Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Ndeko Serge,

capitaine m'bo

Biographie ya Colonel Léon Mbo

Léon Mbo ( Mbo Izampango) abotami na 1948 na Kinshasa. Azali Musakata, originaire ya Nkutu na lac Mayi Ndombe. Azalaki kofanda na Lemba mpe atangi kelasi na école secondaire ya EPOM na N’Djili mpe azui diplôme d’Etat na section électronique na 1967. Akoti mosala mua soda na base  aérienne  ya Ndolo. Kuna nde ayaki ko réussir na cours ya triage en vol oyo epesaki ye possiblite ya kokende formation ya pilotage na Académie Aéronautique Militaire ya Pozzuoli, na Naple en Italie. Sima, asali Ecole des pilotes ya  chasse na Lecce, toujours na Italie. Sima ya formation na ye, azongi na Congo na 1970. Léon Mbo azali na promotion ya 1967-1968 oyo ekendeki koyekola ba kelasi na Italie na compte ya armée ya Congo. Kuna abimaki pilote de chasse sur avion Macchi. A pilotaki mpe ba avions mosusu lokola Piaggio na T 28.

Sima, na cadre ya accord général ya coopération militaire technique  kati na France na Zaïre,  accord signé na Kinshasa le, 22 mai 1974. Suite na accord oyo nde avionneur Dassault atekiselaki Zaïre, dix-sept avions Mirage III (Evolution Mirage V),  Mirage 5 M : quatorze exemplaires  mpe Mirage 5 DM : trois exemplaires, version biplace mpo na ba entraînements. Zaïre etindaki bilenge bakende na Ecole militaire ya pilotage ya Dijon-Longvic na France. Lieutenant Mbo mpe azalaki kati na bilenge wana. Sima ya formation, na 1976, akomi pilote na Mirage 5 M na 1976. Sima ya ba formations na ye, ayaki kokoma instructeur sur Piaggio, Macchi 326, T 28 Texan na Mirage 5M.

Lieutenant Mbo abundi ba guerres nionso mibale ya Shaba I na II mpe azalaki apprécier mingi. Kasi na guerre ya quatre vingt jours, sur ba renseignements erronées, a bombardaki ba positions na biso. Ezalaki fauti na ye te mpo ye alandaki ba instructions oyo bakonzi bapesaki ye. Na 1978, Sima ya guerre ya Shaba II, Major Mbo ayaki kokangema na Angola, suite na vol ya reconnaissance  oyo Zaïre etindaki ye asala (na violation ya droit international) na ba pilotes mosusu mibale : ba Lieutenants Pelepele na Luamba. Major Mbo abundi mpe bitumba bia Tchad mpe sima ya wana, ayaki kosala reconversion na transport mpo facteur âge elembisaki ba capacités physiques mpo a continuer en toute sécurité en tant que chasseur. Eyebani malamu que vie ya pilote de chasse ezalaka na ba exigences physiques ebele mpe facteur âge e jouaka mingi.  Kasi avant wana, ye azalaki un pilote très démonstratif. Abandaki kosala ba voltiges na ba figures ya ndenge na ndenge aur macchi na Mirage : rond, trait plein, flèches courbées, triangle horizontal, triangle vertical, boucles, vrille, etc. Asala ba passages na raz motte bisika nionso abandaki kosala ba démonstrations na ba spectacles.

