Réaction d'Emmanuel Kandolo à l'article de Djamba Yohé
Ndeko Djamba Yohé,
Gaston-Marie F.
Le Congolais de l'Atlantique Nord,
Tika nameka kokoma oyo nazali na yango na maye okomeli biso awa. Ba commentaires na ngai nakosala yango en fonction ya ba points olandeli.
Et Franco dans tout ça ?
Guitare électrique ezalaki curiosité mpo na congolais nionso à l’époque. Bill Alexandre, guitariste belge, ayaki na compte ya Editions CEFA (Compagnie d’Enregistrement du Folklore Africain). Vicky Longomba na Moando Brazzos nde ba travaillaki na ye avant baya kosangana na baninga na O.K. Bar.
Yambo osala ba déclarations, esengelaki otala naino ndenge nini ville ya Léopoldville e développaki ! Courant électrique na Citas ekotaki na mbula nini ? Est-ce que tango Bill ayaki, abandaki kobeta na ba bars ya Léopoldville ? Luka oyeba naino ndenge nini ezalaki, mpe sima osolola. Est-ce que tangu O.K. Jazz esalemaki, courant électrique ezalaki na O.K. Bar ? Luka oyeba ndenge makambo e évoluaki, s’il vous plait. Au sujet lisusu ya guitare électrique, pourquoi yango eyaki kokota mua sima na ba orchestres ?
Petit Pierre azalaki musicien ya African Jazz te. Ye azalaki technicien mpe musala na ye ezalaki ya kosala installation ya ba instruments. Ayaki ko se retrouver na African jazz na kobeta mbunda durant voyage esalaki na Europe na 1959 tee na 1960 mpo mobeti mbunda azalaki te (nayebi te pourquoi Antoine Kaya « de puissant » mutu abandaki kobeta mbunda atikaki vide wana !) mpe tango ya ko recruter ezalaki lisusu te. Yango esengelaki batiya ye esika wana mpo ayebaki répertoire ya African Jazz.
Avant indépendance, ONATRA ezalaki na architecte naval ya mutu moindo te. Edouard Lutula « Edo Clary » akomaki architecte naval ndenge nini avant lipanda ? ECOMORAPH ezali tee lelo oyo, ekoma Institut Saint Raphaël, section commerciale administrative ezali toujours. I.S.C. ezali Institut Supérieur ya Commerce. Mpo okota kuna esengeli ozala na diplôme d’Etat ou équivalent na yango ou diplôme oyo ezali kolakisa que osilisi avec succès ba études complètes post-primaires. Donc, ECOMORAPH na I.S.C. ezali eloko moko te. I.S.C ezali nde deux cycles na total ya cinq ans ya études supérieures oyo ezali likolo ya six ans ya humanités ya Institut Saint Raphaël.
I. Aux portes de l’African Jazz
Ndeko, vérifier source ya information na yo. Franco akota jamais na African Jazz. Bana ya Opika na Loningisa bazalaki na philosophie moko te ya musique mpe respect na contrat ezalaki likambo ya liseki te. Mpe na 1953, African jazz ezalaki au complet na ba nduliste bakemba oyo bazalaki na temps ya ko former te mpo kuna ezalaki école de formation te. Ezalaki esika oyo mutu oyo ayebi musala mua ye azali kosala yango. En plus, ne rajoutons pas. Certes, mingi bayebaki solfège mpo bawutaki na chorales chrètiennes mpe na studio ebandaki kotangisa yango, kasi solfège wana ezalaki na rapport makasi te na ba techniques oyo epesamaka na conservatoire ndenge par exemple : Gérard Madiata ayekolaki yango. Bazalaki na ba bases ya miziki kasi sans plus neti na conservatoire. Totika makambo ya ba grammaires, etc.
Lisusu, mpona nini ozali koluka kobambela Franco qualification oyo ye azali na yango te ? De son vivant, abandaki kondima que atanga kelasi te, azali na qualification moko te, mpe ayekoli kokoma na kotanga na kimokolo grâce na volonté na détermination na ye (Franco abandaki ko admirer batu oyo batangi kelasi mpe ko aider bilenge mingi na ba études secondaires mpe universitaires na bango). Yango wana azuaka ba professeurs privés ya français oyo babandaki kotangisa ye na ndaku. Na tingama wana ayaki koyeba mukanda mpe akomaki en mesure ya kosala makambu ma ye sans ko recourir na aide ya mutu. Cette histoire ya programmeur ya IBM, franchement ezali kokosela Franco makambo pour rien !!!
