Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Les réponses d’Emmanuel Kandolo se rapportent à ces deux articles respectivement du 18 avril et du 2 mai 2012. Ils peuvent être consultés en appuyant sur leurs titres.

Emmanuel kandolo décortique quatre chansons funèbres

Réponses d'emmanuel kandolo à propos des chansons funèbres

Ba ndeko,

Na nzembo ya mama Wali, Wembadio atangi même pas ba kombo ya ba neveux na ye oyo baweyi : Arthur na Benjamin Nkumu.  Sans surprise, aluki nde kolakisa que ma Zophini azali victime ya motema mabe ya batu oyo balinga bapanzela ye famille mpe ko plaindre ba oyo balingi ko détruire ma Zophini!!!

Nionso oyo ezali non sens mpo ma Zophini nde azali ebandeli mpe suka ya nionso wana !!! Wembadio ayebaki yango malamu, kasi neti ma Zophini abandaki toujours kozua  défense énergétique na ye (Il fallait komona ndenge ma Zophini abandaki kozua défense ya Wembadio tango ma moke akufaki !!!) mpe ye, Wembadio abandaki ko vivre na loboko ya Pauline, kokende souvent na Gombe epayi ya Paulina kozuaka mbongo mpe koliaka kuna, ezalaki naturel kaka ayemba bongo mpo bayebani lolenge bazalaki kododa batu na misala ya tango wana !!!

Wembadio azalaki plus attaché na ma Zophini na Pauline que na Pierre. Yango wana ce dernier, na Zaiko ba très proches na ye ezalaki  Jossart, Ombale,  Mbuta na D.V. Moanda « Depson ».

Ndeko Historien,

Olobaki ozali «Assistant», ngai, nabongisi en te disant que tozali complémentaires mpo bosangisi bua ba souvenirs nde bozali kokomisa biso na objecti ya blog na biso oyo.

Ya solo Pierre Nkumu atangaki na Ngiri-Ngiri, kasi atikalaki kosilisa kelasi na ye te mpo ayaki komipesa mingi na miziki na Zaiko.  Ata ko bongo, ayebaki que esengelaki azongela kelasi mpo azalaki na ambition ya kosala sciences économiques na université. Na mbula moko wana akataki kelasi, pression ya sœur na ye Pauline ekomaki tee na niveau ya kokangisa mpe kobetisa régulièrement copine na ye azalaki na ye na temps wana, Lola Fatou Selenge.

Pierre azongela kelasi na tango oyo ye amonaki que esengelaki azongela nde eyaki kosala que azongela kelasi mpe ayaki kokende kosila ba Humanités pédagogiques na ye na Kisangani, esika azuaki diplôme d’Etat.

Tango azongi na Kinshasa, abandi kosala ba affaires na ye mpe ko continuer ba activités na Zaiko. Wana akomi kobaluka na Marie-Thérèse Bumba (Matebu), ye mpe abandaki kosala ba acticités commerciales na ye mpe azalaki na boutique ya bilamba na ville wana, non loin ya Immeuble Bomanza. Azalaki lisusu na bar na Bandalungwa na kombo ya Tim à Gogo, esika ba play mingi ya Kinshasa bazalaki kokutana na pokwa mpo ba séries wana, l’Etat epekisaki ba concerts ya butu, yango wana sima ya 18 heures bokutani bozalaki kuna na ba nduliste ya Zaiko tee na l’aube.

Pierre abali officiellement mbala moko na vie na ye mpe l’unique femme oyo abala ezali Tantine, na 1975 mpe baboti bana mibale ya basi. Babandaki yambo kofanda na Motel Fikin mpe sima baye kosomba ndaku na cité Salongo, esika bana mibale wana babotami. En revanche, likambo oyo que Pierre akufela muana ezali ya solo te mpe bana banso wana babale bazali awa na France, ba bala mpe ba bota na bana oyo basili kokola.

Liwa ya Pierre ezali étranger te na misala ya ma Zophini !!! Tango akabuani na Tantine, suite na pression mpe influence ya famille na ye, abandi ko vivre na fille moko ya mu Kongo. Pendant que muasi wana azali na ndaku ya Pierre,  na Cité Salongo, ye a continuaka ko tourner na mutu na ye mosusu tee na tango Pierre aye ko apprendre likambo wana. Mpo na kokanga ye na flagrance ya adultère, Pierre asali kaka ndenge asala, abimi na tongo mpo na kokende ba affaires na ye, atiki voiture mosika na ndaku mpe azongi makolo sima ya ngonga, aye kokanga muasi na mobali wana na ndaku. Na bitumba na mobali wana, tango Pierre azali kobeta ye makofi mpe mutu wana akomi presque na agonie, muasi akimi mbangu azui mbeli atie Pierre na lokolo mpe ekati mosisa. Tango ma Zophini ayoki bongo, aluki abongisa makambu tout en prona kaka que Pierre afanda na muasi wana. Wana mpe Pierre azali kozua ba traitements ndenge na ndenge na pota wana, kasi yango ezali kokawuka te tee na ndenge eye kobendela ye mindondo misusu tee komema ye na liwa.

