Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

 

AUX BANA CAMP KAUKA, EX-CAMP CITO


Mbote mingi na ba ndeko pe balandi ya mboka mosika,site na biso ba mbokatier,nalingaki juste kosenga surtout na ba ndeko oyo babotami pe bakoli na quartier Kauka oyo ezalaka kala na kombo ya Camp Nicolas Cito cité, na ba année 71 ti 76 tanngo tozali ko passer ba periode ya puberté ,tozalaki pe na ba orchestres na biso ya ba jeunes ya quartier,ba orchestre lokola Zeke Molende, Lossa Longo, Muzungu, Les Abeilles, Belela Lolaka ,Venus,pe Mi Venus,ba orchestre ezalaki mua ebele.


Mais nazali kosenga na ba ndeko oyo bakoki kozala na ba disques ya orchestre oyo ezalaki na kombo ya Bana Ekanga ya kulutu na biso Paulino Ike ike ,Ikeyi Mambu ,ba nzembo na kombo ya Ban'ekanga baye,pe Sango epanzani nionso ezalaki ba compositions ya Paulino,soki moto azali na ba nzembo wana atiela ngai svp na site na biso,ba nzembo yango ebimaka na edition Mara ya Matabisi Ramazani.


Nasuki awa,j'esperes bien que nakozua suite ya malamu surtout na ba ndeko ya Camp cito oyo ekoma Kauka.


L.SHANGO

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article