Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Ndeko Messager,

 

O.K. Moke , moke, nakobanda kolobela ba nzembo oyo nayebi na batu basaleli yango. Mpo na lelo, natindi commentaires sur N'sontin. Franco, amekaki kobongola ba prénoms ya famille N'singa na espagnole. Na reprendre yango ndenge ezali mpe nalobeli  mua moke sur Joseph N'singa. Napesi mpe eyano na Ndeko Dodo, na sujet ya : Réponse d’Emmanuel Kandolo mpe na ndeko Charles A., na sujet ya : Tozali kokende wapi ?

Merci na nionso.

 

Emmanuel kandolo

 

 

Ba ndeko,

 

Na mua commentaire nakosala, nakobakisa kaka que papa Albert N’singa na mama Florence Mukaji « mamam Flora »

Baboti :

1. Antoinette

2. Françoise

3. Marie

4. Julienne

5. Joseph

6. Albert (cent comptes)

7. Henriette

8. Pierre

Mama Antoinette ye nde mama ya ambassadeur Jean Marie Mapesa

Joseph N'singa Udjuu Ongwankebi Untube abotami le, 29 septembre 1934 na N'sontin. Azali musakata. Awuti na kati ya famille royale. Joseph N’singa abalani na mama Marie Mbu mpe baboti  bana huit. Azali lisusu père d’une famille nombreuse na sens élargie.

Ye atangi ba kelasi na ye na Mankawo na école primaire. Sima akeyi ko continuer epayi ya ba sango na Bokoro. En suite, akeyi na grand séminaire ya Kabwe na Kasaï Occidental, kosala philosophie na théologie. Sima ya mbula misatu, alongue kuna mpe aye kokota na Lovanium na faculté ya droit mpe aye kosilisa kuna.

Na même année asilisi, na 1963, akomi conseiller juridique provincial ya lac Léopold II, actuellement Inongo. Na sima, akomi ministre provincial ya intérieur mpe information ya province ya lac Léopold II. Na ba élections générales ya 1965, baponi ye député ya province ya lac.  Tango Général Mobutu asali coup d’Etat na ye, Joseph N’singa azuaki ebonga ya ministre ya justice et garde des sceaux. Co-fondateur ya M.P.R., tour à tour alekaki na intérieur, plan et reconstruction, transport et communication (2 fois), Président directeur général ya Institut national de sécurité sociale, Premier commissaire d’Etat (Premier ministre), Président ya conseil judiciaire mpe Procureur général de la République ( 2 fois), Coordonateur ya M.P.R., ministre ya reforme institutionnelle mpe garde des sceaux. Sima ya chute ya Mobutu, akeyi na Afrique du sud. Actuellement azali député ya Mayi-Ndombe mpe rapporteur ya commission ya justice. Joseph N’singa azlaki mpe Président ya Union Générale des Etudiants Congolais de Lovanium (U.G.E.C.).

Mama Antoinette na papa Musheni Remy, grande sœur na semeki na ye, bango nde batangisi N'singa bakelasi na ye nionso. En revanche, N’singa azalaka reconnaissant à tel point que azua bana na bango nionso na charge na ye, tout comme baka nkasi nionso ya ba ndeko naye. Azali mpe un des rares hommes politique congolais oyo bazali na bana basilisi ya études supérieures et universitaires. Bana nionso abota na mama Marie, basilisa.