SESOMO esalemaki na 1951, tango Belge azuaki mpe akongolaki batu mpona kotonga base militaire aérienne na infrastructure ya terrain ya aviation ya kamina na Katanga. Yango wana esengelaki ezala na compagnie oyo ekokaki kokamba gestion ya personnel oyo esengelaki etonga Base ya kamina. Sika soki nalobi nalanda ndenge olobi, elingi koloba que Franco akomaki programmeur avant 1951, année ya création ya SESOMO. Donc, na 13 ans azalaki déjà programmeur ? Peu importe, SESOMO ou pas, elingi koloba que neti asukaki na 3ieme primaire, entre qualification na ye ya programmeur na tango akataki kelasi, azuaki formation wana ozali kolobela ? Impossible !!!! avant indépendance, programmeur moindo azalaki te !!!!!
II. Maturité
Vicky Longomba azongaki na O.K. Jazz na 1961, mpo Nico Kassanda asalaki African Jazz aile Nico na ba musiciens nionso ya African Jazz à l’exception ya Vicky Longomba na Moango Brazzos mpo bango bazalaki ba mista ya Grand Kallé mpe bazalaki « pur sang » African Jazz te. Vicky na Brazzos tango bayoki boye, bakutani na Grand Kallé mpe ayebisi na bango que azali ko réflechir. Bon, bakamati décision bakende kosala Négros Succès.
Franco akendaki na mikili na hiver 1961. Na 1961, toujours, nde Vicky akendaki kosala Négros Succès, mpe asengaki na Léon Bombolo « Bholene » aya na Négros succès, mpe Bolhen aya (Bolhen azalaki soliste oyo Vicky a recrutaki tango Franco akangamaki na 1959. Na 1961, juste avant O.K Jazz ekende poto mbala ya liboso, Vicky asengaki na ye aya na Négros Succès. Kasi en bon professionnel, ayebisaki Franco vérité mpe azalaki disposer alakisa guitariste ya sika oyo ako remplacer ye ba partitions na répertoire ya ba nzembo ya O.K. Jazz avant ye alongua. Guitariste yango nde Simon Lutumba « Simaro »). Départ ya Bolhen nde esala que Simaro aya kokota na O.K. Jazz, mpe O.K. Jazz eye kokende na mikili na contrat ya Surboum African Jazz. Par contre, Vicky ayaki kotika Négros succès mpo azonga na O.K Jazz na médiation oyo groupe de Binza esangisaki ye, Franco, Brazzos na ba musiciens nionso epayi ya mama Lucie Botayi (bar Lucie Botayi = succès bar =Kimpwanza bar). Tango wana Franco asi akendaki mikili mpe amoni yango. Alors, ndenge nini Vicky akokaki kobetela ye masolo ya kuna ? Notons que banda Vicky alonguaka O.K. Jazz na 1959, akeyi na African Jazz tee na kosala Négros Succès, ye na Franco babandaki kolobana te.
Soki O.K. Jazz ekendeki na mikili ezalaki mpona intervention ni ya Lumumba ni ya Bomboko et encore moins ya mutu moko alingaki asala Franco faveur. O.K. Jazz ekendeki mikili suite na contrat ezalaki na yango na Surboum African Jazz, ya Grand Kallé. Surboum ezalaki kosala promotion, production na Edition ya ba musiciens na ba nzembo na bango.
Grand Kallé azalaki Yakee te. To confondre makambu te, ndeko na ngai. Grand Kallé azalaki kalaka, gentlemen et ambianceur ya première heure. Certes, en tant que nduliste ayebanaki na ba politiciens, ba commerçants, ba intellectuels ba yankee, ba bill, basi ya ndumba, ba jeunes filles ya élégance, etc. Par ailleurs, batu lokola ba Jimmy de l’hawaïenne, Déchaud mungala, Simaro masiya, Bavon Marie Marie, bango bazalaki nde ba yankee reconnu.
