtres de chez-nous produit na Tshitenge N’sana mpe diffuser na Télé Zaïre. Kutu, Tshitenge akanaki à porter pleine contre ye kasi maladie eyaki komema ye. Bob azali mutu ya liboso oyo abandaki exploitation sauvage ya ba sketches na ba émissions misusu ya variété musicale ya mboka na biso. Akanisaki que ezali « droit » na ye de se permettre de faire des bénéfices pécuniaires na ba œuvres ya batu mususu en les piratant, volant, bafouant, etc. tout en flouant à ses pieds ba droits d’auteurs ya ba Zaïrois. Ye nde abanda kosala bosoto na misala ya baninga jusqu’ à ce que ayaki kokota en conflit ouvert na Doudou Ngafura. Kasi ayaki ko corrompre Doudou mpe alembisa likambo wana.

Kokweya ya Bob ezali conséquence logique ya culture ya gestion à la zaïroise : mbongo ya boutique esangani na mbongo ya poche na ye, kolinga basi na kobala partout, kosala ba dépenses à la folie de grandeur, koboya kofuta ba niongo na ba factures, ba conflits permanents mpo na kofuta ba salaires ya batu oyo basali koteka na boutique,  kozanga ko respecter ba engagements na batu azali kosala na bango makambu, etc. lelo oyo, ye wana akoma koteka oyo akoki koteka na boutique ya château rouge mpo mbongo ezali lisusu te, moyen ba marchandises ya malonga ekota ezali te. Akoma kolala na boutique na ye ya château rouge mpo azali na ndaku te awa na France. Donc, akoma na ye sans avenir!

Joël Mbetenge, effectivement azalaki na boutique na ye mpe na château rouge. Yango ekueya mpo na mauvaise gestion na le fait ya ko se « spécialiser » na songi songi. Au lieu ya ko utiliser art na ye ya photographie na nzela malamu, akomaki nde ko utiliser yango mpo na kotia songi songi na mabala ya batu, na ba relations ya batu, bref désordre totale. Sima ya boutique asalaki nganda, kasi ba sales habitudes na ye ekimisaki ba clients nionso tee na ndenge aye ko se retrouver mitelengano. Sika faute ya nani ?

Ngai nayebisa Joël que talant oyo azali na yango esengeli asalela yango na ndenge ya mayele. Esengelaki akota kelasi ya photographie npo e crédibiliser koyeba na ye. En même temps a profiter abongisa français na ye mpe ayekola anglais na bon usage ya communication. Na sima alingaki abanda kokola na musala mua ye. Au lieu alandaka ba clients na ye na ba photos akangi bango na ba nganda, terrains, concerts, fêtes, manifestations, etc. alingaki afungola studio ya photo. Kuna alingaki mpe abanda kosala ba repartages, montages na ba cérémonies ebele tout en cherchant kofungola nzela na ba communautés africaines mosusu. Na pembeni akokaki koluka kosala ba portages na oyo etali makambu ya ba communautés en collaboration na ba journaux na ba revues communautaires, mpe koluka ndenge akoki kozua accréditation oyo ekoki kofongelela ye ba portes na ba manifestations culturelles ya ndenge na ndenge. Na yango, akobanda kotekisa ba photos na ye, kosala ba reportages mpo na compte na ye ou ya batu oyo bakotinda ye, etc. Mais, mutu alingi na ye komona mosika te mpe azali kobebisa boyebi bua ye na photographie kaka boye !!!

Botemba azali mpe na même problème ya mauvaise gestion mpe ya absence ya notion ya pilotage ya un petit commerce ! Totika koluka ba faux-fouillants! Likambo ezali nde na kozanga koyeba mpe ko se lancer na ba activités oyo ezali kosenga discipline na koyeba mosala. Neti bango bazali na yango te, ekoki kosimba te.

Ba ndeko, ekozala lokuta soki tokanisi que biso nde tosimbaka château rouge ou encore que ba Chinois baye nde sima na biso na château rouge. Bango na ba ndibu baya esika wana avant biso. Ba ndigari bango bazalaka kaka sima ya batu oyo mpona kosalela bango misala ya manutention sans plus. Ba Chinois na ba ndibu, contrairement na biso, babandaki na magasin moko, sima eye kobota mosusu mpe ezali kaka kokola. Biso, tozali nde na confusion mingi mpo toyebi te ndenge nini ya kosala commerce mpe na lolenge ya kobalola mbongo. Wango wana tozali kotika château rouge na ba oyo ba comprena ndenge nini petit commerce etambolaka. Boni na château rouge bazali na ba boutiques oyo ebotami wuta babanda ?

