Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Ba ndeko,

 

Lelo tomeka kolobela mua moke Bureau ya Président de la République Démocratique du Congo mpe sima Bureau du Président de la République du Zaïre na époque ya Bisengimana.

Yambo ebengama Bureau du Président de la République, yango ebandaki kobengama cabinet du Président de la République. Chef ya liboso ya cabinet iye ezalaki Joseph Mbeka (Mbeka Makoso), na Novembre 1965. Adjoint na ye Laurent Eketebi (Eketebi Moyidiba Mondjolomba). Ensemble ya ba collaborateurs ya chef de l’Etat bazalaki ko constituer oyo ebandaki kobengama « Maison du président ».

Le, 07 novembre 1966, Président Mobutu a nommer Jean-Gérard kamanda (Kamanda wa kamanda), Secrétaire Général à la Présidence de la République.  Yango ezalaki na rôle monene na activités gouvernementales mpe  interministérielles. Na boye, Secrétaire Général abandaki kosala coordination  politique, administrative et technique entre ba institutions ya l’Etat na ba animateurs na  yango. Kuna ezalaki na collèges des conseillers  na ba services oyo ezalaki na ba taches bien définies ya kosala 

Collèges des conseillers ezalaki na ba pôles oyo ekambamaki na : Jean –Théodore Umba (Umba di Lutete) mpo na  politique administrative et juridique;  Jacques-Daniel Bongoma mpo na économie, finances et commerce; Barthelemy Bisengimana (Bisengimana Rwema) Mine et Energie ; na  pôles mosusu : Ferdinand Kayukwa (Kayukwa Kimoto), Etienne Nkashama Nkoy, Joseph Bokonde, Philippe Mutanda. Chef ya chaque pôle oyo ezali ko constituer collège ya ba conseillers, abengami conseiller principal. Ye azali na ba conseillers oyo bazali ko assister ye na mosala mua ye.

Na octobre 1966 , Président Mobutu a signer ordonnance ya création ya Direction ya Cabinet du Président de la République. Na tête na yango atie Evariste Loliki (Loliki Londjo). Avec comme Adjoint, Laurent Eketebi Moyidiba Mondjolomba. Barthelemy Bisengimana atikalati maintenu en tant que conseiller principal na Mine et Energie.

 Kobanda mai 1969 tee na février 1977, Barthelemy Bisengimana azalaki Directeur ya Bureau  ya Président. Tour à tour adjoint na ye ezalaki Jules – Fontaine Sambwa (Sambwa Pita Nbangui), Bokana W’Ondangela.

Bisengimana abotami na Cyangungu na Masisi, na 1939. Asali école secondaire na Cercle Scolaire de Butare mpe abimi lauréat na Scientifique na 1956. Etudiant très brillant,  asili kokoma Ingénieur (de conception) civil électricien ya département ya électricité ya faculté de polytechnique ya université de Lovanuim na Léopoldville. Azali ingénieur civil électricien ya liboso ya mutu moindo na 1961. Bisengimana akomaki Directeur  du Bureau du Président de la République na ordonnace № 69-096 du 8 mai 1969. 

Na époque ya BIsengimana, Bureau ya Président ebandaki kosala musala moye :

Bureau ebandaki ko jouer rôle ya conseil juridique ya chef de l’Etat mpe ya coordination politique et administrative ;

 Kosala étude, conception, coordination technique na liaison entre ba Institutions Publiques de la République na ba organes na yango ; 

ko assister Président de la République dans l’exercice de ses fonctions (na yango ba ministres bazalaki sous coordination ya Bisengimana, ba nominations ya ba P.D.G., ba Administrateurs Délégués,  Administrateurs Directeurs na ba Mandataires ya ba sociétés d’Etat, bazalaki na maboko na ye, tout comme ba Institutions Publiques et Parapubliques dotées na personnalité juridique mpe oyo ezali na autorité de l’Etat na ba domaines économique et social neti ba établissements industriels et commerciaux, ba Régis, ba sociétés d’économie mixte, ba établissements financiers, na ya exploitation minière, établissements ya secteur agricole, culturel, ya recherche, ya infrastructure, ya prévoyance sociale, ya bienfaisance na loisir tee na ba offices ezalaki na makolo ma ye. En plus, abandaki ko pistonner ba filles Rwandaises na ba Départements (ministères) na ba entreprises ya l’Etat. Soki oboyi kozua secrétaire oyo ye a recommander yo, wana yeba que dossier na yo Président akotala yango te soki ba nominations ekomi koya).