Na premier voyage ya O.K Jazz na hiver 1961, ba oyo bakendaki ezalaki : François Luambo « Franco », Edouard Nganga « Edo », Joseph Mulamba « Mujos », Nicolas Bosuma « Dessoin », Isaac Musekiwa, Jean Kwamy, Simon Lutumba « Simaro » Vicky azalaki te, wana akendaki kosala Négros succès. Le seul voyage Vicky asala na O.K. Jazz na poto ezalaki na été 1964. Donc, Vicky akenda mbala moko na mikili na African Jazz pendant 5 ou 6mois mpe aye kokende na O.K.Jazz na 1964 pendant 45 jours.
Pour votre information, entre le 30 juin 1960 tee na le 24 novembre 1965, aucun musicien Congolais asalaka boloko mpo na ba raisons politiques. Aucun ! Mpe Franco, na vie na ye atikala jamais kosala boloko mpona ba raisons politiques.
Ba Editions ya Franco ezalaki Epanza makita na Boma Bango. Sima ayaki kosangisa nionso na Editions populaire. Ya Vicky ezalaki Vicklong. Une partie ya bokabuani na bango na 1966 ezalaki justement en rapport na makambo ya ba maisons na bango par rapport na ba œuvres ya musiciens ya O.K. Jazz na Négros Succès.
Mon frère, zongela lisusu histoire ya Léopoldville malamu. Kinshasa wana ozali komona, ezali véritable ville cosmopolite. Yango eyambaka moto niono mpe efandisaka moto nionso sans problème. Na Kinshasa probléme ya « intégration » ezalaka ndenge bikolo mosusu ou ba villes mosusu ekomisaka yango soki lokola examen de réussite ya vie éternelle, rien. Na yango, makambo oyo ozali koloba wana, ezalaki rare na kinshasa ou presque pas na Kinshasa. Kallé abotama na intérieur na Bas Congo, Nico na Déchaud bawutaki na Miikalayi na Kasaï Occidental, Rochereau na Bandoundu, kasi bakoli na kinshasa. Bazali ba kinois kobakisa te, kolongola te par rapport na ba Franco, Vicky, Brazzos, Mujos, etc.
Au sujet ya divergence entre Lumumba na Malula, ezalaki nini ?
Mpe pourquoi ozali kokotisa mama na Franco na makambo oyo ezali kolekela ye ? Tika mama na Franco na libanda ya makambo wana. Dossier oyo ozali kotanga wana ezali na niveau na ye te, ayebi yango te, atikala kosala médiation na yango te. A votre connaissance, Malula na Lumumba batikala koyokana ?
Est-ce que okoki koyebisa biso na album nini Myriam Makeba (paix à son âme !) ayemba nzembo ya Liwa wa Wetshi ?
Na festival des arts Nègres ya Dakar na 1966, ezalaki victoire na eloko moko te ! Kasi tika nabakisa que façon bakonzi ya ekolo na biso baponelaki batu oyo esengelaki bakende kuna, ezalaki transparent te. Nayebi te soki oyebaka mpona nini na Festival ya Lagos 1977, Rochereau azalaki le seul oyo asalaki sélection ya ba nduliste esengelaki bakende na Nigeria ?
Ndeko na ngai, liste ya batu nionso oyo otangi que bakendeki kokutana na Franco ezali bongo te. Pourquoi ozali kobakisa makambo likolo ya mosusu ? Amstrong na 1961, azalaki loger na Hôtel Régina na ville. Azali le seul oyo ba musiciens bakendeki en délégation kokutana na ye mpo azali légende ya Jazz mpe kombo ya Jazz ezala utiliser mingi na ba kombo ya orchestres na biso na Congo. Ba oyo batikali, bayaki na compte ya ba manifestations culturelles ya ba ambassades na bango na Kinshasa. James Brown, The Jackson’s five, Miriam Makeba, B.B. King, The supremes, Manu Dibango, Ray Lema ba na Franco, Rochereau, Abeti, Zaiko Langa Langa, Stukas Boys, etc. babetaki na N’sele, Hotel Intercontinental na stade du 20 mai na cadre ya combat du siècle entre Mohamed Ali na George Foreman. Par ailleurs, Eboa Lottin, Bella Bellow bayaki sur invitations ya Fondation mama Mobutu.
Soki président Léopold Sedar Sengor ayambaki Franco mingi, je devine que ezalaki pona remarquable contribution na cinquième art. Soki bongo, Kasi ndenge nini atikala ko décorer ye Chevalier, officier, ou commandeur ya ordre des arts et des lettres ya Sénégal ata mbala moko te?
