Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

 

Ndeko Papatoto,

 

Nabosanaki koyanola na motuna otunaki soki ba Commissaires généraux basilisaki ba études na bango ? Natieli yo ba kombo ya ba oyo basilisaki mpe bawutaki kosilisa. Ba adjoints mingi nde bazalaki ba étudiants.

Justin Bomboko, licencié na Sciences politiques ya université libre ya Bruxelles (U.L.B.), Belgique,  na 1959.

Albert Ndele, licencié na sciences économiques ya université catholique ya Louvain (U.C.L.), Belgique,  na 1958.

Mario Cardoso , licencie na sciences psychologiques et pédagogiques ya université catholique ya Louvain (U.C.L.), Belgique,  na 1959.

Pierre Lebughe, ingénieur agronome ya université catholique ya Lovanium (U.C.L. ou Lavanium-Léopoldville), Léopoldville, République du Congo, 1959.

Auguste Mabika, licencié na sciences politiques et administratives ya université ya Lovanium (U.C.L. ou Lavanium-Léopoldville), Léopoldville, République du Congo, 1959.

Albert Mpase, licencié na  sciences sociales ya université catholique ya Louvain (U.C.L.) Belgique, 1959.

Marcel Lihau, licencié na droit ya université catholique ya Louvain (U.C.L.), 1959. Na 1960 azalaki na école  doctorale ya droit ya U.C.L.

Aubert Mukendi, licencié na mathématiques ya université catholique ya Louvain (U.C.L.), Belgique, 1959. Licencié na astrophysique ya université ya Liège, Belgique, 1960

Ferdinand Kazadi, licencié na sciences sociales ya université catholique ya Lovanium (U.C.L. ou Lavanium-Léopoldville) , Léopoldville, République du Congo, 1960.

Joseph Mbeka, licencié na sciences économiques ya université catholique ya Louvain (U.C.L.), Belgique,  na 1960.

Marcel Tshibamba,  quatrième année ya doctorat na médecine ya université catholique ya Lovanium (U.C.L. ou Lavanium-Léopoldville), Léopoldville, République du Congo, 1960

Charles Bokonga, licencié na Sciences psychologiques et pédagogiques ya université catholique ya Louvain (U.C.L.),  Belgique, 1960.

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

 

...............................................................................................................................

 

Ndeko Ananclet,

 

Nayebisaki yo mbala eleki que blog na biso oyo ya Mboka mosika ezali esika oyo tozali kosangisa masolo. Ezali kokamuisa ngai tango ozali koluka ko insinuer que mutu akoki koyeba nionso. Tozali na kati ya masolo etali mémoire collective na biso, ata soki ebimeli na café de commerce, l’essentiel ezali que esunga biso mpo toyeba maye matali ekolo na biso R.D.Congo. Peu importe esika lisolo ebimeli, peu importe clavier ebeti lisolo, peu importe sexe, race, religion ya mutu abeti lisolo, l’essentiel ezali que yango esunga na mémoire collective na biso. Mindele mpe batu moindo ebele basali mingi mpo na mateya ma R.D.Congo, ezali bongo nde raisonnement na biso  awa na Mboka mosika ezali kolanda sans koluka kokotisa makanisi maye ozali na yango sur racisme ! Tika koluka kotambola na nzela oyo ebandi kobimisa yo na masolo ma R.D.Congo, s’il te plaît, nayebeli yo bongo te.

1. Likambu ya Kisantu, ezali clair mpe moindre confusion ezali te. Université ebandi na Lovanium, na professeur Guy Malengreau wuta 1954. Napesi yo ba exemples ya Lihau na Bomboko. Bakotaki naturellement na premières années graduats ya Droit na Sciences politiques.

Toyokana malamu : nalobi te que Kisantu ezalaki rien. Yango ezalaki na niveau ya malamu, yango nde eyaki ko pesa impulsion na création ya université na 1954. Soki ezalaki université, alors comment tango université ebandaki, ba élèves oyo basilisaki na Kisantu, esengelaki lisusu babandela première année na Lovanium ? Et pourquoi Kisantu ekufaki en tant que soi-disant université? Ekokaki ko continuer ko fonctionner comme université mosusu pembeni ya Lovanium.