Directeur du bureau azalaki na bokonzi na oyo etali compte général ya Trésor public. Compte ya Trésor ezali na Banque Centrale (Banque nationale du Congo, Banque du Zaïre). Ndenge Banque ebandaki ko fonctionner, directeur ya Trésor abandaki ko dépendre na Gouverneur ya Banque Centrale te, abandaki ko dépendre na commissaire d’Etat (ministre) na Budget. Kasi neti commisaire d’Etat azalaki na makolo ya Bisengimana, ye Bisengimana azalaki na bokasi ya ko actionner compte général ya Trésor mpo azalaki na pouvoir wana. Azalaki mpe na pouvoir ya ordonnancement ya dépenses mpe na ya instructions likolo ya Gouverneur ya banque du Zaïre.

Na cadre kaka ya ba pouvoirs ebele azalaki na yango, Président Mobutu alongolaki Département ya Plan na gouvernement mpe akomisi yango Commissariat Général au Plan sous responsabilité ya Bisengimana. Yango wana azalaki na pouvoir ya ko piloter Comité ya Stabilisation ya Fond Monétaire International (F.M.I) suite na mauvaise orientation ya politique économique oyo epesi  instabilité économique ya Zaïre, conséquence ya conjugaison ya ba facteurs internes : corruption, zaïrianisation, inflation monétaire, déséquilibre ya balance de paiement, augmentation ya dette nationale na étrangère, etc. Facteurs extérieurs : baisse ya prix ya cuivre sur le marché mondial, fermeture ya nzela ya chemin de fer ya Benguela, augmentation ya prix ya baril ya pétrole.

Na kati ya Commissariat Général na Plan, abandaki kofina ba projets mosusu soki commission na yango ezali malonga te. Oyo ye asepeli na yango ebandaki kolanda ba dispositions ya Code Zaïrois des Investissements te. Projet nionso esengelaki eleka epayi na ye, soki te, ekotikala ya kolala. Lisusu, ba plans d’actions sectoriels nionso esengelaki eleka na maboko ma ye mpe ye moko nde azalaki na pouvoir ya kondima yango to mpe ya koboya yango. Kuna nde akomaki kozua ba commission de 10% à 30% selon bokasi ya contrat. Yango akomaki kobengama monsieur 10% ou monsieur 30%.  

Bureaucratie na centralisation ya pouvoir ekomisaki Bureau Présidentiel trop rigide, c’est qui est contraire na rôle fondamental na yango.

Bureau du Président ebandaki kosala étude ya ba questions nionso oyo Président ezali ko soumettre yango,  kosala propositions na Président de la République na ba mesures oyo esengeli ye azua ;

kosala examen ya ba propositions oyo ezali kowuta na ba ministères nionso mpe oyo ezali kosalema na ba réunions ya gouvernement, nto mpe mbala moko na ye moko Président de la République; 

ko assurer conservation na garde ya ba textes originaux ya ba ordonnances-loi, ordonnances nionso signées na Président de la République;

Ko traiter na ko rédiger ba correspondances et autres messages ya Président ;

ko assurer protocole (ordonnance ya ba cérémonies na ba réceptions officielles oyo Président azali ko organiser, kosala agenda na ye : emploi du temps, déplacements, rencontres, audiences, visite, contact, vacances, détente na loisir) ;

Bureau ezalaki na :

Directeur 

Directeur Adjoint 

Collèges des Conseillers 

Services Présidentiels Spécialisés

Service du Protocole d’Etat

Secrétariat Particulier

Intendance général

 

Bisengimana na qualité ya Directeur azalaki na rang ya Commissaire d’Etat. Par contre, adjoint na ye azalaki na rang ya Secrétaire d’Etat.