Na 1969, na qualité na ye ya ministre ya justice, azalaki initiateur ya loi oyo ebandaki ko punir détournement ya fonds publics na hauteur ya  10.000 zaïres na peine de mort. Ironie de l’histoire esala que ye moko a détourner 100.000 zaïres, somme équivalent ya dix fois montant oyo ezali komema na peine de mort. Président Mobutu akomisaki yango affaire personnelle mpe alobela yango na meeting : « …atako bayibaka, yiba ata moke mpe tika ndambu… ». N'singa akangama te mpe likambo eleka kaka bongo. Pourquoi ? Na 1968, na visite moko Président asalaka na N’sontin, papa Albert N'singa asala ye deux grands kata : tango apesani mbote na Président Mobutu, atikeli ye loboko na ye mobimba. Président Mobutu a panika na ndenge ya danger. Asala ye lisusu kata ya kokutana na ye en face pendant que ye asi alongwe na N’sontin. Kobanda wana, Président asimbamaki na biloko ya protection ya mabele ma N’singa mpe eyebana que bango bazali na biloko makasi !!! Ngai namona papa Albert N’singa mbala misatu. Nakoki koloba sans hésitation que azali somo trop !!!. Soki ba prévenir yo te, okoki koganga na somo ou soki muana amoni ye, akoganga na kobanga makasi. Papa wana azali na elongi ngambo moko normal, ngambo mosusu evimba mpe mbuma ya lisu ebima neti ekwueya (lokola balle ya golf), ebima ndenge moko ya somo. Soki a fixer yo, okoyoka kaka que azali kobimisa énergie mususu. Ye alobaka polele sur biloko na ye mpe ayokelaka yango soni te.

N’sontin wana ezali village moko moderne. N'singa asala musala kuna emonana na miso ya batu : atonga écoles, ba ndaku kitoko, ba magasins, dispensaire, alona bilanga minene, ba élevages ya bibuele kili kili.

Oyo ezalaki mua commentaire nazalaki na yango na oyo etali nzembo ya N'sontin.

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

 

 

Ndeko Dodo,

 

Nazali komona nionso ozali koloba. Tango wana, Kananga II ezalaki vraiment na batu mingi te mpe ba constructions ebandaki à peine kosalema. Immeuble oyo ozali kolobela ezalaki ya couleur beige na pembe. Yango ezali mosika mingi te na auditorat militaire mpe na nzinga nzinga wana Mutombo Bakafwa Nsenda atongisa ndaku na ye na boulangerie ya munene. Marché salongo ezali un peu plus loin mpe nayebaki commerçant moko abandaki kozala pene pene wana, papa Badibangi.

Teixeira, bayaki kozua kombo ya Samba na authenticité. Liliane azali na ndeko naye mosusu kombo na ye Louis. Mario nde abandaki kobaluka mingi na moto mpe kosala ba tapages mingi na Kananga. D’ailleurs, ba Samba bayebani mpe mingi na bisengo ya mokili na ndenge babima na ba filles ebele na Kananga Malandji wa shinga. Mingi mingi nabandaki komona bango na alimentation na bango, la kanangaise, heure wana Liliane (Lilie) azalaki une petite fille. Na Kinshasa, bazali na Binza I.P.N.

Vieux Samba Teixeira azali kaka na mouvement makasi, ayaki konvuama na ba activités ya diamants na société na ye (Diamond Works) ekoma kobengama Energem . Yango ezali na bourse ya Londres.

Au sujet ya ba internationaux ya Vita, nabosanakai kobakisa que ba médailles ya Ordre national du léopard bazuaki epesaki bango lisusu kisefe mpo bakomaki komimona ba intouchables du fait que détenteur ya médaille wana akoki kokangama te ; agent de l’ordre akoki kokota na lopango na ye te, magistrat ata moko te akoki ko faire perquisitionner ndaku na ye te, kino Président Mobutu ye moko ako signer ordonnance ya retrait ya médaille wana.

Na match ya Yaoundé, Ntumba Kalala « Pouce » abandaki match. Tango azui blessure na genou, Kembo Uba Kembo « Monsieur buts, Jean Pépé » nde ayaki ko remplacer ye.

