Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager


Sujet : LEOPOLDVILLE 1881-1956: LES MONUMENTS 

 

Ndeko Jean-Pierre Lubaya,

 

Ba ndeko oyo otangi misusu bakenda, misusu bazali.

 

Bienvenu Beniamino, (Molobo), ye akenda. Azalaki un bon journaliste na mongongo kitoko. 

Stéphane Kitutu Oleontwa « Steve » (mu Sakata), poste na ye ya suka na R.D.Congo ezalaki ya  Directeur général ya Canal Congo télévision (C.C.TV.) na Canal Kinshasa Télévision (C.K.TV.). Azali na Belgique, esika bakumbaki ye, suite na ba graves brulures ewutaki na attentat esalemaki na immeuble ya ba ya TV. oyo abandaki ko diriger. Sika akomi kozongela santé na ye.  

Magloire Muleka-Ditoka wa Laleuga (lulua), azali na mikili.

Médard Babala, akenda.

Jean Nzunga azali na France.

Dieudonné Kwebe Kimpele azali na Liège na Belgique.

Pauline Kabangu Tshita Mulumba (Luba) azali na Tokyo na Japon na molongani na ye Marcel Mulumba, actuel ambassadeur ya R.D.Congo na Tokyo.

Eugénie Laba « Eugénie la paix » azali na Bruxelles na Belgique.

Jacqueline Betoko Ngeli (mu Senge), azali na Kinshasa, akoma Directrice ya programme ya Digital Congo T.V.

Euletière Lutu Mabangu, azali na Kinshasa, akoma Coordonnateur ya Radio Télévision Nationale Congolaise 2 (R.T.N.C. 2). Azali kotungisama  makasi mikolo oyo mpe akangami mpo na ba raisons politiques. Il parait que balingi ko remplacer ye na ebonga wana !!!

Benoît Lukunku Sampu (mu Lubakat) azali ambassadeur na Lisbonne.

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

 

………………………………………………………………………………………………………………………………………………

 

Sujet : Kandolo décrit la carrière du Col Mbo et les nominations except. !

 

Ndeko Loningasa,

 

Salongo « Zalongo » ezali sobriquet na lo Mongo, oyo ba Mongo bapesaki na moko ya ba mindele oyo abandaki kosalisa batu misala makasi na ba plantations.

Président Mobutu akoli na Mbandaka. Tango akomi mokonzi, akomisi Salongo concept ya idéologie mobutiste, fondement ya révolution zaïroise authentique. Makanisi maye ya kokomisa Salongo concept, ewutaki tango akendaki mobembo na Chine mpe na Corée du Nord, mbala ya liboso, na Janvier 1973. Kuna na Chine, azuaki modèle ya Yukong mpe na Corée du Nord azui oyo ya Djoutche. Yango nde eyaki kobengama Salongo : ko sala réforme ya société na ko valoriser travail manuel collectif.

Salongo ezalaki obligatoire chaque samedi na après midi mpe ezalaki facultatif soki mutu azali na disponibilité na semaine.

 

……………………………………………………………………………………………………………………………………………………

 

Ndeko Richard Kasongo,

 

Pete ya Général de brigade = Brigadier général = une étoile, Général de division = Général major = deux étoiles, Lieutenant-général = Général de corps d’armée = trois étoiles, Général d’armée = 4 étoiles. Pour le moment, armée na biso ezali na général quatre étoiles te. Lelo nde tozongeli ebengeli ya tango tozuaka lipanda

N.B. Capitaine-général ezalaki ebengeli ya Chef d’état-major général ya F.A.Z.

 

…………………………………………………………………………………………………………………………………………………… 

 

Ndeko Serge,

 

Nakolandisa biyano na mituna otuni.

1. Ndeko Serge : Ndenge nini Mandungu Bula Niati azalaki civil mais azalaki mokonzi ya liboso ya garde civil?  Pe tokoki koyeba biographie na ye s'il vous plait?

Emmanuel Kandolo : Antoine Mandungu Bula Nyati « Tony Tony, Carbure » abotami na Kinshasa, le 14 septembre 1935. Azali mu Mbala. Asali école primaire epayi ya ba sango mpe na sima akoti na Force publique na 1952. Tango Congo ekomi lipanda, azalaki na pete ya Sergent. bembeni ya mosala mua soda, asali ba cours du soir na section commerciale tee aye kolonga yango. Na 1958, azui mise en disponibilité na Force publique, mpe akomi Rédacteur en chef ya Emancipation (journal) mpe azali ko signer ba articles na ye na kombo ya Tony Tony. Na même moment a décider asala politique na parti du peuple (P.P) mpe a participer lokola observateur na Congrès ya ABAKO na décembre 1959 na Kisantu. Na sima ya wana, na janvier 1960, akeyi na Bruxelles na Table ronde comme suppléant ya P.P. Na 1961 azui inscription na Institut Pédagogique National (I.P.N.). Kasi, ayaki ko changer boule mpe alandi gouvernement ya Antoine Gizenga na Stanleyville. Kuna azui ebonga ya responsable ya jeunesse na information populaire ya M.N.C.- Lumumba, sima ya wana akomi Rédacteur en chef ya journal Uhuru (liberté)  mpe membre ya Comité National de Libération (C.N.L.).