Bisengimana en tant que Directeur azalaki mpe na cabinet na ye. Kuna azalaki na chef de cabinet na ye (assistant Principal) na ba Assistants, ba chargés de missions, ba secrétaires kili kili de direction ; admistratif na particulier, etc. (na cité batu nionso wana soki otuni bango osalaka nini na Présidence ? Eyano ezalaka  kaka que nazalaka conseiller na présidence)

Directeur ya Bureau abandaki ko statuer na voie ya Décision,

Ko assurer direction, organisation, fonctionnement, coordination na compétence ya Bureau ;

ko surveiller ensemble ya ba services ya présidence;

ko ordonner ba dépenses mpe ko surveiller ba deniers na comptabilité ya ba matières;

Ko gérer budget ya fonctionnement (na caisse de secours=caisse noire) ;

ko assurer discipline na administration et gestion ya personnel.

Directeur Adjoint mpe azalak i na oyo ya ye cabinet.

 

Collèges ya ba conseillers

Chaque collège des conseillers ezalaki chapeauter na conseiller principal. Na nse na ye azalaki na ba conseillers misatu pu mine (conseillers techniques, chargés de missions na ba experts). Ba conseillers na ba assistants babengami pe personnel politique mpo Bureau ezali ko jouer à la fois rôle politique na technique. Ezalaki lisusu na ba conseillers ya ba conseillers.

Ba services kili kili 

Service présidentiel des études, S.P. de l’informatique, S.P. des recherches et études par télédétection et satellite, S.P. ya relations extérieures, S.P. généraux, S.P. ya Finances et comptabilité, S.P. ya gestion du personnel et des cadres, S.P. ya archive et documents na biblothèque; S.P. ya Presse et documentation, S.P. Ya santé et médecine du travail, na Secrétariat ya Directeur du bureau.

Protocole d’Etat

Secrétariat particulier ya Président

Intendance général

 

Période ya Bisengimana akutanaki na ba dossiers oyo na  :

1969,  manifestation ya ba étudiants na juin 1969, suppression ya ba associations ya ba étudiants mpe ba remplacer yango na JMPR ;

1970,  continuation ya projet ya Inga Shaba, projet Belge atikelaki biso ;

1971, crise entre Malula et Mobutu, ba étudiants na armée, recours à l’authenticité ; ba feti nionso ya ba christo epekisami : eyenga mandala, mbotama ;

1972,  kopekisama ya mateya ya religion na ba kelasi ;

1973, Zaïrianisation, festival national ya animation politique na stade du 20 mai ; discours historique na Nations Unies na New York, Loi sur numéro ya identification national ;

1974, combat Mohamed Ali na George Foreman (awa mpe mbongo mingi ekendaki mpe asakanaki na yango 10.000.000$ U.S. rien que pona organisation ya combat wana, sans ko compter ba contrats oyo elandaki événement wana), travaux ya conférence des écoles catholiques , loi sur le Régime général des Biens, Régime Foncier et Immobilier, Régime des Sûreté ;

1975, radicalisation ya régime, coup d’Etat monté et manqué ou procès des conspirateurs;

1976,  rétrocession ya ba entreprises, restitution ya ba écoles conventionnées ;

1977, attaque ya Front National de Libération du Congo, FLNC, na Shaba (guerre ya 120 jours).

Tango Bisengimana akomaki na pouvoir, bandeko ba ye basepelaki mpo bazuaki possibilité ya kokota na politique, kozua ba bourses d’études ya kokende kotanga na mikili, kosala ba affaires, etc. Ye moko Bisengimana asala likonda na ndenge ya liseki te. Côté wana azalaki kolala te mpe asala ba kata na ye na ba sociétés américaines, italiennes oyo eyaki na Inga Shaba : MKI (consortium ya CSI. Yango ezalaki nde kolukela ye ba marchés), International Engineering Compagny ; General Electric Compagny, Morrison Knudsen International Incorporation, Other Sub - Contractors, H.K. Ferguson, Fischbach and Moore Company Inc., Sadelmi - COGEPI, A.S.E.A