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

 

 

Ndeko CHARLES A.,

 

Nayebi ba hôtels oyo otangi mpe nakoki koyebisa yo que malamu tosala bokeseni na maye tozali koloba. Soki hôtels Matonge, Diakanda, ezalaki na ba normes, hôtels Kimeso (ya Kanda kanda na Matonge) ezalaki na yango te. Na cité, ba hôtels ya malonga ezalaki, mpe nakoki kotanga neti : hôtel de la Funa na 1ere  rue na Limete, hôtel Continental na place commerciale ya Limete, hôtel  Lafayette na Ngaba sur na croissement avenues université na Kianza, hôtel Ezo, Donvic hôtel na Matonge, hôtel ma crevette na De bonhomme, hôtel du Siècle na Bandal, hôtels Nfwakin na Mont Ngafula, hôtel phénix na bon marché, hôtel Afrique na Kitambo Utexafrica, na hôtels ya Umba Di Lutete ezali na Kasa Vubu sur Force na Assossa, hôtels Domi na Kasa Vubu en face na imprimerie de la cité, kobakisa na ba résidences neti : ma crevette na Binza ma campagne, Motel Fikin na Limete, le village hôtel na Kingabwa, etc. oyo ezali ba hôtels ya kala oyo ezalaki na niveau ya malamu.

Mususu ya bien ezalaki na niveau ya kati neti : hôtel Mangaka na Yolo nord, hôtel du midi, hôtel Commodore na Yolo-sud, hôtel les Canaries na Matonge, hôtel Itimbiri na Yolo-nord, hotel Kimeso, hôtel Mercure, etc.

Sika, esengeli te ko confirmer mbala moko que ba touristes bayaka kuna (par touristes, tozali kolobela ba étrangers). Mingi mingi ba hôtels ya cité ebandaki koyamba ba délégations ewutaka na intérieur ou encore l’Etat ebandaki ko loger batu na ye oyo bazui mutation na Kinshasa, en attendant bazua ndaku. Ba entreprises publiques na privées mpe ebandaki ko loger batu  na bango kuna, ba équipes ya football na ba sportifs ya intérieur babandaki mpe kokueya kuna, kobakisa lisusu surtout et surtout ba passages.

Na oyo etali ba passages, wana ezali likambo ya bourse ya mutu na mutu. Ba oyo bazali na ba moyens te, bakendeke na ba hôtels ya mike neti la source na Matonge, Akua na Bandal, etc.

Na likambo ya débauche, wana ebanda banda mokili ebanda. Loba nde, pauvreté ndenge ekomi makasi, kobombana ezali lisusu te. Mobulu ya basi na mibali ezalaka na yango esika nionso na ekolo na biso. Par exemple, ba filles ya lycée sacre cœur na Kalina (lycée Bosangani), mingi, soki kaka bakitisi bango na voiture, abaluki, akeyi na mutu na ye. Na athénée, eyebanai malamu que bana mibali na basi babandaki kokende nzela ya C.O.3 (cycle d’orientation ezalaki mibale, CO1 na CO2). CO3 nde ezalaki école buissonnière.  Bana boni baleka na makambu kuna ou sima ya esobe ya ba humanités ? Mibali na basi ya ba universités na Instituts supérieurs kutu naloba te ! Tala ndenge maladi esilisi batu na Air-Zaïre, banque du Zaïre, ministère ya Affaires étrangères, SO.ZA.COM., la Voix du Zaïre, etc. okozua eyano.

Sika, eloko nini oyo yo ozali kosepela na yango te na ba flats wana ? Ezali na ba normes te, ezali ko encourager kindumba, ezali investissement ya malonga te ? Sosola naino malamu.

