Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Bonjour,

un commentaire vient d'être posté par smiekono@yahoo.co.uk sur l'article Lisolo ya Big JOHN na Maître ZELEX,

Mbote mingi ba ndeko ya Mboka mosika,

Tozali be kokoba na lisolo kitoko oyo ndeko Sonny Mokonzi afongoleli biso ya batu ya makasi.   Mikolo eleki mingi wuta totika mboka pe toyebaka te ke un jour tokosololaka lisusu masolo oyo,kasi namoni lokola esepelisi batu mingi na ndenge ya ba
commentaire moto nionso azali ko kabola na biso.   Bo kolimbisa biso nionso ndenge tozali kobunga ba mbula, ba kombo exactes po mosusu ndenge
makambo yango elekelaka, kasi toza komeka ko bakisana kaka pona kokangisa ba morceaux ya histoire ebunga te.

*Ya solo ndeko Sonny Mokonzi, bala-bala ya ba vieux N’djili Mobimba ezongeli nga na moto ke ezali solo
Mayunda.  Mayumbe ya ba Lombi (Ndima ngondo) ndeko ya Mbaki (Arbitre pe joueur ya Mamaki = Rues: Marché + Mayumbe + Kinkonzi) bala-bala ya ba 8kg, ba
Loula “Maître”.  Na tanga 1ère na 4èm primaire moko na leki ya Lombi ya muasi Kongo.

** Kombo ya vieux N’djili Mobimba okoki kozala na raison po bambula eleki mingi pe tobungana na leki na ye oyo azalaki
voisin na nga ya classe.  Nayebaki te ke azalaka mobeti ndembo, na apprendre un plus merçi ndeko Sonny Mokonzi.

***Vieux Boa oyo nalobi azali Me Boa ya boxeur te kasi elenge moko esika Vieux Badra - Gwa Kimbangu azalaki koya komela
Nzanzale (Lotoko) na Mpumbu Q.10, soki nabosani te vieux Badra alingaka kolata ekoti ya Mpeko po azalaka kolinga te batu bamona suki na ye (selon biloko na ye ya makasi), bongo azalaka kotambola
na kati kati ya nzela, azalaka kowuta na Kimpoko Q.5 tii na Mpumbu Q.10 alata pantalon kasi asimbi chemise na loboko to pe atiye yango na lipeka donc torse nue, sapato ya ba soda akata yango tii
ezui forme ya JM Weston, wana aza kotambola aza kodenda.  Kombo mususu amipesaki ezalaki R.F.B (azalaki kotangama R Fe Be) = Roi de Force
Brutale.

****Pona Me Mualf na Me Joe na leki na bango Jean oyo ayebanaka na kombo ya Ja muluba pe azalaka kosala ba nzungu ya
Aluminium (bana ya Pasteur kimbaguiste).   Lisolo Me Ali Dynam Mabuisi – Donatien ayebisa leki na nga Me
Commando Saeed ke bango bazalaki ba maîtres te, basukaki na ceinture vertes epayi ya Me Franck Bukuna, tango bakendaki kozua bakisi na Brazzaville nde ba se proclamer ba maîtres.  Tango Me Joe akufaka nazalaka na 4ème primaire pe tomona ba démostrations ya ba club ebele na lopango na bango na Kiela Q.4, N’djili pene ya Bonsomi to Pie
12.

***** Nasolola na Me Ali Dynam kala mais toyebani ndenge mutu nionso ayebi misapi mitano ya loboko na ye.  Ye alobaka boye:  Me Kapata na Me Decantor bazalaki koyekola Judo na Ju Jitshu epayi ya ba japonais.  Capitaine na club ya Me Kapata ezalaki Mr Franck Bakuna pe epayi ya Me Decantor ezalaki Mr Burte.  Tango Me
Decantor alembaki koya N’djili pona distance, basangisaki le 2 dojos.  Tango Me Kapata abimisaki Mr Franck Bakuna ceinture noire, atikelaki ye club
Kake akoba nango, Me Franck Bakuna atiyaki Capitaine Mr Burte pe Cpt adjoint Mr Carré y compris Mr Ali Dynam na ba Mr Mualf, Mr Joe bazalaki kuna tango nanu bakomi ba “maîtres” te , pe “Maîtres”
Mualf na Joe nanu ba révoltaki te po bamilatisa ba ceintures ya mwindu na ndenge na bango moko.    Nayebi te combat nini Me Mualf abunda pe alonga, naza kaka koyeba ke apolaka na Dokis lokolo ya mama pe akimaka combat contre Me Tito tango asengaka ye
combat po leki na ye Ja muluba atindikaka Me Tito na terrain ya Bonsomi, sango epanzanaka ke babeti Tito, fallait sikoyo Tito na Mualf  babunda na
Viva bar na ste Thèrese, batu basomba ba tickets kasi Mualf ayaka te, sima naye komona ye lisusu na Variètes Samedi Soir oyo amibambaka molangi na mutu pe azokaka, balobaka ke akomaka Pasteur
payi ya Ebale mbonge.

Sima Me Carré ayaki kosala Mukumbusu pe abimisa ba Me(s) ebele lokola: Me Bruce, Tito (Terreur - Imbatable - Toute
categories), Scotty na yaya na ye …

Me Dynam abimisa pe ebele Me(s) lokola: Me Bideros Souleyman ya Mfu Q.5, Roger (leki ya Dynam), Prudence, Mbilia Foxy
aza na Paris,  Jeannot le guerrier, Funakoshi, Commando Saeed (leki na nga), Torreau etc…

Nakosenga na Me Mbilia Foxy (ya Lukusu Q.5 N’jili rue ya ba Elima mabe de Bandundu) sikoyo aza na Paris abetela biso
lisolo na Ye na Me Tshiwara, bongo natia yango na blog, po ye azalaki muana kasi par force Tshiwara a obligeaki ye akoma mista na ye.
Leki na nga Me Saeed atuna Me Ali Dynam pona nini M Franck Bakuna abomaka Me Tshiwara?