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

 

 

   

Ba ndeko Bellak, Lelo, na ya Théo,

 

Je crois que tolobela caractère ya Vicky na Congo 2000 na ba ndeko mosusu kuna. Kasi tika na bakisa en disant que mayele na maturité ya Vicky esalaki que abanda ko comprendre musukusuku ya Franco. Vicky azalaki mutu moko azalaki kowelisa te mpo abotamaka na famille ya bien, bakolisa ye na ba conditions malamu mpe azuaki éducation ya malonga mpe abandaki ko mener vie na ye dignement et d’une manière ordonnée. Yango wana azalaki nduliste ya liboso na Congo oyo asalaka mariage religieux na 1958, une grande première à l’epoque. Mayele ya Vicky ! Il suffit koyoka na ba nzembo na ye mpona ko comprendre elobeli na ye na ndenge ezali kolekisa maloba ma ye. Asala mingi mpona O.K. Jazz, ye azalaki véritablement le maître artistique ya O.K. Jazz. Kasi nionso oyo au lieu esepelisa Franco, rien ! Au contraire, ebandaki kotiya ye na ba jalousie. Déjà, le fait ya koloba français mpe koyeba mukanda ebandaki ko complexer ye, pire encore, voyage ya Bruxelles na 1959, ebebisaki motema mua ye. Na ba zuwa wana a détourna Bomboko, mais il ne pouvait pas grand-chose sans Vicky jusqu’à ce que salut eyaki na 1966, na ba garanties financières à vie oyo président Mobutu a prometaki ye en échange ya dévouement illimité et sans borne na ye mpona président Mobutu, nde Franco ayaki komona que cette fois-ci, akomi le seul maître à bord. Mais avant wana, il fallait koluka ba sili na mutu : ko violer ba ententes oyo bazalaki na yango na oyo etali ba contrats ya distribution ya ba nzembo ya ba musciens ya O.K. Jazz na ba Editions na bango : Vicklong mpo na Vicky, Franco na  Epanza makita na Boma bango. Wana ezalaki lidusu ya kobimela. Yango wana tango bakabuani, Franco abandi mbokela na biloba loba. Kasi Vicky ayaki kozongisela ye nzembo moko très mature na kombo  ya Conseil d’ami. Bolero kitoko, une chanson poignante, émouvante, pénible, mélancolique etonda maloba ma buania mpe mayele esangani na ba regrets en forme ya dégoût na ingratitude ya Franco mpe na kokita na ye na bas fond.

Par ailleurs, Invocation ezali vraiment kotiya eloko na eloko na esika na yango. Art ma polémique basalaka libala te ! Na oyo etali likambo ya ba journalistes en général mpe ya ba journaliste ya musique en particulier, mawa mingi. Parmi ba exemples, nakotanga avec déception Zacharie Bababaswe. Ye abandaki vraiment malamu mpe lelo oyo alingaki azala incontestablement mokitani ya ba kulutu ba ye : Benoît Lukunku (actuellement ambassadeur na Lisbonne), Kalonji Ngoy, Lutu Mabangu, Bijoux Mbiye Vanga, Lukezo Luansi, Jean Ntambwe Mushapata,  Manda Tshebua, etc. Liste ezali mulayi… kasi abebisi nzela na ye na makambo ya polémique stérile. Zacharie asala ba reportages na ye ya bien na Kin na musique mpe na makambu mosusu neti na aide mama Bobi apesaki na F.A.Z. pendant la guerre de libération, atuna général Bakambala, commendant logistique, mituna, akende na délégation tee na Goma atuna ba soda mituna. Asala eloko mususu ya bien na major Ngani ya DSP, asala musala emonana même soki mua ba amélioration esengelaki eyaka bipayi na bipayi en tout cas na ba initiatives akomaki kokola mpe avec le temps alingaki asala musala ya kitoko. Brusquement, amibuaki na polémique ebotaka mbuma te mpe kobunga nzela nionso wana. Na suka awa, ayebisi biso que awuti na Quebec na Canada na sommet ya francophonie, il était, selon ye, le seul journaliste Congolais kuna pendant que R.T.N.C. mpe etindaki batu oyo bakendeki na délégation officielle, Top congo mpe ezalaki na kunzi na yango Christian Lusakueno. Au lieu aloba makambo ya francophonie na ya R.D.Congo na perspective ya sommet ekosalisa, ye alobeli makambo ya popol Mukelenge na muasi na ye, sans rapport na présence na ye na Quebec. Donc, mutu na nse mpe makolo likolo ! Malheureusement, nzela oyo nde ezali ko risquer e guider musique na biso na baye bazali kosala yango.

Mpona kosukisa, Franco ayaki kozua mayele na sima kasi ekomaki trop tard. Alingaki Vicky makasi ata soki abungaki na ba provocations na ye. Asala tout mpo à sauver Vicky, atinda ye na poto à ses frais, asala nionso akokaki kosala mpe asimba makambo nionso dignement sans arrières pensées et en toute sincérité oyo ezalaki na hauteur ya ba vrais amitiés na bango. Kasi ngonga esi elekaki mpe yango eyaki kobakisama likolo ya ebandeli ya bokono Franco azalaki na yango. A vrai dire, liwa ya Vicky ezalaka choc makasi mpo na Franco.

Vicky, azalaki très sympa papa wana. Personnellement, nazua ba occasions mingi ya kokutana mpe kosolola na ye. Abandaki ko répondre volontier na mituna mpe koloba que porte ya lopango na ye ekangamaka te. Effectivement, soki azali na lopango na ye toujours propre mpe lopango kitoko, peto, langi ya pembe esika nionso, lokola motema na ye ya un artiste qui connaissait l’universalité ya musala na ye na kosangisa na yango. Eloba ye moko : « N’est pas musicien, celui qui le veut ! ».

