Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Emmanuel Kandolo

 

RÉPONSES D’E. KANDOLO À PROPOS DE MBOKELA, DAMIEN KANDOLO, ET AUGUSTIN DOKOLO

 

 

 

SUJET :  MBOKELA,

 

Référence : http://www.mbokamosika.com/2017/12/nzembo-ya-mbokela-par-emmanuel-kandolo.html

 

 

Ba ndeko,

 

Effectivement, 7 ans de mariage ezali composition ya Joseph « Josky » Kiambukuta Londa. Merengue scoubidou, nakomaki composition ya Victor « Vicky » Longomba . En réalité, ezali nde composition ya Nicolas « Nico »Kassanda. En revanche, « Sophie Elodie », ebimaki  na African Fiesta national. Kasi ezalaki ba travaux oyo African Fiesta Vita etika sous la direction ya Dr. Nico.

 

 

Patriotiquement,

 

 

Emmanuel Kandolo

 

 

 

 

 

SUJET : DAMIEN KANDOLO LOPEPE

 

 Référence : http://www.mbokamosika.com/2017/12/damien-kandolo-lopepe.html

 

 

Ndeko Charles,

 

 

Nazalaki vraiment occuper na ndenge ya muke te. Sika, mua tango ekobanda komonana mpo na koyanga kosangana awa na site na biso.

 

 

 

 

Ndeko Zenon,

 

 

Thomas Kanza azalaki mingi mingi libanda ya ekolo mpe na yango abandaki ko continuer ko bunda mpo na vision ya Lumumba. Soki ayaki ko se retrouver na gouvernement Adoula, Chargé d’Affaires en titre ya Congo na Londres, neti Congo ezalaki na Ambassadeur kuna te,  selon Adoula, ezalaki mpo na réconciliation nationale. Kasi, esembaki te, mpo azalaki toujours na batu ya Lumumba.

 

Na 23 juin 1960 tee na 12 septembre 1960, Ministre délègue na New York na Organisation des Nations Unies (O.N.U.), na gouvernement Lumumba.

Na 05 septembre 1960 tee na 12 septembre 1960, Ministre délégué na New York na O.N.U., na gouvernement Ileo.

 

Na octobre 1960, akomi na gouvernement Gizenga na Stanleyville.

Na mokolo mua 03 tee na 07 janvier1961, atindami en qualité ya représentant ya gouvernement Gizenga na Conférence ya Groupe Progressiste (GR.PR.), na Casablanca. Groupe oyo, ekomaki kobengama Groupe de Casablanca.

Na février  tee na août 1961, Ministre délégué na New York na O.N.U, na gouvernement Gizenga.

 

Na janvier 1962 tee na août 1963, Chargé d’Affaires en titre ya Congo na Londres, na gouvernement  Adoula.

Na septembre 1963, azongeli kelasi na université ya Oxford, esika azali koyekola économie.

 

Tango azui diplôme na ye na 1964, akeyi epayi ya Gbenye, na République Populaire du Congo mpe akoti na gouvernement  rebelle na ye comme  Ministre des Affaires extérieures et du Commerce extérieur wuta juillet 1964 tee na mai 1966.

Wuta mai 1966,  akeyi na Harvard esika a soutenir thèse na ye ya doctorat na économie. 

 

Na 1967, abandi kotangisa na ba universités ya Harvard,  na Cambridge, na Massachusetts na Etats-Unis mpe na Oxford, na Angleterre. Na même moment mpe azali ko collaborer na journal Jeune Afrique.

 

 

 

 

 

 

Ndeko Messager,

 

 

Tala ndenge histoire e se repetaka ! Groupe de Binza ebandaki kosangana na Binza ma campagne  na  domaine ya ba Américains oyo eyebani na kombo ya Gulf, na route Matadi, entre oyo ekoma kobengama  ba avenues Bashala na KIsolokele (à l’époque nionso wana ezalaki esobe). Ba agents Américains ya renseignements bafandaka nde wana.

