LA TRAJECTOIRE DU PROFESSEUR ILUNGA ILUKAMBA PAR EMMANUEL KANDOLO
LA TRAJECTOIRE DU PROFESSEUR ILUNGA ILUKAMBA
PAR EMMANUEL KANDOLO
Ba ndeko,
Lelo tokomeka kolobela trajectoire ya Professeur Sylvestre Ilunga
Ilukamba. En réalité, kombo oyo ba boti baye bapesaki ye na bomuana ezali
Ilunga wa Kamba. Bango bazali originaires ya Kasaï, ba Luba. Par je ne sais
quelle motivation, ba Kasaïens misusu, surtout ba oyo babotama na
Katanga, bazalaka na tendance moko boye na koluka ko s’identifier comme ba
Katangais. Balingaka koloba tshiluba te, ata soki bazali koyoka yango, basalala
semblant lokola bazali koyoka yango te mpe balula ko bongola ba kombo na bango
d’origine mpo elanda consonance ya ba kombo ya ba Lubakat ou ya bikolo mosusu
ya Katanga. Yango wana, par illustration, Kalala Bondo ekomaki Nguz A
Karl-I-Bond, alors que tata na ye, Luba ya Kasaï, mama nde Lunda. Kasi
atambusa sango que ye azali Lunda mpe na molongo atikala kolobela ngambo ya
tata na ye te pendant que na ba Luba bazali na société ya type patriarcale,
c’est-à-dire muasi oyo mu Luba abali, akoti na famille na ye mpe azali lisusu
ko appartenir na libota oyo awuti te mpe bana oyo bakobota bakozala sous
autorité ya tata mpo ye nde azali ko exercer puissance paternelle.
Lisusu, Kabunda wa Kabunda ekomi Kabund A Kabund au moment où azali muena
Lulua wa kua Mfuamba Lumpungu. Ndakisa oyo esengeli e poussa réflexion na biso
na lolenge Katanga akoki kobongola kombo ya mutu tout comme akoki ko puiser
kombo na patrimoine culturel katangais mpe alatisi yango na mopaya !!!
Na loyenge ya ndakisa mibale na tangi nde Ilunga wa Kamba ayaki kokoma
Ilunga Ilukamba. Ilukamba ezalaka nde diminutif ya Ilunga wa Kamba.
Bon, abotami na mokolo mua 28 mars
1947, na village ya Dino, district ya Haut Lomami, province ya Katanga.
Asali ba kelasi na ye école primaire ya Saint-Augustin ya Kongolo tee na
1961, akeyi kosala ba humanités gréco-latines na collège Saint-Grégoire-le-grand,
na Karavia (Misha) yango ezali na 13 Km ya Lubumbashi. Asilisi kuna na 1967.
Azwi inscription na université ya Lovanium, na faculté ya sciences
économiques et sociales, département ya sciences économiques. Asali ba études na
ye brillamment mpe na 1971, abimi licencié na sciences économiques,
option : économie publique et industrielle. Université e retenir ye comme
Assistant na faculté ya sciences économiques et sociales ya Université
Nationale du Congo campus de Kinshasa (U.NA.CO.). Pour rappel, wuta réforme ya
1971, Ordonnance-loi n°71-075 ya 06 août 1971 portant création ya Université
Nationale du Congo ; modifiée na Ordonnance-loi n°72-075 ya 12 janvier
1972, du fait ya 3Z (changement ya Kombo ya ekolo ; ya fleuve mpe ya mosolo en
Zaïre), na mokolo mua 27 février 1971. Yango nde Université Nationale du
Congo eyaki kokoma Université Nationale du Zaïre (U.NA.ZA.).
Abandi carrière na ye en tant que personnel
académique na 1971 tee na 1972, Assistant chargé des travaux pratiques na
faculté ya sciences économiques mpe na molongo azali na kati ya formation
méthodologique ya recherche.
Na 1972 tee na 1973, akeyi formation ya
3ième cycle na Institut Africain de Développement Economique et de
Planification (I.D.E.P.) ya Nations-Unies, na Dakar, na Sénégal. Wana
Professeur Samir Amin, azalaki Directeur kuna.
Na 1973, akomi Chef des travaux chargé de
l’enseignement, toujours na faculté ya sciences économiques et sociales.