 Asala makambu na ba entreprises ya construction ya ba grands chantiers neti CCIZ, SOZACOM, Sidérurgie ya Maluku, Stade du 20 mai 1967 ( réfection totale, installation ya ring ya Boxe, construction ya piste ya hélicoptère, parking, jardin, éclairage, système ya télécommunication par satellite, espace ya presse, ba vestiaires équipés na nionso, ba salles na kati na deux salons d’honneur,  na environnement nionso ya Matonge abongisi canalisation na béton ya mayi ya Kalamu na jardin pembeni, asphaltage ya avenue de la promenade – le long ya rivière kalamu, asphaltage ya avenues du stade na Oswe, ba retaper boulevard Sendwe, minda etiami na ba balabala nionso wana, ebakata ya commande « 200 » ya ba autobus Magirus - Deutz. Problème, ba autobus wana ezalaki de luxe, mpona déplacements ya ba délégations eyaki na combat. Sima bapesaki yango na Office des Transports en Commun du Zaïre (O.T.C.Z.), mal adapter na transport de masse, boîte de vitesses automatiques, ezanga bibende ya kosimbela, etc.). Asakana lisusu na Domaine Agro - industriel et Présidentiel de la N’sele (D.A.I.P.N.). Ba cotas na D.A.I.P.N. esambuaki ! Na Zaïrianisation ye moko Bisengimana azuaki ba plantations, fermes, élevages mpe akomaki kosala commerce ya Café na Or na na Kivu.

P.D.G. ya entreprise na ye La Micro Informatique, propriétaire ya bateau Mulamba, plantations Idjwi, fermes Osso. En plus, azali mutu ya liboso akotisa voiture ya marque Jaguar na Zaire. En suite, Tshisekedi na Mobutu mpe bayaki kobimisa ya bango.

Bisengimana afula ba ndeko na ye na bana mayi na ye liseki te. Atimbelaki makambo à tel point que batu na ye basimbaki makambu na oyo etali  ba listes ya ba agents fictifs ya présidence. Déjà, physiquement batu ya présidence bazalaki plus de cent, bien que ba ministères mpe ezali na ba cabinets na yango. Na plus de cent wana batu na ye bazalaki lisusu na nombre ya batu oyo babandaki kofutama sans pour autant ba exister. Situation wana nde esala que budget ya fonctionnement ya présidence emataka mpe na kosakana na dotation présidentielle,  wana sans ko compter ba missions bidons na intérieur et na étranger, ba gonflements ya ba membres ya délégation à chaque déplacement ou voyage ya président, ba primes exceptionnelles, ba rapports d’études inutiles, ba travaux en commission ya ndenge na ndenge na ba disponibilités excessives ya kosala ba samedis après mide tee na ba dimanches.

Na ba Compagnies américaines General Motor (GM), Goodyears Tire ana Rubber, Barkley Bank, City Bank, Coca Cola Enterprises, International Business Machines Corporation (IBM) na misusu, ba Rwandais batondaki kuna liseki te. Surtout na GM. na I.B.M, Ba Rwandais soki kaka basilisi na Kinshasa ou na interieur, directement na G.M.

Bisengimana a fula batu ebele:

Cyprien Rwakabuba Shinga, membre du comité central, commissaire du peuple, membre ya bureau politique, commissaire politique, administrateurs na ba sociétés d’Etat. Ba compagnies na ye : Groupe Rwacico, Brasimba, Nyamilina. Brasimba wana azuaki yango suite na zaïrianisation.

Ngirabatware, Président Délégué Général ya Office National des Postes et Télécommunication du Zaïre (O.N.P.T.Z.) groupe, Theki.

Gahunga, Administrateur Directeur Général ya Zaïre Société d’Exploitation Pétrolière (Zaïre SEP)

Rwigamba, Directeur Général ya Banque de la Communauté Economique des pays des Grands Lac (C.E.P.G.L.), sima aye kokoma Directeur ya Société Financière de Développement (SOFIDE)

Miko Rwayitari, Président Directeur Général ya Téléphone Cellulaire (TELECELL), Radio Stras, Kasuku. Miko na Bisengimana bazali butu ya liboso oyo batimbelaka marché ya Colombo-tantalite (coltant). Ba travailla yango na ba gissements na bango privés na Rwinkwaku (na même période, vieux Alphonse-Roger Kithima Bin Ramazani mpe abandaki kosasa marché ya Or na Walikale). Suite na mabulu wana nde bazalaki na circuit na ba compagnies ya informatique na téléphonie par satellite. Yango nde Miko akomaka Homme d’affaires ya liboso na Afrique subsaharienne oyo akotisaki téléphone cellulaire na Afrique mpe na Zaïre. Tango akangi makambu ya cellulaire na maboko, asenga na ye meyi na Kengo wa Dondo bafandisa Baligaza na poste ya P.D.G ya O.N.P.T.Z mpo moto apatapata te. Nzela ya libulu ya ya téléphone fixe na ya batu ya O.N.P.T.Z efunguamaki nde wana.