2.  Na oyo etali médecine, eyebani malamu que mutu soki azali assistant médical, azali na formation ya médecin généraliste te mpo atangi ba kelasi wana te. Eyebani lisusu qu’après trois ans na faculté ya médecine, mutu akomaka médecin généraliste te. Ezali insulte te, d’ailleurs ba oyo bazalaka ba assistants médicaux bakotaka na faculté ya médecine mpo bakoma ba médecins sima ya sept ans ya études.

3.  Pourquoi ozali koluka ko exclure ngai parmi ba compatriotes oyo ozali kosolola na bango ? Ezali histoire ya ekolo na biso, esengeli mpe o prendre opinion na ngai en compte.

4.  Lisolo ezali ya maye maleka na R.D.Congo. Natuni yo mituna, oyanoli te. Kasi tala ndenge opesi espace ebele na enseignement na France !!! Sujet na biso ezali kuna ata muke te. Et puis, opesi ata opinion na yo te na ba documents natielaki yo awa. Est-ce que otalaki yango?

Nazali komona te problème ezali wapi soki nayebisi yo que top ya ba grandes écoles na France ezali mine : Ecole Polytechnique (l’X), Institut d’études politiques (Sciences Po ou I.E.P). Ecole normale supérieure (E.N.S.) na Ecole nationale d’administration (E.N.A.). Classement oyo ewuta banda 1794.  Ecole polytechnique ezali na top mpo na ba écoles d’ingénieurs. Comment okoki kotiya yango likolo ya Sciences Po.,  Ecole normale supérieure, E.N.A., dès lors que ba écoles oyo ezali ba écoles d’ingénieurs te ?

Ezali une affirmation gratuite tango ozali koloba que rêve ya parent nionso ezalaka que muana na ye asala école polytechnique. Comment okoki koloba kabambi ya likambo boye na kombo ya ba parents banso ya France ? Tika koloba ndenge wana mpo oyebi te nini ba parents banso ya France bazali kokanisa mpo na avenir ya bana na bango. Il est vrai que formation kuna ekemba tout comme na ba grandes écoles nionso. Kasi ezali ko englober ba domaines nionso ya science te. Mpe na vie, mutu asalaka eloko mpo azali na passion na yango, surtout na pays lokola France, mutu asalaka ba études mpo na manque ya choix te, ata soki ba nzela ya ba grandes écoles na ba universites préstigieuse epesaka misala efutaka malamu mingi.

N.B.  Na réponse na ngai, nalobelaki cas ya ba étudiants étrangers. Par distraction, nazuaki en compte ba classes préparatoires na grandes écoles (C.P.G.E.) te. Limbisa ngai.  Par ailleurs,  cursus ya Science Po, Ecole normale supérieure, na Ecole nationale d’administration ekokani te na ya polytechnique. Tout comme mingi basala science po, babandaki kuna mpe sima bakende na Ecole ya magistrature. Et polytechnique yango moko mpe e travaillaka na ba grandes écoles mosusu esika ba élèves bakendeke kosala master tee na doctorat (yango mpe esalemaka na kati ya polytechnique) kobosana te que ba réformes esalemi mingi).

Nzela mosusu ya kokota na polytechnique ezali wuta na université, nzela mosusu ezali na baye ba bimbolaki na Arts et Métiers, nzela mosusu ezali na ba oyo bazali ba ingénieurs mpe balingi basala polytechnique.  Tango ozali koloba qu’ « il », ye nde nani ? « Il » oyo  choisira le dernier méritant ya polytechnique par rapport na premier reçue na concours ya école centrale ? Ezali komonana que ozali koloba makambu sans otala malamu ! Comment okoki ko comparer ba concours mibale entre oyo ya école polytechnique na ya école centrale ? Muana oyo akeyi kosala concours ya école polytechnique akoponama kaka ba bakonzi ba école polytechnique, tout comme oyo ya école centrale akoponama kaka na baye bapesi ye concours wana. En plus, réussite na concours ya polytechnique ekoki kopesa yo accès na école mosusu te mpe vice-versa. Donc, ozali na kati ya likambo ezali na nzela ata muke te. Et pourquoi Ecole normale supérieure ezali ko passer avant ba écoles ya Paris Tech  aussi longtemps que yango ezali école d’ingénieur te ? Salaka bokeseni soki ozali kososola makambo oyebi !!!