Tango asalaki reconversion na transport, asali formation na ye na Base ya N’djili na 1986. Na 1988 akomi Commandant na C 130 mpe ko voler sans probleme na Zaire na mokili mobimba. Le, 19 avril 1990 esengelaki vol ya Gbado-Lite esalema. Na contrôle technique ya avion, elakisaki que moteur moko ezalaki na défaillance. Kasi ba mécaniciens au sol bamekaki kobongisa yango sans pour autant ba remplacer pièce oyo esengelaki. Babongisi yango kaka ndenge bamesana mpo F.A.ZA. azalaki lisusu na ba pièces ya sika te mpo na ba avions na ye. Na cas wana, ezalaki évident qu’il fallait batala makasi proportionnalité ya poids bakomema par rapport na éventualité ya panne ya moteur. Eleki bongo te, Master loader atondisi avion na ba voitures présidentielles na biloko mosusu. Colonel Mbo nde azalaki na commande mpe co-pilote na ye, Major Bedengama. Tango kaka bapumbue, moteur wana kaka ezui lisusu panne. Ya mabla oyo panne wana eyaki moment mabe mpo esalemaki juste na décollage. Eyebani que na décollage na attérissage, ezalaki ba moments moko oyo ezalaka na ba risques mpe esengaka compétence mingi na réaction mpe, na respect ya procédure.  Tango moteur ekufi, Commandant Mbo ameki ko rééquilibrer avion na ye , le temps asala rotation mpo asala manœuvre ya atterrissage d’urgence na même piste ya Base ya N’djili. Malheureusement, ye akokaki ko maintenir équilibre ya avion na ye te mpe hauteur na sol ezalaki suffisante te, a perdre brutalement attitude azalaki na yango, mpe asala atterrissage imprévisible vers Lokali. Tango avion ebeti violement na mabele, esali ba bonds mpe na secousse wana train avant ya atterrisage ebukani, violence ya secousse eningisi carburant makasi mpe ekumbi explosion ya ba réservoirs, ba pilotes mibale babandi kobundana mais ezalaki difficile mpo bakokaki ko contrôler lisusu avion te mpo vitesse ya atterrissage elekaki makasi, libumu ndunda epelaki moto. Na enregistrement, Mbo a babandi koganga : « Bedengama akufi !  Tozali kozika ! Avion epeli moto, molinga etondi na cabine, porte ezali coincer na biloko, nazali kozika ! …. Effectivement na mouvement violent wana, biloko binso bizalaki na kati ya avion ezalaki lisusu na ba cales na ba filets na yango te. Yango nde eyaki ko bloquer porte ya cabine ya pilotage. Mutu nionso oyo ayokaki enregistrement ya conversation entre tour  na équipage, alelaki mpo ezalaki insoutenable, koyoka ndenge Mbo abandaki koganga na somo ya moto ya liwa !!!

Le temps ba secours ekoma kuna ezalaki trop tard batu basilaki kozika. Balelaki bango na Base Mbaki na aéroport ya Ndolo na ba honneurs militaires. Comme d’habitude, enquête etikala kosalema te !!! (enquête esalema officieusement mpe ba résultats na yango etikala na terroire)

Colonel Mbo abalanaki na Pauline mpe aboti na ye huit filles na garçon moko. Azali na libota monene. Sima ya accident ya C130, Président Mobutu apesaki mitindo na ndeko na ye, Jacques Isombe Izampango, représentant ya Air-Zaïre na France na Belgique, apesa bana ya Colonel Mbo na Pauline ba billets mpo bakende ko s’installer na France. Kasi, Isombe abandi kosala ba manœuvres mpe na ba freinages. Ba cales nionso wana ezalaki incompréhensibles. Yango nde etindaki famille e se plaindre epayi ya Maréchal Mobutu. Ye a téléphona Isombe mpe apesi ye une semaine a organiser voyage.  Soki te, eko coûter ye cher ! Isombe abangi mpe asali ba démarches wana mbangu mbangu mpe famille eya na France mpe ezua mikanda sur demande personnelle ya Président Mobutu.

Président asalisa famille ya Colonel Mbo mpo azala fier na misala ya Mbo mpe na lolenge abandaki kokumisama na pilotage na ye ya chasseur Mirage 5M na bitumba ya Shaba mpe na Tchad, na fête ya Bokassa na Bangui ou encore lolenge azalaki na admiration mingi ya ba français na connaissance na ye ya Mirage 5M. Liwa ya Mbo ezalaki accident oyo F.A.ZA. ekokaki ko éviter soki maintenance ezalaki na budget ya malonga mpe soki lisusu sérieux ezalaki na armée na biso. L’Etat ebimisa mbongo mingi mpo na ko former ba militaires. Kasi eyaki lisusu ko négliger ko entretenir armée na ba militaires oyo yango e formaki.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo.

Na armée na biso, ba cas ya batu oyo ba sauta ba grades tee kokoma ba officiers supérieurs ezali. Kasi, esengeli tosala bokeseni :

1. Exception esalemaki na oyo ebengamaki africanisation ya ba cadres ya armée tango tozuaki lipanda mpe na mobulu oyo ba belges balukaki na Force publique. Suite na wana nde, ba sergents bayaki kokoma ba Colonels mpe Caporal Lundula aye kokoma Général Lundula.

