CHANSON SOUVENIR : «AYANT DROIT» WUTA MAYI, T.P. O.K.JAZZ
Titre ya nzembo ezali évocateur ! Ba oyo bazalaki na Congo wuta lipanda tee na ba années Mobutu, bayebaki carte ya sécurité sociale ebengamaka carte d’ayant droit. Yango ezali kopesa yo ba droits sociaux. Na nzembo, mama Bobi akomi kolo ebonga mpe a récupérer ba droits nionso ezali kotambola na ebonga ya première bureau.
Dit ya Se (ya Sese)
« … babuaki longo, masuwa eboyi kosema, bameki bameli ndobo, batie mitambu, libala ezali kaka, ba qualifications nionso ya mabe na nzoto na ngai, na kipa (nazali ko kipe te) te, zéro… »
Nzembo oyo ezali na double sens :
1. Mbuakela contre ba oyo nionso «ba combattaki» wuta 1969, mbula bolingo ya mama Francisa Bobi na Président Mobutu (ya Sese), ebanda. Lutte ezalaki makasi pamba te, sima ya épouse légitime mama Antoinette Mobutu (mama Sese), eyebanaki penza malamu te nani akozua ebonga wana. A part basi nionso oyo bayebanaki que bazali ba prétendantes, Seti Yale azalaki très actif mpe asalaki tout mpo Président Mobutu akomisa mama Bobi premier bureau te. A kongola ba jeunes filles Zaïroises (ya intérieur mpe na ya étranger) mpo Président apona kati na bango. Wana na masuwa M.S. Kamanyola, ba ballets ya ba filles, bazali koleka wana sous prétexte que elongola mokonzi ba soucis…Na journée, a flanquer mokonzi na bana na ye mibale : Niwa Jean-Paul na Gombo Marie-Louise bazali kotambola na papa.
Seti na Mokolo bazali très proches na mama Sese. Ezalaki un peu difficile komona que mama Bobi nde azua ebonga wana suite na oyo nionso esalemaki kati na ba rivales mibale depuis 1969, année ya bolingo ya Sese na Bobi. Seti akenda tee na ko proposer na Suzanne Tambi, la sœur cadette ya mama Sese, mpo abalana na Président, esimbaki te. Suzanne atomboka makasi na proposition wana mpe akokaki kolinga ko trahir mémoire ya sœur na ye te.
Suzanne azalaka nzele ya José-Philippe Lando «Rossignol Cantador», tango wana bazali kofanda na avenue Tshuapa, na commune ya Kinshasa. Sima ye wana ayaka kokoma amoureuse à la folie mpe abali journaliste Ngongo Kamanda, na canaille kaka bien que ce dernier azalaki homme marié, alula ye na télévision pendant que abandaki ko présenter journal télévisé mpe akomisi ye mobali na ye sans atuna consentement na ye, ba enleva ye, bakenda na ye na camp Colonel Tshatshi…
2. Hymne na victoire ya bolingo mpo sima ya nzela mulayi mpe lutte acharnée contre mama Sese mpe na ba mbanda oyo akomaki kowela na bango ebonga ya première bureau (na liwa ya mama Sese), alobaki polele que ngala na ye ebandi mpo awumeli mingi na molili. Esengeli mpe koloba que ngala wana etikala na goût amer puis que atikala kobota muana na Président te en tant que premier bureau. Mariage civil na religieux esalemaki le 1er mai 1980, na Kinshasa. Elombe Sese na mama Bobi baboti bana mine : François-Joseph Nzanga Ngbangawe Mobutu (1970), Albert-Philipe Giala Kasa Mobutu (1971), Francisca Toku Yasingo Fangbi Mobutu(1972), na Ndokula Kazangba Mobutu (1975-2011).
Merci mpo na nionso !
Emmanuel Kandolo