Rareté de l'année:Pasi ya Mokili, par Baguin & Négro-Band
Nice le 03 / 03 / 10
chers frères
bandeko ba bolingo, nayé kosenga epayi na bino koyokisa ngai nzembo ( zaïre
eboya yé ) na bosani nkolo zembo yango
( annie bala osepela )ya max massengo na kati ya negros band pe na sengi bosalisa nga na koyoka ba zembo ya moyembi na kombo
ya tintin na kati ya lingomba ya negros band , na meka koyembela bino po na ko orienté bino :
tata na mama bayebisaki ngai o o o
tango okobala oko mona ndé pasi
nga mwana oo na tiaki tembé se pamba
ya lelo o o na suki na mawa
Refrain
mwasi ngai na bala alambaka té oo
simisi nga asukolaka té oo
mayi na ndako atokaka té ooo
ekoma se na sanza pesa mbongo oo
na somba pièsi
na meki koyembela yango soki pe bokoki kolukela nga
yango to serie ya ba tango wana
matondo mingi na équipe na bino
Ndila Joseph
La chanson demandée par notre ami Ndila Joseph s'intitule: Pasi ya Mokili, de Baguin et l'orchestre Négro-Band. Elle a été identifiée et envoyée par le nouveau mbokatier YALA MAURICE que
nous remercions vivement.
En effet cette chanson qui se termine par "3500 ya pièsi ko" fut un grand succès au début des années '60. Nous l'avions totalement oubliée. L'occasion nous est fournie de la
réécouter et surtout de la faire découvrir à ceux qui sont nés plus tard.
Pasi ya Mokili, par Baguin & Négro-Band