 

Tango M’Zee kabila akomaka na Kinshasa, na mai 1997, Joseph Kabila anbandaki kofanda na camp Tshathi mpe kolengana na Binza Ozone wana. Brusquement, ba Américains balongue na Gulf mpe ye a récupérer domaine wana mpe akomi kofanda wana sous prétexte que e rapprocher ye na tata na ye mpe akobanda na ye kokende na Palais de marbres na makolo !!! Tango, babomi M’Zee, Joseph Kabila alongue wana akomi kofanda na pavillon ya O.U.A. mpe nani a remplacer ye ? Zoe Kabila nde akoma kofanda wana. Sika, pourquoi ba Américains balongua wana ?  Et pourquoi mpo domaine wana ezali ya bango, ezali un domaine privé ! Nionso oyo mpo tango M’Zee akotaki Kinshasa, alukaki te, koyeba esika na esika mpe eloko na eloko !!! A suivre…

 

 

Patriotiquement,

 

 

Emmanuel Kandolo

 

 

SUJET : AUGUSTIN DOKOLO SANU

 

Référence : www.mbokamosika.com/2017/12/augustin-dokolo-sanu-par-emmanuel-kandolo.html

 

 

 

Ndeko Samuel Malonga,

 

 

 

Zaïrianisation ezali kabambi na dossier mpe mingi ya koloba ezali na kati. Ekosenga tosalela yango sujet mobimba. Avant Dokolo, projet ndenge esalemaki na Présidence : Bureau ya Président de la République  na kati ya Cellule économique mpe na Commissariat général ya Plan, Banque du Zaïre na Conseil exécutif national (gouvernement) par le truchement ya ba départements (ministères)  ya Economie, Commerce extérieur mpe na oyo ya Finances, ezalaki ya kokela Banque d’investissement.

 

Na Zaïre, ba riches entrepreneures,  ba héritiers ya ba fortunes ou ba industriels minene bazalaki te (mpe batikala kozala te mpe tee na lelo oyo tozali na ba riches te, ndenge nini économie ekoki kokende liboso ?). Esengelaki kopesa possibilité ya création ya petites et moyennes entreprise (P.M.E.). Yango nde esimbaka économie mpe esalaka que malembe malembe mutu (ou groupe ya batu), na force ya travail na kati ya politique fiscale mpe douanière ya malonga, akoka ko développer ba affaires na ye mpe kokoma munene en terme ya capital. Lisusu, esengelaki koboya dirigisme (l’Etat a diriger économie)  mpe ko écarter ba politiciens na nionso etali gestion,  économique, commerciale mpe financière ya eloko nionso ebengami entreprise mpe na ba formes na yango nionso.  Na yango, batu oyo balingi ko se lancer na ba affaires ou création ya ba entreprises bakosala ba projets na bango, soki esembi, ba bénéficier na investissements na banque oyo mpo na ko créer ba emplois  (ko bénéficier na ba exonération entreprise ya sika esengeli  ezua durant une  période donnée) mpe ko booster acticité économique ya ekolo na biso. Na amont, ndenge nationalisation ya ba sociétés esalemi, bango bakobanda naino kozala na ba contrats na ba locaux. Wana ba grandes entreprises oyo ezali nationalisées ezali kosala elongo na oyo ya mike mpo na ko créer ba richesses.

 

Tala ata yo moko, tango Congo ezuaka lipanda, gouvernement endimaki ezala garant mpe ko soutenir batu bazua crédit na Société de Crédit aux classes Moyennes et à l'Industrie (S.C.OM.I). Kasi , tomonaki ba politiciens  majoritairement ya ba Kongo na ndenge bawelaki mpe esalaki que batu oyo bazalaki na makanisi ya kosala ba affaires bazua eloko te mpo bazalaki na moyen te mpo bango nde bafina dossier wana etikala kaka kati na bango.