 

Musicalement,

 

Emmanuel kandolo

 

 

  Ndeko Guillaume,

 

Ngai nakobakisa kaka que mutu ata moko te akoki kolongola José Roger Nyoka Longo Mvula « Jossart » esika azalaki na ebandeli ya Zaiko mpe esika azali sika sika awa na Zaiko. Jossart azali parmi ba musiciens ya premières heures mpe ya premier jour ya Zaiko. Bien que famille na ye esilaki kolongua na Dendal, abandaki kowuta N’djili et ensuite Kimbaseke mpo na koya kobeta na Zaiko. Le seul oyo abandaki kowuta mosika na bango nionso. Il est également le seul oyo abeta ba concerts, asala ba enregistrements, a participa na ndule mingi,  mpe asala ba voyages nionso ya Zaiko. Jossart atikala ko trahir Zaiko te. Fidélité na régularité na ye emonana butu na moyi ; na tango ya bisengo na ya mpasi ; mbula na moyi ; na  tongo mpe na mpokua na Zaiko. Jossart azali makila ya Zaiko : abanda na Belguide, ancêtre ya Zaiko tee na lelo oyo azali kokoba na Zaiko. Donc, un pur sang. Jossart atikala kobeta na orchestre mosusu te en tant que nduliste régulier ya groupe mosusu autre que Zaiko ! Azui oyo musicien azuaka na carrière na ye na Zaiko. Alors, moko te akoki kobongola masolo. C’est vrai, ba contradictions ekoki kozala na kobunga, kasi bendele ya Zaiko, ezali kopela grâce na Jossart. Na yango ensengeli azua lokumu mpe ko reconnaître yango.

Ba oyo bakende mpona ba raisons diverses, lelo basuki wapi ? Misusu kati na bango balobaki que bakosala koleka Zaiko, basuka wapi ? Bawela ki président, basuka wapi ? Ba declarations ya Pépé Félix Manuaku Waku tango mosusu asalaka ngai mawa puisque alingaka akaba kolongua na ye na Zaiko ba batu mosusu. Asalaka époque na ye, azalaka le grand chef oyo abandaki ko diriger bilombe nionso. A dirigeaka Zaiko na compétence nionso. Bilili mususu emonisa tango Dieudonné Nzolatima « mbuta Mashakado » na ndule ya RE.NA.PEC na 1976, na ba provocations sur André Bimi Ombale. Na nzembo ya Eboza ya Ilo Pablo, Mbuta akata André kwanga na micro ya première voix. André ayaki ko se rabattre na mopanzi mpe ayemba nzembo wana sans ayokana tout en demandant na Likinga « Redo » amata na esika na ye. Na bouchez, azonga sima epayi ya pépé Félix Manuaku na Teddy Sukami mpo asenga na Manuaku que abendana. Manuaku apesaki ye autorisation na honchant la tête.

Pépé Félix ayaka kosala erreur ya vie na ye en croyant que soki alongue ba oyo ayokanaki na bango na kiyanda, bango nionso bakolanda ye. Toyebi ba nani bayanganaka ye mpe baye balandaki ye. En plus, mutu te abengana ye na Zaiko.  Abendana ye moko. D’ailleurs, Roxy Tshimpaka abanda ko répéter répertoire ya Zaiko pendant que ye azali naino na Zaiko. Tango amonaka Roxy na vis-à-vis nde ayaka kokima  Zaiko de lui-même. Soki azali na mémoire, akoyeba que alobaka yango ye moko na émission ya liboso asalaki na César Ngadi. Apesa même ndakisa ya Bongania seul mutu abandaki kokumisa ye devant effervescence na encouragement ya batu ebele mpo na Roxy. Manuaku ebongi a s’en prendre na ye moko na famille Tangi oyo balakaki ye ba merveilles. Ba Tangi na ba amours oyo ezalaki na kati nde ebebisela ye makambo na Marceline mpe na Zaiko. Réalité ezali wana !!!

Tango Manuaku akomaki na ye par terre, mpe après départ ya batu bakendeki kosala familia Dei, Zaiko eyaki ko sollicité ye mpo aya ko renforcer mouvement neti ezalaki na mobulu makasi. Kasi ye azuaki yango neti occassion ya revenche mpe na ba conditions apesaki, moko ezalakai insalamable : en plus na ye moko, aya na six musiciens ya Grand Zaiko Wawa  na Zaiko Langa Langa, ekoma neti fusion ya deux orchestres. Wana ezalaki intolérable mpe suréaliste. 100% ya batu ya Zaiko oyo basololaka na Jossart en priver na bakonzi ya Zaiko bango moko baboyaki boule wana. Na kanda wana nde akoma koloba oyo abanda koloba wana. Abosani que souvent babengisaka ye, tango abandaki kobaluka baluka na mikili sans ambition, abandaki mpe koya kobeta na ba concerts soki Zaiko eye mikili, mais abosana nionso wana. C’est vraiment dommage!

Antoine, ndenge Anaclet ayebisi yo, Zaiko ebimaka na Bar Hawaï oyo eyaka kokoma ciné Bongolo.

Guillaume, merci na yo ndeko mpe tozali kaka kokoba na blog na biso oyo.