Na 1974-1975, toujours na cadre ya
recherche, akeyi koyekola na The Institute of Development Studies (I.D.S.) ya
Université Sussex Falmer, na Brighton, na Royaume-Uni de
Grande-Bretagne.
Mpe na 1977, a soutenir thèse ya doctorat
na na campus de Kinshasa intitulée « Propriété publique et
convention de gestion dans l’entreprise du cuivre au Zaïre ». Wuta
1977, nde faculté e proclama ye Docteur en sciences économiques appliquées.
Na 1978, asali période probatoire na ye mpe
na 1979, akomi Professeur associé. Esengeli koyeba que na ba étapes nionso ya
kotangisa ou ya recherche na université, Conseil d’administration ya ba
universités nde esalaka proposition mpo na promotion na nomination ya ba
membres ya personnel académiques (Assistant, Chef des travaux chargé de
l’enseignement, Professeur associé, Professeur, Professeur ordinaire na
Professeur émérite) na scientifique (Assistant de recherche, Attaché de
recherche, Chargé de recherche, Maître de recherche, Directeur de
recherche) ya ba universités. Mokano wana ebengamaka Décision. Sima nde
Ministre akozua Arrêté mpo na ko promouvoir mpe ko nommer conformément na
Décision ya Conseil d’Administration ya ba universités. Mbala mosusu tokolobela
ba étapes nionso ya kelasi oyo ezali kokumba mutu tee na soutenance ya thèse ya
doctorat mpe ba étapes ya carrière ya professeur ou ya chercheur na université
ya R.D.Congo.
En dehors ya université, wuta janvier 1979
tee janvier 1980, Professeur Ilunga Ilukamba azali Conseiller économique
na Cabinet ya Commissaire d’Etat na portefeuille, Nyembo Shabani. Ye nde mentor
na ye, mutu asali ye que azala mpe asungi ye na carrière na ye mobimba.
Mbala ekoya, tokomeka kokoma biographie ya Professeur Jean Nyembo
Shabani.
Janvier 1980 tee na septembre 1981,
Professeur Ilunga Ilukamba azongi na université mpe akomi Conseiller chargé ya
coopération universitaire ; interuniversitaire ; nationale et
internationale na Cabinet ya Vice-Recteur ya Université du Zaire
(U.NA.ZA.), campus de Kinshasa, Révèrent Père Léon de Sant Moulin.
Octobre 1981 tee na novembre 1982, abengami
na Conseil exécutif (Gouvernement), coordonné na Premier Commissaire d’Etat
(Premier ministre), N’Singa Udjuu Ongwakebi Untube. Kuna azui ebonga ya
Secrétaire d’Etat (vice-ministre), chargé ya Economie nationale, na département
(ministère) ya Economie nationale, Industrie et Commerce extérieur, oyo
ekambami na Commissaire d’Etat, Pay Pay wa Syakassighe.
Sous coordination ya Premier Commissaire
d’Etat Kengo wa Dondo, kobanda novembre 1982 tee na avril 1983, Ilunga Ilukamba
akomi Secrétaire d’Etat na Plan, na Commissariat général na Plan, oyo
ekambami na Commissaire général, Bokana W’Ondangela.
Kengo kaka Premier Commissaire d’Etat, na
avril 1983, Ilunga Ilukamba akomi Secrétaire d’Etat chargé ya
portefeuille, na département ya Finances, Budget et Portefeuille, oyo ekambami
na Commissaire d’Etat Kiakwama Kiakiziki. Na février 1985, Kiakwaka akeyi, na
département ya Economie nationale et Industrie, toujours comme Commissaire
d’Etat. Mpe bakitabi ye na Professeur Mokonda Bonza Nzombo na qualité ya
Commissaire d’Etat na Portefeuille. Na octobre 1986, Ilunga Ilunkamba alongue
na Conseil exécutif tango Président Mobutu abomaki poste ya Premier Commissaire
d’Etat, a récupérer ba attributions nionso ya Premier Commissaire
d’Etat mpe a nommer Kengo Commissaire d’Etat na Affaires étrangères,
Professeur Mabi Mulumba, Commissaire d’Etat na Finances et Budget.
