Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Emmanuel Kandolo

 .

 

 

DAMIEN KANDOLO LOPEPE

Damien Kandolo, Président de la GE.CO.MINES, de profil sur la photo, à droite de son épouse, lors de la visite du Roi Baudouin au Congo en 1970

 

Ba ndeko,

 

 

Damien Kandolo abotami na mokolo mua 10 septembre 1923 na Boma, capitale ya Etat indépendant du Congo mpe capitale ya district ya Bas Congo. Azali Otetela, originaire ya district ya Sankuru. Asali kelasi na ye primaire na secondaire epayi ya ba Frères des Écoles chrétiennes, na Colonie Scolaire ya Boma mpe asilisi na 1940. 

 

Na mbula moko wana abandi mosala comme commis na service ya Administration coloniale. Tango wana, gouvernement colonial ezali ko siéger na Boma.

Na 1942, Union des Intérêts Sociaux Congolais (UN.I.S.CO.) ebotami ba molende ya Association des Anciens Elèves de Peres de Sheut (A.DA.PE.S.). Les Affaires Indigènes et de la Main-d’œuvre (A.I.M.O.) endimi officiellement UN.I.S.CO. Na novembre 1947, Damien Kandolo aponami epayi ya baninga baye comme Secrétaire général adjoint ya lingomba (syndicat) oyo.

 

Na 1952, Kandolo akomi kosala en qualité ya secrétaire na services administratifs provinciaux mpe asangani na baninga na ye mosusu na  Cercle de la langue française. Kuna ba cours ya français na ba conférences ebandaki kopesama mpe bazalaki kosala ba débats mpo na ko approfondir maye oyo bayekoli. 

           

Sima ya mua ngonga, UN.I.S.CO. eyaki kobonguana ekomi Association du Personnel Indigène de la Colonie (A.P.I.C.) mpe sima ekomi kobengama : Alliance des Patriotes Indépendants du Congo  (A.P.I.C.). Wuta mokolo mua 30 avril  tee na 6 mars 1957, congrès na yango esalemaki na Léopoldville mpe eboti lisanga. Damien Kadolo aponami lisusu Secrétaire général. Na époque oyo, Kandolo azalaki très actif na kati ya mouvement syndical mpe abandaki kobundela ba droits sociaux ya ba ndeko na ye ba Congolais.

 

Tango  Mouvement National Congolais (M.N.C.) esalemi na mokolo na 10 octobre 1958, na Léopoldville, Kandolo azalaki membre. Yango ezali parti politique esangisi bikolo biyike bia Congo (multiethnique), batu ndenge na ndenge : ba évolués, kalaka,

journalistes, syndicalistes, commerçants, agriculteurs, travailleurs, etc., ezali ko bundela indépendance, unité ya Congo mpe kotelemela likanisi nionso oyo ezali komema bokabuani. Ezali na avant-garde. Yango ekambami na Patrice Emery Lumumba.

 

Na 16 juillet 1959, Albet kalonji, Cyrille Adoula, Joseph Ngalula mpe Joseph Ileo baboyi nzela ya unitarisme mpe bakeyi kolanda nzela oyo bangomoko babengi fédéralisme na bokeli M.N.C.-Kalonji. Kandolo azalaki membre ya Comité directeur ya M.N.C. section Léopoldville mpe membre ya  Comité national ya  M.N.C., akendaki na lingomba oyo ekendaki kosala M.N.C.-Kalonji.

 

Na mars 1960, Kandolo  akomi membre ya Conseil d’Administration ya Institut Politique Congolais (I.P.C.). Yango ebandaki kopesa ba cours du soir, ba cours par correspondance na science économie, science politique na science sociale mpe ezalaki na cycle d’études supérieures ya trois ans na option ya développement économique. Kuna nde Kandolo asali ba cours par correspondance na ye. Notons que I.P.C. esalemaki na lotomo ya Centre de Recherche et d’Information Sociopolitiques, C.R.I.S.P. ya Bruxelles, ekelama  na  1958.

 

C.R.I.S.P  ezali  membre ya Association Internationale de science politique. Fondation Ford nde e finançaki mbotama ya I.P.C. Curieusement batu mingi oyo babandaki kokutana kuna mpo na kotanga, bazalaki ba anti-Lumumba. Yango wana, de fois bazalaki ko soupçonner yango comme étant eloko oyo ba Américains ba financer mpo na kosala ba activités politiques. Awa nde Kandolo akomaki effectivement recruté na Sûreté  coloniale belge.