 

Musicalement,

 

Emmanuel Kandolo

 

 

 

Ba ndeko,

 

Lisolo ya valentine Mansanga ezali vraiment na contradiction mpe ezali kotelema malamu te. Joe Nolo atindi sango na Kinshasa tee na Congo « Soki bomoni muasi akongenga lokola solei,  boyebaka que ye wana ngai nalingi… ngai nakobala...». « Batu ba confirmer que Mansanga azali leki ya lucifere » mpo azali kosalisa ba accidents mingi soki batu bakotala ye. Kasi tango Mansanga aye na ndaku ya baboti ya Joe Nolo, à la grande surprise kongala na ye lokola solei elobami te. Ekoko ebendi attention ya batu ezali parfum ya solo ya jardin d’Eden oyo nzambe akabelaki ye tango abimaki miss na paradis. Or, biso nionso toyebi ndenge lisolo ya jardin d’Eden esukela. Toyebi lisusu que moko te akota paradis mpo tee lelo oyo jugement dernier esalemi naino te mpe tribunal wana ekosalema na surprise générale, ndenge eko siéger eyebani te, loi oyo yango ekosambisela batu endimaka présence ya avocat te, elingaka enquête te, mpe elingaka kotuna mituna te, etc. Ata moyibi oyo Yesu alakaki jour babaraki bango akota paradis te mpo mibeko elobi qu’il faut au préalable jugement dernier avant mutu amona mpe akota paradis. Alors, ndenge nini ba élections miss ou élection miss esalemaki kuna mpe Valentine Mansanga alonga yango en étant plébliciter miss ?

 

Musicalement,

 

Emmanuel Kandolo

 

 

 

Ba ndeko,

 

 

Na mituna ba ndeko Messager, ya Moti na Dodo bakomi, esengeli tomeka kokabola mpo na komeka koyanola na motuna oyo esangisi mitunia minso : Comment aider efficacement nos familles restées en Afrique?"

Yambo ya ko aider ebongi mutu ayeba soki azali ko aider na objectif nini ? Aide oyo ekowumela ngonga boni, mbula boni ? Tee wapi a ko continuer ko aider ? Ba familles nionso na R.D.Congo ezali ndenge moko te mpe nionso ezelaka aide ya libanda te mpo makoki na mikumba mikeseni. Na oyo etali aide na famille, ba cas d’espèce ezali ebele mpe ba lolenge ya ko aider ezali miyike : ko financer ba études na famille, ko financer corruption mpona kozua misala, koleyisa famille, kosunga na ba cas ya maladi, matanga, feti, kobalisa ndeko na nionso oyo ezali kolanda, kobongisa quotidien ya famille na esika famille ezali kofanda, transport, factures ya energie, etc. Ba familles mosusu basalaka yango te mpo bakoka : ba ndaku ebele efandi polele, baboti bazali na situation mpe bazuami na mikili na compte na bango, bana bazali na misala efutaka très bien, ba misusu bazali na affaires mpe bazali komona clair, etc.

Kasi likambo munene oyo ezali ko compliquer situation ezali nde kozanga ko kanisa na lolenge ya ko orienter aide mpo yango e rendre batu autome et non dépendant. Or, dans la plupart des cas ya ba aides oyo ezali kokende na ba famille ezali ko rendre batu dépendant mpe improductif. Ba causes na yango ezali kaka na origines ya ba aides wana mpe na notion oyo batu bazali kotinda aide bazali kosala na aide. Na ngambo ezali mpe na ba éléments extérieurs oyo ezali kosala que mutu a comprendre vraiment te pourquoi azali kozua aide wana mpe nini esengeli na ye esala an aide yango, tout comme interprétation ya rapport entre rareté ya circulation ya liquidité oyo ezali kowuta na ba faibles revenus voir kozanga kofuta batu na mbongo oyo ezali kowuta libanda mpo na kosalisa batu.

1. Mentalité

Na mboka na biso likambo ya mentalité ezali ko bloquer évolution ya mutu mpo a comprendre makambo ebele. Soki to observer société na biso kobanda likolo tee na nse, démesure na luxe elati batu makasi. Il suffit totala baye bazali na pouvoir lelo, lobi bazalaki ndenge nini ? Lelo bakomi ndenge nini ? Kosenga mbongo na ba montant minene ya kokaba pamba boye ezali kokamuisa, facilité ezua esika ya musala mpe batu balingi intervention ya l’Etat défaillant na nionso tee na kokata matiti oyo eboti liboso ya lopango na bango. Tee na camp militaire, soda akoma na bolembu bua bokati matiti oyo ezali kobota esika ye afandi. Azali kozela chef d’état major général ya armée aya kokatela ye yango mpe ministre ya défense akongola yango mpe akende kobuakela ye yango na fulu. Soki totali na balabala batu mingi balingi kaka kolata bilamba ezali na kombo ya couturier ya luxe, peu importe origine ya eloko, seul le paraître compte. Le fait ya kolata griffe ezali kosala mutu, tout comme kosolola na portable batu bamona que oyebani, kotambola na voiture ya marque ata esala ba kilomètres milayi mpe elemba na yango, esala rien soki ezali gros cylindré, bozui ya mutu ezali nombre ya basi bazali kolanda ye, ndenge bazali koyemba mpe kobuaka ye, kozua diplôme ya université sans bagage na mutu, l’essentiel ezali que nasilisa, etc.

