L'orientation scolaire de nos enfants, scrutée par E. Kandolo
Ba ndeko,
Na ba mbula oyo mingi kati na biso mpe baboti mingi bazali ko se plaindre na éducation ya bana na biso na poto ou na ekoleli ya bana na biso na poto. Kasi ba plaintes wana mingi mingi esalemaka na bala bala ; na masolo na ndaku ; na mangomba ya nzambe ; na ba nganda, etc, sans pour autant toluka ko comprendre mua moke ntina ya kobunga ya bana na biso. Yango wana biso ba Congolais toyaka mingi mingi ko se rendre compte na mobulu ya bana na biso soki toyoki ou tomoni babimisi bitumba, babundi ou bazali kosala mobulu na ba manifestations publiques neti ba concerts, ba sangana na terrain, na ba gares ya trains mpe na ba nzinga nzinga ya ba magasins, etc. Sima ya ko regretter comportement wana, esuki wana, mpe tokozongela lisusu ba regrets na comportement oyo tango bitumba mosusu ekobima, mpe bongo na bongo na kati ya cercle vicieux : bana poto bazali mobulu ! Mpona nini bazali mobulu? Mpo balingi bitumba mingi ! Ou encore, poto ezali malamu te ! Mpona nini ezali malamu te ? Mpo ebebisaka bana !
Soki lelo oyo bana na biso bazali ko rater éducation, kokata kelasi, kotambola tambola sans kozala na objectif na mutu, ezali en partie conséquence ya démission ya ba parents : ba boti balongi te na mosala na bango. Yango ebongi lelo tolobela naino ndenge ba boti bazali kokolisa bana na poto mpe ndenge nini misusu bazali kokoka mokumba na bango mpe ndenge misusu bazali kokoka yango te.
Na mabala na poto, ba misusu babalanaki na R.D. Congo, baboti kuna mpe baye kokolisa bana na poto. Ba misusu babalani na poto mpe baboti na poto mpe bakolisi bana na poto. Ba misusu babalaka na R.D.Congo avant baya kobala lisusu na poto sima ya bokabuani (famille recomposée) ou libala ya mibale na muasi ya liboso toujours aux affaires (cas ya ba polygames) etc. Na cas mosusu, na couple ezali na bana misusu bazali ya muasi, misusu ya mobali mpe baye kosangana na ba oyo muasi na mobali baboti elongo (regroupement familial), etc.
Conception ya notion ya mariage epayi ya mundele na moto moindo ezali ndenge moko te : na France mariage ezali civil mpe famille ezali tata, mama na bana (famille restreinte) tout comme notion ya famille epayi ya mundele na moto moindo ekeseni. Epayi na biso mariage ezali coutumier monogamique ou polygamique na mariage civil. Famille ezali elargie na coutume. Na civil, famille ezali bana nionso oyo mobali aboti mpo na droit congolais de la famille muana makango azalaka te. Na yango, tango couple ezali kosala vie na yango na poto, esengeli eyeba que libala oyo muasi na mobali basali esengeli etambola ndenge mundele azali komonela makambu. Yango elingi koloba te que mundele azali kosenga biso toboya bonkoko na biso. Yango elingi koloba que tango yo oboti bana, bana wana bazali bobele na yo tata, mpe mama na bango nde muasi na yo. Ba boti bazali na mokumba ya bana na bango (kelasi na bango, kokola na bango, santé na bango, koliya na bango, kolata na bango). Lisalisi nionso oyo ekowuta na l’Etat na ntina ya bana ezali nde mpona bana na bino, esalisa bango na koliya, kolata, kotanga na ba makambu mosusu oyo etali kokola na bango. Na yango, esengeli te eliama lokola nguba mpo esengeli nde ezala épargner ndenge ekoki mpo eya kosalisa muana na ba classes na ye na makambo mosusu. Kasi mpo épargne ezala malamu esengeli mpe baboti bamipesa na mosala.
