Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Ndeko Buku,

Motuna na ye ezali ko cadrer malamu te puisque na époque coloniale, Belge atikalaki kosalela Chef Ngaliema monument te. Wuta tozua lipanda, monument ya Ngaliema esalema te. D’ailleurs, soki monument wana esalemaka, selon motuna mua ndeko Buku, pourquoi esengelaki kotiya yango na Rond-point ya ba avenues Kabambare, Luvungi, Nyangwe na Huileries, esika ezalaki un ancien village ya Chef Nsuvila ? Ngaliema a regnaki wana te, historiquement parlant, bakoki kosalela ye monument esika wana te, pamba te, ekozala lokola provocation na mabele ma Nsuvila. Na Rond-point oyo tozali kolobela, soki nabungi te, ezali esika basala monument ebengami : Monument ya souvenir congolais, na proposition ya Paul Panda Farnana, na juillet 1927. Lelo oyo, soki oleki wana, okoma mua entrepôts ya ba matériaux ya compagnie téléphonique moko wana mpe ba vigiles balalaka wana mpo na kokengela yango.

Na ntina na kufa na Chef Ngaliema, ye  akufa na 1894 na Brazzaville.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
B

Ndeko E. Kandolo,

Est-ce pembe ya nzoko ya monument wana, nde esalaki batiya yango na armoirie ya Kinshasa na 1964 ezalaki Justice, Paix, Travail, ezalaki na mutu ya nkoi na pembe ya nzoko na
ba likonga mibale na likasa ?

Buku

Répondre
B

Ndeko E. Kandolo,

monument  yango oyo ndeko  NGATSWA wa NGATSIE alimboli,   oyo ya motuna na ngayi (mbula nini basala yango pe moto nini asala yango).

Buku

Répondre
N

Ndeko Kandolo, tango mosusu ozui mua confusion, ezali kaka ndenge ndeko Buku alobi, ngai nazali muana ya Saint-Jean, monument oyo ye Buku alobi batiyaka yango na rond-point wana ya Wenze ya
Kalembelembe, soit Kabambare, Nyangwe, Kalembelembe na Huilerie, lokola tozalaka bana bake, bazalaka koloba ezali Stanley na Ngaliema, mpe biso tokola kaka na ndenge wana, soki nakanisi malamu
batiyaka monument oyo entre 1961-63, mais nde ezali sur ke ezali sima ya Lipanda. Ba commentaires ezalaki mingi mpo na monument wana, basusu balobaka ezali souvenir, ya mokolo oyo Ngaliema apesaka
Stanley mabele ya ville ya Kinshasa etc... lokola Authenticite elingaki lisusu koyoka to komona ete EKEKO ya Noko moko ezali quelque part, babukaka monument wana, je certifie manso nalobi, nabotama
na Lingwala mpe natika Saint-Jean na mbula zomi na mwambe, tango nakeyi kotanga na Lubumbashi.
TOUS LES MONUMENTS RAPPELANT AUX CONGOLAIS LEUR DOMINATION PAR LES BELGES ONT ETE DEBOULONNES.

Répondre
B

Ndeko E. Kandolo,

Monument oyo olobi ya solo esalemaka le 1er juillet 1927 "Monument du Souvenir Congolais", oeuvre de Jacques Marin.
Kasi monument oyo ngai na tuni po nazali na posa nayeba ezalaka na esika wana na rond-point Huilerie na Kalembelembe, ezalaki monument na batu misatu moko asimba pembe ya nzoko. Lokola na yebi
date basala yango te, yango wana natuni na cadre ya ba masolo na biso. Ndenge batu baloba basalaki yango na sima ya lipanda. Balongolaka yango tango balongolaka ba monuments oyo ekandaka na gare
ya kala.
Esengo na biso tozali na blog oyo tokoki kabola ba masolo.

Buku

Répondre