Na molongo, ma Zophini andima muana moko muasi wana abotaki pendant que Pierre ye moko abandaki ko clamer que muana wana azali ya ye te. Ma Zophini a imposa existence ya muana wana comme muana ya Pierre na famille pendant que ba preuves nionso Pierre azalaki na yango, ebandaki kolakisa le contraire. Pierre aweyi na août 1986.

Sima ya Pierre, ba oyo bayebaki misala mia ma Zophini, bakomaki kobangela Tonton mpe sima ya mposo mibale, Tonton mpe ayaki kokufa na ba circonstances inexpliquées tee na lelo oyo. Yango wana, bana ya Lemba ba decidaki kaka ba tumba Pauline na ma Zophine na moto mpe yambo yango esalema, esengelaki kosambisa bango publiquement. A partir ya awa nde Pauline a craquer, devant extrême pression oyo ezalaki na batu oyo bazalaki kosambisa bango publiquement, Pauline abeta lisolo nionso ya ba nkisi oyo basala mpe na ndenge bayebi liwa ya quatre hommes mikolo mpe responsables ya ndenge wana mpo na ko permettre ye azala na ba postes minene, mbongo, carrière riche mpe na bomengo na ye moko ma Zophini.

Tango condamnation ya kotumba bango ekueyi, ba mama ya Association ya ba anciennes élèves ya Sacre cœur ya Mbanza Mboma, esika Pauline atanga, ba bondela bana Lemba na lolenge nionso que kotumba bango ezali solution te mpe ebongi ba ndima bolimbisi na lolenge ba avouer publiquement misala minso oyo ekumbi famille Nkumu na ba drames ya ndenge na ndenge. Na ngambo mosusu, elobamaki te, kasi eyebanaki malamu que soki ba baraki Pauline, Président Mobutu alingaki kotika acte wana impuni ata muke te mpe alingaki ko réprimer ba jeunes ya Lemba na rigueur nionso mpe toyebi te soki elingaki komema na situation nini ?

Pierre azali na composition moko na Zaiko. « Selenge », nzembo asalela copine na ye Lola Fatou Selenge, ye mpe azalaki rocherette.

Ye moko Pierre, atia mongongo na ye na « Ngadiadia » ye nde alobaka : « dit, vous croyez que falanga ezali lokola njika ?» ; Ombale atika elembo ya bolingo ya Pierre na Tantine na « Lisapo » ; Zaiko eyemba Pierre na ba nzembo ebele : « Ngadiadia », « Mbelengo », « Bomwana », « Zaiko Balawukidi », « Ma », etc.

Ndeko ya Théo,

Sincèrement, mpo na kufa ya molongani ya Dido Yogo, nayebi penza malamu te. Je suis désolé !

Ndeko Serge,

Merci mingi na ba commentaire mpe na complément oyo ebakisi boyebi bua biso sur lisolo ya Polo Kamba.

Ndeko Roca,

Soki nazwi ngonga na mbala ya sima, na komeka kolobela Théthé, Ndaya na Anna Muyanzi.

Ndeko King,

Nakoluka moyen nameka kosolola lisolo ya Espèrent la Chacarra ; ba nzembo oyo ayembaki mpe na baye oyo ye ayembela ba nzembo, kobanda na ye ya miziki ; conflit na tata na ye mpo Espèrent azalaki élève brillant, père alingaki kotinda  ya na poto mpo a continuer ba kelasi na université ; ndenge andimaka kokende kosilisa mikolo mia ye na Kinshasa.

Ndeko Richard Mawete,

Pierre na Tonton bakufa na écart ya deux semaines

Ndeko Dio-Dio,

Otangi lisolo ya papa Wemba na Celé (Celé Wemba), mbala moko o conclure que ezali lisolo ya matanga !!! Mawa na yo !!!