Sika tango tozali kobota bana, est-ce que tozalaka na projet sur bana yango ? Yambo yakobota, est-ce que tomilengeleke na kondima koluka kobota muana ? Est-ce que tomitunaka soki ya solo tozali na mposa ya muana na libotampe lolenge nini tokokolisa ye ? Totalaka makoki ma biso par rapport na ndenge oyo biso baboti tozali kokanisa lolenge ya kokolisa muana oyo ? Tango bototana, est-ce que toyebaka que milieu oyo tofandi ezalaka na influence munene na kokola ya muana mpe moboti tango aboti muana na ye, esengeli azala na projet na muana na ye : environnement akokola, éducation akopesa na ye, ba kelasi alingi asala, etc. Nionso oyo eyaka ngulu ngulu te. Mpo yango esalema, esengeli consultation kati na libota mpe compréhension ya société oyo libota lifandi : ba institutions, système ya sante, organisation mpe fonctionnement ya éducation nationale, koyeba Préfecture, Mairie na ba services oyo ezali ko offrir ( impôts, allocations familiales, garderie ya bana, aides, délivrances ya ba documents ya état civil, aide personnalisée na logement, emploi, orientation, information na action sociale, formation professionnelle pour adulte, recouvrement, permis de conduire, passeport, etc.)
Soki nazui exemple ya France, baboti mingi bayebi te ndenge nini système ya enseignement public na privé ya France esalaka : fonctionnement ya ba académies, formation dispensée, bac professionnel, ba écoles nini e formaka malamu mpe formation malamu elingi koloba nini ? Ndenge nini muana akoki kozala orienter malamu kobanda na cours préparatoires (CP), cours cours élémentaires (CE), cours moyens (CM), collège tee na lycée na bac ? Filière nini ebongi na ye asala sima ya bac ? Ndenge nini esengeli kosala mpo muana azala na opportunité ya kosala ba bonnes études oyo ekoki kopesa ye ba ouvertures ya malonga tango akosilisa ? Bokeseni ezali nini na kati ya na université, Institut universitaire technique (I.U.T), ecoles, centres, instituts oyo ezali rattacher na ba universités mpe ezali na autonomie na université mpe na bokeseni par rapport na ba départements na facultés ya universites ? Mpe ndenge nini muana akoki kokota na ba grandes écoles mpo azala parmi ba élites ? Justement en parlant des grandes écoles, esengeli toyeba que na France tozali na grandes écoles prestigieuses neti: Ecole Polytechnique, Sciences politiques (Sciences Po ou Institut d’Etudes Politiques), Ecole normale supérieure (Normale Sup.), Ecole Nationale d’Administration (E.N.A). Mosusu mpe ya lokumu ezali neti Ecole centrale, Ecole nationale des arts et métiers (ENSAM), Hautes études ya commerce (HEC), Ecole Nationale Supérieure d'Electrochimie et d'Electrométallurgie (ENSEEG), Ecole nationale des sciences géographiques (ENSG-Géo), Institut Français de la Mode (IFM), Ecole nationale supérieure du pétrole et des moteurs (ENSPM), Collège de l'enseignement supérieur de l'armée de terre (CESAT), Ecole spéciale militaire de Saint-Cyr (ESM), Institut des sciences et industries du vivant et de l'environnement (Agro Paris Tech), Ecole nationale des ponts et chaussées (ENPC), École nationale supérieure des arts et techniques du théâtre (ENSATT), Ecole nationale supérieure de l'aéronautique et de l'espace (SUPAERO), etc.
Baboti mingi pona ba raisons miyike, souvent par ignorance bayebi te impact oyo diplôme ya grande école ezali na yango na évolution ya parcours professionnel na France mpe na étranger. Yango wana bana mingi ya mayele ba rataka ba opportunités ya kosala ba études malamu mpo baboti na bango bayebi signification ya motivation ya investissement scolaire ya bana te.
