Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Ba ndeko,

Motuna na nga ezali square oyo (page 59) na avenue Lippens, avenue de Coquilhat, square de la Cité, lelo bala bala yango ekoma na kombo nini?
Avenue menant au Beach (page 54) yango avenue Wagenia, esika bar grand baobab ezali.
Ba publicités batiya liboso ya Building ya Forescom ebebisa esthétique na yango.

Nazali na mawa mingi pe pasi ya komona Mrs. E.Kandolo na Messager na Dom Munsiensi bazwaki likanisi ya kokabola na biso elongo buku oyo ya Léopoldville kasi nazali komona ata liloba te na bili tozali komona. Bana ya Léo, bana Kin bazali wapi?

Motuna na nga esika nini Congolais atiyaka tourisme, ba sites historiques okati ya bomoyi na ye? Ezali kaka po na mindele ?
Na yango naleli na loyembo ya Mujos:
"Nga pe naleli léo o

Ngayi na leli e,

Mboka mosika ngo, maman mawa." Titre Naleli Léo. Orch. Africa fiesta

Buku

NALELI LEO

, par Mujos et l'African-Fiesta Vita

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
B

Ndeko messager,
Longognia pona loyembo"naleli Léo"

Likambo ndeko Crespin-régis lukoki alobi pona prince ezali ya solo.
nga pe ekamwisa, nazali kotala balabala namoni yango moke, nzoka nde kala pona kokatisa yango, ezali kosenga basimba biso na maboko. Wana topakati mbango po bala bala ezalaki molayi.
Balabala Tombalbaye ti lelo ezali kaka na kombo wana.

Buku

Répondre
C

RECTIFICATION.
Botala likambo ata bino moko.Balabala oyo nabengi Tombeurs de Tabora ezalaki Chales DE GAULLE,oyo ekomaki Tombalbaye.Lel´oyo nayebi te soki ezua kombo mosusu.
Crispin-Régis

Répondre
C

Bandeko na ngai,
Namoni ndenge bisika oyo biso tomona na tango ya banoko.Nakoki seulement kolobela yango.Kasi ba kombo ya sika,ya tango ya authenticité na yebi yango te,mpo ngai natikaki Kinshasa depuis 1972.ba
monuments nioso oyo ebimi na blog,nayebi yango.Libongo ya masuwa mpe nayebi,mpo na 1955,juste au début de l´année,Tata na biso azalaki muté na Mushie,mpe biso tokamataki bateau na libongo
wana.Nayebi kombo ya ba bateaux mingi oyo ezalaki kokota Mayi ndombe na mayi ya Kasaï.Nakoki koyebisa bino ete balabala oyo bakomaki kobenga Tombalbaye ezalaki Tombeurs de Tabora,kasi yango
echangeaki kombo po na authenticité te.Po na affaire ya fleuve na libongo,ezali likambo monene mpe ya somo mpo na bana ya Kin.Lokola ba accidents mingi ezalaki koleka na fleuve,ba parents bazalaki
très sevère mpo te bana bakende na fleuve te.Ata kutu na mayi ya Kalamu,ba parents bazalaki ko reconnaître biso na couleur ya miso.Soki bamoni yo na miso ya kotela,donc yo,obebi nayo kaka.Na tango
na biso bana bazalaki kotambola tambola pamba na ville te.Soki omoni bana na ville,il faut ezala nabisika oyo ezalaki très fréquentés.Na époque coloniale,discipline na occupation ya bana ezalaki
ndenge mosusu.Na tango nabiso mpo okatisa balabala Prince Baudouin ezalaki étérnité,tozalaki komona yango monene mingi koleka.Esika oyo batonga Stade des Martyrs,yango ezalaki na salle monene
babengaki Cultrana mpe,pembeni na yango ezalaki na Foyer social oyo ekomaki Conservatoire ya musique na art dramatique.Ba balabala mingi echangeaki kombo avant authenticité.Tango Mobutu ayaki
kolongola ba monuments ya ba NOKO,batiyaki yango provisoirement na Cultrana,avant ekende na musé.
Crispin-Régis Lukoki

Répondre
B

Ndeko DOM MUNSIENSI,

Bala bala oyo ebandi na beach ezali Wagenia esika bar le grand baobab ezali. Nzete ya baobab oyo ezali na kati ye bar Le grand Baobab ezali site historique monene kasi bato bayebaka te.

Ambassade ya USA ezali kaka na esika wana ti lelo.

Omoni na Promenade de Léo, ezali ndakisa monene na ndenge moto tango bapesi ye ebonga  ya mosala, avandeli ba dossier te, eloba Luambo Makiadi a nzembo na ye Lettre au DG, kasi atongi
pe atiki elombo ya mosala naye pe kombo na ye etikali seko na seko. Lelo oyo ba cngolaisbasepeli bayeba ye na kati ya nzembo, oyo tobengi libanga.
Makambo ya lolenge boye ezalaki te na tango ya Léo, eloba lisusu Luambo Makiadi.

Nionso oyo, ndenge nini soki lelo babuki site historique, to monument, banani bakoloba, bakotelama pona koluka kobatela yango? Tobenga UNESCO?
Patrimoine nini ya Congo tokoki kosenga na Unesco abatela? Tango biso monoko tozali kutu kobwaka ta liso te.
"Kabaka lisolo, kokakolaka te..." Cedou, Simaro Masiya.

Buku

Répondre
D

ndeko Buku,Namoni lokasa na yo po na mokanda ya Léo,ngai pe nazalali lokola yo nazali kozela ba commentaire po comprendre histoire ya Léo na bato ba vivaki époque oyo.A part une partie des
monuments que j'ai vu en vrai na Tp na Limete par hasard parce que mon père y travaillait et les grands axe sinon tout les images qui sont dans le livre ne me parle pas.Alors si quelqu'un peut
faire des commentaires sur certaines images,moi ça me fera plaisirs;etant donné Kinshasa est ma ville de naissance et 'origine (mon village c'est matadi mayo).
J'aimerais savoir plus.

Po na page 54 ezalaki ancien beach qu'on appelait beach ngobila ezalaki derriere Sozacom avant ekoma dans les années 80 a coté ya gare Centrale.Si ma memoire est bonne il y avait meme
l'ambassade ya USA dans le coin mais kombo ya balabala nde nayebi te.Nakanisi ba mbokatiers misusu oyo bayebi bakobakisa.Desolé ndeko Buku.
Dom Munsiensi

Répondre