 

Sima ya Table ronde politique ya Bruxelles oyo esalemaki  wuta 20 janvier  tee na 20 février 1960, Kandolo akomi moko ya ba fonctionnaires noir oyo azali na grade ya likolo avant indépendance. Akomi chef de Bureau na futur ministère ya Affaires extérieures (officiellement ebandaki na 23 juin 1960, na kombo ya ministère ya Affaires étrangères). Sima ya wana, na mai 1960,  aponami comme chef de Cabinet mpe responsable ya sécurité (attaché de sécurité) ya Premier Ministre mpe Ministre ya Défense, Patrice Emery Lumumba.

 

Tango Colonel Mobutu asali premier coup d’Etat militaire na ye na mokolo mua 20 septembre 1960, a installer Collège ya ba Commissaires Généraux wuta 20 septembre 1960 tee na 9 février 1961. Damien Kandolo, oyo azali chef ya Cabinet ya Lumumba, akomi Commissaire général adjoint na Affaires intérieures, chargé ya sécurité. Yango wana ba lumumbistes ba attakaki ye na mokolo mua 26 février 1960.

 

Na août 1961, tango Cyrille Adoula akomi Premier Ministre mpe Ministre ya Défense, a nommer ye, chef de cabinet. Wuta juillet 1962 tee na janvier 1964, sur proposition ya Premier Ministre Adoula, Président Joseph Kasa-Vubu a nommer ye Secrétaire général ya ministère ya Affaires intérieures.

 

Na mokolo mua 19 octobre 1963, Jérôme Anany, Ministre ya Défense, wuta 11 juillet 1963, akomi Commissaire général extraordinaire. Asungami  na ebonga  oyo na ba  collègues na ye ya Affaires intérieures et coutumières, Joseph Maboti, mpe na oyo ya Justice, Justin-Marie Bomboko. Tango wana Léopoldville etiamaki  na état d'exception. Alors, mpo na ko renforcer sécurité publique, esengelaki Commissaire général extraordinaire azala assister na ba coordinateurs administratifs et techniques  mpo na exécution ya ba décisions na ye. Na yango, Damien Kandolo, Secrétaire général ya Affaires intérieures, akomaki coordinateur mpo na ba affaires civiles et militaires mpe Victor Nendaka, Administrateur ya Sûreté nationale, akomaki coordinateur ya ba affaires judiciaires na ya sûreté intérieure de l’Etat.

 

Na juillet 1964, Kandolo akomi Secrétaire général ya ministère ya Affaires foncières, mines et énergie. Na sanza moko wana, Moise Tshombe akomi Premier Ministre, alongoli ye na novembre 1964. Neti Kandolo wuta kala abandaki ko s’opposer na Tshombe, akimi Congo akeyi na exil na Belgique, na décembre 1964.

 

Kandolo aye kozonga na Congo na octobre 1965. Pendant exile na ye na Belgique, azui ba prérequis na administration des affaires, économie mpe na gestion na université libre de Bruxelles.

 

Wuta Belgique, esika siège ya groupe Société Commerciale et Minière du Congo (CO.MINIERE.) ezali,  (ekelami na 1909 na  banque Josse Allard mpe na banque Nagelmackers & fils) ba nommer Kandolo  Administrateur ya Compagnie Congolaise d’Electricité (COL.ECTRIC.) mpe Représentant adjoint ya Groupe CO.MINIERE. na Congo wuta août 1966. COL.ECTRIC. ezali une des filiale na yango mpe ekelami na mokolo mua 31 octobre 1923.

 

Na mokolo mua  2 février tee na 13 mars, akangami na Sûreté de l’Etat mpo na motif ya subversion. Tango wana Colonel Alexandre Singa (Singa Boyende Mosambai) nde azalaki Administrateur ya Sûreté nationale. En réalité, Kandolo akangamaki te. Sûreté nationale ezuaki ye mpo na briefing  sur séjours na ye na Belgique mpe na koyeba makanisi ya  batu ya M.N.C.Kalonji oyo abandaki kokutana na bango. Sûreté ebungi te que Kandolo,  na ministère ya Affaires intérieures en tant que Secrétaire général, grade ya likolo na Administration, a supervisaki ba activités ya Sûreté nationale mpe azali na ba réseaux à travers le pays : na ba institutions, ba partis politiques, syndicats, ba paya immigrés   mpe na milieux d’affaires. Pendant que batu bazali kokanisa que azali na prison ya Ndolo, ye, azalaka na ye bien logé na Guest House ya Ndolo mpe azali ko continuer kosala mosala na ye tranquillement mpe azuaka mupepe kaka na butu. 