Me Dynam apesaka ye réponse rétorique: “ Est ce que Me Franck aza Gendarme to BSRS, ye asalela musala ya ki soda wapi?
Eza kaka ba les ont dit ndenge balingaki ko salir ye.”   Ezalaki ngambo na ye (Tshiwara) amemaki contre muana ya mvuama moko na Lemba, qui n’avait rien avoir avec Me Franck Bakuna (selon Me Ali Dynam).

Serge (Kongo na biso 1866)

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
A
mbote na biso ba mbokatier!! ngay eloko na zali koyeba ke Mr Dynam ayebisaki ngay ke il fallait ba bunda combat na Mr Mualf mais eloko ye aboyaki ezali ke Papa ya ba Mr Mualf ayebisaki abesa ye mbongo po atika Mr Mualf a gagner combat. yango wana aboyaki. mais alobaki soki ba bundaki alingaki a gagner combat yango po ata ye moko Mr Mualf ayebaki k Dynam alekaki ye na makasi.
Mikolo ekoya soki bolingi na ko betela bino lisolo ya Bagarre entre Mr Dynam na Mr Django. please bo sala ngay signe soki bolingi lisolo yango. po ngay moko TEMOIN AUCCULAIRE.
Répondre
M
ABE,

Tozali kozela lisolo. Yo moko oyebi te ça fait partie ya patrimoine na biso. Pesa lisolo, ekoleka nango na mbokamosika.

Messager
B
OKOKI KOYEBISA NA BISO MAITRE NINI YA DJILI OYO ASALA COMBAT..YA KARATE OYO EYEBANI ? A L'EPOQUE YA BA MAÎTRES YA DJILI NIONSO OYO YO O WUTI KOTANGA AWA? NA PERIODE NA BANGO... YO OZALI KO DENIGRE MAITRE MUALPH NA JOE..JE PENSE QUE MOTO OYO A BETELI YO LISOLO WANA..ALINGI NDE KO MIMATISA NA MAKASI.
Répondre
D
Vraiment nakanisi que tobungisa ba répères nyonso yaba vieux nabiso ya N'djili. Soki tokoki ko partager ba nouvelles ya batu wana nyonso: Me Mualf na bandeko naye nyonso, na ba maitres mosusu ekozala bien.
Répondre
M
Okoki ko relancer masolo.

Messager
P

mbote mingi na bakomi pe balandi nionso ya mboka mosika, na lingi lelo to beta lisolo ya ba gardients ya ba equipe ya ba quartiers nabiso oyo tozalaki nayango na Ndjili, gardient lokola KASTELO
na Q6  ,gardient lokola VENGO na Q3  gardient lokola JIMAL na Q13 gardient lokola KINTANDI 80 na Q5 gardient lokola NSIMBA BURO MATOMINA na lukusu Q5, gardient lokola THOMA na lukusu Q5
, gardient lokola ZAMORA na Bankana Q5 , gardient lokola ZAGORA na Q10 , gardient lokola ya ZINGU na Q2, tozalaki penza na ba bon gardient na Ndjili na bosani bakombo ya ba gardient mosusu ,yango
na kosenga na bakomi pe balandi nionso yamboka mosika oye ayebi bakombo ya ba gardient mosusu abeta lisolo oyo malgres ba gardient mosusu bazali lisusu na mokili oyo te me batika histoire na
bango na bale ndeko  SERGE KONGO maloba ezali omboka yo

Répondre
S

Kobosana lisusu te que tango ozali ko citer ba Maitres oyo Me carré Mabeka apesa ceintures noires en premier ezali me Japonais na me Bruce ainsi de suite....!

Maitre Japonais ya Q3,na kimvula,gd frère ya me Lung. Merçi bien mon frère!

Répondre
P

Mbote  mingi   na   balandi   nionso  ya   Mboka   mosika .

Lisolo  na  ngaiyi   ya  lelo   ezali   ya  ba  Orchestre
oyo  ya  kala  tozalaki  na  yango  na  NDJILI.

na   NDJILI  tozalaki   na   ba  orchestres  oyo  LOZELE  ZEZE  ezalaki   na  Q5
NA   BALABALA   BANKANA   epayi   ba  PAUVRE   SONIA -THOMATALA   tango   wana  ebandaka  na  kombo  ya
SOTOKA  WAYI  WAYI , apres   nde   kombo   eyaki   ko   changer   ekomaki   LOZELE  ZEZE   REP  ekomaki    na
balabala   MANGU  epayi   ya  ba  vieux  SORIA  MBIDI,  tango  wana   tozalaki   bana  mike,   na  chant   pauvre
SONIA -THOMATALA,  SORIA-MBIDI,    ELIFA,   PITO-PITO,  PIPOLI   na   vieux  LOLI -BABOY,  vieux  JERMIS, na  vieux  MONENE , BAKONBO
misusu   nabosani   oyo  ayebi  abakisayango,  nazalaki  penza  kosepela   na   nzembo  oyo  BEBE KUMBA  kutu  na
yembaka  yango  ti  lelo  yango  nazali   kosenga   na   ba  vieux   botindelangayi  banzembo  wana  na  yokaka
yango  ezali   penza   histoire  ya   music   NDJILOISE  nalingi   nayeba   LOZELE  ZEZE  ezalaka kaka  ti  lelo ?
tozalaki  pe  lisusu  na  orchestre  TOUWE CHAUD  wana  ezalaki   na  balabala   MONGATI  ezalaki
groupe  yaba  vieux  BANCO,   TOZALAKI  PE   lisusu  na  orchestre   MONIERE  NGANGA   ezalaki   yaba  vieux  BUENDE  NA
BA  vieux  CHABA-BANGALA  OYO  YA  LUKUSU ,  REP  ezalaki  na  balabala  matete  epayi  orchestre  YOKA  CHOC
ekomaki  kosala  REP  wana  ezalaki  yaba  vieux  KALAKI,  EDY - KOKO , vieux  MOPEMI , NENE- BRUS  , ZATEREMANA  NA  FRIZOKA.
NA  Q13  nde   tozalaki  na  orchestre  DJUKE  DJUKE.       MERCI    MINGI
PHILO- MALOYI