Parcours scolaire ya muana na poto ebandaka kozala suivi banda na C.P. Na pembeni, esengeli mpe ko mobiliser ba moyens tango couple ezali na musala mpona kotiya mbongo pembeni tango mosusu muana akoki kokota na école privée. Na yango na école privée esengeli kokomisa muana ata mbula mibale voir misatu à l’avance mpo ba demandes ya inscription ekoma mingi. Wana elikia que muana ako bénéficier na formation de base ya malonga. Muana akoki mpe kotanga na école publiques ya malamu soki baboti baye bafandi esika oyo ekoki kopesa muana possibilité ya kokota na école ya malamu (meilleure école). En dehors ya formation ya kelasi esengeli pe baboti bayeba ko encadrer muana na mayele na ko orienter ye na lecture, kosombela ye ba jouers oyo ekoki kopesa ye mayele, ko encourager ye azala na baninga ya mayele mpe koluka koyeba baboti ya baninga baye, kozala en contact na balakisi baye mpe na koyeba évolution na ye ou ba difficultés na ba progrès na ye mpe nini esengeli kosala mpo alonga ba difficultés mpo a maintenir capte ya progrès, kosolola na ye na maye matali société, ko répondre na mituna akotunaka, kolakisa ye nzela ya malamu na ya mabe, kolakisa ye mpe ko transmettre ye esprit ya ko travailler makasi na nzela ya progrès mbula na mbula mpe na esprit ya concurrence na comparaison na baninga par rapport na ba résultats na ba notes na bango, kolakisa ye ba valeurs na ba antivaleurs. Lelo oyo par exemple, kozala honnête ezali mua pasi mpona baboti mosusu. Soki neti tata ou mama asalaka makambu, ndenge nini akoki ko transmettre muana ba valeurs ya solo? Soki baboti ba trichaka na ba fausses déclarations mpo bazua mbongo, kosomba biloko ya mayuya, kokotisa batu na mikili moyennant mbongo ebele, ko voyager na ba billets ya escroquerie sur carte de crédits ya ngana, kotinda biloko ya moyibi na R.D.Congo, kosalisa ba nganda ; salon de coiffures et autres boutiques sangisa sangisa produits cosmétiques-biloko ya kolia-salon de coiffures clandestions, etc.
Kofongola muana mayele ezali mpe na ba nzela ebele : kolobisa ye langues nationales na ndaku, Kosala na ye débat sur makambo ya société ou après lecture ya livre ou fait moko ya vie quotidien, koyeba point de vue na ye na oyo etali respect ya bakolo, ya baboti ya baninga na culture africaine, sens ya interdit na tabou, caractère sacré ya mariage epayi ya mundele na moindo, respect kati na mabota oyo ezali lier na libala, Komema ye na promenade na jardin et parcs publics, komema ye visite na musée ya Tervugen na Belgique, ko transmettre ye bolingo ya nature, ko visiter ba musées ndenge na ndenge, zoo, jardins botaniques, ba monuments, kokende na cinéma na théâtres, kosala sport na lecture, komema muana na ba bibliothèques, ko voyager R.D.Congo mpo azalaka na attache na culture ya mboka mpe ayeba Congo profond na ba richesses ezuami kuna (forêt, faune, flaure, coutume, rites et tradition, art, culture, religion, etc.)
