Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

24-0 au championnat Sud-Africain de Football !

Incroyable. L’Equipe de Mamelodi Sandowns a écrasé le F.C Powerlines sur un score sans appel de 24-0. Un score digne d’un match de rugby.

On dirait que l’organisation du championnat du monde de football n’a pas réussi à rehausser le niveau du football dans le pays de Mandela. Son équipe Nationale(Bafana Bafana) n’a pas participé à la dernière finale de la Coupe d’Afrique des Nations, et la performance des certains clubs laisse à désirer.

Mbokamosika.

BANNIER-MBOKAMOSIKA.jpg

Une vidéo recommandée par Kaïs Kaïsala Mangubu

. Vidéo proposée par Kaïs Kaïsala Mangubu

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
M

Mwana mboka na kanisi ba ekolo mingi te balongolaka ba coach mbangu mbangu lokola awa na Afrika ya Ngele. Na ebandeli ya saison yo coach equipe na yo epoli ba match mibale to misato yebaka ozali
kokende. Mbongwana ezali kosalema kasi ezali koya malembe malembe, population elingi ba equipes ekende na ba coupes ya Afrika, pression ezali makasi na bakonzi ya PSL, SAFA mpe ya ba equipes, ba
resultats mpe ekomi komonana, lokola bakozongisa calendrier na bango ezala ndenge moko na oyo ya Afrika na 2014 apres coupe du monde. Mingi mingi mpe na ndenge bamonaki equipe ya Zambie na ndenge
elongaki coupe ya Afrika na ba beti na babgo ebele koleka kati mingi babetaka awa na Afrika ngele.Bunene nayebi ata moke esika akoma te, Merikani mbala ya suka na yokaka basango na ye azalaki
kaka na Jomo Cosmos lokola mokambi ya ba gardien de but mpe en charge ya ba special projet, wana mbula mine to mitano. Doctor Khumalo azali kaka naKaizer Chiefs lokolo mokambi ya ba juniors mpe
asalaka ba analyses ya ba match na TV (Supersport).

Boboto o mboka yo

Mwan'a Joburg

Répondre
S

Mbote ndeko Marcellin,

Natondi yo botondi na biyano opesi, elakisi vraiment ke wana ezali
« football made in South Africa », la vie ezali etumba tolukaka mbongo mais kokoma lukoso ya mbongo nde ekomi mabe.  Soki ba continuer boye
bakotikalaka kobeta football moko locale, ekozala mabe pona future génération ya ba joueurs na bango.   Africa mobimba emesana na ba voyages ya
pasi, tomona équipe ya Zambia ndenge ekueyaka na ebale na Gabon na 1993, ba Togolais bazuaki masasi na Angola, ba Zaïrois babetama na Gabon pe etc… kasi ba continuaka kaka ko voyager po ezali
nango ndenge ya continent na biso.  Football ezali d’abord lisano sima nde mbongo eyaka sima mais peuple na peuple azali na ndenge naye.  Pona 9 à 0 Vidinic apakata, azonga kutu ata na Kin lisusu te, Boas Villas (Chelsea) bawuti kolongola ye na Abromovich po bakomi na 5eme place mais 24 à 0 na
South Africa bakambi  baza inquiété te, Africa na biso eza nango kaka pasi.  Eloba nango Mr Aubert
Mukendi : « c’est qui est étonnant, à chaque que Mobutu perdait la guerre, il augmentait en grade. »  eza kaka neti neti

Please, Dr Khumalo, Merikani,
Bunene Buangandu bakoma ba nani sikoyo ?

Merci na biyano ndeko, boboto o mboka yo.

Serge, Kongo na biso

Répondre
M

Mwana mboka botondi na mituna na yo, kasi mpo na ndimbola malamu nakokabola biyano ngai na biteni misatu. Na liboso tika nalobela PSL (championat division elite na 1 division) yango ekelemaki na
1997 ba copiaki Premiership ya England na organisation, logo na bango mpe mua muke, ata kutu na na saison na bango. Na bokeseni na bikolo ya Afrika awa saison ebandaka na September mpe esilaka na
na July. Bazali membre special ya SAFA (FECOFA na bango awa) kasi na autonomie ya munene. Pona kopesa yp mua idee ya makasi ya PSL, na kati ya mbula eleki ba renouvelaki contract na bango na
SUPERSPORT mpo na bolakisi ba match na bango na TV, batekisi yango na $300000000 mpo na mbula mitano. Sponsor na bango ya ligue ezali ABSA BANK (BARCLAY azali majoritaire na bank oyo) yango mpe
ezali ya ba million ya ba dollar, mpe bazali na ba competitions misatu na saison nioso na ba companies ya minene mpe na ba millions. Lelo oyo PSL ezali classer 10 ligue na monde na oyo etali
mosolo. Ba equipes ya ligue oyo balingaka kokende na Afrika te, mbula na mbula okoyoka kaka e te equipe oyo esengelaki ekende bakoboya, soki bandimi bakotiya kaka ba reserves na ba match away.
Tolobela SAFA, yango ezali mua makasi kasi ekokaka PSL te, mpo PSL eleki bango na mbongo mosika. Lelo oyo likambo ekoma boye, national coach akobengisa ba babeti local, okoyoka boye, oh mobeti
wana aye te, abungi, oh equipe elobi mobeti mosusu moyen aya te mpo azali blesse kasi soki match ya equipe national eleki ye wana abeti na match ya equipe na ye. Soki match ya equipe national
ezali libanda ya calendrier ya FIFA wana kutu bakotika babeti na bango ata muke te, ata SAFA abondeli. Tolobela ba coup ya Afrika, molongi ya coup de club champion nakanisi azuaka $2000000, kasi
awa balobaka ecoutaka tres cher ko participer, yo moko oyebi Afrika, kokende na Tchad okoleka par France ba vols direct eza muke. Ya mibale CAF azali ko tenir ba droit nioso ya retransmission ya
ba match wana mpe ba droits misusu, ba equipes moyen basala mbongo ezali te. Mwana mboka nakoki kokoma mingi na likambo oyo kasi tango nde ezali te. Na boleki eloko moko nanu eyeli bakambi ya
equipe oyo ezuaki mangenda te.