Répondre
P

Mbote  mingi  na  balandi  masolo mboka  mosika,  PAPA  FLORIAN -LUYENGO na  pesiyo  matondo  mingi  na  ndenge  oyanolinga
na  motuna  oyo  na  tunaki  ya mbotama  pe  kombo ya  papa  na  maman  ya  koko nabiso  prophet  PAPA  SIMON - KIMBANGU
, NZAMBE  apambola.    merci   PHILO-MALOYI

Répondre
P

Mbote mingi  na balandi  banso  ya  masolo ya  mboka mosika,   nazali  na  mituna  mibale na  lingi  nayeba,  yaliboso  Biographie
ya  Me TSHIWARA  obotama  wapi? pe  kombo ya  papa  na  maman  naye, na Q1 NDJILI  epayi  ye  azalaki  kofanda  ezalaki
lopango  na  bango  to  azalaki  kofutela?             motuna  nanga  ya  mibale
ezali  oyo  koko  nabiso  Prophet  papa  SIMON-KIMBANGU  abotama  na  BAS  CONGO  to  na  LEOPOLE VILLE [KINSHASA]  na
date  de  naissance  naye   pe  kombo  ya  papa  na  maman  na
ye?                 MERCI  PHILO-MALOYI      contacter  nga  na
email  oyo     ngatamungama@hotmail.co.uk

Répondre
P

Mbote  mingi na balandi masolo ya mboka mosika. lelo ezali lisolo NTABA. 1jour  to  fandaki  Moyen de vivre na coin ya balabala MANGU ezalaki penza esika tozalaka  kobeta
masolo kutu basi  mingi bazua mabala esika esika wana, NTABA  moko yamonene penza toyebakite soki awutakiwapi azalaki kotambola yemoko  mokolo na yango ayebanakite, 1 temp bayaya
tozalaki na bango GOZO na TUE L'HOMME ba kangi NTABA wana na singa na libende, lokola ezalaki  na yebisi  bango bolibere ye akende baboyi  kutu  MERE SUKUS AKIKOPEKISA BANGO
KASI BAYOKAKIKAKATE  LOKOLA  EZALAKI  na moyi  bazeli ti na  butu  bakeyi  kotekaye na  wenze ya 6 bango na  vieux  CHAPA 2  LOKOLA
ezalaki  butu bapsi  bango  mbongo ndambo,reste bayakozua lobi na  11heure, moto oyo  asombaki  yango lokola  azalaki  commercent  yepe na tongo tongo
akeyi  koteka yango , mokolo NTAMBA  pelokola  eloko na ye  ebukngaki  binomoko  boyebi  kaka  ndenge ezalaka yepe alamuka  grand  tongo
akeyi  kofanda esika oyo batekaka basoso  soki  akoki komona  NTABA na ye,  atalakaka  boye tata  moko azalikoya koteka  NTABA naye ,abengiye  tata
oyo ezali  NTABA na  nga oza  moyibi, tata  wana alobi  nga pe  NTABA  oyo nasombakiye  lobi kutu bato  batekelakinga yango bakoya kozua  mbongo
ndambo etikalaki  lelo na 11heure, bamemani  bangomibale kozela ba noko oyo  bayaki  koteka  NTABA  nabutu,11heure pe  ekoki  GOZO , TUE L'HOMME  NA
VIEUX  CHAPA  II, nzoka  moko  NTABA  ezalaki  grand frere  yaba vieux  DETECK  na  Q6  tango kaka  bokomakiwana ,bakangibango
nkuba  vieux  CHAPA II  lokola  azali  moluba fammille  ya  ba  monsier  LECRACK  basalaki   intervention  ponaye ,tango
bazongaki  na palais  tosekaki  bango  ya  trop.  merci philo.

Répondre
P

Nbote mingi  na  bana  nionso  ya  Ndjili   epayi  bozali,  Ezali  na  ba  Me  mingi  bazali  totangi
bakombote  lokola  Me  KASTOUT  na  kinkonzi  nayebite  soki akoma  wapi  soki  moto azali  nouvelle akoki  kolobanabiso,
kaka  na  kinkonzi  wana  tozalisusu  na  grand Me  na  bosani  kombo  naye  azali  grand frere ya Me  AGUEKA. boni
vieux  CASINO na  kimpoko na  coin  azalaki  ancien soliste ya afriza  azali  kaka?  yende  moto alakisaka  8kilo  kobeta  lindanda.
NB  vieux  BADRA   KIMBANGU  A  ceintaka  NSONDE  na  lukusu  na  coin  tango  wana  nazalaki  muana  muku. Merci
philo

Répondre
M

ABE na Philo Maloyi,

Lisolo ekomi na première page- Bokokuta mituna mingi ba mbokatiers batuni bino.