Ndeko, ozali na mua retard, Ecole polytechnique e formaka lisusu en trois ans te, ekoma quatre ans, ndenge esalema wuta 2004 oyo olobeli, sauf que différence ezali qu’élève esengeli akende tee na maîtrise. Makambu ya trois ans wana ezali ya kala, avant 2004. Comme quatrième année ezali ko correspondre na master, élève azali na choix ya kokende na ba écoles oyo e travaillaka na écoles polytechnique mpo na kosala maîtrise na ye ou soki alingi kokende tee na doctorat na domaine oyo ye alingi, ezala na France ou na étranger.

N.B. Ba concours nionso ezalaka sélectif, yango wana babengaka yango bongo mpo na kopona ba meilleurs candidats sans discrimination. Yango wana mingi mingi ba cas ya démissions ezalaka rares.

Soki olingi débat sur ba grandes écoles, tokoki kosala yango na sujet mosusu. Ezali ko dépendre na yo. Soki ozali na temps, initier sujet, to débattre. Ekozala mpe malamu mpo baninga mosusu bayeba mua ndambu na oyo etali ba écoles oyo na France mpe ba boti na bana oyo balingi koyeba yango, bayeba mua moke.

5. Parler de Lumumba ezali ko faire partie na Histoire ya ekolo na biso tout comme tokoki kolobela Munongo, Mobutu, Manzikala « trouble-trouble », Kazadi ya Englebert na Léopard, Mutombo Buitshi na théâtre, Liyolo le sculpteur, tantine Abeti na Crispin-Régis Lukoki na miziki, Serge Diantantu le dessinateur, Paul Lomami Tshibamba l’écrivain, etc. Nionso oyo ezali na cadre ya Histoire ya R.D.Congo. Mungul Diaka asalaka trois semaines na poste ya Premier Ministre, Tshisekedi asalaka kaka une semaine, Kalonji amikomisa empereur ya Sud Kasaï, Pasteur Isaac Kalonji batiaka ye Président ya Bureau provisoire ya Conférence nationale souveraine, Tshombe  akoma Président ya Etat ya Katanga, Kabarebe akomaka Chef d’état-major ya armée congolaise, etc. Nionso oyo ezali na kati ya Histoire ya R.D.Congo, mpe tokoki kolobela yango mpo ezali réalité historique. Par contre, soki mutu aboyi histoire ya ekolo na ye, ata soki babeteli ye yango na Elikia M'Bokolo oyo asilisi na Ecole normale supérieure, deuxième grande école na France, esika sélection ezalaka pasi makasi, elingi koloba que mutu oyo azali en contradiction na ye moko mpo azali kozua élite scientifique oyo awuti kuna au sérieux te. Ata yo moko, mutu ya boye, okobenga ye nani ?

Pourquoi yo olingi tolobela likambu ya Lumumba te ? Simon Kimbangu, Mobutu, Kasa Vubu, Laurent na Joseph Kabila, tee na ba ndeko na biso oyo bazali ba voisins ya ekolo na biso, bazali na droit de citer awa na cadre ya histoire na biso mpo ba contribuer positivement na négativement na yango. Tokoki kotanga batu lokola ba papas Mbala, Luwawa, Domi, Mwemba, Mingiedi, Massamba, Binga, Tangi, etc. ba kombo ezali ebele. Bango basali misala minene na R.D.Congo, esengeli tolobela yango un jour. Tokoki mpe kolobela Kagame, Museveni, Kunda, na ndenge basali makambu mabe na R.D.Congo. Nionso wana ezali na masolo ma ekolo na biso.

Soki ozali na ba livres oyo ozali ko conseiller bilenge, utiliser ba pages ya Mboka mosika. Soki mpe ozali na ba livres oyo ekomi makambu ya papa Simon Kimbangu, ekozala bien mpo e édifier lisusu ba jeunes ndenge Elikia mbokolo alakisi na film oyo natiaki, tango nayanoli yo mbala eleki.

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

 

……………………………………………………………………………………………………………………………………………..

 

 

Ndeko Fidele,

 

Soki otangi lisolo oyo malamu, précisément na point oyo olobeli, ezali nde eyano na maye ndeko Anaclet alobaki na oyo etali makambu Lumumba ayebisaki bena Lulua que basala ngele, noki te, Ngalula, muluba, akokoma Président ya Kasaï. En réponse na maloba ma ye, nde nalakisaki ye nini elekaki tango M.N.C.- Kalonji elongaki ba élections na Kasaï. Eyano na ngai ezali ko résumer ebandeli ya kobomana kati na ba Luba na bena Lulua te. Nazali kuna te ! Soki otangaki ata biyano napesi ndeko na ngai Claude Kangudie, okomona que na ba dates oyo napesi, ezali kolakisa que accord ya liboso ezalaki na Matanda le, 22 août 1959, avant même Table Ronde ya Bruxelles. Yango mpe elingi koloba te que nungu nungu ebandi na 1959 yango ebandaki avant wana.