Oscar Habarugira, Coordonnateur ya Centre National des Recherches et Investigations (C.N.R.I.), Service de Renseignements

Victore Ngezayo, P.D.G. ya RMA, propriétaire ya hôtel les masques, actionnaire principal ya Park hôtel, mandataire ya Sakima

Tabura Sebirezi, Homme d’affaires na secteur ya transport maritime na  fret ya ba contenaires

Nyumbahire, Secrétaire Général ya  Agence Africaine de Distribution de Matériel (AFRIMA,  Importation Matériel Roulant, Toyota, Kawasaki, Harvester), Administrateur Directeur Général adjoint ya Union Zaïroise des Banques (UZB), Directeur des crédits na Banque Centrale ya Rwanda

Oswald Ndeshyo,  commisaire d’Etat, administrateur ya sociétés d’Etat, consultant ya O.U.A, Doyen ya faculté de droit ya UNIKIN

Kasuku, vrai mutu ya Rwakabuba, P.D.G ya  ACOGENOKI

Antoine Rwakabuba, Imprimeries na librairies Volcans

Bisengimana azalaki mpe na ba enemies ebele nati « Oncle » Jean –Joseph Litho Moboti na   André Bo-Boliko Lokonga Monse Mihambo. Kasi Président Mobutu abandaki kobeta bango kara na manso oyo babanadaki koyebisa ye ezala ya solo to ya lokuta.  Soki Bisengimana alonguaki na esika wana, ezalaki mpo situation ya Zaïre ekomaki compliquer sur le plan politique : coup d’Etat monté et manqué  ou procès des conspirateurs, guerre ya Shaba,  zairianisation, mauvaise gestion économique, centralisation ya pouvoir, manque ya ouverture politique , violations ya droits de l’Homme, etc. Mobutu a sacrifiaki ye. Yango wana après, il fallait alakisa ouverture na ba élections générales, création ya poste ya premier commissaire d’Etat, ya conseiller spécial ya chef de l’Etat na en matière de sécurité, département ya plan ezongi na conseil exécutif national mpe ebandi ko piloter plan Mobutu ya relance économique, création ya conseil judicaire national, etc. Maître José Patrik Nimy Mayidika Ngimbi ayaki ko remplacer Bisengimana tango Président Mobutu a signaki ordonnance nº 77-043 ya 23 février 1977.

Atako bongo na kiyanda, Bisengimana atikala kaka makasi mpo abandaki kosala ba missions secrètes ebele mpona compte ya Président Mobutu, ezala na Zaire mpe à travers le monde. Azalaki na ba contacts ebele na Etats Unis, France na Belgique.

Ba ndeko, tokomikosa soki tokanisi ndenge toyokaka mingi na batu que Bisengimana alekisaki ba lois totangi awa mpo na ko favoriser ba ndeko na ye, asalaki boye na boye, etc. Te ! Tokueya na mutambu wana te mpo toyebi mua moke ndenge mboka na biso ekambamaka na ndenge makambo ebandaka koleka na tango wana. Soki makambo Bisengimana abandaki kosala ebandaki komonana que ye azali na ba pouvoirs ebele mpe très influent epayi ya Président Mobutu, elingi kolakisa que azalaki na mapamboli ya mokonzi ya ekolo na nionso azalaki kosala mpe bakonzi oyo bazalaki nzinga nzinga ya Mobutu mpe babandaki kokanga miso.

Totanga naino ba kombo iye ezalaki wana : Prosper Mandrandele Tanzi azalaki Directeur ya Bureau Politique,  André Bo-Boliko Lokonga Monse Mihambo azalaki Président ya Conseil Législatif National (Parlement), Jean de Dieu Ngunza Karl I Bond azalaki Vice – Président de la République chargé des Affaires économiques, financières et commerciales.  Léon Engulu Baangampongo Bakokele Lokanga azalaki Vice – Président en charge na  Affaires politiques et administratives. Marcel Antoine Lihau Ebua azalaki Président ya Cour Suprême de Justice, Léon-Lobich Kengo wa Dondon nde Procureur Général de la République.