Na novembre 1986, Président Mobutu a nommer
Professeur Kalongo Mbikayi, Directeur ya Bureau du Président de la
République. Nda-Ngye Mpia, Directeur adjoint. En remplacement ya Maître Nimy
Mayidika Ngimbi, Directeur du Bureau, akomi Vice-Premier Commissaire
d'Etat et Commissaire d'Etat aux Droits et Libertés du Citoyen, mpe na
adjoint na ye, Professeur Tshunza Mbiye, oyo akomaki Vice-Gouverneur ya Banque
du Zaïre
Wuta octobre 1986, organisation ya Bureau
ya Président, sous la direction ya Professeur Kalongo Mbikayi, ezalaki na ba
Conseillers principaux mpe ba Conseillers oyo :
· Conseiller
principal chargé ya supervision ya Collège ya ba Conseillers
politico-administratif et diplomatique, Kasasa Cyniati
Ba Conseillers : Malu wa Koni,
Nyamwisi Muvingi, Mumbala Bom, Yezi Mpyana Fumu ;
· Conseillère
principale chargée ya supervision ya Collège ya ba Conseillers
juridiques, Maître Basiala Maka
Ba Conseillers : Maitre Panzu
Nianga, Professeur Mukadi Bony, Kudianfela Muteba, Lilolo Mangpote ;
· Conseiller
principal chargé ya supervision ya Collège économique, financier et monétaire :
Professeur Kinzozi Mxutukidi Ngindu Kogbia
Ba Conseillers : Mbuyi Kabanda,
Professeur Ilunga Ilukamba, Molele Nzebwa Moponda, Nkonko Nzeza ;
· Conseiller
principal chargé ya supervision ya Collège ya ba Conseillers Socioculturels,
Ramazani Baya
Ba Conseillers : Mwepu Kasenda,
Professeur Mupapa Say, : Mwepu Kasenda Nimy Nzonga, Tingbo Nyi Zonga
· Conseiller
principal charge ya supervision ya Collège ya ba Conseillers techniques.
Isengingo Kambere Ng’Ise
Ba Conseillers : Basibanga
Mudibu, Senga Mavungu, Lumu Badibayi, Mabata Niambul.
Réorganisation oyo esalaki que Maître
Basiala a remplacer Muke Kandong. Ce dernier akitanaki Bokana W’Ondangela, en
qualité ya Conseiller principal en charge ya supervision ya Cellule yambo ekoma
kobengama (Collège) juridique, tango azuaki promotion na ebonga ya Directeur
adjoint ya Bureau du Président. Muke Kandong, un juriste très compétant,
méticuleux, perfectionniste mpe regardant na moindre détail. Un vrai cerveau
oyo ba Directeurs nionso ba admira mosala mua ye mpe ba oyo basala na ye elongo
batikala admiratifs. Muke Kandong ayaki komaki Secrétaire ya Conseil exécutif,
yango wana abandaki ko participer na ba réunions nionso ya Conseil exécutif.
Adjoint na ye, Botolo Magoza.
Professeur Kinzonzi akitanaki Nda-Ngye Mpia
mpe na septembre 1987, tango Sambwa Pita Bangi akomi Vice-Premier Commissaire
d’Etat et Commissaire d’Etat ya Economie nationale, Finances, Budget, Industrie,
Portefeuille na Commerce extérieur, Professeur Kinzozi azuaki ebonga ya
Commissaire d’Etat délégué na Finances. Tango Kinzonzi akoti na Conseil
exécutif, Ilunga Ilukamba aye kokoma Conseiller principal na Collège
économique, financier et monétaire.
Ekamuisaki batu pamba te Ilunga azalaki
Secrétaire d’Etat. Amikitisi tee na niveau ya koluka kokoma Conseiller na
présidence !!! A la rigueur, alingaki ata kondima kozala Directeur
adjoint, mpo Bureau ya Président de la République ezali antichambre ya pouvoir.
Nzela wana nde ekomisaka mutu na na sommet : Ministre, Ambassadeur,
Gouverneur ya province, Gouverneur ya Banque au Zaire, Administrateur Directeur
général, Administrateur Directeur ya ba entreprises publiques na ya économie
mixte, Haut fonctionnaire national ou international, etc. Nionso oyo mpo na
lokoso ! Kowela ba voyages na ba missions na étrangers mpo kuna ezali yelele !
Soni penza !!!