 

Na mai 1966, Président Mobutu atie ye Administrateur ya Air-Congo.

Na juillet 1966, Président Mobutu a nommer ye Président ya Conseil d'administration ya Société des Transports en Commun du Congo (T.C.C), mpe azali ko cumuler na poste ya représentant ya Groupe CO.MINIERE. na Congo mpe Administrateur ya Air-Congo.

 

Na 1968 akomi membre ya Conseil de ville ya Kinshasa.

Na septembre 1968, Président Mobutu a nommer ye en remplacement ya Jean-Baptiste Kibwe, na ebonga ya Président ya Conseil d’administration ya  La Générale Congolaise des Minerais  (GE.CO.MINES.) mpe eyaki kobonguama na  Générale des Carrières et des Mines (GE.CA.MINES.). Kibwe, mutu ya Tshombe. Kandolo azui revanche na ye mpe GE.CA.MINES. ekomi na maboko ma ye. Wana Kandolo azali combiner gestion ya GE.CO.MINES. na ba activités ya M.P.R. na kati ya province ya Katanga.

 

Na mokolo mua 27 octobre 1971, tango Bureau politique ya M.P.R. ekataki que tolongola ba kombo ya ba paya, Damien Kandolo, akomaki :  Kandolo Lopepe

 

Na début 1971, Kandolo akomi Président ya Conseil d’Administration ya Société Métallurgique ya Kolwezi (Yango esalema na 14 février 1962, na kombo ya Société Métallurgique Katangaise. Mpe na 1971, ekomi société ya sika na kombo ya la Société Métallurgique de Kolwezi, Na mokolo mua 30 septembre 1974 L’Etat akotisi yango na kati ya  GE.CAMINES na kombo ya Usine à Zinc de Kolwezi (U.Z.K.).

 

Na 10 août 1972, Président Mobutu a signer ordonnance loi portant création na statut ya société d’Etat à caractère financier na kombo ya Institut du Gestion de Portefeuille. Dans la foulée a bombarder Kandolo, Président ya conseil d’Administration mpe Directeur général ya Institut ya Gestion ya Portefeuille (I.G.P.). Mission ya Kandolo  ezali ya ko administrer  portefeuille ya République du Zaïre mpe ko gérer ba participations ya l’Etat  na ba sociétés oyo ezali ko contribuer na développement. Toyeba lisusu que portefeuille ezali ensemble ya ba actions na ba titres oyo l’Etat  azali na yango  na capital ya ba sociétés oyo ye azali actionnaire.

I.G.P. eyaki kokoma Département (ministère) ya Portefeuille na 1974       

 

Na mokolo mua 5 mai 1975, Président Mobutu atiye Kandolo, Président ya Conseil d’ Administration mpe Délégué général ya ba Plantations Lever au Zaïre (palmier à huile, café, cacao, hévéa, élevages bovins, etc,).

 

Sima ya sanza misatu, akufi na Kinshasa na mokolo  mua 11 août 1978. Damien Kandolo Lopepe abalani na Alice Futi Malila mpe baboti bana sambo. 

 

Kandolo  azalaki membre ya Association nationale des entreprises zaïroises, azali na ba activités commerciales privées, donateurs na ba associations culturelles et sportives, azua ba prix na gestion des entreprises, etc.

 

Azali na ba distinctions honorifiques  iye : Chevalier, Commandeur ya Ordre national du Léopard, Commandeur ya Ordre Léopold ya Belgique, Officier ya Ordre du Mérite ya  Sénégal,  médaille ya Mérite civique, etc. 

 

Kandolo, cerveau mpe tête pensante ya groupe de Binza. Na époque wana, ye abandaki kofanda na Binza te. Azalaki kofanda na Kalina (Gombe) en face ya primature, esika bureau ya Lumumba mpe ya moko Kandolo ezali. Groupe de Binza ezali ko travailler en étroite collaboration na ba services de renseignements belges, américains na Nations unis dans le but ya ko barrer la route na ba idées ya Lumumba. Yango mpe ebandaki kobundisa Tshombe na etamboli ya politique na ye. Un des grands projets ya groupe de Binza ezalaki « Wizard Project ». Tango wana Larry Delvin, azali chef ya Antenne ya C.I.A. na Congo belge.