 

Na oyo na wuti koloba, yango wana na mokolo ya inauguration ya Banque de Kinshasa, ba jeunes technocrates ya présidence, ba ministères concernés mpe na ya Banque du Zaïre bazalaki penza na esengo te mpo bayebaki  ekolo nini ebombamaki sima wana. Tango show ya Dokolo eleki,  neti abandaki ko gérer na désordre mpe na incompétence, Bureau politique ya M.P.R.eyaki ko sauver ye pour la première fois  sous prétexte ya ba séries ya mesures ya radicalisation. Ezalaki moyen ya kosunga ye mpo akueya te. Sima, ayaki kaka kokueya…

 

Zaïrianisation nde eboma économie nationale mpe tee na lelo oyo R.D.Congo etikala kotema te na kibota (coup fatal) wana tellement que yango ebetamaki na détermination nionso .

 

Etape ya liboso ezalaki promulgation ya « loi Bakajika » na Ordonnance-loi n° 66-343 ya 7 juin 1966 (tolobela yango na site na biso oyo).

 

Etape ya mibale, Président Mobutu asakolaki zaïrianisation publiquement na mokolo mua 30 novembre 1973. Na molongo, Ordonnance-loi n° 009/73 ya 5 janvier 1973 sur le commerce et les petites et moyennes entreprises zaïroises ezalaki promulguer. Concrètement, ba activités commerciales, industrielles, agricoles, agro-industrielles (magasins, boutiques, entrepôts, menuiseries,  carrières na ba exploitations forestières, élevages, fermes na ba plantations, direction ya GE.CA.MINES, MI.BA.,  raffinages ya cuivres, ba brasseries, etc. nionso ekomaki  na maboko ya bana mboka.  Donc, babotoli capital privé ya ba paya mpe na sundoli yango na maboko ya ba zaïrois mingi oyo bazalaki vraiment na compétence ya ko gérer ba biloko oyo bawelaki te.

 

Na sima, Ordonnance-loi n°14-019 ya 11 janvier 1974 portant transfère des certaines entreprises privées na l’Etat zaïrois eyaki kopesa Etat zaïrois droit ya ko récupérer (kobotola) ba entreprises privées oyo ezalakai na maboko ya ba paya mpe a nommer ba administrateurs délègues généraux. Wana nde ba Kandolo na ba Dokolo bakomaki kodondua na ba entreprises oyo.  Awa nde esika dirigisme ebandaki penza.

 

Na elulu oyo nde code zaïrois des investissements  eyaki kobonguana… Pour la petite histoire, sima ya reforme économique ya 1967, Code des investissements ya sika esalemaki na Ordonnance-loi n° 69/032 ya  26 Juin 1969. Yango ezalaki modifier mpe compléter na ba  Ordonnance-loi n° 70/094 ya  23 décembre 1970 mpe Ordonnance-loi  n°71/014 ya 15 mars 1971. Suite na zaïrianisation, Ordonnance-loi n° 74/004 ya 2 janvier 1974 mpe eye kobimisa code  zaïrois des investissements.

 

Esegelaki ko indemniser ba kolo biloko, kasi mingi bazuaki eloko moko te. Yango wana tokomaki na : zaïrianisation, radicalisation et rétrocession. Na rétrocession nde esengelaki ba récupérer, kasi en quel état ? Nionso esilaki kokueya. Na ba acquéreurs oyo bayebana, rares ba continuaki ba activités sima ya rétrocession : (Président Mobutu), Bomboko, Bemba, Litho, Moleka, Engulu, na mama Sese. Na bango banso, seul Engulu (biographie na ye ezali na site na biso oyo) nde azali kaka na station ya port na Kin na ba barges,  ba fermes mpe plantations kuna na province ya Tshuapa  mpe ezali ko résister  malgré conjoncture…mama Sese nde azali exception !!! ba oyo nionso, bakueya na bango !!!