Au lieu baboti batalela makambo boye, mbongo ya allocation au lieu e servir na épargne ya bana, ekoma ko servir na ba besoins oyo ezali na rapport te na bana : kosomba lopangu ou ndaku na R.D.Congo, kosomba ba voitures ya occasion na Allemagne, ko s’improviser Homme ou Femme d’Affaires, ko voyager sans raison particulière, etc. Bana bakotikala kaka ndenge wana, na ba vacances au lieu ba voyages e zala mpona ko découvrir milieu mosusu na ko apprendre ba langues étrangères oyo ekoki ko servir bango na ba kelasi na bango mpe na misala tango bakosilisa kelasi, ba voyages yango soki otuni baboti misusu wapi Ngalula, kapinga na Mueneminayi ? Bakeyi wapi ? Eyano ezali kaka moko : « bakendaki na Allemangne epayi ya papa leki na bango Ngalamulume ». Epayi mosusu toyokoya que Blandine , Vivi , Guelord na Patou bakendeki na Londres epayi ya mama kulutu na bango mère Top. Na Londres na Allemangne wana, babimaka te, parce que ezali na mentalité ya tata leki na mama kulutu te que vacances elingi koloba ko découvrir ; divertir etc. kuna souvent, bazali na ndaku na ba cousines et cousins, tango mususu bakeyi mua bitinda na dépanneur Indien voir Turc ou batelemi na coin bazali kobeta masolo ya ba baskets oyo tata leki ou mama kulutu akosomba mpona rentrée ya classe na France. Alors, vacances e servir muana na nini ? Eloko nini oyo ye amoni ya sika mpe efongoli ye mayele na esika awuti ? Rien !
Tango muana azali kopusana na kelasi, baboti bayebi même pas soki muana akosala nini après bac. Suka suka, muana akeyi kobuaka nzotu na université, sans repère, sans orientation, avec éventuellement risque ya azua te na première année mpe akima na ye apres eches na première yango. Sima akoluka apema moke, après akomi kokende na ba petis boulots sans fin. Soki asilisi na université, peut-être aye kose retrouver na mairie ou na petite entreprise sans avenir mpe vie ebandi kobaluka wana. Soki a rater complètement ba études na ye, aye ko se retrouver vigile ou chauffeur livreur ou vendeuse ou hôtesse de caisse na grande surface. Soki musala ezali te ou azali kasola te, wana akomi kokende kobimisa bitumba bisika nionso ba voyoux lokola ye bazali kosangana. Sima ekokoma insertion difficile, proximité, ba parents instables, muana azalaki na caractère difficile, makambo ebele ebele. Epayi mosusu, baboti babosanaka que soki basi bafandeli lisolo ya litongi na téléphone ou na ndaku na ye na baninga baye bazali kopeta masolo, esengeli te bana bazala esika baboti bazali kosolola. Mpo nionso bakoloba muana akoyoka ! Ebongo soki ezali masolo ya matongi ya ba couples mosusu ou basi voir mibali mosusu na mobulu na bango ou na manques ya makambo na bizaleli na bango ou na ba limites ya koyeba mokanda, ndenge nini muana akozala na considération na bato oyo ? Ndenge nini muana ako respecterr mutu ou batu oyo bazali kolobola na mabe comme étant mikolo ou baboti malgré mabe na kozanga koyeba na bango ?
Na pembeni mpe, attention mingi etiamaka te na régime alimentaire ya bana. Souvent tomonaka ba négligences ebele na équilibre ya bileyi muana azali koliya tongo,midi, na pokua. Baboti bazali kosala attention na biloko ya kolia oyo bazali kosombela bana te : teneur na mungua, sukali, mafuta, motindo ya farine na oyo etali mapa, fibre, masanga ya sukali, etc. mingi bakipaka te. Bango moko mpe batalisaka nzotu te mpo na koyeba soki bazali na ba maladies ou na prédisposition génétiques oyo ekotinda que biloko mosusu eliama mingi te ou pas, nini esengeli kolia na komela mingi ou pas, ndenge nini ko contrôler nzotu, etc.