 

Kandolo akomaki tee na niveau ya kobimisa ba documents classés aecrets mpe confidentiels, ko falsifier yango mpe kokoma mususu en mettant la signature ya Lumumba. Yango eyaka koyebana pamba te ba documents wana, sima ya critique historique eyaki komonana que soki akomi, a coller signature. Eyaki komonana que signature ya Lumumba ezalaki identique na ba documents nionso wana. Ekoki kozala possible te mutu a signer ndenge moko na ba documents nionso.  Ayiba tee na message oyo Lumumba a préparaki mpo na kosenga lisalisi ya ba Soviétiques. Oyo chef de Cabinet ya lolenge nini ?

 

Rôle ya Kandolo na liwa ya Lumumba elakisama polele mpe ye azalaki très actif na élimination ya Lumumba. Agent de liaison ya Sûreté belge na Léopoldville, ancien Commissaire ya Sûreté coloniale, André Lahaye, akomaki conseiller na ye pendant période oyo Lumumba akangamami. Ye moko Kandolo akenda na Boma, na mokolo ya 10 janvier 1961,  mpo na ko préparer transfère ya Lumumba. Tango Lumumba atindami na Elisabethville, na mokolo ya 17 janvier 1961, Sûreté belge ebendi famille na ye na Nendaka na Belgique. Acte wana e motivaki bango lisusu makasi pamba te basi na bana bakendeki na abris na Bruxelles.

 

En récompense na nionso oyo Kandolo asali na liwa ya Lumumba, azua ba postes  ya minene na Administration publique, na ba compagnies oyo ba Belges basala mpe bazalaki ko contrôler tee eya komoma ya Etat Zaïrois. Ba nomma ye esika oyo mbongo ezali mpe Kandolo abandaki kosukola mpe ko nager na libulu ya mbongo, asomba mpe atonga ba ndaku, atamboli na mituka ya luxe, asalisa ba fêtes ya minene, asali ba voyages ebele na Afrique mpe na poto. A viva très confortablement tee na suka ya mikolo na ye. Ba oyo bayebi, bazali ko se souvenir na mariage ya Nicolette « Nicky » Kandolo na Dominique Sakombi na Kinshasa, ou encore ya Sophie Walo Kandolo na Sourou Migan Apihty (muana ya ancien Président de la République ya Dahomey, oyo ekoma Benin), na Bruxelles na mokolo mua 30 octobre 1976.

 

Kandolo azalaki un très grand franc maçon. Fils spirituel ya Auguste Buisseret. Azali parmi ba pro-Buisseret kati na Association ya Les Amis de l’Enseignement Laïc, ekambami na maçon mosusu ya munene na Congo, Sylvestre Mudingayi, na slogan na bango ya « École Laïque = École de la liberté de conscience ». Bango babundaki bitumba makasi contre ba mumpe mpo na ba athénées ebanda kotangisa na Congo. Tokozongela Auguste Buisseret ndenge abongoli enseignement na Congo mpe ndenge alendisi franc maçonnerie na Congo à travers Kandolo na Mudingayi.

 

Tango Grand Orient du Zaïre esalemi na mokolo mua 18 avril 1973, Kandolo nde azalaki na tête. Yango esalemaki sima tango Président Mobutu alongolaki Franc-maçonnerie na liste ya ba organisations subversives mpe prohibées. Kandolo abunda na molili, Akutana na Président Omar Bongo, ya Gabon,  na Premier Ministre Belge,  Edmond Leburton, mpo na ba intervenir étant bango moko ba maçons mpo na reprise ya ba activités ya maçonnerie na Zaïre mpe  e simbaki.

Ba frères maçons oyo bazalaki na Kandolo kati na lingomba liye : 

 

-       Sylvestre Mudingayi, Président ya Senat (1960-1966) ;

 

-        Cyrille Adoula, Premier Ministre (1961-1964);

 

-       Auguste Mabika Kalanda, Ministre ya Affaires étrangères, na gouvernement Adoula III (1963-1964) ;

 

-       Alphonse Nguvulu, Ministre ya Travail mpe na  Prévoyance sociale, na gouvernement Adoula III (1963-1964) ;

 

-       Arthur Pinzi, Ministre ya Finances, na gouvernement Adoula I (1961-1962).

