Mua mituna pona ebonga ya 1er ministre na RDC
Mua mituna pona ebonga ya 1er ministre na RDC
Mbote ba ndeko,
Likanisi eyelaki nga
tango natangaki ke Mr. Koya Gialo Gbese Te Gberengo akomi Premier ministre intérimaire ya RDC wuta lobi le 06 Mars 2012.
Mituna yango oyo pona mutu nionso oyo ayebi:
1) Wuta ba noko (ba Belges) bakenda tozui ba gouvernements boni?
(Po natango moko boye Mobutu ye moko azalaki Président pe chef du gouvernement) mais ba 1er Commissaire d'état pe bazalaki, esika wana etiaka nga na mua mubulu, ezalaki vraiment ndenge nini?
2) Nani kati ya ba 1er ministres nionso azua ebonga wana mbala na mbala koleka basusu?
3) Nani asala mandat moko ya tango ya mulayi kati na bango?
4) Nani asala tango ya mukuse koleka baninga?
5)Normalement na gouvernement moko esengaka bibonga boni pe nakoki koyeba pona nini?
6) Pona nini bibonga mususu ezalaka plus important ke misusu?
Ndakisa: Mulopwe Albert Kalonji aboyaki ministère ya Agriculture na tango ya Lumumba alors mutu nionso alobaka "koliya eleki kolata."
*Ambassadeur ya USA na RDC ayebisaki Sangwa Maray Maray ke musiki ezali 2ème ressource ya mbongo na USA alors ke epayi na biso Culture et Arts - Sport et Loisir ezalaka toujours négliger.
7)1er ministre nini atika kombo na mboka, ndenge Sakombi (gouverneur) atika kombo na unité de mesure ya wenze?
*Même na Zando ya Poto poto na Brazza ba mama babengaka kopo ya mesure "Sakombi."
8)Est ce que tosi tozua 1ère Ministre déjà (donc ya muasi)?
*Nakosepela soki natangi pe kulutu Emmanuel kandolo po totanga ye kala vraiment.
Merci d'avance na baye nionso bakosalisa pona biyano na lokota nionso.
Serge, Kongo na biso