Le fait que Lumumba apesaki likanisi ya kosala Front commun mpo na kotiya M.N.C.- Kalonji na minorité, ezali anti démocratique na eloko ata moko te. Mpe bena Lulua bayebaki malamu que sans alliance na M.N.C- Lumumba, ekozala difficile bazua Présidence ya Kasaï. Wana lisusu ezali kolakisa volonté na bango ya koboya kotikela ba Luba pouvoir ya ko décider na avenir ya Kasaï. Nani abungi influence ya Lulua-frères ? Est-ce yango ekokaki kondima likambo ewuti na Lumumba sans pour autant etala intérêt ya bena Lulua oyo ezalaki na kati ? Ezali sentiment oyo ezalaki avant même Lumumba a proposer création ya Front commun. Ezali ndenge wana na politique. En plus, ekozala hypocrisie ko croire que na ba partis « ethniques » politiques na biso, sentiment ethnique ezalaka na primauté te. Seul parti oyo ezalaki véritablement national ezalaki kaka M.N.C.- Lumumba.

Ndeko, en rien, unité nationale prônée na Lumumba ezali en contradiction na lutte politique oyo M.N.C- Lumumba ebandaki kosala. Kalonji alonguaki na M.N.C. Wuta wana, ekomaki na ba ailes mibale : Lumumba na Kalonji. Bazalaki na opposition na vison politique na bango. Soki M.N.C.- Kalonji ezalaki na ensemble ya Congo ndenge M.N.C- lumumba ezalaki, elingaki mpe tango mosusu esala ba alliances mpo etiya M.N.C.- Lumumba en difficulté. Mabe ezali te.

1. Ya solo, Premier Ministre azali responsable devant le Parlement.

2.  Premier Ministre Lumumba nde a proposaki nomination ya Lundula na Mobutu ba Chefs ya A.N.C.

3. Premier Ministre Lumumba asalaki proposition ya kobengisa intervention ya ba troupes ya U.R.S.S.

Ndeko, ozali ko conclure vite sans o tenir compte na makambu ebele.

O.N.U endimaki na résolution ya13 juillet 1960 mpo apesa na assistance militaire na Congo. Le 20 juillet 1960, Lumumba asengi aide ya U.R.S.S. Le 25 juillet, Lumumba asalaki discours na New York sur situation ya Congo na ndenge armée belge eye ko occuper Congo en violation ya droit international. Tango aide ya U.R.S.S. ekomi, premier fois, 18 avions eye mpo na transport ya troupes, mpe mbala ya mibale, 17 avions lisusu eye mpo na même mission, ya kokota na Katanga via Sud Kasaï, esika Kalonji a déclaraki Etat minier ya Sud Kasaï depuis le, 9 août 1960.

Tango ba troupes ya A.N.C esali ba massacres ya population civile, Président Kasa Vubu aye kolongola Premier Ministre responsable devant le Parlement. Toyebi biso banso nini elekaki sima. Le 14 septembre, Kasa Vubu a bombarder Mobutu, Général mpe Commandant en Chef ya A.N.C.

Sika, pourquoi débat ekokaki kosalema na Parlement te mpo na koyeba nini esalemaki na Bakwanga ? Pourquoi ba présumés responsables ya massacres wana bazalaki traduit na justice te ? Pourquoi tee na lelo oyo enquête esalemi kaka te ? Justice esengeli eleka wana. Tobosana te que ba oyo ba créaki ba conditions oyo ekoki kotiya population na insécurité, bazali mpe na part ya responsabilité. Bayebi malamu que soki enquête ealemi, ekosengele bapesa ba témoignages na bango mpe balobela ba motivations etindaki bango basala un Etat minier mpe ba monter batu contre ba autorités centrales. Na ba pays mingi oyo ba massacres esalema, tomonaka volonté manifeste ya justice. Epayi na biso, tolingi ko se contenter kaka na ba témoignages ya ba mêmes personnes oyo bazalaki na pouvoirs ya kozua ba décisions oyo tozali ko déplorer lelo oyo. Pourquoi tokopesa crédibilité na ba témoignages na bango na esika ya une vraie enquêtes judicaire ? Tobosana te que ba crimes de guerre ezalaka indescriptibles (mbeba na bango ekutamaka seko seko)