Akeyi na Union des Républiques Socialistes Soviétiques (U.R.S.S.) na août 1961. Kobanda wana  tee na juin 1964 asali ba études ya journalisme na université d’Etat ya Moscou Lomonossov  mpe na ba stages na République Démocratique ya Allemagne (R.D.A.) Tango asilisi, atikali kuna na U.R.S.S. une année en tant que représentant ya République Populaire du Congo (ya Gbenye). Sima, azongi na Stanleyville mpe, azui ebonga ya responsable ya propagande na organisation ya M.N.C- Lumumba. Abandi mpe koleka mingi na radio Stanleyville na kombo ya Tony Nyati. Tango rébellion ya Gbenye epoli, akimi, akeyi na Suisse na 1966 kotanga na Institut africain ya Genève.

Entre 1966 tee na 1973, azali kobaluka entre Suisse, France na R.D.A. tee tango Président Mobutu asalaki voyage na Chine populaire na janvier 1973, akeyi kokutana na ye kuna mpe Président ayebisi na Commissaire d’Etat na Orientation nationale, Sakombi Inongo, a bombarder ye Rédacteur en Chef ya revue Zaïre na Bruxelles, en remplacement ya Buana Kabue. Wuta Bruxelles, Antoine Mandungu, Abongoli kombo, andimi kombo ya sika ya authenticité, Mandungu Bula Nyati (ou Bula Mandungu Nyati). Mbala moko abandi kosala propagande ya régime ya Président Mobutu mpe kokoma ba articles na gloire na ye. Na début 1974, abengami na Kinshasa, akomi conseiller principal ya Président de la République, chargé des questions sociales et culturelles. Na cadre wana nde ayaki kokoma organisateur ya combat du siècle kati na Mohammad Ali na George Foreman na Kinshasa na octobre 1974, sous la supervison ya Directeur ya Bureau du Président de la République, Bisengimana Rwema. Sima ya réussite ya événement wana, akomi Commissaire d’Etat na Affaires étrangères (Ministre) le, 7 janvier 1975, mpe a jouaki rôle ya médiation na conflit na Angola mpo na connaissance na ya politique étrangère soviétique na Afrique. Tour à tour, azalaki Commissaire d’Etat na Orientation nationale (Ministre ya information), 23 février 1977, Travaux publiques et aménagement du territoire. Kobanda na 21 janvier 1978 tee na 18 janvier 1980, Gouverneur ya ville ya Kinshasa. Wuta 18 janvier 1980 tee na janvier 1985, Gouverneur ya Région ya Shaba (province ya Katanga).

Na septembre 1984, tango azalaki kaka Gouverneur ya région ya Shaba, akeyi na République Fédérale ya Allemagne (R.F.A.) na formation spéciale na Direction ya police nationale allemande na Nuremberg na DM8. Sima ya wana, aye kokoma Président-Directeur général ya Garde civile na 1985. Wuta le, 18 avril 1986 tee na 22 janvier 1987 azongi lisusu na poste ya Commissaire d’Etat na Affaires étrangères. Na janvier 1987 tee na mars 1988, Commissaire d’Etat na information. C’est à ce titre nde asakolaki likambo ya Mobutu et Mubarak 1 (M.M.1), Kisi ya SIDA.  Kobanda le, 7 mars 1988 tee na 26 mars 1988, Commissaire d’Etat na administration du territoire na décentralisation (intérieur). Le, 28 novembre 1991 akomi Ministre ya Intérieur na développement communautaire.  

Na ba relations asalaki na Allemagne Fédérale, Mandungu a introduire moninga na ye, ingénieur Luth Kays, epayi ya Président Mobutu. Masolo eboti Orbital Transport Und Racketein Acktiengesd Schaft Ag (OTRAG), le 27 mars 1976.  Sima ya mbula mibale, na 1978, OTRAG ekomi liquider. Mandungu asali société ya sika na kombo ya Société Agricole et Minière du Zaïre (SAGRIMIZA) na ba installations ya OTRAG. Akomi ko cumuler Gouverneur ya Shaba na Président ya Société privée na ye !!! Na 1980, akomi membre ya Comité central du M.P.R.

Mandungu asalaki musala malamu na conférence nationale souveraine mpe na supervision na ye, élections nionso esalemaki na transparence : Bureau ya C.N.S., tango azalaki Ministre ya intérieur. Sima ya wana, ayaki kokoma Chef ya majorité parlementaire mpe asangani na Maître Gérard Kamanda wa Kamanda mpo na kosala Front commun des nationalistes (F.C.N.) na 1991. Sima, bayaki lisusu kokabuana, ekomi na ba ailes mibale : F.C.N - Mandungu na F.C.N - Kamanda.

Avant wana, esengeli lisusu toyeba que carrière ya Mandungu ezalaki vraiment claire te : azalaki kofunda batu na sûreté belge, sima akomi na gouvernement ya Stanleyville. Kuna nde esika babandaki koboma batu na monument ya Lumumba na centre ville ya Stanleyville. Tango akomaka ministre ya information, abandaki mpe ko lutter contre liberté ya presse. Na moment ya ba massacre ya chrétiens na 1991 na Kinshasa, ye nde azalaki Ministre de l’intérieur. Donc, azalaki mpe na période mulayi ya rôle trouble.

Mandungu, ye mutu abandaki kotambola na kombo ya Lumumba na munoko na Stanleyville, akimaki Zaire, tango moninga na ye mosusu ya Stanleyville, L.D.K.akotaki triomphalement na Kinshasa. Akendaki kopena na Cotonou na Benin epayi ya Président Mathieu Kerekou. Ex-révolutionnaire. Kuna nde atika mokili na l’an 2000.

