Questions et chansons demandées par Ndila Joseph
Nice le
16 / 03 / 2010
Bandeko mboté na bino nionso
Tongo ya lelo liboso na kende mosala na lobi na tindela bino mokanda mpo na yebisa bino na sepelaka na mosala
bino bozali kosala yango wana na zali fan na bino suka té ndelo te pe na beta lisolo na bino na baninga na nga nionso soki tosali makasi
koleka
ata ndele mingi bakokima kotanga to koyoka ba site misusu ya ba muzungu pamba te tozali kozua eyano na manso tosengaka epayi na bino
tala
tina ya fidélité na nga na famille na nga epayi na bino kutu ba site mosusu nakoma kotala yango sikoyo na ba tango.
Na zali na motuna moko date nini makaba commune ya ngiri-ngiri pe mokonsi ya liboso ya commune yango nani na
tango wana ? masuwa ya kombo congolia ebunga ? yeba tango ya kala liboso ya kuzua lipanda masuwa ya sango ezalaka yango pe mingi
koleka
na Brazza ezalaka na sango na ngonga ya MIDI kutu Franco ayemba yango motuna mosusu nani asala quartier ya kingabwa ?
po na kosukisa bo meka nanu kolukela nga soki ezali ba nzembo oyo na kopesa ba titres awa oyo ekozuama mabe ezali te po na koyokisela nga
na
bandeko mosusu oyo basali fidéles na blog na bino :
Saley les trois frères et youlou mabiala
ba patron na mbongo
chérie tongo etani
Mboka mopaya pasi Franco ok jazz
Camarade mabe Franco ok jazz
mayele mabe
African jazz
Feza
sosoliso
Matondo mingi na compréhension
na bino
Ndila Joseph
Nice le 19 / 03 / 10
Bandeko Mboté
bolimbisa nga po na tungisi bino ezali kaka
motuna na banzi bo bosani nga te na ndule na sengi koyoka
bobosana pe zembo oyo na titre ya : nzoto meme motema ya nkoyi african fiesta pe na mayebo affaire étrangère rochereau african fiesta
matondo mingi
Ndila Joseph
Tosengi na oyo akoki kosunga ndeko wa biso Ndila Joseph na mituna miye atuni akoka koyanola ye.
Na maye matali nzembo tokobeta obele nzembo mibale. Nzembo lokola ba patron na ba mbongo eza déjà na blog.
Messager
1.Mayele mabe, par Masta Zamba et l'African-Jazz
2.Mayebo, affaires étrangères, par Rochereau et l'African Fiesta