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
E
J'ai lu le commentaire élogieux fait à propos de monsieur N'Singa Udjuu, originaire du Bandundu. Il lui est attribué de bonnes actions dans son village Nsontin.Je mettrai à son passif le fait de n'avoir pas profité de ses hautes fonctions pour mettre à exécution le projet de la Sucrière de Mushie-Pentane.Ce reproche vaut également pour André Bo-Boliko Lokonga qui avait préféré construire une brasserie dans la ville de Bandundu sans pousser sur la pédale en faveur de la Sucrière de Mushie-Pentane.La sous-région du Mai-Ndombe n'est pas développé, alors qu'elle pouvait être l'un des greniers agricoles de la capitale.Qu'ont fait N'Singa et Bo-Boliko pour cette sous-région dont ils sont originaires ?Elonga Adjadje
Répondre
C
Merci Ndeko na ngai Kandolo, tala tina yango nde tozali kosepela na blog na biso; nalingi koloba boye pona oyo etali ba flats... nalingi koloba boye:moyen mosusu ya ko investir ezali te? likanisi ezali batika kotonga ba flats, batala un peu mosika,batonga ata ba dispensaires, ba ecoles, ba infrastructures oyo ekoki kobongola bizaleli ya bato, ba centres ya reinsertion, ya formation professionnelle...oyo bato bakoki kofuta  ba frais moko mike, apres totala na nzela ya creation...ata ba PME, ba mini cliniques, ata na nzela ya bilanga, tout en respectant les normes requises pona ko etablir biloko wana.Pour la patrie.Charles A.
Répondre
A
Na zali ko loba sous le contrôle ya Emmanuel Kandolo. Tata ya Nsinga Udju azalaki molakisi epai ya ba sango na ntango mindele bazalaki ko recolter caoutchouc na région ya lac Leopold II. Mindele ba decouvrir kuna na ntango wana ba lianes oyo ezalaki kopesa même latex ekokani na oyo ya hévéa mpe ba profitez na yango mpo na ko obliger ba congolais ya région wana bazala ko fournir quantité ya ndembo na quota bango baengelaki na yango. Population emonaki mpasi mingi mpo mindele bakomaki na bango cruel mingi mpe moko na bango abomaki mondele oyo azalaki chargé na récolte. Tata ya Nsinga atindaki discrètement maloba epayi ya administrateur oyo akomaki na loboko na ye mpo ayebaki kokoma mpe kotanga.  Yango azalaki molakisi.  Na mokanda yango akomaki kaka "ba ma kufua mundele"mpo kikongo ya leta elobamaki ti na mayi ndombe. Batindaki basoda ba kanga moto oyo abomaki mondele. Na kanisi famille na bango ezalaki bani te mpo ezalaki famille ya ba nkumu kasi bazalaki kaka considéré mua moke lokola  ba traitres.
Répondre
A
Na zali ko loba sous le contrôle ya Emmanuel Kandolo. Tata ya Nsinga Udju azalaki molakisi epai ya ba sango na ntango mindele bazalaki ko recolter caoutchouc na région ya lac Leopold II. Mindele ba decouvrir kuna na ntango wana ba lianes oyo ezalaki kopesa même latex ekokani na oyo ya hévéa mpe ba profitez na yango mpo na ko obliger ba congolais ya région wana bazala ko fournir quantité ya ndembo na quota bango baengelaki na yango. Population emonaki mpasi mingi mpo mindele bakomaki na bango cruel mingi mpe moko na bango abomaki mondele oyo azalaki chargé na récolte. Tata ya Nsinga atindaki discrètement maloba epayi ya administrateur oyo akomaki na loboko na ye mpo ayebaki kokoma mpe kotanga.  Yango azalaki molakisi.  Na mokanda yango akomaki kaka "ba ma kufua mundele"mpo kikongo ya leta elobamaki ti na mayi ndombe. Batindaki basoda ba kanga moto oyo abomaki mondele. Na kanisi famille na bango ezalaki bani te mpo ezalaki famille ya ba nkumu kasi bazalaki kaka considéré mua moke lokola  ba traitres.
Répondre
O
Ndeko Kandolo,Na nionso ozo koyanola, melesi migi.E bongo lisolo ya Union Bilombe, toko zua yango te?Tango balobi Union, tobosani Daring te, tokoki ko bosanaHimalaya te, Vaticano, Foudres na ba équipe nionso oyoesala ke RdCongo, ezalaka...mpe eko zala kaka. 
Répondre