2a. Ndeko Serge : Est ce que na bana ya Marechal Mobutu, Kongulu nde azalaki mobulu koleka?  Ti lelo nayebi te akufaka ndenge nini, basusu balobi azuaki masasi na bitumba, basusu balobi SIDA, wapi solo? 

Emmanuel Kandolo : A mon avis, nakoloba que manda Mobutu nde azalaki na mobulu makasi mpe Kongolu na Konga nde balandi.

Kongulu Mobutu akufa le 25 septembre 1998 suite na problème cardiaque. Avant, azuaki opération ya cœur na Centre Cardio-thoracique ya Monaco. Yango elekaki malamu. Sima mikolo ayaki kosala malaise mpe ememi ye. En revanche, Kongolo azuaki masasi te. Mokolo bazalaki kokima na Brazzaville nde abandaki ko boiter mua moke mpo na veille azuaki choc tango alingaki kobimisa mobulu na recherche ya Général Norbert Likulia Bolongo Lingbangbi, Premier Ministre, na hôtel Intercontinental ya Kinshasa. Azalaki surpris na système automatique ya sécurité, mpo tango aye na commando na ye mpo aluka Général Likulia kuna, directement batu ya sécurité ya hôtel ba activer système automatique ya ko bloquer ba ascenseurs nionso na likolo na étage ya suka. Moyen ba utiliser ba ascenseurs ezalaki te mpo ekozua temps ebele basala recherche en utilisant ba escaliers de secours. Na kanda wana abandi kotombola kobeta ba coups de pied, nde ayaki kozua choc wana na lokolo. Na oyo etali sida, nayebi te soki azalaki na yango.

2b. Ndeko Serge : Tokoki koyeba biographie ya muana na muana ya Marechal Mobutu, pesa biso lumiere po bazalaki libota ya yambo na mboka na biso en temps record. 

Emmanuel Kandolo : Vraiment nakoki kopesa yo biographie ya muana na muana ya Président Mobutu te. Biographie ya Nywa nakopesa yo mbala ya sima, Manda, Konga na Kongulu bazali na diplômes ya Ecole de formation des officiers ya Kananga (E.F.O). Nzanga atanga na Montréal mpe na Paris na université américaine. Giala mpe atanga na poto.

2c. Ndeko Serge : Est ce que Konga Mobutu akufaka na kobeta ndenge elobamaka?

Emmanuel Kandolo : Non! Konga akufaka le 9 septembre 1992 na Paris, na bokono abelaki.

3. Ndeko Serge : Tango olimboli ba mpete ya ba soda, otangi mpete ya Marechal te, eza mpete ya ba soda te? po Mobutu na Idi Amin Dada na Marechal Tito bakomaki ba Marechal (eza na ndenge ya ki soda to na ndenge ya ki dictateur ou juste une folie de la grandeur)?

Emmanuel Kandolo : Pete ya Maréchal ezali pete ya soda te. Ezali pete ya lokumu na misala minso ye asalaki. Neti moyen akoma empereur ezalaki te, suite na ba critiques oyo esalemaki na cas ya Empereur Jean-Bedel Bokassa, yango wana formule ya Maréchal ebimaki. Kasi, na amée na biso pete ya likolo ezali ya Général d’armée (quatre étoiles).

4. Ndeko Serge : Pona nini Leader charismatique Tshisekedi Wa Mulumba aboyaki ki premier ministre mbala na mbala (on dirait mbala misato)?  Abomaki phrase moko po aboyaki kotanga yango, ezalaki pona ba raisons politique to logique to ezalaki lier na ba raisons magique. 

Emmanuel Kandolo : Docteur Etienne Tshisekedi aboyaki poste ya Premier Ministre mbala moko, tango Président a nomaki ye par surprise le, 22 juillet 1991. Sima ya wana, ayaki kondima suite na accord ya Palais de marbre ya octobre 1991. Le, 25 octobre 1991, Etienne Tshisekedi a prêtaki serment na qualité ya Premier Ministre. Kasi, incident moko esalemaki na signature ya procès-verbal portant nomination na ye, mpo a biffure ya termes : fidélité au Président de la République, obéissance na constitution (ya M.P.R.), mpo nomination na ye ewutaki na ba négociations politiques entre pouvoir na opposition. Tango bayokani na ba préalables oyo oppositions epesaki, yango nde ebotaki consensus ebengami Palis de marbre I. D’où, surprise ya Tshisekedi ya komona que formule elonguaki na consensus, ezongi lisusu na procès-verbal.

Techniquement, procès-verbal ya nomination ezali acte juridique oyo ezali ko légaliser nomination mpe na entrée en fonction ya nominé. Soki a signaki yango ndenge ekomamaki wana, elingi koloba que a reconnaître ko fonctionner na institution ya Président ndenge ezalaki avant accord ya Palais de marbre. Par ailleurs, neti a biffer ba termes oyo ezali na kati, automatiquement, eboti irrégularité mpo ba dispositions ya loi ebonguamaka mpe elonguaka na lolenge wana te. Donc, Etienne Tshisekedi, en tant qu’un juriste chevronné, ayebaki malamu que na moment wana, précédant ewutaki kobotama !!! Mpe soki aboyaki ko signer procès-verbal, elingaki kaka ezala ndenge moko mpo akokaki kosala remise et reprise te mpe akokaki kokota en fonction te mpe kosala remise et reprise na prédécesseur na ye te, professeur Mulumba Lukoji, sans ba signatures  na ye moko, Docteur Etienne Tshisekedi, na ya Directeur ya Bureau ya Président de la République, professeur Mokonda Bonza