.
III. Le tournant décisif est en 1970
Na 1970, Franco a rajeunisaki orchestre na ye te. Ba nduliste bakimaki ye na 1967, juste après miziki babetaka sur invitation ya vice-président Albert-Bernard Bongo (futur Omar Bongo) na re-élection ya président Léon Mba ya Gabon, bien que azalaki kobela mpe na lopilao na Paris. Tango basilisi kobeta na fêti ya mokonzi gabonais, ye, Franco na Verkys bakeyi na Bruxelles na Paris à partir ya Libreville mpe azongisi ba musiciens nionso na Kinshasa. Ba nduliste ba comprenaki agissement ya Franco te puisque azalaki na programme ya kokende mikili na tango wana te. Lisusu, Franco apesi bango mbongo na ndenge esengelaki te. Bazalaki peut-être na raison mpo enveloppe vice-président Bongo apesaki ezalaki nde ya sadaka na ba musiciens nionso sans rapport na lifuti na bango ou na cachet ya O.K Jazz.
Cas ya Sam Manguana na O.K. Jazz ezali typique na conflit entre Franco na Rochereau. Franco apesaki Sam mbongo ebele mpo akima Rochereau. Kokende ya Sam na O.K. Jazz epesaka kosuana makasi entre Franco na Rochereau jusque na point ya kosala Sam ba menaces de mort. Na yango Franco afandisaki ye epayi na ye na Binza I.P.N. Flanquer na deux gardes corps, mpe atiaki na disposition na ye Mercedes Benz ya moyindo na ba rideaux (Dans la foulée Franco abuakelaki Rochereau nzembo yaToyeba yo) et Paul Ndombe Opetun (abuakelaki Rochereau Voyage na Bandundu). Antoine Nedule (papa Noël), Dalienst Ntesa, Lokombe Nkalulu Ba Enda Fe, bayaki na cadre ya recrutement massif ya ba meilleurs musiciens sur le marché.
Débat ya O.K. Jazz na Zaiko ou Afrisa na Zaiko, voir ba jeunes boye na boye, ezali un faux débat. Public ya Franco ezalaki oyo ya Zaiko te. En rien Zaiko ekokaki kosala ombre na O.K. Jazz. Soki ezalaki le cas, mbele Franco alingaki asala nionso mpo azua ba musiciens ya Zaiko na O.K. Jazz mpo azalaki na moyens makasi mpe ebele. Soki mua nungu nungu ezalaki, ezalaki nde likambo ya likunia na bana mike na motema mabe ya komona ba petits basala mua succès na ndenge na bango. Tee na ndenge Franco akende, O.K. Jazz etikalaki kaka na poids na yango ndenge toyebela yango pendant que Zaiko ebambamaka na 1974.
IV. L’apogée de l’Ok Jazz s’articule par les années 1980
Meka naino ozongisa ba souvenirs !!! O.K. Jazz aile Bruxelles esalalaki biloko ya makasi oyo esimbaka hits parade : Mario, Mamu, Non, Coopération, Réponse de Mario, etc. Carlitho asalaka poids na yango te atako ayembaka ba nzembo na ye kitoko mimgi. Tango alonguaka na O.K. Jazz, Carlitho akendeke na Langa Langa Stars te. Akendeke na Choc Stars. Malache Lungelo nde ayaki kozua esika na ye. Joe Mpoyi abetaka na Lovy du Zaire na mbula nini ? Franco azuaka ye wapi ?
V. L’apothéose et rendez-vous manqué avec la Terre de Canaan
« Moïse était arrivé devant la Terre promise que lui promettait Dieu, il l’a vue mais ne l’a pas foulé. Franco a construit un système de musique et d’accompagnement, il l’a enrichi, mais n’a pas rencontré la phénoménologie du travail qu’il a accompli pendant plus de quarante années dans l’arène de la Musique Congolaise moderne. »
Ngai nazali ko partager comparaison na yo te!
1. La comparaison entre Moïse et Franco n’a pas lieu d’être car Moïse azalaki un prophète ayant une mission divine ya kobimisa peuple d’Israël na bowumbu na Egypte conformement à la volonté de son adorable Dieu. En revanche, Franco azalaki na mabele ma ye, azalaki esclave te, a lutter wana, mpe azui lipanda, azalaki kosala mosala mua miziki sans problème mpe a bénificier na soutient multiforme ya deux Républiques oyo ye a connaître.