Différence entre yo na ngai ezali que yo, oyebi papa Wemba atango akomi vedette mpe azali kosala succès na miziki, précisément na Yoka Lokole quelques temps avant asala Viva. En revanche, ngai, nayebi ye avant même abanda koyemba na Zaiko. Tango wana azalaki sans avenir mpe abandaki kosala eloko moko te !!!

Na banzi que oyebi nzembo ya « Jazzy B. », ebima na album ya Modogo « Statut de la liberté ». En réalité, ezali nzembo ya papa Wemba kasi neti abandaki kobima na Jezzy B., une femme mariée, yango ebimaki sous couvert ya Modogo. Est-ce que oyebi scandale oyo esalemaka na relation adultère wana ? Ba cassettes audio ezali, mobali ya Jezzy B. a enregistra ba heures na ba heures ya ba conversations téléphoniques nionso entre papa Wemba na Jezzy B. ezala na Paris tee na Brazzaville,  y compriss na batu ba oyo babandaki kobenga kuna mpo na compte ya papa Wemba ou mpo na koluka ba filles mosusu ya groupe ya Jezzy B. makangu. Ba archives wana ezali !!! Mobali ya Jezzy B. ye moko akabola ba cassettes wana partout be mpe aya kotikela yango Rosa mpe cette dernière tango ayoki yango elekelaki ye mpe a telephona ngai na mosala mpe a proposer que alingi kokutana na ngai de toute urgence na ndaku mpe ayokisa ngai deux cassettes wana mpe azalaki na ba copies oyo atikela batu.

Alors, kolinga te na tandela yo ba détails nionso wana awa mpe na lolenge yango ezalaki ba preuves efficaces na demande ya divorce ya Jezzy B. mpe na ndenge ayaki ko proposer na Rosa asala papa Wemba lokola ye, asali na Jezzy B. mpe na lolenge probleme oyo emamaki instabilité na couple ya papa Wemba mpo Rosa ayaki kolawuka !!! Soki ozali komeka ngai, kobunga te que nazali  en mesure ya kozongisa yo na esikana yo.

Par contre, na zali mpe na ba témoignages oyo ezali mpe kolasa que papa Wemba te kaka nde abandaka basi ya ngana. Mpo conflit kati na ye na Ombale, ewutaki na nzele ya Ombale, Claudine, Ye nde Ombale ayembela nzembo Mizou. Na présence na ngai, ye moko Claudine nde atandelaka papa Wemba que alingaka ye, juste na entrée principale ya Intercontinental ya Kinshasa.

Ndeko Dio-Dio, na banzi que obungi te que nazalaka guerrier mpe oyebi ba bitumba minene na bunda mpe na lolenge oyo na mibuakaka na ba batailles. S’il te plaît, luka kimia mpe boboto panda te soki ozali koluka oyo ozali koluka wana, nakokomisa yo esika olingi kokoma !

Kobunga te que ba nzembo oyo kaka ba nduliste bayemba, sima na yango masolo mingi ezali ya kobombana. Nayebi mua ndambu mpe nazali en mesure ya kotandela yo peu importe na misusu ekumba Rosa akangisa papa Wemba, mosusu cas ya inceste, mosusu batu oyo ye moko papa Wemba ayemba mpe bazali na bana na kati na libota na ye, etc.  Ndenge kaka omoni, soki olingi ko continuer na ba provocations na yo oyo owuti na yango na site mosusu wana, yeba que okobanda toujours kozua biyano na ba détails.

Nazali kozela eyano na yo na fermeté !

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
L

Très peiné par le récit des circonstances de la mort de mon ami Tonton Nkumu, qui fut aussi mon condisciple en 6émé primaire D au collège Albert1er.Paix à son âme.

Jean-Pierre Lubaya

Répondre
R

La chanson Selenge sur un CD que j'ai,c'est Nioka Longo qui en est l'auteur compositeur.C'était un peu étonnant de voir Jossart dedicacé une chanson entière,à la copine d'un
collegue.Maintenant,je sais que c'était une composition de Pierre Nkumu lui meme.C'est une belle chanson,mais qui malheureusement n'avait pas eu du succès à l'époque de sa sortie,puisqu'il y
avait d'autres tubes de Zaiko sur le marché du disque tels Zena,Zaina ou Chouchouna.