 

L’Etat zaïrois etikala ko récupérer eloko moko te. Au contraire, yango nde esengelaki e indemniser batu oyo yango e spoliaki. Sima, esenga ba comptes na baye ye apesaki gestion ya ba activités nionso zarianisées,  conformément na ba lois oyo Président Mobutu  a signaki suite na ba décisions économiques  d’Etat oyo Bureau politique ya MPR-parti-Etat ekataki na mikolo mia 30 novembre 1973 (zaïrianisation) mpe na 30 octobre 1974 (radicalisation). Tobunga te que 150 entreprises  ya ba paya ezali concerner : ba Belges, Britanniques, Italiens, Français, Portugais, Canadiens, Pakistanais, Indiens, Grecs, Sénégalais, Guinéens, etc. Sauf ba Américains nde bazalaki toucher te : Général Electric, Coca-Cola, Goodyear, etc. Ata entreprise moko te !!!  Au contraire, bango nde babandaki ko financer makasi à travers loi na bango ya PL 480. Financement ya ba projets de développement na  échange ya exclusivité  ya  marché ya blé Américain  na économie nationale zaïroise. 

 

Pour terminer, ba conseiller mpe ba expertes zaïrois misusu  oyo bazalaki na vraie information, c’est-à-dire oyo bazalaki kosla bisaika na tangi na likolo, basalaki oyo ebengami (délit d’initier) mpo ba coopéraki na ba étrangers de sorte que ba se retrouver na ba têtes ya ba entreprises étrangers mpe na ba prises de participation kuna, se sorte que yango ezala considérer comme entreprises ya zaïrois. Misusu ba conseilla mindele babala  ba zaïroises mbangu mbangu mpe na contrat de mariage batia communauté de biens. Ba habiles zaïrois basalaka mbongo mingi mpe ba kidiba étrangers oyo bazalaki koloba que ba consulats na bango e ko protéger bango, au cas où, batelaki miso mpe balelaki na monoko ya mboka !!! 

Ndeko Claude Kangudie,

 

 

Ba bonnes fêtes na yo mpe lokola mpe na tombeli yo mobu mua sika elamu.

 

 

Patriotiquement,

 

 

Emmanuel Kandolo

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
C
Mbote pe Kimia, <br /> Merci E.Kandolo; Na oyo mboka na biso ezali ko vivre ekozala malamu tomituna pe toluka biyano, ndenge nini tokoki kosala lelo oyo po na renouveau ya patriotisme pe civisme ekota na mitu ya "bana nsomi"ya RDCongo pona mbongwana ? Mwa Think Tank; Ya koyekola a partir ya ba tranches ya histoire ndenge ezali kolobama na site na biso. Pour la Patrie. Charles
Répondre
Z
Papa Messager, bonne année, tobosana te, ba lumumbistes na ba mobutistes, nionso bazali lisusu ba jeunes te ya ba années 1960-1990, lelo bango niionso bakomi ba tata ya mikolo, pour ne pas dire ba koko... jeunesse ya lelo e vivre ndenge mboka na biso ekufi kowuta lipanda tii lelo, na mayele na ngai, namoni lumumbisme, mobutisme etc... ezali ba slogan ezanga tina, jeunesse ya lelo... etiya mayele na ye na koluka kotombola mboka, passé commun na biso eteya biso, présent epesa biso makasi... po répétition ya mabe nionso ekolo ezali ko vivre ezonnga lisusu te, elobi Cardinal Monsengwo que le médiocres dégagent...
Répondre
M
Ndiyo ndeko Zanon<br /> Messager
M
A travers réponse ya ndeko Emmanuel Kandolo oyo akomeli ngai, tomoni polele nani azali sima ya Joseph Kabila. Bino moko bomoni ete, batu nionso basala na Mobutu bazali batu ya ba américains, yango wana bakoki jamais kobundisa Kabila ata muke te. Lisusu, ba lumumbistes ya kala bango pe bakomi mopanzi ya ex groupe de Binza.<br /> RDC ezo luka sikoyo nouvelle configuration politique, na ba nationalistes ya sika. Tobosana libela ba anciens lumumbistes na ba anciens mobutistes oyo basangani po basala ba congolais mabe.<br /> <br /> Messager
Répondre