2. Na F.A.Z. cas ya Antoine Bumba Moaso Djogi, Etienne Nzimbi Ngbale Kongo wa Basa, Donat Mahele Liyeko Bokungu. Natangi bango mpo nayebi ebandeli na bango na armée : Mahele na Nzimbi bazalaki ba turbulents garçons ya Ngiri Ngiri. Bumba (Boy Ndombe) kombo na ye ya scène mpo abandaki ko jouer epayi ya Abbé Corneille Mondonga, na ba spectacles ya  bala bala. Babandaki ko se produire na ba camps, écoles, etc.

Ba misusu babandaka na nse te mpo batangaki ba kelasi oyo esalakaki que babanda mbala moko na pete ya Sous-lieutenant. Misusu ba banda na pete ya Colonel tee kokoma Général. Ndakisa ya Général  Matumbu Monga ya Nzawi, bien que azalakai na ye civil, akotaki na armée na grade ya Colonel mpe na  fonction ya éducateur politique ya F.A.Z.

Sima ya régime ya Président Mobutu, cas ya Joseph Kabila ezali mpe kolakisa ndenge nini mutu awuti na vie civile akoki kokoma Général en sautant ba grades ebele mpe akoma mokonzi ya armée na âge ya 27 ans. Cas ya John Numbi mpe ezali lisusu kolakisa ndenge nini civil akomi tee na ko diriger état-major!!! Numbi, bien que abengami Général, azali na ye policier, civil. Kasi azuaka ebonga ya chef d’état-major ya Force aérienne sans pour autant azala un ancien ya armée de l’air. Donc, sans formation aucune. Ezali grave ! Kasi, neti na ekolo na biso, gravité ezalaka lisusu te, ye azalalki wana sans problème.

Sita tika totala ndenge nini soda akomaka officier na armée na biso.

Soki soda asilisi kelasi na ye na Ecole ou Académie militaire, pete ya liboso akozua ezali ya Sous-lieutenant. Awa esengeli toyeba que soda akoki kozala na Académie militaire ou na enseignement civil (mutu a se faire enrôler na âge ya 18 ans kasi asengi a continuer ba kelasi na ye ya médecine, génie civil, sciences, droit, commerce, économie, agronomie, etc. Tango akosilisa kuna, akozua pete ya Sous-lieutenant).

Soda oyo asali Ecole ou Académie militaire, ye akozua fonction ya Chef de Peloton. Komata pete ya Lieutenant (premier Lieutenant) na ya Capitaine, ekosenga formation moko te. Ezali mpe ndenge wana mpo na oyo asali ba études non-militaires.

Totikala kaka na soda oyo asali Ecole ou Académie militaire. Tango akomi Capitaine, elingi koloba que wuta pete ya Sous-lieutenant tee ya Capitaine, azui expérience ya commandement na terrain. Expérience iye ewuti na mbula misatu oyo ye a commander Peloton yambo akoma Lieutenant. Mpe esengeli lisusu que hiérarchie militaire epesa ye appréciation malamu !!! Soki hiérarchie endimi mosala asali, en tant que premier Lieutenant, akozua fonction ya Commandant en second ya Compagnie. Yango ezali transition obligatoire mpo akoma Commandant Compagnie na pete ya Capitaine. Wuta pete ya Capitaine mpe na fonction ya Commandant Compagnie nde akokoma na possibilité ya koyekola sika ba techniques ya état-major na Ecole de commandement ya état-major ya Centre Supérieur Militaire ya Kinshasa. Soki asilisi kuna nde azui pete ya Major mpe akoki kobanda kokonza ba unités minene ya armée lokola : Bataillon, Brigade na Régiment. Sima mbula mibale nto misatu ya expérience professionnelle, akotindama na Ecole de guerre na ba pays oyo tozali na yango na coopération militaire. Mingi mingi : U.S.A., Belgique, France, Israël. Na Ecole de guerre ezali mpo na ko continuer ba kelasi ya état-major. Neti akomi déjà technicien d’état-major (T.E.M.), sika akokoma breveté d’état-major (B.E.M.). Soki te, akosala Administration militaire mpo akoma breveté ya administration militaire (B.A.M.). Soki abimi kuna nde akoki sika kozua pete ya Lieutenant-colonel. Sima ya ngonga mokuse, akomi Colonel mpe aye komata Général de brigade, Général de division, Général de corps d’armée mpe sukisa na Général d’armée.