Na gouvernement ba poids lourds ya politique baleka kuna pendant règne ya Bisengemaba na présidence : Etienne Tshisekedi wa Mulumba (quatre mois na gouvernement na Bisengimana na Bureau avant Mobutu atinda ye na Rabat comme ambassadeur), Cyrille Adoula, Hubert Makanda Kabobi, Alphonse - Roger Kithima Bin Ramazani, Joseph N’singa Udjuu Ongwabeki Untube, Justin - Marie Bomboko Lokumba Iselenge (trois mois na gouvernement tango Bisengimana akomi na Bureau mpe Mobutu atindi ye ambassadeur na Washington), Victor Nendaka Bika (na Sima ya sanza misatu akeyi na Bonn comme ambassadeur), Joseph Mbeka Makoso, Laurent Eketebi Moyidiba Mondjolomba, Jean - Joseph Litho Moboti Nzoyombo, etc.

 

Patriotiquement,

 

 

Emmanuel Kandolo

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
M
je vous remercie beaucoup de votre information vous étes vraiment un grand nationaliste
Répondre
F
<br /> <br /> Il y a certaines vérités dans ce que vous dites mais la plus part des échecs que vous lui attribuez sont le fait du bureau politique du MPR qui était l'une des institutions sur les quelles il<br /> n'avait aucun pouvoir. Ainsi la zairianisation, le recours à l'authenticité sont entre autre causes importantes de l'échec de la politique de Mobutu et c'est le bureau politique qui en porte la<br /> pleine responsabilité. Concernant ses prétendus frères qu'il aurait placés, je ne trouve pas qu'ils spient nombreux considérant l'énorme pouvoir que vous lui attribez. S'agissant des filles<br /> rwandaises qu'il imposait j'aimerais avoir quelques noms car je n'en connais pas.<br /> <br /> <br /> <br />
Répondre
P
Mr Emmanuel Kandolo<br /> Bonjour<br /> Je tiens à vous remercier pour votre exposé sur Mr Barthelemy Bisengimana Rwema.<br /> Si j’ai bien compris, il était venu au Congo pour faire ses études universitaires  ou il avait aussi une mission cachée.<br /> D’après les archives, il était aussi le président des étudiants Rwandais à l’université Lovanium.<br /> Est-ce que vous pourrez nous dire quelque chose à ce propos ?<br /> Est-ce que Ce monsieur avait demandé la nationalité congolaise (de l’époque) ?<br /> Qui l’avait recommandé chez le président Mobutu ?<br /> Quelle était la raison pour laquelle il avait violé la constitution en faisant signé un décret au président Mobutu, qui accordait la nationalité d’origine (la bombe à retardement au Kivu) aux réfugiés rwandais ?<br /> Papatoto
Répondre
S
NDEKO EMMANUEL  merci mingi na ndenge opesi information oyo concernant BARTHELEMY BISENGIMANA RWEMA(paix a son ame 1938-1986),sans toutefois ozala raciste ou tribaliste comme le cas na ba bloggs mingi ya biso ba congolais soki tozali ko parler sur ba rwandophone. nazali na eloko ya kobakisa te mais nazali un peu confus sur lieu na ye ya naissance...puisque nayebi que MASISI ezali na NORD KIVU tandisque CYANGUGU ezali na rwanda juste en face ya BUKAVU(SUD KIVU,RD CONGO). NAKOSENGA SOKI ozali na b'information sur OCTROIE ya nationalite na ba rwandophones nionso na 1972 par le president MOBUTU pe te natango aye ko retirer yango na 1980(peut etre sous pression ya PRESIDENT HABYARIMANA....nde yango kino lelo tozali koyokana na ba rwandophone te....soki kutu  MOBUTU  a revokaki NATIONALITE na bango te, peut etre tolingaki tozala na ba problemes oyo tozali na yango lelo te(troubles na nord et sud kivu,masisi,minembwe,goma etc....)....TIKALA MALAMU...
Répondre