Ba oyo bazali mpe kowuta mpoto, eloko ezali ko intéresser bango ezali nini bakoloba soki bamoni ngai boye ? Equipe epola te, esengeli nasimba ba petits makasi na ba formes ya solo ba griffes ya somo, esengeli ba convaincre selon ba critères ya réussite oyo mboka na biso ezali ko reconnaître réussite. Nini towutaka na yango ya malonga na mikili yango towutaka ? Bo mutu na biso bokomaka ndenge nini ? Observation ya malonga ya kokabola na baye batikali na mboka ezalaka nini ? Ndenge nini tokoki kofandisa bizaleli malamu ya poto  na oyo ya malamu ya mboka ezalaka na makanisi ma biso ? Est-ce que kobonga ya mutu ezali kaka na mbongo ? Buania, mayele ya kelasi, bizaleli bia bonkoko ba remplaceaka yango na ba biens matériels ? Le fait ya kokita na mboka na makanisi etengama mpe ekemba te, yango wana tozali komona ba investissements bidons neti ba soi-disant flat-hôtels, ba taxis bus na ba taxi ezali kobota mbuma te. Mutu alingi bamona ye que atambusaka, soki azali na voiture a sentir que amati échelon, soki akeyi na R.D.Congo mpo ye azali na mukanda amoni que a avancer par rapport na mutu oyo azali na mukanda te, soki asombi ndako na R.D.C, mokili mobimba esengeli eyeba, etc. Nionso oyo parce que projet ezali te. Ou soki ezali, esalemi ndenge esengeli te mpe ba évaluations ya risque na succès esalemi malamu te. Nzela wana ekeyi tee na ba oyo bazali kosala politique. Bazali batu ya liboso oyo bazali kosalela mibeko ya mboka oyo bango moko basali mpe ba voter te. Bazali ko entretenir corruption, moyibi, na ko continuer na maye manso mabebisi mboka.

Pona kobongola mentalité na oyo etali ba ndeko na biso oyo bazali na R.D.Congo mpe oyo bazali ko recevoir aide ya libanda esengeli diaspora ezua likanisi ya kosala ba associations ya changement ya mentalité oyo ekoki ko accompagner utilisation ya aide wana,  awa na mikili neti na France par exemple mpe na R.D.Congo. Ba associations oyo e jouer rôle ya sensibilisation ya batu sur sens ya responsabilité ya mutu na gestion ya vie na ye, na valeur ya kopesa na mbongo en insistant sur la valeur financière et économique na yango mpe na ndenge ezali kosimba économie ya mboka. Mbongo ezali eloko ya kosakana na yango te mpe kosimba yango, kozua yango na ko dépenser yango ezali kosenga boyebi ata ya moke. Ndenge nini kobotisa mbongo na makambo ya solo, ndenge nini ko limiter ba dépenses mpe ndenge nini baye bazali kotinda yango bazali ko se sacrifier na botindi  yango, etc.

Aide esengeli esalema na programme, sinon te, résultat na yango ekozala nul. Awa na mikili tango mutu akomi esengeli association eyamba ye mpe eyebisa ye ndenge elekelaka : na insertion sociale, qualification na musala, kofuta ba impôts indirects na directs, ko déclarer ba revenus, mpe ko gérer malamu. Na moment oyo mutu azali ko aider ezali une partie ya mbongo ya retraite, épargne, assurance ya vie na ye ezali kokende, etc. yango wana esengeli ebota mbuma, ekende esika esengeli ekende. Soki ba associations oyo ezali kosala musala na yango malamu peut-être makambo ekobonguana mua moke.

Kasi diaspora ye moko lisusu azali komitiya na mobulu puisque à travers mabanga oyo azuaka na banzembo, toyokaka que kozua ezali facile, nionso eyaka yango moko, na ba imaginations oyo ezali mosika na makambo ya solo. Ebongi lisusu mutu atika ko s’identifier na musicien mpe atika kokanisa que vie na ye esengeli ekende ndenge un irresponsable azali komema vie na support ya produit ya musala na ye : clips, publicités, D.V.D., C.D., mabanga, bilamba, kindumba, etc. Est-ce que soki batangi kombo na yo na Maxi, Pululu, ou Amour voir Samy nde e changer nini ? Mbongo ya mabanga ekoki ko servir na eloko mosusu te ? Soki oboyi kokende miziki na Zénith ekosala nini ? Soki pendant séjour na yo olingi fille ou garçon na R.D.Congo te eko changer nini ? Soki mpe tango okitaki mutu akiaki yo cas te, oko perdre nini ? Nionso oyo lifuta na yango ezali nini concrètement ? Wana nde mituna esengeli diaspora amitunaka tango mosusu !

 