Répondre
H

A mr  charles

mbote kulutu.bongo ya moto ezali lokola disquette.nakoki kobosana bisika toleka te pe soki nakotisaki kombo ya collegue na yo ya kelasi ezali po na ko appuyer que nazali moto ya  kati .ba
souvenirs ndenge natangeli yo bar marozi ezali ebele.soki okatisi djolu na matonge,yaya na BONGO WENDE azalaki na bar naye ya biere ya pression bazalaki ko servir biere direct na verre.bazalaki
kobenga yango nganda ba verres.boboto kati na yo kulutu

Répondre
H

NA NDEKO MAX DE GLASGOW

nasepeli n'attitude na yo elakisi grandeur na yo.nazali na anecdote moko nakokabola yango awa po eteya biso.

grace ya mboka mosika ,na retrouvé un ami de longue date perdu de vue depuis 1974.historien ezali pseudo na ngai mais ami wana nakotia kombo na ye na suka asalaki lien moko po a retracer ngai a
travers ba makomi na ngai.

ecole primaire na christ roi na kasa vubu,co na bosembo pe promotion72.abandaki ko repertorier bana nionso ya kasa vubu oyo batanga na bosembo promotion72.akomela ngai na privé pe sans hesiter
apesa ngai vrai kombo na ngai.abomba kombo na ye,apesa ngai pe mosala ya ko identifier ye.nasala meme demarche que ye mais   sans resultat mais ye moko amibimisa po na liste nasalaki kombo
na ye ezalaki.azali ndeko moko nakoki kobosana te po entre ye na ngai likambo moko eleka esala effet na école.

na ba matches inter classes tozalaki biso mibale ba gardiens.rivalité ezalaki makasi entreba classes na biso.na match moko boye tozalaki 0 a 0.etikalaki 1 minute.balle ezalaki na camp adverse
donc na maboko ya gardien na bango.asala degagement moko tres puissantya40 ou 50 metres.nabimaki moke na surface nabiso.ballon edenda moyen nalanda yango ezalaki te.but.bamema gardien adverse en
triomphe.na komaki la risée de tout le monde.buteur yango ezali bongo  un mbokatier na kombo ya james.mboka mosika esangisi biso apres 40ans.james akoki ko temoigné.nakaboli oyo nazalaki na
yango pe kimia kati na biso.

Répondre
S

Mbote a tous et merci pour la discussion...  Naza na demande moko pona bino batu boyebani na ba Nkumu. Est-ce que bokoki ko tia photo na ye te po batu bakoka komona ye? Apres tout
azalaki pe moyembi na Zaiko malgre que ezalaka section variete/pop... Ba artistes ya pop pe bazalaki kosala success na tango ya kala d' ailleurs Simeon Mavuela l'avait avoue que na ebandeli ya
Zaiko ba chanteurs pop comme Feu Pierre Nkumu et Feu Dieudonne Nzolatima ba lekaka bango na ngenge pe success... C'est dommage ata na site ya Zaiko, ba photo ya ba anciens eza te. C'est de
l'histoire et esalaka bien soli bilili eza... Encore une fois merci a tous!

Répondre
J

Ndeko Max de Glasgow,

Olobi 99,99 % yango oyo ezali ba vote na tangu ya MPR parti-état, to kaka mpo na ko confirmer ke likambo yango ezali ya kobakisa te, mpe kolongola te. Kobosanaka te ke na manso oyo batu balobaka
IL Y A UNE PARTIE DE VERITE ata likambo yango ezali na 1 % kaka ya bosolo, kasi 1 % oyo soki olandi yango okomona ezali siki-siki mpenza ya likambo to l´essentiel.

Répondre
C

Ndeko Historien,

Juste ko confirmer oyo owuti koloba; elamusi ba souvenirs na ngai ya bo muana: po na Djolu croisement Kasavubu ezali ya solo bar Marozi ezalaka wana na kamue kutu ndenge ozali kaka na kombo ya
bar wana ezalaki en face epayi matanga ya maman na papa wemba ezalaka na ndenge zaiko eyaka kobeta na matanga. Kobakisa lisusu Madame Eulalie Elonga oyo azalaki Bourgmestre ya Kalamu. Toyekola ye
na classe na ecole ya Renkin 1. Ndeko Historien olobi na ya ya solo. Kimia kati na biso nionso. Charles A

Répondre
M

Bandeko na ngai Serge pe Historien,

Bokoki koyeba te ndenge nasepeli na ba repliques na bino na commentaire na ngai.

Boye nde libota ezalaka. Nyoso bolobi esengi ngai nakitisa moto pe naloba lisusu merci.

Ngai nakanisi te "Mboka Mosika" ezali mboka na biso; pe kati ya mboka mwa kotombola mongongo ezangaka te.

Merci lisusu.

Répondre
H

NA NDEKO MAX DE GLASGOW.