Na mars 1988, Professeur Kalongo na
adjoint na ye Nda-Ngye Mpia , balongue na Bureau mpe bakomi
respectivement Commissaire d’Etat na Transport et Communication mpe Commissaire
d’Etat na Mines et Energie. Professeur Mokonda akomi Directeur du Bureau mpe
Maitre Phanzu Nianga oyo azalaki Conseiller na Collège juridique, akomi
Directeur adjoint. Ilunga Ilukamba, libanda, akomi hors circuit.
Wuta mars 1988, Ilunga Ilukamba azalaki
lisusu na ebonga te. Kasi Président Mobutu alukalaki ye quelque chose mpo
azala mpiaka mpiaka te, question ya ko maintenir train de vie ya likolo.
A nommer ye na ba Conseils d’administration ya ba entreprises mine mibale
ya économie mixte : Administrateur na Zaïre Golf Oil mpe Administrateur na
Bralima avec mandat ya 6 ans na chaque Conseil d’administration.
Sima ya mbula mine na kati ya qui cherche,
tango gouvernement Lunda Bululu esalemi na mai 1990, Ilunga Ilukamba azali na
kati en tant que Ministre ya Plan. Kobanda mai 1990 tee na mars 1991, ebandaki
komonana que azalaki vraiment na maîtrise ya ba dossiers te. Promotion ya
ba investissements publics na privés ezalaki efficace te,
planification structurée ya politique ya développement économique et social oyo
bazalaki kolobela mpo na ko stabiliser mpe ko relancer économie ebandaki
komonana penza te. Nzoka nde mpo na ko relancer production esengeli naino
kosala une remise à l’ordre na gestion ; koluka ko fandisa stabilisation
économique na financière mpo na contrôle na régulation ya demande wana nde
koluka sika ko relancer production (action sur l’offre). Na programme ya
stabilisation oyo esengelaki ko élaborer ba propositions, programme ya
activités économiques ezali kosimba te mpo ba chiffres ya ba opérations
extrabudgétaires ya trésor ebandaki kaka ko exploser mpe ko creuset déficit.
Aleki na télévision sans kozala na ba données statistiques actualisées
(Institut National ya Statistique ezali sous tutelle ya ministère ya Plan)
azali ko s’embrouiller na ba chiffres na calculs ya planification. Ndenge nini
akokaki ko schématiser ba conditions ya planification ?
Mars 1991 tee na octobre 1991, Ilunga a se
retrouver na gouvernement Mulumba Lukoji. Ce dernier, azali mbiaka na Plan mpe
asala kuna en tant que Directeur général na Commissariat général na Plan
mpe azalaki Commissaire général na Plan. Tokozongela biographies ya ba
professeurs Lunda Bululu na Mulumba Lukoji na mbala ya sima. Professeur Mulumba
Lukoji a préférer Bombito Botomba Lompio, (azalaki Conseiller économiques na ye
na Plan, Conseiller principal ya Premier Commissaire d’Etat, Kengo) oyo azalaki
Ministre ya Finances na gouvernement Lunda Bululu, apesi ye ebonga ya Ministre
ya Plan et Aménagement du territoire mpe Ilunga Ilukamba azui ebonga ya
Ministre ya Finances.
Déjà na nomination na gouvernement Lunda
Bululu, Ilunga Ilukamba asalaki feti munene epayi na ye na Binza I.P.N. Tangu
Mulumba Lukoji a reconduire ye, asali lususu feti. Na espace ya deux mois,
asalisi lususu feti mpo na kosepela ndenge akongoli ba millions na
devises étrangères. Heure wana ye na Bombito Botomba Lompio bazali koleka na
Télé-Zaire na émission minene lokola Plein Feu, animée na Kitutu Olewontua ou na
Tshilonda Tshia Mulamba. Bien que Ilunga Ilukamba abandaki ko fouter grave,
kasi Bombito abandaki ko étaler éloquence na ye, ko emballer ba
téléspectateurs na bla bla pendant que planche à billets kuna na Banque
du Zaïre ezali ko fonctionner butu moyi mpe mayele esili bango mpo na ko
stopper hyperinflation.
Batu ya liboso basomba ba B.M.W. série 5 ya bleu.
Wana Ilunga Ilukamba azali koyebisa batu qu’objectif ezali GE.CA.MINES. Wana
ezala rêve na ye munene mpo objrctif ultime na ye ezalaki ya ko conquérir
ebonga munene kuna. Kutu tozali koyeba lisusu na forum moko esalemaka
intitulé : Place et rôle du capital zaïrois dans le développement national :
actes du colloque tenu à Kinshasa du 16 au 21 juin 1980, wana azali Conseiller
na na Cabinet ya Professeur Nyembo Shanani, na département ya Portefeuille.