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel kandolo

 

………………………………………………………………………………………………………………………………………………

 

Ndeko Messager,

 

Nakobakisa na liste ya batu otangi wana mosusu, azalaka Chef ya gendarmerie ya Sud Kasaï. Akimaka na Brazzaville tango Sud Kasaï ezongaki sous contrôle ya Léopoldville. wuta wana ayaka kobeba mutu. Ye mutu akumbaki Lumumba na avion oyo ekedeki na Katanga.

Mokili oyo ezali na makambo na ndenge na ndenge mpe manso mafutamaka kaka na nse.

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

 

.................................................................................................................................

 

Sujet : Chanson souvenir Palmarès, par Rochereau et l’Afrisa  international

 

Ndeko Type ka,

 

Mpo na koyanola na motuna mua yo, esengeli toyeba différences minene de taille.

1. Kasongo, ezali kombo ya na ba Yaka. Ba Yaka bazali d’origine Lunda. Bango bazali na Kasongo-Lunda, Popokabaka na kenge mpe bazali frontier na Bagata, epayi ya ba Yansi. Okoyoka kombo ya Kasongo na Bandundu, na district ya Kwango mpe na province ya Katanga epayi ya ba Lunda.  Mpo okoma na Kasongo-Lunda, soki owiti na Kinshasa, oleki Bankana, sima nde okokueya na Mayamba. A partir ya wana nde ozui droite. Soki ozali kosala voyage na camion, il faut okende tee na Kenge. Sima nde ozui camion mosusu na Kenge mpe ozongi lisusu sima, ozui gauche, tee na Kasongo-Lunda via obligatoirement Popokabaka.

2. Soki owuti Kinshasa, oleki Kenge, Masi Manimba (Masi), tango ozali kokatisa mayi ya Kwenge, ozali déjà  na village ya  Busongo, après, osimbi nzela tee na Kikwuit. Juste avant okoma Kikwuit, nzela ekeyi epayi ya ba Yansi ezali na gauche. Kasi esengeli okoma na Kikwuit mpo ozua camion ekokumba yo kuna en passant par la même route tee komata na droite  koleka Yumbu Yumbu, tee kokoma na Bulungu. Sima ya Bulungu okoki lisusu kokende tee na Bagata. Nionso wana epayi ya ba Yansi. Okoki mpe kosala Kikwuit Bagata via Bulungu na masuwa na rivière ya Lufuka mpe na continuité na Kwenge. Yango ekeyi komibuaka na ebale ya Kasaï.

Donc, omoni que Kasongo oyo babamba Rochereau ezali na rapport te ethniquement parlant mpo yango ezali kombo ya ba Yaka tandis que Rochereau azali mu Yansi.

Kombo wana ya Kasongo babambaki ye yango mpo na ba moments difficiles aya ko connaître na Paris na fin 80 début 90 tango akomaki kofanda awa na Paris.  A squataki un appartement luxueux na Paris, kolo ndaku tango azongi vacances akuta ye na kati, abengela ye mbila, likambo ekomi na Tribunal mpe batia ye libanda.  Sima ya wana, ekomaki compliquer, mpo baboyelaki ye ngunda mpo ayaki kokota na groupe moko politique tango visa esili ye, akomaki koleka leka na ba matanga na ba feti koyemba yemba mpo bapesaka ye mbongo. Na Matanga, nzembo ya AdiosTété nde akomaki kolela na yango batu, etc. Nionso wana ekomaki kosala bien te. Elogue wana, ekomaki tee na ba conflits na ba familles ya mibali oyo babali bana na ye ya basi, ba exigences kili kili que bakabelaka ye ndenge ye alingi, batu misusu bakomaki mpe kotambusa ye sango que balambisaka ye fufu mpe basokoliksa ye ba sani, makambo ebele na ndenge ya bien te quoi ! Bon, ezalaki période moko très difficile. Tee bayaki kopesa ye kombo ya Kasongo. Kasongo (na histoire ya bayaka, Kasongo azalaka Chef moko pasif) wana ezalaki lolenge ya kokitisa ye mpe kobebisa lokumu na ye tellement que na poto awa batu babosanaka valeur ya mutu noki mpo na course na bozui à la congolaise.