2. Projet ya bien communautaire

Coopérative ya bana mikili esengeli ebotama. Lolenge ya malamu ya ko aider ba ndeko ezali na ba projets ya intérêt commun neti kosalisa bibliothèque na quartier, ko lancer projet ya ko déboucher ba canaux d’évacuations en incitant ba jeunes na volontariat, projet ya ko retaper école ya quartier ou ya commune, kotongisa dispensaire na chaque quartier ya commune, kosala projet ya recyclage ya ba sachets en collaboration na ba artisanats, ko monter fanfare par exemple mpo na encadrement ya jeunesse na musique, kotongisa mua salle ya gymnastique oyo ekoki kopesa ba volontaires na sport ba encadrer bilenge, salle oyo ekoki mpe ko servir na ba pièces ya théatre ou ba opérettes na but ya changement ya mentalité na ba réunions ya club culturelle na quartier, etc. Nionso oyo ekoki kosalema soki diaspora ayebi ndenge nini ya ko canaliser makanisi. Il suffit par exemple batu ya chaque commune bayokana en association ou na coopérative, neti bana Matonge, bana ya Immo-congo, bana Yolo, bana Kimbangu. Soki basangani boye, bakoki kosala ba projets neti oyo natangi likolo. Sima bakoki lisusu kosangana na cadre ya ba communes tee na district mpo ba organiser transport public na kati na yango neti district ya Funa par exemple, en utilisant moto gizi ou petita pona transport ya batu. Yango ezali na faible consommation mpe ekoki kokota na ba zela ya mike. Na oyo etali neti transport ya marchandises basali ba pusu oyo ekobanda kaka ko desservir batu ya commune ou distrcit concerné. Soki mayele ebandi na makambo ya mike, mpe sensibilisation na oyo etali utilisation, kobatela bien communautaire na ko gérer yango malamu, yango ekoki komatisa activité économique na kati ya district mobimba mpe ko rendre jeunuesse responsable mpe autonome. Wana coopérative ekoki koluka banzela ya sika ya kosunga communauté.

3. Vision

Kotinda mbongo, ba pourcentages Western Union azali kozua ezali mbongo oyo Congolais na gouvernement na ye azali ko perdre. Mbala na mbala nasolola na bakonzi misusu na likanisi ya kosala banque oyo ekoki ko faciliter ba transactions wana na mboka na biso ou encore na ba opérateurs économiques bakoki koyokana basala banque oyo ekoki kodefisa baye bazali na mbongo mingi te mpo ba se lancer na mua activité kasi rien kaka.

Ngai nazali kokamua te soki batu na mboka na biso bazali komona makambo mosusu te. Boni babima na Kinshasa mpo na kokende kotambola na intérieur? Ou encore boni na intérieur babimaka na ba provinces na bango mpo bakende na ba provinces mosusu ? Wana ezali ebandeli ya ignorance mpe kozanga koyeba mboka na yo. Nani apekisaki ou apekisaka Congolais akende vacance na intérieur? Ba misusu bakenda kelasi na Bandundu, Bas Congo kasi bayebi koloba kikongo te. Ba misusu basala université na Lubumbashi na Kisangani kasi bayebi koloba Swahili te. Ba misusu bawutaki intérieur baye kotanga na Kinshasa mpe batikala koloba lingala te ! Misusu bakende Ecole de formation des Officiers (E.F.O) na Kananga, balobaka Tshiluba te. Ba misusu bakende ba mutations ya ndenge na ndenge kasi balobaka lokota ata moko te ya ba mboka bakende kosala misala. Nionso oyo ezali kolakisa degré ya manque ya intérêt ya mutu. Congo ezali na bomengo ya ndenge na ndenge. Na côté ya Nganza na Nord Ubangi ba campagnes ya masangu ekotisela batu mbongo. Biloko na talo moke. Bumba, Kisangani, Goma, kananga moyen ya kosala makambu ezali ebele. Nzela ya Ndola na Lubumbashi ba Kinois boni bayebi yango ? Mbisi ya Océan atlantique na ba fruits de mer ba hôtels nini na capitale eboyaka kosomba yango ? Sol ou ba crevettes etekamaka sans problème ! Kivu eleyisaka batu boni ? Ba ndakala (fretins) na Tanganyika. Nzela ya Bandundu na Idiofa na Ngungu, mafuta na fufu. Bas Zaire kutu koloba te. Ngai nayebi mboka na ngai malamu yango wana nayebi nini nazali koloba. Esengeli nde kofongola miso. Kinshasa ezali capitale e produisaka eloko te. Mosala na yango ezali kaka ya consommation.

Makambo ya Moti alobi, ebandakala, lolendo na ngoigoi nde ezali kozongisa Kinois sima mpe na ba oyo nionso balingi kolanda lokolo na ye.

 

A suivre…

 

 

Patriotiquement,

 

 

Emmanuel Kandolo

 

 

P.S.  Ya Moti, esengo kotanga yo lisusu na kati ya famille na biso oyo ya Mbokamosika. Bozongi bolamu !