D'abord mbote na ngai  epai na yo na ndeko serge KONGO po na defense na ye epayi na ngai.lakisa ngai epai nazali ko contredire  kulutu  kandolo.?

NA ebandeli ya masolo oyo,tango kulutu akomaki que arthur bakumba azali muana kasa vubu,nalakisaki vieux  que  azalaki plutot muana ngiri ngiri pe ndeko mosusu pe a soulignaki
yango.vieux ayaki  korectifier passage wana. nakoyebisa yo eloko moko que nazali témoin occulaire et non batu oyo ya sangisa sangisa.vieux apesi biographie ya  MATA  NKUMU.akomi
que azali libinza.mais ngai nayebi que ezali ndenge elobamaka mais baboti na biso balobaka que tozali ba mangala maliboko.nazali  cousin ya pierre,ndenge ye azalaki noko ya freddy
ELONGA immortalisé na nzembo ya elo,ndenge moko pe na ngai po maman naye  feue EULALIE  NZEKAMA,ex bourgmestre ya kalamu  azali  cousine ya pierre na ngaiba details oyo
natie,kulutu kandolo akolobela yo que nazali moto ya kati.nawelisi te po nazali self made man pe ezali lokumu te yakozala ndeko ya mata .ezalaki mise au point na ngai pe lisusu na assista na
matanga ya mama ya papa wemba  na croisement kasa vubu  djolu .studio photo moko ezalaki wana kombo na yango photo ok.mopanzi bar moko ezalaki wana kombo na yango marozi.kulutu kandolo
nakosi? kimia pe boboto kati na biso ndeko max

Répondre
S

Mbote ndeko Max de Glasgow,

On dirait na masolo ya famille Nkumu, ndeko Historien na kulutu Kandolo bazali
kotambola nzela moko, bazali kobakisana maloba.  Mutu azali ko contredire kulutu Emmanuel Kandolo ezali
ndeko Histotien te.  A moins ke nga pe na bunga.  Merci mingi kulutu Kandolo na masolo nionso
osopeli biso na sanza oyo.

Boboto o kati ya mbokamosika.

Serge – kongo na biso.

Répondre
M

Ndeko Emannuel Kandolo,

Mbote mingi pe longonya na manso okomi po na libota Nkumu.

Soki Historien azali ko contredire yo, qu'il me permette de lui dire que ezali par ignorance. D'ailleurs na mosala na ye, ayebi que témoin occulaire ya ba faits aleki ye moko historien parce que
bango ba historiens bazwaka ba infos epayi ya ba témoins, pe après découpement nde bapesaka ba hypothèses (tango mosusu ya mabe).

Likambo ya famille Nkumu ezali à 99,99 % vrai. Ngai nazali pe na relation très étroite na famille wana (soki nazali mwana na bango te). Nyoso okomi ezali ndenge eyebani pe ezali vérifiable na
bato oyo bayebi famille wana malamu.

Kasi nalingi nabakisa te Pierre Nkumu azalaki na mwasi ya mundele na liboso ya liwa na ye. Soki makanisi na ngai ezali malamu, mwasi wana azalaki kosala na Hotel Memling pe avandaki na Cité
Salongo ye na Pierre. Akenda wapi? Wana nayebi te.

Pierre Nkumu afungolaka too pe azalaka kosala na restaurant moko na sima ya Building Regideso (première avenue à droite sur Huileries en allant vers la zone de Kinshasa).

Lisusu po na Papa Nkumu, soki makanisi na ngai ezali malamu, akatanaka misapi na ye na tango ya bitumba ya Mulele na Lisala.

Merci po na nyoso okomi. Et j'insiste, 99,99% ezali vrai.

Répondre
K

merci kulutu emma kandolo pour les détails très riches concernant pauline nkumu. en ce qui me concerne, nazali vivement kozela promesse nayo à propos d'espérant. car je l'ai souvent répété,
azalaka parmi ba chanteurs oyo nasepelaka na ba textes mpe na eyembeli naye

Répondre
D

Merçi kulutu Kandolo nalingi kaka na rectifier moké na lisolo ya congolaise oyo azalaki na salon na 17eme pona période wana nazalaki ko fréquenter salon de coifure wana. kombo ya dame ango
puisque ezalaki kombo ya salon de coifure na ye ezalaki "JESSY B" et "JAZY B" ndengé olobi à l'époque Loris la congolaise azalaki kosala na caisse, AS Paula azalaki coiffeuse ainsi que SOURIS
azalaki coiffeur, a part détail oyo nionso olobi ezalaki bongo.

BOBOTO PE BONDEKO

Répondre