Messager

Répondre
P

pona  na lisolo  ya  Me TSHIWARA  moto  oyo  akoki  kobeta yango  malamu ezali  Me  MULER ye azali  na  allemagne  na  ville
ya  Tubingen  poye  azalaki  eleve  ya  Me  TSHIWARA  eloko  mosusu  na  lingikoyeba  Me  TSHIWARA  abundaka  pe
ba  combat  na nani?  po  nayoka  yango  nanu  te .  Me  MULER  yonde  moto okoki koyebisa  biso  masolo  yango.
merci  philo.

Répondre
P

Mbote  mingi  na  bandeko  ya  mboka  mosika, kombo  na  nga  PHILO-  MALOYI  NAZALI  MUANA  YA  LUKUSU
Q5  NDJILI . Nasepelimgi  na  lisolo  oyo  ba  grand  Me  nabiso  ya  Ndjili  Tokanisa  Me  DJO  azalaki  grand
frere  ya  Me  MUALF, Me FRAZY club  Mongoni  na  Q13 Me  TOSHA,  prof  kalazingu  atanngisanga  na  ecole  saint  martin
na  sixieme  primmaire, tobosanite vieux Badra  kimbangu  na Q5  KIMPOKO Ye  aZalaki  kotobola  mure  na egogo , bongo  lisolo  ya
vieux  MIVE DJHON  CONTRE  VIEUX  BADRA  KIMBANGU ASUIVRE.  mbote  mingi  na  Me  ali  DYNAME ,Me kasetu, Me SASA, prof  KALA

Répondre
A

MBOTE MINGI NA BA NDEKO NA NGAYI NIOSO.

NGAYI NA ZALI MWANA YA NDJILI Q5 NA RUE LUKUSU No 3

NA VANDI NA RUE MOKO NA MAITRE ALY DINAM MPE AZALI GRAND FRERE NA NGAYI NA NDENGE YA FAMILLE ELARGIE.

NGAYI NA TANGAKI NA BA ECOLE EBELE: NA KINZUANA Q4,LEMFU YA PEDA NA Q6, INSTITUT LUKAYA Q5 MPE INSTITUT MBAKI NA Q7. APRES NA KEYI NA ISTA.

NGAYI NA ZALI NA PHOTO YA MAITRES TSHIWARA. NA ZALI KOLUKA MOYEN NA TIA YANGO NA YOUTUBE NA NGAYI.

MPAMBATE AWA NA WEST MIDLANDS (UK) NA ZALI TECHNICIEN DU MEDIA. DONC NA ZALI CAMERA MAN,EDITEUR,JOOURNALIST,PRODUCTEUR EN MEME TEMP BOSS YA CHAINNE NA NGAYI ABE TV 6600VOLTS.

NA YANGO PROJET NA NGAYI YA MUNENE EZALI QUE  NA FORMER BA ACTEUR YA CINEMA, MPE BA JOURNALISTES NA COMMUNE NA NGAYI YA NDJILI.

MPE NA TIA LISUSU STATION TERRIENNE NA NGAYI NA NDJILI.

NDJILOIS NIOSO ALINGI A CONTACTEZ NGAI. abetv.6600volts@yahoo.co.uk.

NGAYI NA ZALI LEKI YA PHILO MALOYI.

SANGO KAKA YA MAWA EZALI KE " TUER L'HOMME A WUTAKI KO TIKA BISO.

Me LIKONGA NDE NA ZALI NA SUITE NA YE TE.

Répondre
M

Serge,

C'est vrai que MONGOL azalaka violent te mais ye mokolo yango comme azalaka koya na Pie XII kosenga mua quelque chose epayi ya ba sango akutanaki na eyoma yango par hasard et asalaki défense ya
petit na ye ya Q7 oyo alingaki azua lusabala terme oyo ye moko Me Chiwara azalaki ko utiliser soki okozua frappe.MONGOL na monaki ye na KIn année passée je crois que azali kaka na bomoyi.Azali
toujours na caleçon na ye.Oyo tout ezali suka na ba souvenirs.BA MASTA na ngai pe ebele baleka na EPOM Guy-Pipa akufa,Jean-Marie Malakasa azali na Luanda.@++++++++

Répondre
S

Mbote ba ndeko,  ndeko Michel Kinzonzi est ce que Mongol aza kaka na
bomoyi?  On dirait azalaka violent te!   Akotelaka biso na
classe na C.O 2 N’djili (ex Epom) na 1981 mais asalaka biso eloko te, kaka akendaka na molangi na Fanta ya prof na biso ya français, toseka mabe kasi prof na biso a reponda biso n’adage oyo:
“Soki olingi olanda mutu ya liboma, lata kupe”.     ***Na N’djili to na ba zones nionso bato ya
makasi bazalaka, kasi nzoka nde bango nionso bazalaki na makasi ndenge moko te pe basalelaki makasi na bango ndenge moko te.   Ezalaki na ba oyo
bazalaki na makasi ya kobotama, pe ba oyo bazalaki na makasi ya kisi to kamon pe basusu bazalaki na makasi ya koyekola na sport.   Basusu
bazalaki matumboli pe basusu bazalaki kozela yo otumbola bango pe basusu ata otumboli ye ako kipe yo te.  Basusu bazalaki kobunda na ba compétitions
lokola ya AKIKA (Association Kinoise des Karateka) pe UZAMAT (Union Zaïroise des Arts Martiaux Traditionel) pe basusu bakomisaki makasi na bango ki voyou.   Liste ya bato ya makasi eza molayi yango wana totangi bango te kasi totangi kaka mua 0,1% na bango kasi mutu nionso oyo aza na témoignage pe temps akoki ko
completer yango to ko partager pona ko revivre maye maleka, ba ndeko batangeli nga batu ebele oyo nayebaka te ke basi bakufa.  **Vieux Amede alingaki
kupe trop, pe ko mvuka na terrain ya St Remy liboso ya école ya Lemfu.   Blog ya mboka mosika eza na ba souvenirs ebele …