2. Franco a recoltaki ba fruits ya musala mua ye ya miziki. Likolo ya musala mua ye nde ayebanaki mokili mobimba mpe kombo na ye ekotikala seko na histoire ya mboka na biso mpe ya miziki africaine comme étant l’un des grands musiciens oyo Afrique ebimisi. Na mbula oyo ye akufaki, préoccupation na ye ezalaki lisusu ya kosala succès te, mokano na ye ezalaki ya ko garder statut oyo O.K. Jazz ekomaki na yango.
« C’est sur Franco que tous les régimes du pays se sont appuyés pour jouir d’une légitimité circonstancielle, voire légale. » Non ndeko ! Ba régimes oyo Franco a servir, e s’appuyaki na ba constitutions taillées sur mesure. Franco azalaki nde chantre ya ba régimes wana pour relayer le message qui refusait toute contadiction. C’est vrai, Franco n’était pas dupe. Souvent miziki na ye ebandaki ko servir na mitambu ya pouvoir : tala ndenge pouvoir ebomaki Pierre Kanyonga na 1978, en utilisant O.K. Jazz na Bruxelles. Pour la petite histoire, ba présumés assassins ya Kanyonga bazalaki ba vrais-faux musiciens ya O.K. Jazz oyo bazalaki na délégation ya une trantaine de musiciens Franco awutaki na bango na Kinshasa. Pierre kanyonga azalaki secrétaire général ya Mouvement d’Action pour la Résurrection du Congo, MARC. Tee na mokolo ya lelo oyo enquête etikala kosalema te na liwa wana. Affaire Kanyonga nde ezalaki ebandeli ya mise en scène macabre ya procès des terroristes autrement dit : procès du siècle. Yango ebomisisaki : Colonel Biamwenze, Colonel Mwepu, Lt. Colonel Kalonda, Lt. Colonel Mwehu, Lt.Colonel Tshunza, Major Kalume, Major Panubule, Cap. Fundi, Citoyen Buriaba, Citoyen Kalonga, Citoyen Kudiakubanza, Citoyen Makani, Citoyen Matanda na Citoyen Mbangama.
Par ailleurs, Citoyen Monguya na Citoyen Kalonji ba condamnaki bango par contumace. Tee lelo oyo bazali na bomoyi. Daniel Monguya azali na Kinshasa par contre, Evariste kalonji azali na Mbuji Mayi.
Franco, eyebanaki, il était l’un des maillons de la propagande, un fidèle parmi les fidèles, militant ya premières heures mpe dévoué serviteur ya première na deuxième République. La preuve, parti-Etat elelaka ye d’une manière mémorable. Momene Mo Mikengo mpe pouvoir elelaka ye makasi mpo na nionso asala na animation politique : composition, sacrifices, formation ya ba groupes d’animation ya ba pays frères neti Togo, Tchade, Centrafrique, Guinée Conakry, Nigeria, Congo Brazaville, Gabon, Rwanda, Burundi, Zambie na Ouganda. Momene na département (ministère) ya Mobilisation Propagande et Animation Politique azalaki responsable national ya animation politique et chansons révolutionnaires na ba régions (provinces) nionso mpe na ba départements (ministères) nionso ya Zaire, avec rang ya gouverneur de région. Na cadre ya relation idéologique na ba pays frères, azalaki envoyé spécial ya président-fondateur na oyo etali formation na recyclage ya ba groupes d’animation ya ba pays amis. A ce sujet, abandaki ko travailler en étroite collaboration na ba services ya secrétaire général du M.P.R., Alphonse Kithima Bin Ramazani. Ba nzembo oyo : Moziki, Mboka Oyo Kombo Zaire, Salongo Alinga Mosala, ezali ba compositions ya Momene abimisa na O.K.Jazz.
Ba compositions révolutionnaires na ye ekenda sango : Mobutu Mvuma, Namela Bondo Bololo mpo na Sese, Mobutu Sukisa, Papa yamba mbote, Mundenge, Sese Tondimi yo, Mobutu na Mao na Chine,
Momene na Franco babandaki ko se compléter très bien.
