Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Mbote ba ndeko,

Na mitunaka soki kombo ya ba orchestres ezalaka vraiment important kaka il faut ezala yango.  Ex : Ndenge ba Zaiko bawelaki kombo tii bakomaki Zaiko Langa Langa Nkolo mboka na « Zaiko » Familia Dei.  Félix Muanuaku dit Pepe Felly akendaki na eteni ya « Zaiko » Wawa.  Ndambo ya kombo ya Zaiko Evoloko Atshuamo akendaki nango « Langa Langa » Stars, Ben Nyamabo pe akeyi na ndambo Choc « Stars », Mbenzu dit Bozi Boziana alobi Anti « Choc », Matumona Fanfan dit Defao ye pe akati ya ye eteni Big « Stars », Monza 1er amemi « Stars » Mania.  Tomoni African « Jazz » ya Grand Kalle, OK « Jazz » ya Luambo Makiadi Lokanga Lo Ndju Pene dit Gd Me Yorgho, Bana « OK » ya Lutumba Ndomanueno dit Simaro Masiya, Konga « Jazz » ya Bokelo Isenge dit Johnny Bokelo, (bolimbisi pona kobakisa Mbelekete « Jazz »), « African » Fiesta, « African » Fiesta Sukisa.  Agbeka Mumba dit KoffiOlomide aye na Quartier Latin Entreprise pe baleki na ye bamemi « Quartier Latin » Academia (bango balobaki ke bango batu nayaki na kombo wana na rythme), Wenge Musica ekatana lelo biteni na biteni lokola « Wenge » Maison mère, « Wenge » BCBG, « Wenge » Kumbela, « Wenge » Tonia Tonia, « Wenge » Aile Paris etc…

Nakomi na ordre ya ba kombo pe ya ba création te, nalingi kaka koyeba importance ya kombo na orchestre eza nini ?  Soki otiki kombo ou bien ozui kombo mususu qui n’a rien avoir na orchestre oyo owuti ekosala nini ?  Pona nini ba musiciens bakangamaka kaka na ndambo ya kombo ya orchestre oyo bango bawuti ?  Emeneya Mubiala dit King Kester na ndeko na ye Pepe Nkosi Bipoli Mfumu Ntaku basalaki Victoria Eleyson tango balongua na Viva La Musica, malgré kombo ekesanaki na orchestre bawutaki, basalaki succès oyo moko te akoki kowangana yango na Congo na biso.

Nani ako limbola biso likambo oyo!

Serge Kongo na biso
Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
R

Ndeko serge kongo na biso, olobi likambo ya vraie pe ya solo....u bien bazalaka sur te esika bakendeke kosala ba groupes na bango il faut kaka amema mwa ndambu.. belle reflexion ndeko..soki pe
otali mingi na bango bakendeke mosika te....Merci. richard Kasongo

Répondre
L

Ndeko,pona sujet wana esengeli koyeba que mingi batingamaka  kombo ya esika ba

wutaka po epayi bazalaki kokende ezali un saut vers l'inconnu: ekoki kosimba lokola pe ekoki ko échouer. Tomonaka na monde ya musique pe cinéma awa na occident bana ya b'artistes connus oyo amoni
que panzi ekomeli te po a affronter jugement ya box-office ako s'appuyer na kombo ya famille. Ex. Michaël Douglas,Marie Trintignant etc...Basusu pe bien que fils ou fille de ameki pe azui na effo
perso: lokola Angeline Jolie. Yango tomona ba orchestres na kombo "jazz", "african", "negro" "wenge", "zaîko".... ebele bo wenze ezali nde kobanga kokweya na anonymat pe ko recommencer à zero.
Tomona oyo bazua audace ya ko oser: "Volcan ni beto ba", "Révolution", "Libanko" etc.. bakombo ekenda na motiyo. Basusu pe bameka esimba tomona "Vox-Africa","Isifi Lokole", "Madjesi".Dans tout ça
le talent compte peu, eza lokola ko iouer na lotterie.

Louison Cosmos

Répondre