Répondre
M

Mbote na bandeko banso na mokolo ya Pentecôte.Namoni eloko ya sika na bakisa te na masolo ya kitoko oyo etali ba Engambe ya Kin pe ya N'djili.Bandeko Sonny Mokonzi,Serge,Messager na Kulutu ya Pie
XII oyo amibombi na kombo Bonsomi bapesi masolo kitoko pe ba précisions concernant Vx Badra,Vx N'djili,ba Maîtres banso oyo batangi ba kombo.Ya solo masolo yango ezongisi biso na époque ya ba ST
Martin(na sala maernelle pe primaire na ngai na Section II Ya défunt Papa Emile KUYOLUMONA),ba ciné Jokial,bassin ya mayi ya tuyau pe mayi ya N'djili.Kasi bo bosanaki kotango ba pomba lokola ba
Vx Amédé ya Briquetier(Gd frère ya Ngunza joueur ya Lunzadi na terrain ya Q6) asi azongisa molimo epayi ya Nzambe,ba Vx Gonda,ba VX Moverona,ba Vx Eddy tail....Na oyo etalaki Me CHIWARA
nakoki kobakisa lisusu boye malgrè makasi na ye aboyaka abunda na MONGOL moto ya liboma moko ya Q7 na liboso ya Simba Fils.Me ayaka na secteur wana po na a corriger muana moko ya Q7 aboyaka
kopesa ye mayi ya pio sans intervention ya Mongol kulutu na biso wana alingaka a lekisa après-midi ya mabe na maboko ya Gd Me.Esengo ya mingi na ndenge Messager apesi biso Flash te asalaka na
bureau ya vote na Q12 ekoki kozala na secteur ya bar ya Kala Rach te?Mokolo elamu pona kulutu Bonsomi ngai pe nazali muana ya Bonsomi(Promotion 1985).Bato bakoti o bwato bazali se na poso yoko
wana nde devise ya biso ba Bonsomiens.

Répondre
B

cet article me fait revivre mon ndjili chéri. beaucoup des cités je les avaient connus.néamoins j ai fait le constat qu ' ils sont morts souvent trés  jeunes et dans le dénuement  le
plus complet.  je sais que MUALPH avec qui j ' ai fait du judo  chez les prétres de st théophile  de KIMBANSEKE   EST   MORT EN 2000 d' une grave maladie.
MUALPH qui fut kimbanguiste avant d aller chez nzambe malamu fut trés  croyant.  paix à son ame de guérrier.il n avait que 42 ans.  parmi les ndjilois forts ,il fallait ajouter
MAITRE SYMBAD NSIMBA du quartie 13  qui fut le responsable de la sécurité de la   banque de kinshasa et  plutard garde corps perso   de DE DOKOLO
N'samou. il est mort  en octobre 2000 D ' UNE CRISE CARDIAQUE.  il avait 46 ans.   EN OUTRE  j ai été agreablement surpris de lire des   pages sur
NDJILI  MOBIMBA  qui fut un grand joueur de   foot de haut niveau   et  joua au stade du 20 ans ,il est mort d 'une maladie lieé à sa consomation excéssive
d' alcool  et l usage du formol   car il était dévenu   croque mort.  il était naturélement trés fort.   Quant à hitachi ,FUTUR MAITRE HITACHI,il fut
mon voisin de classe au collége BONSOMI AUX humanités scientifiques  dans la meme promotion que promotion que le DR SITUAKIBANZA  DE LA CLINIQUE UNIVERSITAIRE,du capitaine NZALE
(dcd  ),du colonel ou général EKUKA,de tity nzoso pdg   des boutiques firma vantages à paris,du producteur  claude muyeye qui fut un bagarreur impénitent  et
téméraire.  HITACHI était un gars charmant et doux   .il était proche  de  tciwara.  LE  PERE CROOK ,notre directeur chez les jésuites fut surprit d ' entendre
les exploits pugilistiques du fameux MUENGE alias hitachi ,je sais pas s' il est toujours vivant  mais IL formait clandestinement certains   BONSOMIENS à la bagarre et au KARATE
DO.  POUR terminer il y avait  aussi une bande constitué de BANA 5   ET QUARTIER 4, des hommes forts mais voyous et gangsters dangéreux autour de YA BIKORO  dans sa
"DIAMBERIE"  SUR   la rue mayunda  numéro 14.c était  la fumérie du chanvre la plus célébre  de NDJILI   APRES  LE monument WEMBLEY DU QUARTIER
QUATRE.  LE NGANDA BIKORO  était connu pour le charisme de son chef YA BIKORO qui fut 24 séjours à LUZUMU   QUI s évada à pied du parquet de NDJILI.   SES
partisans et clients de la diambérie frappérent à mort les gendarmes  et  le gardes  qui ne démandérent pas leurs restes........il   y avait  les PODOS,lOM
LOM,ABEBA,MAITRE TCHANG?ETC........ chez BIKORO  ON S initier tranquillement au NZUAMA   de toutes sortes   bandundu,bas zaire,mayi ndombe    les
adaptes venaient de tout   kin  .MIVE JHON venait réguliérement  fumer.vieux bikoro  qui  doit avoir plus de 65 ans est sortie de LUZUMU  ET EST VIVANT.
LA bande des hommes  trés  forts qui tournait autour a   été décapité par les services des sécurités de MOBUTU. LOMLOM  est mort et jetté dans le fleuve par les hommes du
CNRI,PODOs    a fuit au gabon   ou il vit   ,iltravaillerait à l ambassade du congo,LONGOBA  vit   à paris ,MOSIJO EST mort DES REINS ,TOMS
étaies dévenu  pécheur,ABEBA EST   à kin.   TEKITA   le frére   de njili mobimba jean pierre   est révénu   à kin  aprés une
longue   prison   à  EKAFELA.  CETTE   BADE   FUT   LA  PLUS DANGEREUSE   ET CRIMINELLE QUE NDJILI   AIT
CONNU.  VOILA  témoignage.