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

 

…………………………………………………………………………………………………………………………………………………

 

Ndeko Sans Fils,

 

Max Soki Vangu na Danos Canta Nyboma bazalaki ba musiciens ya écurie Vévé. Max Soki asala carrière na ye nionso na orchestre na ye Bella bella. Danos Canta nde abalukaki entre Bella bella, Lipua Lipua na Kamale avant akende na Afrique de l’ouest na Lomé na Togo kosangana na baninga mosusu na Kamale Dynamique. Sima, aye kosangana na Sam Manguana na African All Stars na Abidjan na Côté d’Ivoire. Sima ya wana aye na Paris kosangana lisusu na baninga baye na Quatre étoiles tee na ndenge baye kosala Kekele.

Sam Manguana, nandimi te que abeta na Congo-Brazzaville na cadre ya mouvement moko kuna. Abeta kuna en tant que musicien ya African Fiesta, ba Maquisards, Afrisa, O.K. Jazz. Na libanda ya Congo nde akendaki na Abidjan mpe kuna asali  African All Stars mpe basangani na Nyboma. Sima ya Abidjan nde aye ko s’installer na France.

Modero, a ma connaissance abeta na Négros succès te. Vieux Maproko nde azalaki na esika wana na Bosmin. Tango vieux Maproko bawuti poto na Négros succès, azongi African Jazz.  Michel Sax nde ayaki ko remplacer ye, tee na ndenge Négros eyaki kosila ngala.

Na Assosa ba bars ezalaki ebele : Assosa na Victoire, Assosa na Irebu, Assosa na prince Baudouin. Tee na Fare west kuna ba bars ezalaki . Nayebi te, soki Modereau abetaka na Conga Succès.

N.B. Nazali komona te eloko nini Sam Manguana akokaki kokende koluka na Brazzaville mpo na Kinshasa azalaki na nionso. Période moko boye akomaka lokola patron mpo Franco na Rochereau balingaki babonana likolo na ye. Basala concurrence ya kosopela Manguana mbongo. N’importe qui à sa place, alingaki atika mbongo oyo abandaki kozua te.