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
K
losako na binompona kobongola makanisi to changement de mentalitE o mboka ya biso RDCliboso, totika lokota ya bapayaibale, totika kosambela banzambe ya bapayaisato, totika koteya mpe mingi kopesa lokumu na biloko ya bapaya; tolakisa na  bana na biso mpe bandeko na biso lingala,kikongo,swahili mpe tshiluba; totika kosangisa lingala na francais pamba te tozali kobungisa basusu.kumisa lolenge lya kotambola ya muana mboka RDC.nkondo FELA KUTI ya mboka NIGERIA mpe na nkondo papa DIANGENDA ya RDC balobaki ete "totika kolia biloko biye tolonaka te mpe totika kolonoka biloko biye toliaka te"TOLIAKA BILOKO BIYE TOZALI KOLONA BISO MOKO NA MABELE NA BISO pamba TE MABELE YA RDC ETONDI MAPAMBOLI, soki toloni mingi na oyo ekotikala tokoki kotekisa na bapaya, tozela te mokolo mosusu mayi ekauka lokola na SAHARA.nakanisi liboso ya kofinga moninga tomitala, liboso ya kolongola mpoti na liso ya moninga tomitala, liboso ya koyeba makambo ezali koleka na mboka ya ngana totala naino na kati ya mboka na biso.wana ezalaki makanisi ya kobakisa na oyo baninga basusu basili koloba na likambo ya KOBONGOLA BONGO YA BATU YA RDCsoki tolingi mbonguana eyingela o mboka RDC essengeli tozala biso... totika komekola bapaya SOKI TOLINGI, TOKOKOKAkongo telema
Répondre
C
NDEKO KANDOLO,YA LIBOSO YAMBA MBOTE EWUTI EPAI NA NGAI COMPATRIOTE NA YO; NATANGAKA MWA MINGI BLOG NA YO PE ETINDAKA  NAKANISAKA QU'1 JOUR, MEME APRES NOTRE DEPART MBOKA NA BISO EKO ZONGA NA RAILS SOKI MENTALITE EBONGWANI. NASI NALEMBA KO REFLECHIR PONA CONGO.NAKO RAJOUTER KAKA BOYE NA ARTICLE OYO COMMENT AIDER NOS FAMILLES...NAZALI D'ACCORD NA MAKANISI NA YO OYO EKOKI KOKOMA PROPOSITIONS, NDENGE OLOBI NA POINTS 1 NA 2. TOMEKA KO KOLUKA NDENGE TOKOKI KO APPLIQUER YANGO.(YA SOLO IL FAUT TOBANDA NA CHANGEMENT YA MENTALITE).1 TRAVAIL DE SENSIBILISATION ENORME DOIT COMMENCER DS LA DIASPORA-MOTEUR YA DEVELOPPEMENT YA MBOKA NA BISO-PATRIOTIQUEMENTCHARLES A.PS. EXCUSEZ MON EMPLOI DE MAJUSCULE:MON CLAVIER N'A PAS DE PONCTUATION A LA FRANCAISE.
Répondre
A
Na bakisi na maye Emmanuel Kandolo alobi. Parmi ba magasins ya liboso ya ba africains na Paris tozalaki kosomba ba produits alimentaires ya Afrique na 1970 epayi ya ba camerounais na rue saint Didier na Paris 16° mpe na Belle ville. Pondu ya nkasa ezalaki te,pondu batuta mpe ya conserve ezalaki kowuta na cameroun. Kwanga ezalaki te,na esika na yango tozalaki kolia bebolo ou bobolo ya cameroun 'to miondo mpo ezali mua moke lokola kwanga.Evidemment manger africain ezalaki luxe na époque wana. Kolia ezalaki moins cher na resto Universitaire mpe na ndako soki possibilité ya kosala semoule ezalaki. Yango baye bazalaki na chambre bazalaki souvent na butagaz bien que ezalaki souvent interdit na ba conditions ya location.Na yebi Masua te sino na kombo mais grande soeur na bango na yebi ye. Azalaki kosala na Ambassade du Zaïre. Ye azali bolongani ya Kulenduka oyo azalaki kosala na Unesco,paix à son âme. Madame Véronique Kulenduka nde abandaki parmi ba premiers congolais kofungola boutique na Chateau rouge. Azalaki ko tonga mabaya mpe bilamba ya mariage ya basi. Mpe commerce na ye ya bilamba ya wax ebotaki boutique ya Kinshasa.Problème ya ba Africain et les congolais en particulier, tozali réfractaires na oyo nionso etali progrès mpe civilisation. po na ko tenir cahier de compte na comptabilité ya malonga e pozaka biso problème mingi yango wana désorganisation ezalaka na kati ya commerce na biso.Ba premières boutiques ekangemaki na chateau rouge po ba nkolo na yango bazalaki ko s'organiser po na ko futa taxes te. Ba impots e s'accumuler mpe ozali obligé o kanga.Banda période moko tokoki ko remarquer mingi ba resisté mpe commerce na bango ezali kokoba mpe ko évoluer makasi. Tout Kin ezali kaka en place et tant d'autres.Alimentation ezali na problème te. Ba ye ba exploita ba restaurants mpe ba dancings bazali na ba difficultés mpo communauté cible en l'occurence ya ba Congolais ezali na pouvoir d'achat ya makasi te. Dès lors cible ezali na pouvoir d'achat ya moke clientèle pe ezali moke.Tala exemple malamu ya ba Africain na Paris ezali boîtes de nuit Keur Samba na Black and White,ezali kofonctionner depuis des années sans problèmes majeurs. Na kati na yango okokuta communautés nionso ya mokili bakoya komela mpe kobina. Tout est question d'organisation.Na jeunesse na biso mingi ba vouer vie na bango na France na ba études mpe rien d'autre. D'ailleurs la plupart soki kaka diplôme ezuami bazalaki kozonga mboka où un travail les attendait. Habitudes ya ko fréquenter ba bars 'to nganda ezalaki na bango te.Emmanuel Kandolo alobi yango malamu,de 1960 à 1974 ezalaki rare okutana na Congolais na France bien que ba étudiants bazalaki mingi. Facilité ya papiers ya réfugié nde ekotisaki ba belgicains na Paris. Malheureusement mingi bazalaki ba miyibi dont l'un d'eux est un sapeur connu. Un des milieux interlopes ya ba congolais ezalaki na métro laumière ndenge Emmanuel Kandolo akomi yango.  