Na sima, Président atindaki professeur Mokonda Bonza, na Maitre Nymi Mayidika Ngimbi, Conseiller spécial ya Chef de l’Etat na matière ya sécurité, mpo baluka ko convaincre Tshisekedi na U.D.P.S. mpo na recherche ya solution oyo ekosala que Tshisekedi a signer procès-verbal mosusu sans ba termes oyo ye a biffaki. Kasi, signature wana esengeli ezala na kinsueki. Tshisekedi aboyaki boule ya kinsueki mpe asengaki babandela cérémonie mpe a signer procès-verbal ndenge esengelaki ezala. De son côté, Président Mobutu mpe aboya proposition ya que eleka na télévision na radio, na miso na matoyi ya bato banso. Tango 48h. ya ultimatum oyo Président Mobutu apesaki ekokaki, ye abengisi ba ambassadeurs ya troïka : Belgique, Etats-Unis na France mpo na koyebisa bango que asali nionso mpo a trvailler na Tshisekedi, kasi ezali kosimba te. Yango wana, le, 28 octobre 1991 aye ko signer ordonnance ya nomination ya Mungul Diaka en tant que Premier Ministre mpe yango e abroger oyo e nomaki Etienne Tshisekedi.

Na comprendre dernière question na yo te.

 

……………………………………………………………………………………………………………………………………………………

 

Ndeko Jean Paul Kalambay,

 

Nayebi te soki réellement Félix Emmanuel Iyeli Mpela Inseki azalaki semeki ya Colonel Léon Mbo. Par contre, église ya ebale Mbonge ezalaki na succès na yango mpe mingi bakendaka kuna bazuaka mpeve mpe vie na bango ebongaka. Il parait que secret ya nionso wana ezalaki kaka losambo makasi.

Ebale Mbonge azalaki nde en conflit personnel na Maréchal Mobutu mpo akotaki na  vie privée na ye. Mutu nionso ayebi ndenge esukaki.

 

……………………………………………………………………………………………………………………………………………………

 

 Ndeko Sony Mokonzi,

 

Colonel Mbo azalaki exceptionnel comme pilote africain oyo azalaki na maîtrise parfaite ya avion de chasse. Eloko nini asali te na ba démonstrations ya voltiges, ba décollages supersoniques ya somo asala na Mirage ?

Mpo na enquête, yo moko oyebi ndenge ba enquêtes wana ezalaki !!! Ata moko te e permettra ko éviter ba accidents misusu évitables esalema, ezala na défaut humaine ou ya avion. Rien !!!

Na liwa na ye, abandaki kofanda na très belle villa atongisaki na quartier Salongo. Yo moko oyebi ndenge akomaki na ba moyens mpe peto abandaki kotiya na Mercedes 200 E ya pembe abandaki kotambola na yango. Ah ! Léon alingaka lisano. Vie esali bongo, malheureusement.

Mpele Mpele na Massamba, logiquement esengelaki bazala na tète ya Force aérienne. Mais, Président Joseph Kabila a préferaki un civil, John Numbi, oyo ayebi absolument rien na armée de l’air mpe asala même pas ba voyages na avion na ba provinces nionso ya R.D.Congo. Ayebi eloko te na bitumba ya likolo !!! Nionso oyo mpo azalaki na milice ya Jeunesse de l’union des Fédéralistes Indépendants (J.U.FER.I.)

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

 

 ……………………………………………………………………………………………………………………………………………………

 

Sujet: Lisumu ya Major Mpika, Eyano na Sonny Mokonzi

 

Ndeko Radio Congo,

Soki Président Mobutu a perdaki guerre ya Shaba, est-ce que Général Bumba alingaki a reprendre ebonga na ye ya Capitaine-général ? NON ! Soki boye, ndenge nini okoki koloba makambo olobi wana?

Ozali na exemple ya fuite ya Maréchal Mobutu tango A.F.D.L. elingaki ekota na Kinshasa. Ba Généraux oyo babundaki na ba oyo babundaki te, lelo oyo bazali wapi? Nabanzi ozali na eyano!!! Komikosa te, soki Mbumba Nathanaël azuaki pouvoir(rêvons), alingaki aboma ba militaires mobutistes nionso. Kobosana te que ezalaki ba ex-gendarmes katangais oyo ya Tshombe mpe tee na lelo oyo balelaka mokonzi na bango na baye banso A.N.C. eboma. Soki olandaka politique ya ekolo na biso malamu, oko comprendre pourquoi Président Laurent-Désiré Kabila azalaki na ba problèmes na ba fédéralistes mpe na lolenge bango bandimaki kolekisa ye. Landaka ba discours ya Antoine Gabriel Kyungu wa Kumuanza mpo doute elongua yo na compréhension ya division oyo ezalaka kaka kati na ba Lubakat na ba Lunda.