Na France ezali possible mpe nayebi ba familles oyo e investir mingi na ba études ya bana mpe bana basilisa ba études ya malonga mpe bazali kosala carrière ya malamu sans problème. Na yango, esengeli koyeba projet nini oyo yo moboti ozali na yango mpona muana na yo. Tango oboti muana yeba kozala na ba priorités na vie na yo. Luka oyeba na esika oyo ofandi académie nini oyo ebongi na muana na yo ! Banda mama azui zemi ou tango projet ya kobota muana esalemi, baboti botala selon ezuili na biono na ba allocations bokoki kozua soki bokoki kozala na épargne oyo ekosala que muana atanga malamu mpo na ko assurer formation de base na ye makasi. Na mosala, tango ozali kosala ba devoirs na bana, kokende ba réunions de parents, ko communiquer na ba professeurs ou encore na rapport quotidien okoki koyeba soki muana wana ezali makasi na domaine nini mpe ndenge nini okoki ko intéresser ye na yango ou ko orienter ye na yango ekoki koya que na kokola ya muana, alingaki akoma pilote ya avion, abongoli makanisi mpe alingi akoma ingénieur automobile. Mosusu alingaka akoma agrée en philosophie, baboti basungi ye mpe aye kosala médecine. Mususu alingaki asala carrière ya footballeur professionnel, aye kokoma avocat, ou alingaki akoma ingénieure na Méthodes scientifiques de gestion mpe akomi ndenge akanaki. Ezali mpe na muana mosusu malgré ba possibilités financières ya baboti, azali élève en difficulté; mususu akoki mpe kozala très agité ou hyperactif, voir très intelligent = surdoué. Muana ya boye esengeli azala na attention na suivi moko particulier compte tenu na ndenge azali. Yango ekosalema conjointement entre baboti na institution oyo muana azuami.
Pour réussir na zela ya éducation engeli kosala ba sacrifices. Kasi ba sacrifices nionso ezali de même nature te. Ba parents misusu bazali na ba moyens fianciers kasi temps ezali mingi te. Wana esengeli moko akata musala mpo akolisa bana. Misusu ba moyens ezali te, esengeli kokata na ba dépenses neti ya bilamba ya talo, ba voitures minene, kotinda mbongo très souvent na RDC, kobala partout, kobotabota bana sans désir ou souvent comme « preuve ya bolingo » na muasi oyo ozali na ye = irresponsabilité !
Na maye nakomi nabanzi que soki conjugaison ya responsabilité ya baboti, conjonction ya éducation ya ndaku, kelasi na environnement ezali sous contrôle, muana akokola ndenge elongobani. Na yango éducation ya muana batelemelaka yango wuta muana abotami mpe batikelaka yango une personne tierce te mpo muana asalemaka na bato mibale. Na bango nde mokumba wana esengeli esimbama.
Patriotiquement,
Emmanuel kandolo
Merci Kulutu EMMA ndenge "OFUNGOLI BOULE" ba NDEKO misusu BAYEBAKA te...
Dommage ke biso ba CONGOLAIS todjali ko vivre NETI ba NIAMA na POTO...
Nayebi ke BALANCE ya CULTURE BANTOU naya MINDELE edjali facile TE. Mais pour moi, LOKOLA to decider to VIVRE na MBOKA na B'ANGO il faut ABSOLUMENT KO TROUVER BALANCE WANA..sinom te..makambo
nioso OLOBI ekokomela FAMILLE nayo
Makombo nioso OLOBI ngai kutu naloba y'ango plus de milles fois na milieux yaba CONGOLAIS..MAIS nous sommes vraiement des IRRESPONSABLE MOKO INCROYABLE..
IMAGINEZ nanu un CONGOLAIS aboyi KOKOTA CLASSE a se limiter kaka na EDUCATION naye AYAKA n'ango na RDC..akomi awa n'AMERIQUE a decider a banda KOTAMBUSA TAXI( il y'a pas de sot metier..mais
plutot des sottes gens)..mais na mwa koswa naye a decider a BALA(MWASI na POTO) et pourtant ATIKA MWASI MUSUSU na KINSHASA na bana MISATO. AWA na POTO abota sikoyo BANA SAMBO...sikoyo makambo
ya BOYE..faute ya NANI???? C'est regrettable MAKAMBO YA BOYE...BISO BA CONGOLAIS todjali ko vivre na PAUVRETE MOKO 'INCROYABLE" na POTO...
MErci mingi na MAKOMI Nayo..permettre ngai nako CIRCULER y'ango na LINGOMBA Na NGAI ..peut etre BAKOYOKA MATEYA OPESI pe ndenge OYANOLI AWA..
Dio-Dio