Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

 Bandeko,
 Namoni lisolo oyo eleka na lingala,po bapaya mingi bayoka yango te.Lelo, nalingi kolobela mwa moke likambo ya kokosa mbula. na tango ya kala mingi babunda po na kowela ki mokolo.Lelo moto nyoso alingi kotikala mwana moke. Nayebi mobeti moko ya ndembo atikala kaka na 26 ans.Ata sima ya cinq ans soki batuni mbula na ye alobaka kaka 26 ans. Aboya na ye kokatisa 30 ans, pamba te bakobenga ye mokolo.
 Awa na poto, mingi bakitisa ba mbula likolo ya ngunda. Toboyi te. Kasi tika totala mabe ya kokosa mbula. Ndakisa, ozali na 40 ans. Ekomaki yo na poto olobi ete oza kaka na 30 ans.Mbula to mibuu zomi ya bokeseni.Tango okobanda mosala, ekosenga yo o cotiser pendant +-40 ans avant obima pension. Soki toswi mbula ya ngunda okobima pension na 70 ans. Kasi lokola okosaki, okobima pension na 80 ans. wana elingi koloba ete bomoyi na yo mobimba okobanda kaka kosala mosala.
 Ndakisa mosusu,soki okei epai ya munganga, kisi mingi elandaka mbula ya  mbotama. Soki okosi mbula, dokotolo akozanga ko diagnostiquer malamu, po ba données eza ya lokuta.Na yango okoki pe kokufa liwa moko okokaki kokufa te.
 Bandeko,
 Elingi koloba te kokosa mbula ezali nde komikosa.

Messager
Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
M
Kula,Ebongo toloba bosolo.
Répondre
K
Ah Mukubwa, osekisi nga mingi na mokanda oyo...
Répondre