Apuata Umba di Kamitala, Administrateur délégué-général ya GE.CA.MINES.,
na lolenge azali kokoka ko mettre ba mécanismes solides te mpo na ko
lutter contre fluctuation ya prix ya cuivre na marché mondial ! Umba di
Kamitala azongisela eyano mbala moko : « est-ce que okanisi malamu na
lolenge okoki kozua solution na likambo oyo ya stabilisation ya prix ya cuivre
? ». Umba di Kamitala ayebaki arrière pensée na ye mpe intentions na ye.
Nzela ya GE.CA.MINES. ekomaki mua nkokoso mpo na Ilunga Ilukamba pamba te Umba
a pika na ebonga wana tee aye kokoma Commissaire d’Etat ya Mines et Energie,
tutelle ya GE.CA.MINES. Sima, Mulenda Mbo Milambo, nde akomaki wana mpe ba
adjoints bakomaki mingi mingi ba Administrateurs ya ba services de
renseignements. Eyaki kokoma boye suite na grand kata ya Mulenda epayi ya
Président Mobutu. Kata supérieur wana batu ya renseignements batetela yango
boule à tel point que esengelaki bazalaka zalaka wana. Oyo ezali masolo
mosusu !
En tant que Ministre ya Finances,
esengelaki Ilunga Ilukamba azala na contrôle, kosala ba audits externes mpe
kolandela gestion financière ya ba entreprises ya l’Etat. Ye lisusu nde
esengelaki alandela gestion ya Banque du Zaïre mpe na ba mouvements nionso ya
mbongo ezali kosalema na compte ya trésor public. Justement, Banque du
Zaïre ekomaki incapable ya ko maintenir taux de change mpe ezalaki kosala face
na ba difficultés énormes ya trésorerie ewuti na ba causes structurelles :
dépenses publiques ezali maitrisées te, déficits budgétaires ezali kaka ko
vimba, dépréciation accélérée ya Zaïre monnaie (mbongo ezali kaka kosila
valeur), insuffisance ou manque ya ba devises étrangères. Causes
conjoncturelles : environnement économique et politique défavorable
mpe ezali kokimisa ba investisseurs mpe ko installer manque ya confiance epayi
ya ba bailleurs de fonds. Tango wana, nani azali Gouverneur ya Banque du Zaïre
? Nyembo Shabani, vieux na ye, mutu asali ye. Mutu nionso ayebi que période oyo
nde inflation annuelle ekomali likolo ya 500% mpe croissance économiques e
chutaki tee na -3%. Na lolenge oyo ndenge nini ko stabiliser monnaie mpo na
loluka ko défendre pouvoir d'achat ya ba Zaïrois?
Sima ya ba pillages ya septembre 1991,
situation politique ekumbi na ba accords ya Palais de marbre mpe gouvernement
Mulumba Lukoji ekueyi. Ilunga Ilukamba akoti mayi, kasi azali toujours na
mouvement. A maintenir train de vie na ba voyages na poto mpe na Afrique du
sud. Plus ezali kowumela sans poste, ba moyens mpe ezali kokita mpe muke muke
abandi kolimua na circuit.
Suka suka akotaki vide penza. Akomaki
kobeta ba tours na Afrique du Sud, sans plus. Tee Nyembo Shabani ayaki kotiya
ye poids, tokomi komona ye na délégation congolaise na ba sessions annuelles ya
ba Gouverneurs ya ba Banques centrales oyo esalemaka na Washington, na Fond
monétaire internationale. Tango wana André-Philippe Futa azalaki ministre ya
Finances mpe ye nde azalaki Chef ya délégation, Jean-Claude Masangu Mulongo,
Gouverneur ya Banque centrale du Congo. Na kati wana mpe Matata Mponyo
azalakai.
Sima, a se retrouver Directeur ya Institut
des Recherches Economiques et Sociales (I.R.E.S.) ezali attacher na faculté ya
Sciences économiques et gestion ya Université de Kinshasa (UNI.KIN.). Campus de
Kinshasa ekomaki kobengama UNI.KIN. na lotomo ya Ordonnance-loi n°81-142 ya 03
octobre 1981. I.R.E.S. oyo ya ye ekokaki kokonana na oyo ya Prof Hugues Leclercq tango
azalaki Directeur te.