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
L
<br /> Frere Moleki Nzela,<br /> okundoli lisusu ba souvenirs mingi oyo ebandaki kokufa na mitema<br /> mpo biso batu ya tangu wana, siecle oyo tobandi sika moko te akosilisa yango.<br /> Soki nakanisi malamu, Vieux Rochereau apres Olympia na makambo manso ya<br /> mabe makueyelaki ye, akomaki kaka koyemba banzembo ya kolela.<br /> "ngai namesana nakosambue ee"<br /> "Tete kotiya motema likolo te, nazali na niongo ya moto te"<br /> "molangi ekueyi, mafuta esopani lokota ozongisa, ekotonda te"<br /> En tout cas, soki vieux Rochereau azalaka na motema te, mbele lelo<br /> oyo boye toyebi te, kasi ezali likambo te, manso makolekana ezali mokili.<br /> Nandimaki te mokolo mosusu, nakoma ko waya waya,<br /> lelo litanga ya mbula ezuwi ngai, lokola baninga basusu.<br /> O KOMBO YA TATA, MPE YA MUANA, MPE YA ELIMO SANTU EEEE<br /> AMEN EEEEEE<br />  <br /> <br /> <br />
Répondre
M
<br /> <br /> Ndeko Kandolo mbote,<br /> merci na ndenge opesi version ya KASONGO  "europe", ezali exactement kaka ndenge olobi, kasi ezali pe na version ya Kinshasa, puisque kombo ya Kasongo, vieux awutaki na yango na Kinshasa,<br /> kasi ezalaki na ampleur lokola awa na Poto te, pour la simple raison ke, batu mingi oyo bazuaki privillege ya kozala na vieux Roche na Poto esika moko, na Kinshasa vieux Rochereau po na bango<br /> azalaki en quelque sorte lokola vieux Seskoul po na bango, pour ne pas dire mingi bazalaki naino na poti na miso, soit na mbula ya kobotama, soit ba Messieurs PAS MOYEN, en clair batu ya mpiaka,<br /> mingi na bango pe bakota miziki te na Kinshasa.<br /> Vieux Roche aye kovanda na Poto na batu ya promotion na ye te pe ya categorie na ye te, avandi esika moko na baleki, voire meme na bana, yo moko oyebi kosala ki camarade na batu oyo babandi la<br /> vie sika, ezalaka penza bien te, bozoba elekaka mingi.<br /> Nakopesa yo exemple moko, tango MPR parti-etat ekueyaki, ba dignitaires mingi bakimaki na ba pays ya Afrique  kobuaka Ngunda, mokolo mosusu vieux moko azalaki General ya FAZ,  azuaki<br /> matanga ya monene, tozali bongo na pays africain moko, muasi na ye akufaki na Bruxelles, ba petits nionso ya ba congolais bayaki na matanga wana, po nakovandisa General te, kasi po na ko<br /> contempler General oyo, po na bango ezalaki lokola REVE, c' est vrai lelo tokovanda na VIEUX esika moko.<br /> Ba petits nionso ya ba congolais bazalaki koya na masanga, sukali, cafe na bikoko kili kili na matanga, pe matanga yango ezalaki mouvement ya makasi.<br /> Une semaine apres, mokolo ya kopanza matanga, General oyo na mot de remerciement, alobi : Bana na ngai, na baleki na ngai, soki bino te, mbele matanga ya mama na bino elingaki eleka bobele boye,<br /> nakobombela bino te, biso ba oyo tozali lisusu na ba moyen na ndenge boyebaki biso na Kinshasa te, tozali mosika ya mboka, soki ozali koleka pembeni ya esika oyo ngai navandi, boyaka kopesa PAPA<br /> na bino mbote.<br /> Ndeko Kandolo, une semaine eleki mingi, ba petits nionso bakomi na kombo ya General na monoko lokola ami na bango, eyaki kosala General achanger ndako mosusu, tango ayokaki maye makomaki kobetama<br /> lokola disque ya 33 tours na kombo na ye.<br /> Na Kinshasa surnom babesaki vieux Roche ezalaki MAITRE KASONGO, homonyme na ye azalaki avocat ya solo, azalaki ko exister, ye azalaki DEFENSEUR, lokola bino moko boyebi, avocat mosala na ye<br /> koyebisa client, il fo owangana, buka lokuta boye, ngai moko nayebi ndenge nako defendre yo...<br /> Apres Olympia, ba malheurs nionso ya mokili e s'abattre sur vieux Roche, akoti boloko ya Makala pendant une semaine, ba musiciens ya Afrisa balongue, bakeyi kosala Afrizam, ba Officiers Generaux<br /> ya ANC oyo balingaki miziki ya Rochereau, Mobutu amami bango pension na canaille, en bref mayele ya Mwana ya Tabu esilaki, balobi akomaki meme na makanisi aboma NZOTO.<br /> Ba amis nionso bakimi ye, vieux Roche akomi maboko makasi envers basi, et surtout Vieux Ley akomi LOKUTA, yango nde esika bamamolaki ye kombo ya MAITRE KASONGO.<br /> Lokola na Kinshasa, vieux Roche milieu na ye ezali se ya bango na bango, lokola ba vieux Verckys, Luambo, Longomba, Kalle Jeef, Nico Kasanda na ba Hommes d'affaires, na ba Hommes Politiques na ba<br /> Officiers ya Armee, ba Musiciens na BASI - LIKAMBO OLOBI NA BANDUMBA EEE EKOPANZANA MBOKA EEE<br /> Yango omonaki kombo ya Maitre Kasongo na Kinshasa ezalaki na botamboli makasi te, lokola na Poto epayi ya baleki, oyo babaloli yango ekomi VIEUX KASONGO pe na ndenge ya somo, na ba version kili<br /> kili.<br /> Awa Papa Wemba, King Emeneya, ye moko Vieux Roche  bazonga na Kinshasa est-ce que boyokaka lisusu masolo na bango na ndenge ya bozoba.<br /> PO SOKI OTALI, NA MOTU OYO ALATA KALA, NA MOTU OYO ABANDI KOLATA SIKA, NANI OYO NA BANGO MIBALE AKUMISAKA ELEMBA.<br /> <br /> <br /> <br />
Répondre
R
<br /> Ntoma , nalingi nayeba carriere ya Vieux MAPROKO, ponayebaki que abandaki kolongwa pe kozinga na Africa Jazz apres akendeki kosala Orchestre naye azalaki pe tailleur bayemba na vieux Demoiseau.<br /> Azali kosala nini sika.-  Merci.-  Richard Kasongo.-<br /> <br /> <br />
Répondre