Répondre
S

Losako ndeko Sonny Mokonzi,

Keyboard to clavier nanga ya computeur eza n’anglais, e changeaki maloba nango soki liloba moko ya ndenge wana ezuami na
anglais, soki na relire nakomi na nga te mawa trop.

Ya solo ezalaki Me Sobin nde alingaki nakoma kasi ekomami Babin.  Bolimbisi
eza ba correction automatique ya computeur nanga, merçi pona correction, po batu mingi batanga babunga te.  Nayoka kombo ya Gd Me Kimfuta mais namona
ye te.  Ba combats mingi ya ba mikumbusu bazalaki ko gagner pona b’intimidations, ndenge wana nde Me Tito abetaka Me Casse tout ya Kinkonzi ya Ndima
ngondo.  Bango tout bako entourer Tatami pe baza kobangisa yo, na faut pas baswi yo na b’élèves na yo.  Mbala ya suka namonaka Me Carré ezalaka na Epom, asalaka Dju Kumite to combat contre Me Tito likolo ya terrain ya basket, abamba Me Tito na ndenge moko, Me Tito
a comprena te, abondela ye abandela eloko yango mais aboya, aloba kaka: (mokolo se mokolo) wana ezalaka na 1981- 1982, ezalaki Dju Kumite ya au révoir po azalaki koya poto.  ***Na quartier 13 ezalaka na mutu moko na kombo ya London, ye azalaki na ba petits na ye lokola Tshezo, Jajo etc… wana ezalaka na tango oyo Alisi Baba azalaka
musicien vers 1977 – 1980, soki London aye na groupe na ye kosokola na mayi bino nionso bozalaki na kati ya mayi ya N’djili quelque soit âge na yo il faut bobima ye asokola tii akosilisa sima
bokosokola.  Wana tozalaka kosokola na mayi ya N’djili pene ya Ndunga ndunga, pene ya Sadico, pene ya Thérmomètre, soki okatisi mayi ya N’djili esika
wana 5 à 10 minutes na makolo okomi na station ya Rufflaert.  London azalaki pe kokata batu ba kamon, natikalaka koyeba esika azalaka kofanda te mais
nabandaka komona ye aux environs ya bala bala Mampika, Diyangi, Ebonda, Kinkelele na Q.13, azua nini na ki Yankees na ye, nayebi te.

Serge (Kongo na biso 1866)

Répondre
S

Messager,HITACHI(de son vrai nom MUENGE ALINGA) azali karateka pe elombe mobali,ye nde asukisaka DOKIS na ndjili.NA debut 80 tango dokis abetaka maitre mualph pe aye ko ganger contre MAITRE
KAWASHI,bato oyo bayebi dokis bayebi que na ring azalaka tres arrogant soki azali kobunda,alors alobi na kawashi boye;benga maitre na yo nakobeta ye,HITACHI ayoki alobi heinnnn nde boye,quelque
mois apres ba organiser combat entre bango mibale DOKIS contre  HITACHI ezakaki suka,dokis apolaka,ba kakato na ye ezosimba te..HITACHI na DOKIS bazalaki na equipe nationale ya karate banda
kala,ensemble na ba MAITRES TABILU,BAUDRY,KEN NZENGELE,DJANGO,FERROS, na ba misusu..omoni que tango wana BA GRAND MAITRES MASSAMBA NA KIMFUTA bazalaki b'entreneur national pe bazalaki tres
stricte sur comportement ya ba KARATEKA na vie privee na bango...SERGE moto oyo abundaka na maitre caree ezalaki MAITRE SOBIN le GRAND BISON,bango na ba hitachi bazali bana ya Q12...BIG JOHN oyo
otangi nde ye wana oyo nalobaki......Soki tozongi mua likolo nalingaki pe naloba que HITACHI na DOKIS babundaka combat y'exhibition en direct ya television a l'epoque ya jeudi choc,ezalaki karate
full contact,ekendeki match nul.je crois ezalaki na 1981 ou 82...Pona ba mikumbusu,bazalaki ba bon karateka mais desordre ekitisaki valeurs na bango,ata moko na bango akokaki to akoki kobeta
hitachi to sobin te...en plus club boboto ya hitachi pe na mongoni yango ezalaki ba clubs mibale ya ndjili oyo ezalaki affilier na AKIKA.

Répondre
S

Mbote ba mbokatiers,

*Messager, ndeko moko alobaki pona nini to tia Me Kapata alors que eza masolo ya b'engambe ya N'djili, yango nayebisaki
ye ke Messager moto atie titre kasi eza likambo te.