Na armée ya solo, officier azuaka pete kaka soki azali kosala ba formations oyo ezali kokende na pete oyo ye azali koluka mpe armée nde ekofutela ye ba kelasi nionso wana. Ata soki azui yango mpo olongaki bitumba (guerre), esengeli atangela yango lisusu kelasi, pamba te, ba fonctions na ye ekozala ya malonga te. Kasi epayi na biso, baye batanga ba kelasi oyo, ba trainer mingi na pete ya Major ou Lieutenant-colonel mpo na discrimination. Cas ya Général Kisempia Sungilanga Lembe ezali kolakisa ndenge a trainer depuis 1984 akoma B.E.M. ya Ecole de guerre ya Belgique, aye kokoma Général de brigade na 1999, soit 15 ans plus tard. Ezali injuste mpe inconcevable. En revanche, ba oyo basalakai ba kelasi ya armée te, bakoma ba Généraux kala !!!!

Oyo ezalaki biyano na mituna miye otunaki ngai.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
N
Grande abraço à Pauline e ao Pixu ao Isombe sempre no meu coração todos todos os dias
Répondre
K
Arrêtez de mentir, Mobutu n’a rien fait pour la famille du colonel Mbo après sa mort. Je le sais car c’est ma famille. Après la mort du colonel ils ont dû sortir en catimini du Zaïre par leurs propres moyens. Maman Pauline a dû vendre ses derniers bijoux pour payer les billets pour elle et ses enfants. Et pour commencer ils ont eu 6 enfants avec ma Pauline...4 filles 2 garçons.
Et ce n’est certainement pas sur recommandation de Mobutu qu’ils ont eu des papiers. Ils se sont installés à leur arrivée dans le Nord de la France, dans la ville d’Arras où ils ont été hébergé un moment par un membre de la famille. Puis ont été comme tous demandeurs d’asiles dans un centre d’hébergement du Nord, afin d’obtenir des papiers. Ils ont passé des moments difficiles, et Mobutu n’a pas levé le petit doigt pour les aider.
Quand on ne sait rien on se tait!
Répondre
S

Ndeko PAPY pe na ba ndeko banso ya FEU COLONEL MBO pena baye banso bayebanaki naye pe na baye bafandaka esika moko na righini pe na famille directe ya COLONEL:Soki bomoni que verite ezali te
esika mosusu na biographie ya colonel,pourquoi pas bokobakisa te au lieu et place ya kosilika???soki pe bozali na ba elements mosusu lokola photos,filmes pourquoi pas bo ko poster yango te????
nionso ezali na cadre ya b'archives pe histoire...Pona kosukisa,NDEKO PAPY likambo ya Capitaine pilote LOKOKO LITOKO alias AKIM elekaka na 1988,moto abikaka na accident wana ezalaka Capitaine
KWELE,malheureusement ayaka kokufa kaka na accident ya avion 2ans apres na juin 1990 na MALUKU,ezalaki na vol d'entrainement na SIAI MARCHETTI 260,azalaki kofanda na camp bumba(cite salongo).

Répondre
R

je suis voisin du feu colonel Mbo, je connais toute sa famille ainsi que ses enfants. je trouve triste et malheureux les commentaires de certaines personnes. je suis encore aujourd'hui en contact
avec ses enfants qui habitent en france. tous sans exceptions, vous ne connaissez pas l'histoire du colonnel Mbo, ni de sa famille alors arrete profere des mensoges. j'ai vu ses enfants grandir
et ils sont restes amis avec les miens. je rejoins et confirme les propos des membres de sa famille. enfin, M Kandolo, merci a vous d'avoir ecrit l'article, je pense que
cela partait d'un bon sentiment patriotique sauf que sa famille et ses enfants auront pu  vous donnez plus d'informations exactes.