 

……………………………………………………………………………………………………………………………………………………

 

Ndeko Sony Mokonzi,

 

Premier Ministre Tshombe abandaki kofanda na Binza te. Résidence na ye officielle ezali na Leopold II (Kintambo) na avenue du Cirque (avenues de la Cirque na Colonel Mpia ezali perpendiculaires), esika Ex-Premier Ministre Antoine Gizenga azali kofanda tee lelo oyo bien que azali lisusu Chef ya gouvernement te. Mua rappel : Tango Kengo wa Dondo akomaki Premier Ministre mbala ya liboso na novembre 1982, a préféraki kofanda na résidence oyo ezalaki ya ba Gouverneurs généraux ya Congo belge, na boulevard Colonel Tshatshi, na commune ya Gombe. Résidence ya ba Premiers Ministres ya Congo oyo ezali na Kintambo ezongi en bon état mpe habitable tangu ya Antoine Gizenga akomi Premier Ministre, na décembre 2006, mpo wuta 1982 ezalaki lisusu na budget ya entretien te mpo yango ekomaki orienter na ndaku ya Gombe.

Tango Tshombe azalaki Premier Ministre, Chef ya cabinet na ye ezalaki Ferdinand Kayukwa. Ye abandaki kofanda na Kalina (Gombe).  

 

N.B. Kintambo ezalaki fief ya A.BA.KO.

 

……………………………………………………………………………………………………………………………………………………

 

Ndeko Joseph Pululu,

 

Ba kinois lokola ba papa Joseph Ileo Songo Amba na André Boboliko Lokonga Monse Mihomo, Dominique Sakombi Inongo na Antoine Mandungu Bula Nyati basali honneur ya Kinshasa : ba papa wana mibale bazalaki ba Premiers Ministres, membres ya Bureau politique na ya Comité central ya M.P.R. Papa Ileo, Présidents ya Sénat, Président ya Conseil législatif (Parlement). Papa Boboliko, Président ya Conseil législatif, Président ya Conseil économique et social, etc. Sakombi na Mandungu ba Ministres a plusieurs reprises, membres ya Bureau Politique mpe ya Comité central ya M.P.R. mpe ba Gouverneurs ya ville ya Kinshasa. Sakombi akonzaki MO.P.A.P. mpe Mandungu akonzi Garde civile. Nionso oyo ezali lokumu ya bana Kinshasa. Bana ya Kinshasa ba occuper ba postes nionso minene : na Armée avec Bumba, Eluki, na Mahele. Na direction ya Bureau ya Président, José Patrick Nimy Mayidika Ngimbi, etc. Ba kinois lokola Clément Vidibo (paix à son ame, awuti kokende wuta le, 16 janvier 2010), Buana Kabue , Antoine Mandungu Bula Nyati mpe na Cyrille Momote Kabange (fidele des fideles ya Dominique Sakombi tee lelo oyo) baleka na Revue-Zaire. Soki totali malamu, il n’y a pas à se plaindre !

Olobi boye : « Ainsi, si au sortir de l'indépendance ce sont les anciens des pères de Scheuts "ADAPES" et leurs "copines" des coeurs immaculés de mazrie "ADACIM" qui se taillent la part du Lion dans lesministères et au Parlement, dans la deuxième république le jeu va s'ouvrir et faire apparaître le groupe des anciens des Pères Jésuites. Disposant des collèges les plus huppés du pays et dirigeant aussi l'Université Lovanium, leur avis "désintéressé" permet à Mobutu, de trouver, souvent, lesd oiseaux rares à intégrer à ses différentes équipes. ».

Oui, ba appartenances na ba cercles kili kili na parrainages e comptaka na nomination. Kasi, tobosana te que équilibre régionale ezalaki. Tala neti na poste ya Premier Ministre, ba originaires ya ba provinces mingi bazui yango.

Enfin ! La frustration des Ngembo - bana kintambo  n’est  pas justifiée à plus d'un titre mpo Kintambo ezal commune ya Kinshasa. Kinois esika nionso azuami na 24 communes, azali kaka kosala lokumu ya Kinshasa. Bana Kitambo batanga ba kelasi, basomba mapangu, babala, basala misala na ba entreprises ou na administrations publique oyo ezali na ba communes mosusu. Vraiment, nazali komona raison ya frustration te mpo kinois azali na 24 communes.

Nakosilisa na koyebisa que mama Atemina azalaki na liloba na M.P.R. papa Charles Atembina Te Bondo azalaki ambassadeur ya Zaïre na Rabat. Nazali koyeba lisusu lolenge ayambaka délégation zairoise na décembre 1973 tango tokendaka na cadre ya match retour contre Maroc na éliminatoire ya Coupe du monde 1974. Azalaki mpe ambassadeur na Vatican, etc.

A.BA.KO. elongaki ba élections na Léopoldville na ba communes ya : Kintambo  na Alphonse Tshinkela, Kinshasa na Eugène Lutula, Barumbu na Paul Sangwa, Saint-Jean na Pierre Canon, Kalamu na Arthur Pinzi, Ngiri Ngiri na Gaston Diomi, Dendale na Kasa Vubu, bandalungwa na Oscar Ngoma, Kalina na Robert Van Hecke (mundele), Limete na Baptiste Michaux (Mundele),

Ndenge owuti koloba, mundele azalaki na base ya bokaboli biso na ba élections iye. Bien que organisation ezalaki malamu, mode ya scrutin ezalaki malonga te mpe esalemaki de sorte que e favoriser ba Kongo mpo bango nde bazalaki mingi na Léopoldville mpe inféoder malamu : 100 électeurs mpo na 1 élu. Impossible ekolo mosusu elonga na ba conditions oyo mpo proportionnalité ekokaki kosalema te kati na ba tribus nionso. Yango wana ba Kongo balongaki ba communes 7 mpe mindele balongi 2.