 

Cyrille Adoula na Alphonse Nguvulu bayebana wuta 1940 mpe bakambaka Fédération Générale des Travailleurs de Belgique, (F.G.T.B.) ; Arthur Pinzi na  Damien Kandolo  bayebana wuta 1940, mpe ba kambaka Association du Personnel Indigène du Congo (A.P.I.C.), Par ailleurs, Mudingayi, asalaka esika moko na Adoula, bazalaka ba commis  na Banque du Congo belge (Banque centrale).


En fin stratège, Kandolo atikala kozala na mandat politique ata moko te sous régime ya Maréchal Mobutu : Secrétaire général ya Comité Exécutif ya M.P.R., Commissaire politique (membre ya Bureau politique), Commissaire du Peuple (Député national), Commissaire d’Etat (Ministre) , Commissaire de région (Gouverneur de province), Ambassadeur extraordinaire et  plénipotentiaire, oyo nionso na kati ya M.P.R.Parti-Etat. Neti  azalaki  Président ya ba entreprises publiques de l’Etat, d’office azalaki mpe Président sectionnaire ya M.P.R. Parti-Etat.


Kandolo, ayebaki Général Mobutu très bien mpo bango mibale bazalaki sima ya Lumumba (na M.N.C., gouvernement), bakeyi ensemble na groupe de Binza  mpe ba continuer kozala na ba relations elenda . Yango wana, contrairement na ba membres ya groupe de Binza mosusu, Kandolo atikala jamais kokueya na disgrâce na Général Mobutu mpo ayebaki malamu que ye Général Mobutu azali mutu oyo a s’irritaka facilement,  il retient difficilement ba pulsions instinctives na ye, alingaka critique te, et  ne supporte pas la contradiction mpo alingi pouvoir makasi na lokumu ezali kokende na yango. Ainsi, azali na interprétation particulière ya gestion ya pouvoir politique mpe na l’Etat. Bomboko, Ndele, Nendaka bango nionso basukaka mabe na 1970.


Kandolo azalaki cerveau ya groupe de Binza pamba te, ye nde azalaki haut fonctionnaire noir na bango banso mpe alenda na administration mpe azalaki na expérience mingi koleka bango banso, ayebaki ba rouages  ya administration coloniale makasi na ya syndicalisme. De fois, ebandaki koyebana te soki Kandolo ou Ndendaka nde  azalaka Administrateur ya Sûreté nationale ! Bango mibale babandaki ko travailler étroitement. Kasi, Kandolo azalaki na expérience mpo Nendaka ye azalaki commerçant avant akoma kosala na Sûreté nationale.


Tenez, Kandolo en tant que chef ya Cabinet ya Premier Ministre, abandaki ko coordonner action ya gouvernement na Secrétaire d’Etat na Présidence ya Conseil ya gouvernement, Mobutu. Neti Lumumba azalaki mpe Ministre ya Défense, Kandolo,  azalaki ko travailler en étroite collaboration na Quartier général ya Armée. Na cadre ya politique ya Lumumba ya africanisation ya ba cadres ya Armée, comme par hasard, Lumumba a nommer Mobutu Colonel mpe Chef d’Etat major général ya Armée, na mokolo mua 5 juillet 1960, en remplacement ya Général Emile Janssens.

 

En tant que chef ya sécurité ya Premier Ministre, Kandolo, azali ko travailler en étroite collaboration na Sûreté Nationale (Police nationale). Wana, Colonel Frédéric Vandewall, azali toujours chef ya Sûreté nationale, ye azalaki na ebonga wana wuta Congo belge. Na septembre 1960, na cadre ya africanisation des cadres, Nendaka aponami comme  chef ya Sûreté nationale (Police nationale), mpe Vandewall akeyi ko offrir ba services na ye epayi ya Tshombe. Kuna nde asilanaki na Lumumba.


En tant que chef de Cabinet ya Premier Ministre, azalaki ko travailler en étroite collaboration na Cabinet ya Ministre ya Affaires étrangères, chef ya Cabinet ezalaki Antoine Tshilumba, na Ministre Justin-Marie Bomboko, mista na ye ya groupe de Binza.

Na oyo etali Finances, son ami d’enfance mpe pure ye de tout les temps, Albert Ndele, chef ya Cabinet ya Ministre ya Finances,  Pascal Nkayi.