Ilunga Ilukamba bien que de fois a se
retrouvaka membre scientifique ya Cahiers économiques et sociaux de
l'U.N.A.Z.A, lettre mensuelle ya I.R.E.S., ba publications na ye ezali ya
kotanga na misapi ya loboko ata moko. Soki totali malamu, ba publications wana
ezali mingi mingi na objectif ya ko remplir ba critères mpo na koluka promotion
na ba grades ya personnel académiques (wuta Assistant tee professeur) mpe
nionso kaka na cuivre. Bref, ezali na yango tirer kaka na ba grandes lignes ya
thèse na ye ya doctorat. Azali penza un paresseux scientifique. Est-ce que
azali vraiment passionner mpo na enseignement na université? Totuni boye pamba
te passion nde ezali ko permettre transmission ya savoir. Azali Professeur na
université kaka moko. Ebongo en 40 ans ya ki professeur a diriger ba thèses
boni ya doctorat? Kobanda 1991 tee na 2008 azalaki na vide, ndenge nini akokaki ko
publier ata ouvrage moko te ? Depuis 1984, ata publication moko te, ezali
kolakisa tout simplement moins d’intérêt azali ko accorder na science. Mais,
tozali koyoka partout Professeur, expérience, l’oiseau rare, etc.
Alongue na Recherche alandi mbongo.
Na 12 janvier 2008, Kabila a nommer ye Secrétaire Exécutif du Comité de
Pilotage de la Réforme des Entreprises du Portefeuille de l’Etat (CO.PI.R.E.P.),
Jeannine Mabunda Lioko Mudiayi nde a proposaki ye, mpo ye nde ministre ya
portefeuille.
Na mosala oyo CO.PI.R.E.P. asalaki a
proposaki na gouvernement a mener réforme ya ba entreprises ya
portefeuille de l’Etat oyo ezali kotambola malamu te. En réalité, ba
entreprises nionso ya l’Etat ezali en bonne santé économique et financière te
mpo ezali na yango performante te neti kaka l’Etat yango moko ezali ya kopola.
Yango wana l’Etat alingi abendana na ye mpe asali que ba entreprises ya
portefeuille etambola selon droit commun, relativement na Décret du
Roi-Souverain ya 27 février 1887 sur les sociétés commerciales. Peu
importe objet social na yango (civil ou commercial) ekobengama : Société
en Nom Collectif (S.N.C.), Société en Commandite Simple (S.C.S.), la Société
Coopérative (S.C.), Société Privée à Responsabilité Limitée (S.P.R.L.), Société
par Actions à Responsabilité Limitée (S.A.R.L.) mpe ezali regroupées en
trois catégories : société des personnes, sociétés des capitaux et sociétés à
cheval.
Désormais, l’Etat a se désengager même soki
akotikala ko détenir participation uniquement na ba limitations ya activités
commerciales et économiques. Sika, tobunga te que statut juridique neti
ebonguani na personne morale ya droit privé, ekoki sika kozala déclarer en
faillite ou en cessation de payement mpe ekoti na banque route. Eloko
ekokaki kosalema te soki ezali sous le régime ya droit public. Désengagement
oyo ekumbi na privatisation mpe na dépiècement ya GE.CA.MINES. mpe kolalisa
yango complètement. Yango wana ba bongoli ba entreprises publiques congolaises
en sociétés commerciales, na kati wana Société Nationale des
Chemins de fer du Congo (S.N.C.C.).
Ba lois oyo ezali kotambola na reforme oyo
:
· loi
n° 08/007 du 7 juillet 2008 portant dispositions générales relatives à la
transformation des entreprises publiques ;
· loi
n° 08/008 du 7 juillet 2008 portant dispositions générales relatives au
désengagement de l’Etat des entreprises du portefeuille ;
· loi
n° 08/009 du 7 juillet 2008 portant dispositions générales applicables aux
établissements publics ;
· la
loi n° 08/010 du 7 juillet 2008 fixant les règles relatives à l'organisation et
à la gestion du portefeuille de l'Etat.
