Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager





Minoko ya bapaya ezali koboma biso, 
Nzambe ya bapaya ezali koboma biso,
Bitumba ewuti na bapaya ezali koboma biso.

Mabomi penza ya bapaya lokola maye natangi likolo, totelemelaka yango te, po na nini? po kaka tozuela yango ba DJIPLOMA. Kiadi kibeni.
Na bi Nzambi-nzanbi okokuta bana ya Congo batondi, kasi Pasteur azali koteya na Falase po na ba Tchadien mibale bavandi wana. Po na ba Congolais nkama, basengeli na mobongoli-lokota.
Pasteur alingi bapaya koleka bandeko na ye, Congolais alingi minoko ya bapaya koleka minoko na ye, Congolais alingi Nzambe ya bapaya koleka Nzabi ya Mpungu...  Yango wana koooooo...baza kokonza biso, tolingaka bango koleka ndenge tomilingaka biso moko kasi toyebaka te.
Messager, luka nzembo ya: BAPASI TOKOZUAKA, EZALI MABE TOSALA KALA TOKOYEBA LISUSU TEooo DIYE, MUANA CONGOoooo.(Nzembo ya Sam Mangwana)

Dadou Makambo Ngambo


------------------------------------



Tokoyoka nzembo ndeko na biso asengi.

media.putfile.com/01-Bilinga-Linga-76
Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
D
Na Congo tosambeli ba Nzambe ya batu mosusu kobanda 1482 epayi ya ba kristu (West), kobanda 1490 na ngambo ya ba musilima (East). Soki lel'oyo namibengi mokristu ezali po kaka isituale pe geografi na ngai esalaki ke batu ya kotoliki bayaki na mokili ya bakoko na ngai na Mbanza-Kongo, pe moninga na ngai Issa azali musilima po ba Rumaliza na ba Tipo-tipo bakendeki epayi na bango na Kasongo (Maniema province), kasi ngai na moninga tokoma kowela pe bitumba likolo ya ba Nzambe wana. Oyo koloka, po toyebi isituale na biso malamu te. Ebongi tosuta ba Nzambe oyo tobongaka te pe tozongela bokoko na biso na nzela ya mateya ya solo ya Tata Kimbangu, Tomeka kobondela ye ndenge tomekaka Jesus kasi esimbaka te.Ezali kokamua mingi ete mboka lokola Congo etonda mayi pe mabele ya kolona, batu balalaka nzala pe bakima kokende koluka bilia na mikili ya poto, basusu kutu tii na mikili ya kokawuka lokola Burkinafaso. Likambo moko ya mabe ezali na lolenge ya kovanda pe bizaleli na biso bana ya Congo.Messager, natondi yo mingi ndenge ozali kotia libela-libela banzembo na kombo Antonio na mi-angola na Sam MangwanaPalado mingi, banzembo ya Kuyena Munzita ozali na yango? bongo oyo ya Concert des auditeur, generique ya Mateta Kanda wana: kuenda mayumbu mona Matiasi eeema ... ezali kitoko trop. Luka yango penza.Dero.
Répondre