Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

0011
Vata na Benfica de Lisbonne

Championnat National ya Football na Angola,ebandaka na 1979.Na ebandeli nango ba Club lokola 1° de Agosto,MCH
(Construtores)do Uíge na FC Uíge,abandaka kobeta ndembo moko ya malamu,pona ba jouers ebele babandaka kobeta
kuna,mingi bawutaka na Zaire,donc bazalaka na experience,po mingi babetaka na championnat ya Kinshasa na ya
Matadi.
Ba jouers lokola Ndongala,Mavuba(Vita),Nsuka Mello(Imana),Tandú,Kapelô,bazalaka kobeta na 1° de Agosto.Mavuba
abetaka na ebandeli,mais aprés aye kokoma na staff technique na ebonga ya formateur ya ba juniors na juvenil.Na Petro
Atlético de Luanda,ba jouers lokola Kuba(Imana),Nsumbu,Lufemba,Pepé.Kuba asalisaka Petro mingi,aprés atikaki
kobeta pe akomaka kalaka na Ministère ya petróle.Na 1°de Maio de Benguela,Seke Sarmento(Babeti ya Kin),Fussu,
Zandú,Nzuzi André,Maluka(Babeti ya Kin),deux fois meilleur buteur.Na TAAG,lelo ekoma ASA,gardien Kuba,petit frère
ya oyo natangi liboso,Lutandila.Na FC Uíge,Raimundo Teta,Mavô,une fois meilleur buteur,Simão,Ricky.Na Construtores
do Uíge,Vicy(Babeti ya Kin) na le reste bango nionso bazalaka batu ya Lingala.
Equipe oyo ezalaka populaire na Angola ezalaka Progresso Associação de Sambizanga,malgré Zandú abetaka kuna
na ebandeli,ba jouers nionso oyo babandaka kobeta kuna,bazalaka ba locaux,bayebaki kobeta ndembo malamu,mais
sima baye ko recruter Kiala,Sakaneno,Vata(Ruwenzori),Sorcier na Muanza Mirage(Imana).
Ba jouers oyo nionso nawuti kotanga,baningisaka Girabola,kombo ya championnat ya 1° Division,entre 1979-84.Mingi
bazalaka ko beta na Palancas Negras,kombo ya selection ya Angola.
Tango Muanza Mirage akotaka na Progresso de Sambizanga,presse angolaise asalaka makelele mingi,pona ayebana ka
mingi na niveau ya Afrique Central,malgré ebeteli naye ya malamu,,jouer oyo akamusaki Angola nionso ezalaka Vata,parce
que chaque match abandaki kozangisa but te.Yango etindaki babenga ya na selection,kuna pona kozua place ya avant
centre ezalaka pasi,pona ba jouers lokola Jesus,Eduardo Machado,na Maluka,bazuaka ebonga,mais jour ya liboso abeta
kuna atiaka but,wuta tango wana atikalaka kolongua lisusu kuna te,sur 65 match,20 but.
Vata azalaka jouer moko na technique te pe azalaka na classe te,mais azalaka impressionant ndenge abandaka ko tia ba
but na simplicités nionso,azalaka discrét comme un félin.Veritable terreur ya ba gardién.
Vata abeta na Progresso ya Sambizanga 4 ans.Na 1984 bakonzi ya Recreio de Águeda ya Portugal nde ba sombaka ye,
kuna nde abetaka kaka 6 mois avant akota na Varzim S.C ya division ya yambo.Abetaka ndembo kuna mbula minei,
Donc 1984-88,ayaki kobima meilleur buteur ya tout le temps na club wana.
Na 1988 entrâineur ya Benfica de Lisboa,Sven Goran Erickson,akotisi Vata na Club wana ya prestige,comme jocker de luxe.
Ekoti Vata na Benfica,azalaka jouer moko abandaka kokota na deuxième mi-temp,soki akoti,mongete abandaka kozanga te.
Kuna aye kobima meilleur buteur ya championnat ya Portugal.Mais avant ye,ba Angolais neti Zé Água abimaka 5 fois na Jordão
ye lisusu 2 fois.Na qualification ya lel'oyo Champions Leagues,atiaka 6 but avant ya demi final.Olimpique ya Marseille ya
Bernard Tapie nde ayaki kokutana na Benfica,na match retour,na estádio da Luz de Lisboa,bazalaki na posa ya but moko,
puisque na aller bapolaki na 2-1.Vata nde mutu ayaki kotia mongete na loboko(La main de Dieu),a qualifier Benfica na final.
Epai ayaki kopola na AC Milan ya Gullit,Van Basten na F.Rikaard.Tango alongue na Benfica na 1991,atikala ko tia 35 but.
Deux fois Champion ya Portugal.1991-92 abeta na Estrela de Amadora,3 buts.Atikaki kobeta na Portugal na club ya Torrense.
1993-94- Fc Floriana na Mallte ayaki kosomba ye,kuna ayaki kobima champion.
1994-99- Gelora Dewata Indonesie,meilleur buteur,95-96.Na mbula ya suka akomaki nde entrâineur adjoint.
1999-00-Entraineur ya Guntur Bali,champion.
2004-05-Entraineur Mitra Kukar
Lelo Matanu Garcia Vata azali entraineur ya Geelong soccer & Sport Club(2 division) na Etat ya Victoria, na Australie.
Ndombasi Kupessa Ngombo
Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
N
yamba durango azali kovanda na benguela mpe azali kosala commerce na ye.muana na ye yamba asha azalaki kobeta na petro mpe après akotaki na asa.se atika na ye ndembo à cause de son âge.amicalement nsingi mabuassa
Répondre
N