Répondre
P

mbote mingi ndeko kandolo nalingaki natuna yo boye tangu olingaki okoma makambu oyo okutanaki na mambre moko ya libota ya colonel MBO ou okomi nayo kaka na esngo ya kokoma po makambu
mususu eza ya solo mususu ezape ya solo te po ngayi nafandi juste nasima ya camp mbaki esika ba lelaki colonel MBO toyokaki pe mingi na bandeko ba solda oyo basalaka na camp mbaki,pona ndeko oyo
akomi que mutu moko abimaki viva na avion wana akosi tangu mususu abosani mutu oyo abima viva ezalaki na na ba maki misatu oyo ekoyaki na mangenge ezaliki na groupe ya capitaine LOKOKO azalaki
kofanda na lemba wana nde mutu moko abima mobimba ngayi moko na monaye na miso po camp mbaki eza loko ndaku na biso tozalaki kosaka kuna kobeta bale kuna na kati malgret tozalaki bana ya ba solda
te mai tozalaki na ba camarade ya bana ya ba solda nayebi mua mingi po oyo etali force aeriene  pona ba ndeko ya colonel ndeko akomi naye kaka tangu mususu pona kotalisa ba ndeko que mboka
eza na mobulu na makambu mingi afingi colonel te asali nde comantaire naye bosilikela ye te bopesa ye nde ba information ya solo po président mobutu ba fingaka ye kaka ti lelo mai aza na vie
te  bolanda pe ba conseille ya batu ya mabe te toza na besoin ya ba verite  ya makasi pona batu oyo basala musala ya malamu pona congo mai ba famille na bango eza neglige merci nzambe
apambola libota ya colonel MBO mingi po azalaki solda ya solo akufaki kati ya musala oyo ye aponaki solda ya solo akufaka na malaria te te ou sida mai na bitumba ou na avion naye ye nde
hero

Répondre
D

Ah botika ndeko oyo akoma makambu naye. Kala kala oyo colonel Mbo akufa nani kati na bango akanisaki kokoma article sur sa memoire? Meme famille Izapango ezali ko reagir avec audace alors que bo
faire souffrir bana ya colonel Mbo pe eyebani partout na mboka ya poto. Mr Isombe a recuperaki ba bien ya colonel pendant ba mbula ebele pendant que bana ya defunt bazalaki ko se debrouiller
lokola bawuta nulle part pourtant papa na bango azali moko ya ba heros ya mboka. Bino ba famille bozali koloba ete bozali na deuil, combien de bana ya colonel bosi bo supporta ba classes na
bango? Po toyebi bango nionso na ya mike. Mais yo Isombe bana na yo batangi na ba poto pe ba ndeko na yo nionso bazali na mikili ya poto po na colonel Mbo. Alors soki bolingaki ndeko na bino il
faut bolakisa yango na ndenge bozali ko traiter bana na ye.... Biso tovandi na ba poto oyo ba mbula ebele pe toyebi makambo bosalaka pe ba relations na bino na bana ya Mbo ezalaki ndenge nini?
Alors, esengeli bosenga bana wana pardon sinon nionso tosalaka awa efutakamaka kaka awa na se. Merci mingi.

Dady Kalo.

Répondre
I

Bonjour Mr. KANDOLO

J’ai lu votre article sur la carrière et le dernier vol du Colonel Aviateur LEON MBO IZAPANGO. Parmi les commentaires, vous avez enregistré les réactions de certains membres de sa famille.

Je me joins à eux pour vous dire que vous avez écrit beaucoup de choses fausses et sur sa famille et sur sa vie.

Ceci dit, je vous donne toutefois la vraie version des faits sur  son dernier vol. Ce que vous devez savoir, il y a eu un survivant de cet accident. Il s’agit du
Lieutenant  Aviateur DIAMUBENI-MFUNA qui était Navigateur à bord de cet avion.

Il a fait un témoignage écrit. Il a aussi parlé dans plusieurs EGLISES à Kinshasa.

VOICI SON TEMOIGNAGE :

COLONEL MBO : EN L’AIR « MEDE MEDE MEDE  NOUS AVONS UN PROBLEME, NOUS ALLONS ESSAYER DE FAIRE UN ATTERISSAGE FORCE SUR LE
FLANC DE LA MONTAGNE ».

AU SOL

« J’ai ouvert en haut, celui qui se sent bien peut sortir. Moi je suis touché aux jambes. TOKUFI, TOKUFI, AH SEIGNEUR TOKUFI, ….MOURONS EN CHRETIEN, TOKUFI KAKA. ».

Un Membre de sa famille.

Répondre
S

Bonjour M.Kandolo

je vous remercie pour l'article que vous avez éccrit sur la vie de mon frère Mbo Leon je suis sa soeur ma
famille n'a pas à rentrer dans vOS polémiqueS et CONNAISSANCES laissez nous faire notre deuil comme vous tenez la verité pourquoi vous ne portez pas plainte à l'armée CONGOLAISE ? au
lieu de salir sa famille ? QUE DIEU VOUS PARDONNE ET NOUS LA FAMILLE DE MBO  ON N'A PAS BESOIN DE ça  LA CALOMNIE N'EST PAS DE DIEU alors avant d'écrire il faut vérifier L'info que
notre DIEU VOUS BENISSE et vous accorde une LONGUE VIE nous la FAMILLE IZAMPANGO tenons à remercier par votre intermédiaire le feu président MOBUTU d'avoir ENVOYEZ NOS enfants en
Europe.