Franco na kufa na ye, président Mobutu a immobilisa DC 10-30 ya Air Zaire durant deux jours na Bruxelles na nionso oyo ezali ko impliquer ( prolongement ya séjour ya deux équipages – deux équipes ya personnel navigant, ralonge ya frais de mission ; ya hébergement na restauration na éventuellement réaménagement ya ba horaires na bango na ya avion wana ezali kozela na Bruxelles national) na même moment, augmentation ya ba frais ya exploitation neti parking, alimentation électrique ya avion, retard na horaire initial, etc., perte ya mbongo à cause ya gratuité ya voyage ya bato y compris na manque à gagner munene na fret. N.B. DC 10-30 ememaka entre 208 et 380 passagers avec 53,5 Tonnes ya fret, manque a ganer na douane mpo avion wana ezali koya na cadre commercial lisusu te neti présidence nde e réquisitionner yango) mpo emema ba musiciens ya O.K. Jazz, ba membres ya familles ya Franco na mutu nionso oyo alingakai azonga na kinshasa gratuitement. Matanga kobanda na ebandeli te suka ezala na charge ya Parti-Etat mpe bakonzi banso ba ekolo bakende mpe balala kuna kobanda na secrétaire général ya M.P.R .tee na simple militant – citoyen.
« Aucun musicien n’en voudra Franco. Au demeurant, on ne quitte jamais l’Ok Jazz quand on y a été musicien. Franco connaissait l’École du Bon Samaritain, les transfuges de son orchestre revenaient au bercail et avaient leurs salaires et leurs places garanties au micro et aux instruments. Ce sont les musiciens de l’Ok Jazz qui étaient les mieux habillés et avec une bonhomie permanente non-négociable. » .
Ndeko, eyebanaki malamu que soki nduliste ya O.K. Jazz alongue, possibilité ya ko évoluer epayi mosusu ezalaki te. Mingi babandaki kobanga ba représailles ya Franco. Ba Diato Lukoki, Joe Mpoyi, Pépé Ndombe bamekaka kosala mua mouvement na bango, Tiers Monde, kasi Franco apanzaka yango . Sam Manguana ye azalaki na chance mpo kolongua na ye ewutaki na matongi ya Franco na présidence pendant que bango mibale sans bayeba balekaki kuna mokolo moko mpo na kozua mbongo. En plus, implication politique (ou manipulation sur Manguana) ya Manguana na makambo ezalaki na faveur na ye. Franco abandaki kokanga ba nzela nionso tee na kofunda na Département ya Affaires étrangères eboya kopesa na avis favorable ya passeport, ko menancer ba producteurs, ko bloquer ba commandes ya Editions oyo ekobimisa ba nzembo na bango, etc. Suka suka, esengelaki kozonga kaka na O.K. Jazz.
Conflit entre Kwamy na Franco ezalaki likambo ya moke te. Ezalaki likambo monene et très serieux. Yoka lisusu ba nzembo ya mbokela esalemaka kati na bango.
Pour terminer, yeba que Franco na Rochereau bazalaka souvent na matata, oyebi but ya nzembo Songi Songi ? Rochereau na Nico basala 15 ans balobanaka te. Sam na Franco ekomaki ya kofundaka tee na présidence de la République mpe abuakela Rocherau ba mbokela ya kosekana te. Ndule ya liboso Michelino Mavatiku abetaka na Télé Zaïre na O.K. Jazz oyebi ndenge esukaka ?
Totika kokanisa que tango wana mindondo ezalaki ya « gentil »! Na miziki na biso ba leaders mingi, voir ebele bazalaka na boyokani te kati na bango mpe ba conflits ezalaka ya makasi. Tala kaka ndenge motema mabe esalaki que Sosoliso ekufa!
N.B. Na nzembo Désespoir ya Koffi Olomide, Zangilu Makiadi « Popolipo » asala plagiat na solo ya Franco oyo abeta na nzembo Linda Linda ya Joseph Mulamba « Mujos ». La chanson Voyage na Bandundu ya Pépé Ndombe, rythmique Simaro Lutumba abeta na introduction na yango, accompagnateur ya Viva la musica a plagiaki yango na nzembo Eliana ya Papa Wemba.
Nasuki awa.
Musicalement,
Emmanuel Kandolo