Sonny Mokonzi mbote lisusu.

Myra abetaka na 1° de Maio ye pe mutu akufaka liboso.Ba jouers tout oyo owuti kotanga bakufa,nayebi ndenge bakufela te.Nsuka Mello nde abelaka mingi.Pona Yamba Durango nazali na ba informations
na ye te.Na Angola ba jouers ebele ba changeaka ba kombo,ba misusu babandaka kobeta na 2 division to na ba division provincial,neti ndenge toyokaka,Kongolo oyo azalaka gardien ya Imana abetaka na
Club ya Nocal na championnat Provincial ya Luanda.Ba jouers misusu babandaka kobeta te,neti Kilasu,na bandaka komona ye na Viana,sans empoi.Ba oyo batangaka kelasi mingi na kin,bazuaka ba empoi
ya kilo,ba sutaka football.Angola ezalaka na option marxiste,ba jouers nionso bazalaka obligé bazala na misala.Ba club privé ezalaka te.Na cas y 1° de Agosto ba oyo babetaka ndembo kuna bazaka ba
militaires ya solo,Nsuka azalaka Sous-Lieutnant.Même chose na ba musiciens,Mário Matadidi,azalaka Capitaine(tokolobela yango sima).Yango omoni bakombo misusu etangami te.Merci.

Répondre
S

Ndeko Kupesa,namoni otangi bakombo nionso mais naluki kombo moko namoni te,ezali ya YAMBA DURANGO ancien ya dragon bilima.Est ce que okoki kozala na b'informations ndenge nini MUANZA MIRAGE
akufaka?parait-il que babomaka ye?,na joueur oyo mosusu KIALANDA PETIT MIRA ya IMANA,ye pe lisusu il parait babomaka ye na lubango ou huambo??KIALANDA,NSUKA MELO NA MPASI SILAWUKA bazalaka na
milieu pe na attaque ya IMANA entre 1979-80 avant bakota ANGOLA.

Répondre
J

Nazalaka na souvenir moko ya bien te sur VATA. Ye mutu a bebisa carriere ya LOBILO, avec jeu dur moko ya buzoba. Ye azalaki attaquant, mais ndenge a faucha LOBILO sur un duel aerien (nazalaki na
stade) batu ba comprena yango te. Ezalaki pe match amical ou match de preparation VITA - RUWENZORI (1979 ou 1980).

LOBILO azonga apres 5 ou 6 mois ya traitement avec ba problemes ya makolo (akomaki kutu ko boiter un peu). LOBILO ne s'etait jamais retrouvé jusqu'a ce que ayaki kosala un come-back esimba
te vers 1984. A tentaki kutu kobeta na GRECE, mais esimba te.

Répondre