Répondre
S

Bonjour Mr, afin d'ecrire sur la memoire d'une personne, je pense que vous devez d'abord se renseigner envers sa famille.

En aucun jour Mr Jacques Isombe Izampango n'a fait de calles etc...ce mois d'AVRIL il y a de cela 20 ans jours pour jours, mon frere est parti.

a 80%, les choses ecrites sont FAUSSES ET ARCHI FAUSSES, ne saliser pas la memoire de mon frere et par dessus tout de notre famille.

Que Dieu vous benisse et qu'il vous accorde la sagesse qu'il faut.

Répondre
L

Wa biso wa Bolingo, Ndeko Kandolo, losako mpe mokolo mua eyenga molamu o mboka yo.
Ndeko wa ngai, nazali na mposa ya makasi, mpo nakoyeba Origine ya kombo ya SALONGO ALINGA MOSALA, to hymne au travail, mpo na biso ba Congolais, pamba te, wuta o bomwana bua biso, tozalaki komona
soki ba Tata bazali kosala mosala, nzembo ya Salongo eee Alinga Mosala....ezalaki kotoko mpe mosala mozalaki kotambola na ndenge ya solo-solo.
Mpe na ba films ya actualites, ezala ba civils, ba policiers to ba militaires, kaka loyembo ya Salongo eee Alinga Mosala, bien que ezalaki na va variantes ebele.
Balobi ete, Salongo azalaki muana ya mobali, oyo azalaki na bomoyi, ezali bongo kombo ya motu, azalaki kosala bongo na port ya Matadi, na tango bazalaki kotongo port wana ya Matadi, ye Salongo
azalaki kobeta libanga kuna.
Balobi Salongo ye alingaki mosala mingi, azala na mpasi, to nzoto makasi, mpo na ye mosala liboso, akomaki bongo exemple, mpo na ko encourager ba faineants, SALONGO ALINGA MOSALA, yo okosala lokola
Salongo te, etc...
lokola likambo na likambo ezalaka na ntina na yango, nakosenga na yo wa biso Ndeko Emmanuel Kandolo, omeka kosala ba recherches, mpe o eclairer biso, na origine ya slogan to hymne au travail
: SALONGO ALINGA MOSALA.
Loningisa.

Répondre
R

Ndeko , nalingi nayeba moko nqa motuna ngai oyo. Na eleko moko na congo-Kinshasa na biso, mibeko misusu, toyoka na Armee ete , babongoli ebengeli ya ba PETE(GRADES) na arme, kasi ezalaka pona nini
??Tomonoki lokola Lieutenant- General ezalaki lisusu te etikelki Capitaine-General..Lieutenant -Major, bongo na bongo, ezalaki pona nini?? Likanisa yango ewutaki wapi, po tomesanaki mingi na
ebengeli oyo na Belges batikaka.. Supris ebengeli mosusu ebakisami... Merci..   Richard Kasongo.-

Répondre
M

Mboka64@yahoo.fr

Mbote ndeko Kandolo,

Mbote mingi na Yo pe na equipe mobimba ya mboka sika, esengo mingi na biyeno pe lumiere opesi na mituna nga.  Na Mboka na biso ba versions ezalaka mingi, eza malamu tozuaka
b'eclaircissements po biso pe toyeba koyebisaka bana na biso na baninga na biso banani baleka pe nini esalemaka na mboka na biso.

Premier ministre Lumumba alobaki histoire na biso tokoma yango biso moko.

Balobaka: "KOZANGA KOYEBA, EZA LIWA YA NDAMBO."

Nzambe atiye bino disponibles po bokabola maye boyebi.  Lokola ba sujets eza ebele, esengeli biso totuna pon bino bo fouiller na ba sources na bino.

Mituna ya lelo yango oyo:

1. Ndenge nini Mandungu Bula Niati azalaki civil mais azalaki mokonzi ya liboso ya garde civil?  Pe tokoki koyeba biographie na ye s'il vous plait?