Article 3
Aux termes de la présente Loi, il
faut entendre par :
Entreprise du portefeuille :
toute société dans laquelle l’Etat ou toute personne morale de droit public
détient la totalité des actions ou une participation ;
Entreprise publique : toute
entreprise du portefeuille de l’Etat dans laquelle l’Etat ou toute personne
morale de droit public détient la totalité ou la majorité absolue des actions
ou parts sociales
· Décret
n° 09/12 du 24 avril 2009 établissant la liste des entreprises publiques
transformées en Sociétés commerciales, Etablissements publics ou Services
publics (Service de documentation de la Primature, Kinshasa/Gombe) ;
· Décret
n° 09/13 du 24 avril 2009 portant dissolution et liquidation de quelques
entreprises publiques (Service de documentation de la Primature,
Kinshasa/Gombe)
Na mars 2014. Ilunga akomi
Administrateur Directeur général ya Société Nationale ya Chemin de fer ya Congo
(S N C C).
En tant que Directeur général, Ilunga
azali na pouvoir ya ko approuver ba comptes ya exploitation prévisionnelles na
ba budgets d’exploitation (recettes na dépenses) mpe na budget ya
investissement (recettes na dépenses). Ayebi malamu ba détailles nionso ya ba
dépenses ya fonctionnement na ba dépenses ya équipement, ba coût ya baise ya
volume ya exploitation ya ba lignes, ba opérations ya charges mpe pertes, ba
niongo miyike epayi ya ba fournisseurs, situation financière catastrophique oyo
ezali effectivement kokumba na cessation de paiement, na situation désolante ya
patrimoine ya entreprise. etc. Pour quel résultat ? Conseil d’administration
ebandaki ko établir ba états ya ba projections ya ba recettes prévisionnelles
en fonction ya ba éléments nini mpo mbongo ezali te ?
Mutu nionso akoki komona que Ilunga
Ilukamba a briller na incompétence ! Ndenge nini bakoki kotiya mutu oyo atikala
kozala gestionnaire ya une entreprise te na tête ya gestion ya entreprise
malade lokola Société Nationale des Chemins de fer du Congo (S.N.C.C.)?
Tokoba, est-ce que Ilunga Ilukamba azali na expertise ya mutu oyo a
redressaka ba entreprises en difficulté ? Asala ata preuve moko te na gestion
ya entreprise, esengeli te ko croire na miracle, azalaki na ye wana mpo na
koboma l’heure. Ezali likambo ya kokamua te mpo ba oyo bayebi ye, bakokaki ko
s’attendre na ba résultats positifs te. Totala etamboli na ye, ye nde
gouvernement epesaki bokonzi ya ko conduire réforme ya ba entreprises publiques
en mettant en place ba stratégies globales sectorielles na ekumbeli ya Comité
de pilotage de la réforme des entreprises publiques (CO.PI.R.E.P.) selon
ba décrets n°136/2002 ya 30 octobre 2002 et 04/047 ya 20 mai 2004. Ba
entreprises visées ezali ya secteur ya : mines, énergie, finances,
transport na communication. Wapi mosala yango ? Wapi ki économiste oyo bazali
kokanga na yango batu matoyi ? Concrètement wapi résultat ? Wapi
rentabilité économique wuta akoma na tête ya S.N.C.C. ? Ayebaki
situation ya S.N.C.C. wuta CO.PI.R.E.P. mpo yango nde etiaki S.N.C.C. na
liste ya ba entreprises ya portefeuille oyo l’Etat azali ko se désengager.
Ndenge nini akokaki koluka ko trouver début
ya solution mpo na koluka ko résoudre ba problèmes minene oyo S.N.C.C. ezali
confronter ? Totikali komona proposition ya plan social mpe na plan ya
investissement te ? Na plan social, eyebani malamu que S.N.C.C. ezali na ba
niongo ya ba salaires ya ba ba employés na ye, sika 229 mois bafutama te. Ezali
mpe na pléthore ya batu, esengeli kolongola batu ebele na mosala, kofuta
bango ba mbongo na bango na taux actualisé, ko comprimer ba dépenses na ko
geler ba salaires durant une période (tee soki vraiment reprise ya ba activités
ebandi komonana) mpe komeka ko réfléchir na lolenge ya ko relancer
entreprises na ba bases nouvelles.