Na commune ya Barumbu par exemple, Simon Bolulu (Equateur) akweyaki  mpo ba Kongo  ya conseil municipal balingaki te aleka. Ba préférer Paul Sangwa, bien que ayebaki mukanda te, akoma, Bourgmestre, sous prétexte que akozala entourer na batu oyo batangi mpo basunga ye na mosala. Ndenge moko mpe na commune ya Kinshasa, ba conseiller Ngala (Equateur) baponaki logiquement Pierre Molowayi. Kasi, ezalaki sans compter na opposition farouche ya Premier Bourgoumestre, Jean Torcieur. Ye aboyaki na motema moko ko valider élection ya Pierre Molowayi  pour une sordide affaire ya trafic ya vin rouge. Ya solo komela vin epekisamaki mpo na batu moindo, kasi ata ko bakangaka ye na kisangala ya vin, justice e condaki ye te mpo ezazalki kosala trafic na yango te. Absolument rien ! Tango ba Ngala babimisi Jean Bolikango mpo a remplacer Pierre Molowayi, mundele alobi uqe esengeli élection esalema na avenue Dilolo mpo batu bapona conseiller communal kati na Joseph Wenzi na Jean Bolikango mpo bango banso babale babandaki kofanda na Dilolo na commune ya Kinshasa. Avenue Dilolo, justement, etonda na ba Kongo mpe bango banso ba voter Joseph Wenzi. Sima, Wenzi akeyi kokutana na candidat mosusu ba Ngala esengelaki batiya, yango wana, Eugène Lutula ayaki kolonga, le seul ebonga oyo ba Ngala balongaki na commune ya Kinshasa. Cas ya Kintambo, Ndeko , osili kolobela  yango déjà.

Donc, batu bazalaki na conscience te que politique ezali kikambo ya appartenance tribale te. Malheureusement, manipulation ya mundele elongaki. Suka suka, eyaki kobalukela mundele na ba événements esalemaki le 4 janvier 1959.

 

……………………………………………………………………………………………………………………………………………………

 

Ndeko Saint Georges,

 

Na tango Tshombe azalaki na pouvoir en tant que Premier Ministre, Général Joseph Mobutu azalaki Chef d’état-major ya Armée Nationale Congolaise. (A.N.C.). Ekokamuisa ngai que Tshombe azua risuqe ya ko écarter Mobutu na tête ya état-major général mpo atiya Mpika sans danger ya Mobutu a utiliser Armée contre Tshombe !!!  Kobosana te que situation ya Congo ezalaki très fragile mpe Tshombe akokaki koluka ko bouger bakonzi ya A.N.C. ndenge wana te mpo ayebaki malamu que esengeli boyokani na A.N.C. mpo ye akotisa ba gendarmes na ye na A.N.C. mpo na pacification ya Congo. Donc, ezalaki na recherche ya unite nationale mpo na kokoma na pacification ya ekolo congo en neutralisant la rébellion armée ya Gbenye mpe na certitude ya kolonga élection présidentielle. Sima ya wana nde akokaki ko sala ba changements ndenge akokaki kolinga mpo alingaki a positionner batu na ye makasi na A.N.C.

Mpika azalaki na carrière nionso liboso na ye. CO.NA.CO. esilaki kolonga ba élections législatives. Ezalaki mpe évident que Tshombe akokaki kolonga élection présidentielle face na candidat nionso. Sima ya wana, peut-être, le jeune militaire Mpika alingaki asala carrière kitoko oyo ezali kokende na ba compétences na ye tee kokoma mokonzi ya mampinga ma A.N.C.

Sincèrement, comment Tshombe akokaki kosala Mobutu remarque sur implication na ye na liwa ya Lumumba pendant que ye, Tshombe, Kasa-Vubu na Mobutu bayebi malamu ndenge Lumumba akufaki ? Eloko nde bazalaki na yango en commun yango wana. Le reste ezalaki kokabola bango mpo bango nionso misatu babandaki kowela ebonga moko en adoptant ba stratégies politiques différentes.

N.B.  Na A.N.C., Tshombe azalaki na militaire oyo abandaki kolinga mingi te. Ayebaki bango malamu te mpe azalaki na confiance mingi na bango te. Il suffit otala cabinet ya Tshombe na ba oyo bazalaki kuna en tant que ba conseillers militaires. Aucun Congolais ! Tout comme aucun officier ya A.N.C. azuaki commandement ya ba ex-gendarmes katangais tango bakotaki na A.N.C. Sika, bolingo na confiance oyo ozali kolobela ezali wapi ?

Est-ce que okoki koyebisa biso liste ya ba indésirables oyo ozali kolobela, ezali ko reprendre ba indésirables par commune ? Natuni boye mpo olobi boye : «  Tobosanaka te, ba vieux ya Léo. II bazalaki na kati ya liste ya ba INDESIRABLES. ». Soki oyebi ba kombo na liste wana, pesa biso mpe yebisa biso, pourquoi ba vieux ya Kintambo bazalaki indésirables ?

 

……………………………………………………………………………………………………………………………………………………

 

Ndeko Luvwezo Pindi,

 

Longonia na esprit na ya lisanga mpe buania mpe na lolenge osololi na ndeko Jérôme Nzembele na maloba makasi ma ndeko Leoman. Osololi malamu mpe soki totali malamu ba propos ya Léoman ezalaki na makanisi mabe te. Na élan ya lisolo ezali lolenge ya kosenga na ba mutolu basolola na bozindo, sans pensée ya exclusion.