Mpe papa wemba ayembi yango ba mbongo nionso ekomi papiers hyièniques. A Laumière l'argent coulait à flot. Il fallait être solide moralement pour ne pas succomber aux sirènes du mal et de l'argent facile. Laumière c'était l'argent facile. L'histoire des congolais en France doit être écrite,elle est tellement pittoresque. Les starts de Laumière sont chantées, c'est paradoxale mais c'est comme ça.La société congolaise na Fance mpe ailleurs ezali microcosme ya société congolaise na Congo. Il manque une élité oyo ékoki ko tirer l'ensemble de la communauté vers le haut ndenge ezali épayi ya basusu.Mais toloba kaka po na ba trains oyo ekomaka na retard té. Ba reussite ezali mingi na kati ya communauté congolaise na France. Ebongikomeka ko tiya yango e exergue po ebota émulation kati ya bana.Tala réussite ya ba noirs ezali na sport en particulier le football yango bana mingi bazali ebonguani epayi ya football.
Répondre
G
Suivez et commentez <br /> les coups de gueule de Radio MANGEMBO<br /> 99.7 FM<br /> De lundi à vendredi à 12h15<br />  <br /> Et si on parlait de Michelle et de Rama<br />  <br />  <br /> Dans moins de trente jours, une descendante d’esclaves africains, du prénom de Michelle, une négresse descendante d’esclaves africains, diplômée de la meilleure université américaine, sera, accompagnée de ses deux filles, pour un bail de quatre ans, la maîtresse du siège du pouvoir le plus grand sur la Planète terre, les Etats-Unis d’Amérique. Un PIB de 15.000 milliards de dollars, un budget de 2.700 milliards, 150 millions de travailleurs. Un pays presque dix fois plus puissant que la France.  <br />  <br /> Chaque jour de ces quatre ans, elle rejoindra dans le lit conjugal l’homme le plus puissant du monde : c’est un nègre mâtiné de blanc, nègre de sang africain, et par-dessus le marché, un peu indien aussi, du sang de ces tribus que des hordes sauvages de soldats massacrèrent des siècles durant pour asseoir une prétendue civilisation sur des terres tout autant magnifiquement sauvages.<br />  <br /> En Amérique, quarante ans après l’assassinat de Martin Luther King, Jr, Martin LK, Jr qui marchait pour que de pleins droits soient consentis et accordés de plein droit aux citoyens américains de race noire, un plein citoyen de race noire en est devenu le premier citoyen, par la volonté d’une population blanche à 80%<br />  <br /> En Amérique, alors que l’élite politique criait à la perte de prestige des Etats-Unis s’il advenait qu’un noir devînt le chef de la nation, le pays profond a, en votant pour un noir, redonné à la nation un prestige plus grand que jamais. <br />  <br /> En Europe, les usages et les traditions savent avoir la vie dure. Comme si le blanc colon était subitement et étonnamment devenu plus nostalgique des privilèges et des passe-droits que le blanc esclavagiste. <br />  <br /> En France, c’est pire. <br /> Une citoyenne de race noire devrait à son roi de président être reconnaissante d’avoir reçu un maroquin ministériel. Pour cela, elle devrait aller au front même d’un combat qu’elle n’a pas encore appris à mener. En France, une femme ministre de race noire doit d’abord servir de chair à canon électorale, comme quand, en Afrique, cette pauvre Afrique où la femme reste encore asservie et mâtée, les ministres femmes de chair seulement servent.<br />  <br /> En France, quand on a la peau noire, ce n’est pas le cerveau qui vous fait obtenir un poste ministériel, c’est la peau. Dixit Madame Nadine MORANO, descendante de blancs immigrés en France.<br />  <br /> La France est le seul pays au monde où les ministres de race noire se fabriquent. Et, comme ce sont des produits, ils sont revendus accablés d’une valeur ajoutée. Dixit M. Christian ESTROSI, notre MOTODIDACTE national.<br />  <br /> La France, berceau des droits de l’homme, est le pays où la pratique démontre toujours l’inutilité flagrante d’un ministère angélique des droits de l’Homme. Dixit HERR French DOCTOR, le ci-devant Bernard KOUCHNER… oui, le même, celui-là même qui créa au Biafra Médecins sans frontières. C’est lui, celui du droit et du devoir d’ingérence humanitaire. <br />  <br /> La France, enfin, est le pays où, lorsqu’on est fille d’immigrée, lorsqu’on n’est ni pute ni soumise, de peau basanée ou de noire peau, il faut savoir être heureuse d’être choisie pour être candidate à une élection européenne. Oui, il faut bien que la France refile certaines de ses négresses à l’Europe, pour faire un peu de place pour les blanches au Conseil ministériel de mardi. Dixit Madame FADELA AMARA.<br />  <br /> Bref, la France est tout simplement ce pays où, quand on voudrait avoir une carrière ministérielle longue et paisible, surtout quand on est une femme noire de peau, il faut savoir être peu intelligente, savoir parler peu et surtout apprendre à pas penser, quand la qualité suprême est de savoir se mettre au garde-à-vous à chaque fois que l’angélus sonne au Palais de l’Elysée.<br />  <br /> Guillaume BAYAMA<br />  <br /> Toujours, nous saurons revenir.
Répondre