Masolo ya batu ya makasi ebandi pe esuki na ba oyo toza kotanga te, N’djili eza commune munene avec 13 quartiers, toza
kaka kosolo na mua bato muke.  Tozalaki na ba bills to Yankees pe ba oyo ya makasi ya masano lokola Karaté, Judo, Self defense, Boxe, Catch
…   Basusu bazalaki kobunda na bala bala kasi misusu bazalaki ko bunda kaka na ba combat official lokola
Prof Kala oyo ya Mongoni na Q.9 na Ciné Jokial na bala bala oyo ekende na Cecomaf, club na ye ezalaki ko participer na ba combats organiser  na Grand
Me Park oyo ya Funa, ndenge moko pe Me Ali Dynam na Kodokan bazalaki kokende na Uzamat (Union Zaïroise des Arts Martiaux Traditionel).
**Messager, Me Hitachi (Hitachi na elamba ya mpembe) na yebaki ye, un bon téchnicien surtout na likolo, ye mutu abimisa Me Kawashi, abunda pe ba combats ebele mais na kutana na ye te lokola baye
natangi: Badra, Me Dynam, Prof Kala aza lelo entre Angola na Allemagne (azalaki Moniteur na St Martin), Me na ye Me Frazier atikaki ye azalaki nanu Ceinture Bleu, ye a continuaki koyekola na Funa
epayi ya Gd Me Park tii aye kokoma Noire, sima ye nde abimisaki ba maîtres Nkadia, Me Wang etc …  Cris de guerre na bango ezalaki “Kinsansi, Elela”,
alingaki nga mingi po ayebanaki na yaya na nga Vieux Shaba oyo azalaki mécanicien ya ba marque Japonaise epayi ya Vieux Gauché (akufa).  Une fois
abengisaki nga na Kimbanseke natala ndenge akobeta Me Mandy (moko ya b’élèves ya Tshiwara oyo amikomisa Me sima ya liwa Tshiwara) mais Me Mandy akimaka na ye.  Me Nkadia azalaka élève ya Prof Kala asilikaka mabe tii tokenda tii na ndako ya ba Me Mandy na Weyi mais Me Mandy a bulungana (kufa nsoni kumona mpasi).
***Ndeko
Sonny M, Soki oza kolobela vieux Big John ya N’djili, ya libandi, apakola produit, azalaki na minu moko to mibale ya kolongwa, azalaki na voix roque pe azalaki koteka diamba, na lopango na bango
bazalaki kosala ba bijoux, kobeta ba cartes pe jeux de six ya  mbongo, pene ya Q5 na Q10, wana oza kolobela cousin na nga Ya Mishiélé (Michel) Big
John ya bala bala Kinzwana na Q4 pene ya chambre froide ya Dokolo pene ya école Laic ya Kinzwana, lopango oyo ekendaki sango na kombo ya Stade Wembley na bala bala moko na Bar ya La
N’djiloise.  Un jour vers 1987 – 1988 vers midi – 14h Manda Mobutu na baninga na ye bayaka komela likaya ya makasi kuna, ezalaka
évènement.  Akufa, un jour azalaki na kanda, ayebisaki muasi na ye “Mama na Santal, naleki na Pie 12 (Bonsomi) namoni muana nayo Santal (Chantal) na
muana mobali moko, balingi ye malinga, naye mbangu na ndaku po natika marsandiz (marchandises) nazalaki nango (Diamba), bakimi.  Soki nazuaka muana
mobali wana, mbele nabeti ye moto ya Vita Clubien”.   Un soir tokutanaka na ye vers 19h, tozalaki na mama na biso na ba soeurs et neuveux,
akabela moto nionso mbongo.  Azalaki na respect mingi na ba membres ya famille malgré sang chaud na ye.
Bayebisaki nga ke akufa.  Azalaki genre ya ba Yankees oyo bazalaka kokatisa ba kamon oyo ezalaki na ekila ya kolia mutu ya poisson de mer te,
(Kokamua!).  Ba maîtres mosusu pe bayebanaka lokola Me Mapassa ya Judo Q3, Me Babin elobamaka ke abetaka Me Carré na combat na bango Ciné Mfuti kasi
nanu akofongola mbanga akoloba abeta lisolo wana epayi ba mikumbusu bazalaki ko semer terreur (A vérifier).  Mokolo moko nazalaki ko réviser ba cours
na nga na Epom, Me Pepe na b’élèves ya Mukumbusu bazalaki kosala masano, bana moko na mataki na mur ya Epom bagangi “eeeeeh, Me Tito aza koya!”  Me
Pepe atuni na koganga “alati ndenge nini?”  bana wana bazongisi: “alati kupe na ba chaussettes”, Me Pepe na somo wana n ndamu ya b’élèves bapakati
mbangu, bakimi, alobaki tokufiii!  Sima nde nayaki koyeba le pourqoui, ezalaka mokolo ya physique oyo soki osali yango oza na difficulté ya kokende
toilette. À suivre….

Serge (Kongo na biso 1866)

Répondre
M

Serge,

Mosala ya administrateur ya blog eza bo secrétaire de rédaction na journal. Kotia makomi na molongo mpe koluka ba titre. parfois ko corriger quelques fautes d'orthographes.

Naza na motuna po na yo. na 1982 ou 81 nazalaka président ya bureau de vote na Ndjili. Bana ya Q.12 ya ba Mbilia bel na Q. 1 bayaka mingi ko voter na bureau na ngai. Namonaka karateka moko na
kombo ya Muenge Hitachi. Namoni kombo na ye nakati ya baye otangi te. Ayebanaka te.

Messager

Répondre
S

Ndeko serge,ne vous en faite pas, peut etre que ndeko na biso KAPITA  a comprendre mabe.Tolobi te que ba maitres oyo totangi awa bango nionso bazali ba ndjilois,a moins que to preciser. mais
lokola relation sportive ezalaki soit na ouverture ya ba dojos,soit na ba combats ou na ba formations ya b'eleves yango ba kombos na bango ekoti na kati.Ndenge nalobaki liboso,KAPATA azali muana
ya NGIRI NGIRI,CHAYI DOKIS muan'a matete,..Na lisolo mosusu na tangaki kombo lokola BIG JOHN pe ZEPHONDO na MAITRE TEDDY bango nionso bazali ban'a bandalungwa....kobosana te que BIG JOHN ya
liboso na kisasa azalaka kofanda na ndjili na annees 60 pe 70 azalaka tata moko ya mua mokuse na libandi na quartier 5,makasi ezalaka na tata wana ya kosakana te, azalaka na Q5 pene pene ya
Q10......prochainement tokosolola liwa ya tshiwara.