Na lisolo ya ndeko Joseph Pululu abeti, nazali kotuna raison fondamentale ya frustration na bino na Kintambo ezali nini au juste? Est-ce que rapport ezali entre frustration wana na poste ya commissaire d’Etat na Mobilisation, Propagande na Animation Politique (MO.P.A.P.)? Soki boye, Tshibuabua Hashila Panshi, Sakombi Inongo na Tshimbombo Mukuna, Duga Kugbe Toro, Nzanda Buana bazali ba kinois mpe mibale kati na bango : Sakombi Inongo na Tshimbombo Mukuna bakoma ba gouverneurs ya Kinshasa. Nionso oyo lokumu ya Kinshasa.

Cas ya Major Mpika ezali na rapport na discours ya Kintambo te. Soki tozali kokanisa boye, elingi koloba que tozali ko minimiser ba qualités ya très brillant officier de très grande valeur abengami Major André Mpika Ntoya. S’il te plaît, to mélanger ba sentiments na nostalgies ya Kintambo te, na destin ya Major Mpika mpo ezali na rapport ata muke te. Tolobeli Major Mpika na page spéciale.

Mise en arrestation ya Major Mpika na départ na ye ya Armée ezalaki na rapport te na makambo etindaki Président Mobutu alongola Général Bumba Moaso Djogi na poste ya Capitaine-général ya F.A.Z.  Lisusu, tosangisa sangisa te mpo makambo ya Général Bumba ezali lier na kolukana kati na ye, d’origine Budja, na  ba Généraux, Babia Zanghi Malobia (Zande), Singa Boyenge Mosambayi (mu Bowa), Molongya Mayikusa Moyi Bongenye (Libinza) na Likulia Bolongo Lingbangi (mu Soko). Sauf Molongya, ba Généraux misatu natangi likolo bazali batu ya Haut-Zaïre (Province Orientale). Problème ya Bumba ezalaki que bango bayebisaki Président, chiffre à l’appui que Division des Troupes Aéroportées de Combat (DI.TR.A.C.) etondi na ba Budja, tribus ya Bumba, tout comme ya mama Antoinette Mobutu. Influence ya Bumba ezalaki makasi mingi na ba paracommandos,  ba parachutistes mpe ba commandos ya DI.TR.A.C. Na miso na bango, ezalaki danger mpo na pouvoir ya Président Mobutu. Kobakisa lisusu na incompétence ya Bumba na gestion ya état-major général sur tous les plans. Tokozongela Général Bumba mokolo mosusu.

 

 ……………………………………………………………………………………………………………………………………………………

 

Ndeko Jérôme Nzembele,

 

Réforme administratif ya suka sous le régime ya Président Mobutu esalemaki na ordonnance-loi n° 88-031 ya 20 juillet 1988 oyo ekabolaki région ya Kivu na biteni misatu : Nord Kivu, Sud Kivu na Maniema. En revanche, organisation administrative ebandaki kaka kotambola selon ba dispositions ya ordonnance-loi n° 82-006 ya 25 février 1982.

Par ailleurs, ordonnance-loi n° 90-046 ya 12 février 1990 ekaboli Sous-région (District) ya lac Maï-Ndombe mpe eboti Sous-région ya sika ebengami Sous-région ya Plateaux, Chef lieux na yango ezali cité ya Bolobo. Yango ezali na Territoires mine : Bolobo, Mushie, Kwamouth na Yumbi. En revanche, soki tozongeli réforme ya 24 décembre 1966, 21 provinces ekomaki 8 plus autonomie ya ville de Kinshasa. Par contre, Mbakana etikala kozala Territoire te. Yango ezalaka kaka chefferie (village) ezuami na commune rurale ya N’sele mpe ezali na 150 Km ya centre ville ya Kinshasa (Grande poste). Yango esangisi ba groupements miye : Mbakana, Yuo, Mongata na Mwe.

Na oyo etali opinion na yo sur arguments oyo ndeko Joseph Pululu apesi, nazali kokabota emoneli na yo mpe nasepeli na observation osali. Nakobakisa lisusu que nazali ko comprendre te pourquoi Kintambo esengeli ezala spécial par rapport na ba communes mosusu ? Yango na Ngaliema esali ebandeli ya oyo eyaki kobengama Léopoldville mpe évolution ya ville eye kokotisa ba villages nionso : Lemba, Nshasa, Kingabwa, Kimwenza,  etc. Alors, pourquoi Kintambo alingi ko cultuver culte ya souffrance mpe ya marginalisation ? Mpo na ngai, ba arguments wana ya bana Kintambo ekoki kozala likolo ya ensemble ya Kinshasa te mpo Kinshasa ezali 24 communes. Nakobakisa lisusu que bakonzi banso ba Kinshasa, wuta lipanda, bazali ba kinois mpo bazalaki ba résidents na Kinshasa. Toyebi malamu que na ba provinces nionso ya R.D.Congo bazua ba gouverneurs oyo bazalaki ba résidents na ba provinces wana te mpe balobaka même pas munoko ya provinces oyo bazali ko administrer.

Résident nionso ya Kinshasa akoki koponama Bourgoumestre (commissaire de zone) ya commune nionso ya Kinshasa. Ndakisa : soki nabotama na Kinsenso, nakola na Bumbu mpe nazali kofutela na Kimbaseke, nakoki ko poser candidature na Gombe na élections communales.  Soki avant enregistrement  na changer adresse mpe nakomi kofanda na commune oyo nalingi bapona ngai Bourgoumestre (Gombe), Commission électorale indépendante ekoboya candidature na ngai te mpo nabotami na Kinsenso, nakoli na Bumbu mpe nazalaki kofutela na Kimbaseke mpo nazali effectivement muana ya Kinshasa. Esengeli kaka nde adresse ezala ya commune oyo nazali ko souhaiter kokonza. Soki baponi ngai, wana nakobanda kofanda na ndaku ya commune, résidence officielle ya commune ya Gombe.

