Spécial "mbote" na Emmanuel Kandolo
Emma, ne mobuu moleki, osengaka nzembo moko na nkombo ya "Thimothée abangi makambo", esalama na Franco na
lingomba ya OK-Jazz entre 1966 & 1968. Na ntango wana nzembo'ango ezangaka o maboko ma ngai. Lelo oyo libaku esali ete nakoka kosomba album mobimba. Ntina osengaki "Thimothée abangi
makambo" nayebi te. Nakosepela mingi okoka koyebisa biso souvenir nini etikala na motema mua yo mpo okoka kokanisa nzemb'oyo kina lelo.
Nabakiseli yo mpe nzembo mosusu " Mindondo ya koswana na mobali", ya nkondo Mujos, kaka na lingomba ya OK-Jazz, entre 1966 & 1967.
Nzembo oyo mibale tokoyoka yango mpe mpo na lokumu ya ba kulutu nyoso ya blog na biso. (mesg)