Kandolo azalaki na ba relations na milieux nionso : na politique intérieure, Administration publique, territorial, commerce, diplomatie, milieux d’affaires na Congo, Afrique, Europe,  Amérique, na milieux financiers na Suisse ; Luxembourg ; Etats-Unis ; Angleterre ; Belgique, na milieux ya ba minerais, ba pierres précieuses na place ya New-York ; Anvers ; Genève ; Londres, ba entreprises minene nionso ya Belgique oyo esala kombo na Congo,  ba entreprises nionso ya portefeuille ya l’Etat Congolais, ba relations personnelles na ba Chefs d’Etat ya Afrique, mpe ba Premiers ministre ya Belgique, ba responsables ya ba services secrets ya U.S.A (C.I.A),  Belgique, mpe na ba hauts fonctionnaires ya Nations Unies, na Armée , Gendarmerie nationale mpe ba Services spéciaux, na justice, tee na ba nganga minene ya Léopoldville, etc., 

 

Groupe de Binza esalemaki na bokabuani bua parti ya Patrice-EmeryLumumba, Mouvement National Congolais, M.N.C., le 19 juillet 1959. Tango ekabuani, Lumumba atikali ngambo moko, Joseph Ileo, Cyrille Adoula na Joseph Ngalula bakeyi ngambo mosusu. Na bokeyi bua bango, ba Américains via ba Belges bayaki kosimba Groupe de Binza. Yango ekomaki bras ya exécution ya plan na bango na Congo. Kasi, yambo groupe de Binza ekueya na maboko ya ba Américains, yango ezalaki likanisi lya Monseigneur Van Weayenberg, Auxiliaire ya Maline mpe Recteur Magnifique ya université catholique ya Louvin, na Belgique. Ye alukaki kosangisa  la jeune élite congolaise ya diaspora mpo na kolakisa bango nzela mpo ete na bozongi bua bango na Congo, bakoka kosala mosala na makanisi ma kokonza ekolo na lolenge lolongobani. Kasi yango elekaki ndenge wana te mpo ba Américains na ba Belges bazalaki na boule mususu na oyo etali ba intérêts na bango na Congo-Léopoldville.

 

Groupe de Binza ezalaki na : Joseph Désire Mobutu, Justin-Marie Bomboko, Albert Ndele, Victor Nendaka, Cyrille Adoula,  José Nussbaumer, Ferdinand Kazadi, Damien Kandolo, Albert Bolela, Joseph Ileo, Thomas Kanza,  Joseph Ngalula, Marcel Albert Lihau, Charles Bokanga, Jonas Munkamba, Mario-Philippe Cardoso, Etienne Tshisekedi, Paul Mushiete, na Henry Takizala.

 

 

 

Patriotiquement,

 

 

 

Emmanuel Kandolo

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
P
Emmanuel Kandolo, vous detenez beaucoup de secrets sur les premieres annees de l' independance du Congo et vous devriez ecrire un livre pour les generations futures.
Répondre
L
Qui est Emmanuel Kandole? Est il le fils de Mr Damien?
Répondre
C
Sincères remerciements à Mr Emmanuel KANDOLO pour ce portrait de son père qui éclaire sur l'histoire de notre pays.
Répondre
D
Bonsoir Messager, pourquoi oko passer blog na yo na https te, pamba te na eleko ya lelo ezali ko indiquer "Non sécurisé"?
Répondre
M
Salut Damien,<br /> Ok, nakomeka lobi.<br /> Messager
D
Mama oyo avandi entre Takizala na Roi Baudouin, ezali Mama Alice Kandolo Futi Malila, Madame Damien Kandolo Lopepe, ezali Madama Takizala te. Réception oyo ezali na Lubumbashi, na Guest-House ya Gécamines lors de la visite ya couple royal belge, Roi Baudouin na Reine Fabiola. Bango nde bayambi na couple royal, na Président Mobutu, na Ministre Takizala, ba hôtes na bango. Mama Sese atikalaki na Kinshasa ou awutaki kobota. Séjour nionso tout na Katanga, Roi na Reine bazalaki na maboko na bango. Merci Messager, mikolo ebele penza.
Répondre
M
Merci ndeko Damien po dėtail ya madame Kandolo. Nabanzaki muasi ya Takizala.<br /> Bon week-end.<br /> Messager
C
Esengo ya kotanga yo lisusu E. Kandolo. Okenda wapi?
Répondre
Z
eloko nini esala thomas kanza a se retrouver na camp ya republique populaire du congo na kisangani, alors que azalaki na groupe de binza ndenge okomi
Répondre
M
Cet article de notre ami Emmanuel Kandolo donne les clés de la situation qui prévaut actuellement en RDC. Bravo pour la clarté et la richesse des détails.<br /> <br /> Messager
Répondre