Répondre
S

Mbote ndeko Kapita na ndeko Sonny Mokonzi,

*Notez ke titre ya ba engambe ya N’djili ebakisami to pe epesami na Messager kasi eza nango grâve te, lisolo nionso
esengaka titre oyo eko attirer attention ya ba tangi.

Nalobaki ke Me Decantor atikaki koya N’djili pona distance (c.àd azalaki kowuta libanda ya N’djili) yango basangisaki ba
dojos na bango mibale na Me Kapata tii ayaki kobimisa Cap na ye Me Franck Bakuna ceinture noire sima ye pe atiki koya N’djili pona ba entrainement.
Na fusion wana nde Me Carré akomaki Cap pe Me Burte oyo azalaki Cap ya Me Decantor akomaki adjoint na ye.  Sima tango bakomi ba ceinture noires Me
Carré na Me Burte nde basalaki Mukumbusu oyo ezalaki kosala masano na lopango ya Epom to ITI N’djili, kasi eyebanaki mingi na kombo ya Mukumbusu ya Me Carré po Me Burte azalaki na b’occupations
na ye mosusu na vie à part lisano, Me Burte afandaki na Tshangu Q.5 rue moko na Makelele Zingi pe Vangu ancient bourgoumestre ya N’djili.

Nakobakisa ke yango wana ezala na Mukumbusu to pe na Kodokan bazalaki toujours kosangisa Judo, Karaté na Jui Jitshu
(Self Defense) pona kosangana ya les deux grands maîtres wana Decantor na Kapata.  Ya solo Club ya Me Ali Dynam eza Kodokan ezuamaki na lopango ya De
Gaulle na rue Matete en face ya EMM.  Lelo ekoma ebele po abimisa ba maîtres ebele.

**Merçi ndeko Sonny M, na yebaki te ke Me Kapata, Kamba Kamuzuna na Dokis bakufa, nayebaki pe te ke Me Mualf abunda pe a
gagna bitumba, nionso oyo eza ba nouvelles ya sika pona nga. *** Nga nayokaka soni ya kotuna te pe na rémerciaka moto nionso abakiselaka nga un plus***.   Bino moko boyebi biso toza na aquarium (Grande Bretagne) mua pasi pona koyeba makambo, merçi na mboka
mosika.  Ndenge olobaki vieux Badra akufa na tuberculose certainement ekoki kozala causer na lotoko, likaya pe ba moto ya mosala ya bijoux, Nzambe nde
ayebi koleka biso.  Bokoki kotala photo moko ya Me Dynam na www.afriqu’echos.ch obeti kodokan (Cherchez) okomona yango, po nayebi te soki eza mabe kozua yango pe kotia
yango na mboka mosika peut être site wana eko sepela te po bango nde ba publiaki yango.   Soki leki na nga Me Commando Saeed a scanner oyo ye aza
nango nakozanga te kolakisa na ba mbokatiers nionso balingaka lisano.   Me Carré na Me Bruce baza kuna na Paris, bakoki kofongolela biso lisolo
oyo na mozindo.

Mokolo tokosilisa lisolo oyo bongo na kobetela bino lisolo ya Ekoko Tindi Moto na Mbwa - babeta balemba (azalaki muana
ya Matete mais afandaki pe akufaki na Q.5 N’djili.

Serge Kongo na biso 1866

Répondre
K

mboté ba mboka tiers ! na moni bazali koloba ba maitres ya n djili mais ba inclure maitres KAPATA, DOKIS na FUNAKOSH . KAPATA ngiri -ngiri na FUNAKOSH ? DOKIS LOKOLO YA MAMAN kimbangu ?

Répondre
S

Ndeko SERGE,Maitre Kapata awutaki kokufa dernierement na Paris quelque mois avant liwa ya Judoka KAMBA KAMUZUNA ETATS UNIS d'amerique..KAPATA azali muana ya ngiri ngiri pe parmis ba premiers
judoka ya congo oyo  bazuaka formation epayi ya coreen oyo MAITRE PARK???,NA cadre ya judo atambolaka mikili mingi:chine,japon avant a s'installer na paris pe nde liwa ekutaki ye na fevrier
2010..DYNAM oyo otangi club na ye ezalaki KODOKAN..DECANTOR azalaki karateka pe asengaka na 1975 abunda na LION oyo azalaki na jardin zoologique ya kisasa.Bango mibale ba forma ba maitres mingi
na congo:KAPATA na JUDO pe DECANTOR na KARATE SHOTOKAN...Tika na yanola ndeko kupesa ngombo pona likambo ya muana muasi oyo abandaki kobeta mibali na ndjili kala,kombo na ye MOTE,azalaki nkuma ya
kosekana te....NDEKO SERGE,juste un mois apres liwa ya MAITRE JOE na 1977,Mualph abundaka na EDINGWE na cine cite4,a l'epoque surnom ya EDINGWE ezalaki COVO ou LE ROI DE LA FORCE BRUTALE(ye nde
moto ayebanaki na kombo wana),omoni que tango wana ba coup de tete pe kobinisa ezalaki nano te,ezalaki suka na bagarre,MUALPH alongaki na points,sima ayaki kobunda na 1978 contre MAITRE BRANLY ya
yolo,mualph agagnaki,MUALPH abundaki mingi na ndjili jusque na 1979....combat oyo contre DOKIS na 1983,babetaki ye mabe,po mualph atikaki na ye deja karate il y a longtemps alors ba proposaki ye
kaka abunda..,DOKIS azalaki kosakana te mais bato balonga ye lokola KOSSO DJANGO ya BANDAL pe na BEAUDRY TETEY ya matete bayebi que contre DOKIS il faut o se preparer malamu..(dokis akufa depuis
1996)

Répondre