2a. Est ce que na bana ya Marechal Mobutu, Kongulu nde azalaki mobulu koleka?  Ti lelo nayebi te akufaka ndenge nini, basusu balobi azuaki masasi na bitumba, basusu balobi SIDA,
wapi solo?

2b. Tokoki koyeba biographie ya muana na muana ya Marechal Mobutu, pesa biso lumiere po bazalaki libota ya yambo na mboka na biso en temps record.

2c. Est ce que Konga Mobutu akufaka na kobeta ndenge elobamaka?

3. Tango olimboli ba mpete ya ba soda, otangi mpete ya Marechal te, eza mpete ya ba soda te? po Mobutu na Idi Amin Dada na Marechal Tito bakomaki ba Marechal (eza na ndenge ya ki soda to
na ndenge ya ki dictateur ou juste une folie de la grandeur)?

4. Pona nini Leader charismatique Tshisekedi Wa Mulumba aboyaki ki premier ministre mbala na mbala (on dirait mbala misato)?  Abomaki phrase moko po aboyaki kotanga yango, ezalaki
pona ba raisons politique to logique to ezalaki lier na ba raisons magique.

Naza ko se rappeler na TV, Pres. Mobutu alobaki tango a nommaki premier ministre moko oyo Ye moko atangaki kombo te, na mutu na ye moko abengakin ye na tongo tongo, alobi:" Eh,
otiye ye premier ministre? Ye a repondre: "Ah, deja a jurer, je jure par le president fondateur ..., akosala lisusu eloko moko te."

Na beta mayele na maloba ya Pres. Mobutu kasi nazuela yango eyano te.

Wa bino ndeko

Serge.

Répondre
J

Ndeko Kandolo,
ya liboso mbote na yo, mpo na Colonel Mbo, toyokaka ete azalaki semeki ya EBALE MBONGE (pasteur ou marabout), kasi balobi na secte to eglise ya Ebale Mbonge, ba anciens officiers ya ANC et autres
ya Faz, demobilises ou chasses de l'armee, kuna nde ekomaki lieu de RDV na bango, balobi secte oyo ekomaki kobangisa bakonzi ya mboka, kaka na masolo, balobi ete liwa ya Colonel Mbo ewuta kuna.
Jean Paul Kalambay.

Répondre
S

Ndeko EMMANUEL KANDOLO,mingi penza yakobakisa ezali te po opesi biographie ya aviateur M'BO na ndenge ya malamu pe na communication(dernier vol) nionso asalaki teee na parole na ye ya
suka....Colonel MBO na kisasa azalaki kofanda na LEMBA pe ecole secondaire na ye asalaki yango na EPOM NDJILI pe azuaki diplome d'etat na 1967 n'electronique pe sima ayeyi kokoto mosala ya soda na
base aerienne ya ndolo,nde wana ayaki ko reussir cours ya triage en vol pe ayaki kokende ITALIE NA ACCADEMIE AERONAUTIQUE DE POZZUOLI,nde sima akendeki na ecole ya chasse na lecce...pe wana bayaki
kozonga congo na 1969-70,a l'epoque ba italiens bazalaki na cadre ya cooperation militaire na FAC(force aerienne congolaise) pe MBO ayaki kokoma pilote instructeur na b'avions oyo:PIAGGIO,MACCHI
326 SUKISA,T28 TEXAN....asepelisaka bato mingi na ba fetes nationales,pena ba demonstrations abandaki kosala,ba loops,ba chutes abandaki kobetisa ba sukisa speciallemet....MBO azalaki pilote ya
liboso na zaire(je crois meme na afrique noire) yakosala decollage supersonique,esalemaki na MIRAGE 3B na dijon na 1973...sima akomaki pe pilote instructeur na mirage.....pona likambo ya b'enquetes
ya b'avions militaires ya congo,ebandaki na yango kosalema mais resultas na yango ezalaka jamais publier officiellement....soki nazalaki na mboka nalingaki ko poster ba photos ya ba pilotes
militaires lokola MBO,LOH(l'un des meilleurs pilotes)MAHELE NKOY,LUAMBA, ETC...parmis promotion oyo ya B'aviateurs ya ba mirage:MPELE MPELE(akoma general),MASSAMBA MUSUNGU(ye pe general),ba mosusu
bazali na poto,mingi pe batikala kaka mpiaka na congo..epoque heroique ya ba mirage,sukisa,libumu ndunda,puma/alouette etikala kaka masolo na kopo ya masanga.

Répondre