Boboto o mboka yo

Mwan'a Joburg

Répondre
S

Mbote ndeko Marcellin,

Ndenge olobi epesi image moko lokola b’équipes ezali na supériorités likolo ya
bakambi y aya « Equipe nationale. »  Baza kokoka te kobeta na ba compétition internationale to baza koboya ko participer pona ba
infrastructures internationale lokola ba hôtels, ba terrains, transports y compris lifuti « lifuti ya malonga ezali te. »  Nafanda na South
Africa, namona à l’époque ba Merikani, Tchikose, Bunene Bua Ngandu, Marc Fish et autres mais bazalaki ko vivre na luxe te !

Hôtel nini ezuami na South Africa ekoki kozuama te na ba mboka misusu ya
Africa ?  Jouer nionso, équipe pe Mboka nionso ezalaki na posa ya kombo na bango ekende liboso, bazua ba trophées pe lokumu mais ezali kokamuisa
ke ban aya South Africa bazala na ignorance ya makambu oyo nionso.  Equipe ya Swanse ewuti komata kaka mbula oyo na Champions league ya UK mais ezali
kosala makamuisi pe ko gagner b’équipes ya minene oyo ekenda sango na Grande Bretagne dommage ke comparaison n’est pas raison, mais nini esalamaki
sima ya défaite wana, balongoli bakambi to boni boni ?  Ezali kaka réflexion nazali komisala po ba raisons bazali kopesa azali vraiment
ko justifier descente aux enfers ya football Sud Africains te.  Notre Léopard avant ekoma ndenge Mobutu alobaka « un véritable chat beauté »
ezuaka 7 – 0 na Gelsenkirchen na Allemagne, bapesa raison : « to sabotaki match po bazalaki kofuta biso te » momeli masanga andimaka kuiti te baloba.  Bango ba gagnaka ba $1.5millions na ba 1million na kati ya mboka na bongo ba compétitions ya Africa bafutaka
combien soki par hasard okoki koyeba?  Nga nayebi te juste kaka pona kozua idée.

Ba mbote ebele.

Serge,

Répondre
M

Ya solo ndembo oyo ebetamaki kasi ezalaki kati ya equipe ya division ya likolo contre equipe ya division ya liboso te kasi ya division ya mibale. Equipe yango mpe esalami kaka mbula mibale yango
oyo. Kasi mpo na Bafana Bafana ndenge bazali lisusu ko koka kokende na CAN mpe ndenge ba equipes na bango bakendaka mosika te na ba coupes ya Afrika ya ba clubs, ba tina ezali ndenge na ndenge.
Kasi tika napesa tina ya monene, awa ba equipes mingi surtout ya minene (Sundowns, Pirates, Chiefs, Ajax, Supersport) ba lingaka kopesa ba beti na bango na Bafana Bafana te, mpo pona bango
balingaka ko garder babeti na bango mpo na ba match ya ligue. Yeba e te soki olongi ligue awa coupe ezali ya $1500000, bakisa likolo ba coupes nioso mingi mingi moyenne ezali $1000000 ya prime.
Kobakisa lisusu kobeta kaka na ligue ya likolo awa equipe ezuaka $150000 sanza nioso. Ezali nde lokoso ya mbogo, ba equipes balingaka bavanda na mboka babunda kozua ba mbongo wana, kasi komona
pasi ya kotambola na Afrika, ba vols direct ezalaka te, ba mboka mingi ba hotels ya malonga te mpe ba ntoto ya kobeta ndembo ya miniato. Mokambi ya Bafana Bafana eza na chance soki azui ba beti
local mikolo 3 liboso ya match. Lokoso ya mbongo nde ezali na base ya pasi na bango.

Mwan'a Joburg

Répondre