Na plan ya investissement à la
hauteur ya programme à long terme oyo ekosala que société oyo e reprendre ba
activités na yango progressivement, neti Ko améliorer voies
ferrées na ko moderniser yango na ba équipements techniques électriques
modernes: vraie opération ya ko entretien ba voies, ko renouveler yango
mpe ko maintenir yango régulièrement mpo mauvais état na yango nde
ebomisi batu ebele na ba accidents lokola oyo ya Kakenge na Mweka, na 2007,
plus de 100 morts na perte énorme ya ba marchandises mpe ekotisa nzala na
secteur wana nioso mpo na manque ya approvisionnement. Accident ya Buyofwe mpe
eboma plus de 50 personnes, na 2017 ;
Kosomba ba locomotives ya sika, ba wagons
ya marchandises (minerais, produits agricoles frais na réfrigérés,
hydrocarbures na ba marchandises générales mosusu), ba voitures voyageurs
mpe na ba locomotives ya maintenances mpe na transport ya équipement ;
Ko moderniser ba ateliers ya maintenances,
ko former mpe kozala na politique ya formation continue ya ba agents na
échelon nionso mpo na bazala réellement compétitif na mosala ;
Ko rééquiper compagnie na ba moyens de
communication na télécommunication ya lelo oyo : ordinateur, téléphone, radio ;
Ko protéger ba installations, ko moderniser
ba gares, ko renouveler pars automobile : ba bus, camions et autres engins, ko
moderniser mpe ko améliorer capacité ya ba ports ya Ilebo na Kalemie,
etc.
Toyebi qu’évolution économique ya S.N.C.C.
ezali vraiment déplorable. Environnement macro-économique na yango ezali
instable mpe ba efforts ezali kosalama te mpo na ko stabiliser situation mpe
sima ko relancer ba activités na yango. Sous Ilunga, nde tomoni que S.N.C.C. e perdre
ba marchés ya GECAMINES na Société de Développement Industrielle et Mines
au Congo (SO.D.I.M.CO) mpe na Société Africaine d'Explosifs (AFRIC.EX.), alors
que trafic minier nde ezali kosala plus de 60% ya chiffre d’affaires na yango
mpo transport ya ba minerais oyo ekomi kosalema na ba camions ya Moïse Katumbi.
Tozali lisusu kotuna, eloko nini Ilunga asali mpo na ko attirer ba capitaux
privés na activités ya S.N.C.C. à travers contrats de gestion ? Eloko nini
asali mpo na koluka réelle autonomie de gestion na ko fragiliser mpe ko
anéantir intervention ya l’Etat na gestion ya entreprise ?
Wuta 20 mai 2019, akomi na ebonga ya
Premier Ministre et Chef du gouvernement. Awa lisusu, Ilunga akolakisa biso
incompétence na ye légendaire. Soki azalaki sérieux, akokaki kondima ebonga oyo
te. Bon, ye, alandaka esika mbongo na voyages ezali.
Ilunga azali Membre du comité scientifique
ya Conseil pour le Développement de la Recherche en Sciences Sociales en
Afrique (CODESRIA) Yango ezali na Dakar, na Sénégal.
Consultant ya International Fondation for
Developement Alternatives I.FI.D.A., Nyon, na Suisse.
Azali mpe Chevalier ya Ordre national du
Léopard.
Na ba publications :
Ilunga Ilunkamba, « Propriété
publique et convention de gestion dans l’entreprise du cuivre au Zaïre », Thèse
pour le doctorat de Sciences économiques, Université Nationale du Zaïre,
Kinshasa. 1977.
Ilunga Ilunkamba, « Conventions de
gestion et transfert de technologie au Zaire: le cas du cuivre »,
Africa Development, vol. 2, no. 2, 1977, pp. 73-94
Ilunga Ilukamba, « Stratégie pour
un contrôle national effectif de l'industrie du cuivre au Zaïre » in
Cahiers Economiques & Sociaux vol XVII è §, 1979, I.R.E.S., 132 p.
Ilunga Ilunkamba, « Les firmes
multinationales dans l'industrie du cuivre au Zaïre : l'art de survivre »,
dans Cahiers Économiques et Sociaux, 17, juin 1979, n° 2, p. 113-145 (p. 136).
Ilunga Ilunkamba, « Propriété
publique et convention de gestion dans l'industrie du cuivre au Zaïre »,
Les Cahiers du CEDAF, août 1984, n° 4-5
Patriotiquement,
Emmanuel Kandolo