A mon avis, soki tozali kolanda logique ya biso bana ya tellle commune tee na niveau national, wana ezali dangereux mpo tozali kobosana que na niveau national okoki lisusu ko s’identifier neti muana ya telle ou telle commune te. Wana ozali congolais. Na niveau provincial, ozali kinois. Na niveau communal nde ezali likambo ya baye bafandi na commune wana sans ko tenir compte ya ba oyo babotama ou bakola wana. Soki adresse na yo ezalai esika wana, ozali résident ya commune wana.

Patriotiquement

 

Emmanuel Kandolo

 

……………………………………………………………………………………………………………………………………………………

 

 Sujet : Naleli Léo

 

Ndeko Buku,

 

Nasepelaki na pesa réaction na ngai soki tosilisi kotanga livre oyo ndeko messager azali kotiela biso mpe na bilili bizali na kati. Mingi ya koloba ezali mpo on a vraiment l’impression que Léopoldville ezalaki oyo Georges Moulaert a décidaki alakisa ba mindele ya mokili mobimba, ezali ville-paradis oyo ebimi na mosala kitoko esalemi na Congo belge. Mingi ya koloba ezali, kasi tozela soki tosilisi kotanga nde nakomeka kopesa opinion na ngai, par exemple na ba conditions ya logement na Citas mpe na lolenge ezalaki compliquer mpo na ko se loger. Eloko mosusu, est-ce que omoni photo ya première cité indigène na ba balabala kitoko lokola na Kalina ? Pourquoi kuna courant électrique ezalaki te ? Je pense que akolobela mpe endettement oyo esalisaki ba travaux nionso wana sans pour autant e profiter directement na ba Congolais. Mingi ya koloba ezali.

Na oyo etali ba mituna otuni, yeba boye :

1. Avenue Maurice Lippens yango nde ebandaka kobengama avenue du 3Z. Ekoma kobengama sika awa, avenue Lemera. Prolongement na yango vers Est ya ville (vers le centre ville), ezali kaka avenue Colonel Lukusa. Avant 1966, yango ezalaka na kombo ya avenue Vangèle.

2. Avenue du Comité urbain ekoma na kombo ya avenue Colonel Vangu. La promenade de la Roquette, ekoma avenue du fleuve Zaïre, sima eye kozua kombo ya fleuve Congo. Prolongation na yango vers l’Ouest, ezali na kombo ya avenue des Nations-Unies (yango ebandi na perpendiculaire na avenue Lemera, na niveau ya  Palais de la nation, e contourner ancienne résidence ya papa Ikamba, ancien P.D.G. ya Inzal, mpe ebuki na coin ya lopango ya Général Masiala. En face ya résidence ya Général Masiala ezali fleuve, à droite nde Palais de la nation. Wuta residence ya Général Masiala nde avenue des Nations-Unies ezali kokabola ba ndaku na fleuve, tee e longer yango, ebaluki na ngomba na ex-résidence ya ba Premiers Commissaires d’Etat = Premiers Ministres (yango ekoma résidence  officielle ya Président Kabila) na niveau ya croissement na  avenue Vallée. Wana nde rivière Gombe ezali komibuaka na fleuve Congo.

3. Avenue Coquilhat nde ekoma avenue Binza.

4. Square de la cité yango ekoma rond point ya Kin Mazière.

5. Avenue Tombeur de Tabora nde ekoma avenue Tombalbaye. Yango nde ekatisi rond point ya Kin Mazière. Esika wana nde ebandaki kobengama Square de la cité. Soki ozali na rond point wana, direction nord, à droite ezali oyo ebandaki kobengama avenue Livingston. Ekoma avenue République Centrafricaine. Soki ekatisi  boulevard Albert 1er (boulevard du 30 juin1960), ebandaki kobengama avenue Baron Wahis. Lelo ekoma avenue Dongo. Na rond point, toujours na direction nord, à gauche, avenue Moulaert, actuelle avenue du Tchad.  Avant 1966, soki ekatisi boulevard Albert 1er (boulevard du 30 juin1960), ebandaki kobengama avenue Allard l’Olivier. Kasi yango ekoma kaka na kombo moko ya avenue du Tchad. Avenue Charles de Gaulle, yango ezali un peu na sud. Yango nde ekoma kobengama avenue du commerce.

6. Rond point ex-Forescom, ekoma place salongo.

7. Monument des aviateurs ezalaki  na croissement ya aba venues des aviateurs,  Beernaer (actuelle avenue de l’Equateur), na Ministre Rubbens (av. de la nation). Esika wana, ebengamaka place de la poste, esika ex-Union Zaïroise des Banques (U.Z.B.) na ex-Compagnie Maritime Zaïroise (C.M.Z) ezalaki. Lelo ekoma Union Congolaise des Banques na Compagnie Maritime Congolaise.

 

 ……………………………………………………………………………………………………………………………………………………

 

  Ndeko Crispin-Régis Lukoki,

 

1. Square de la cité yango ekoma rond point ya Kin Maziere.

2. Avenue Tombeur de Tabora nde ekoma avenue Tombalbaye. Yango nde ekatisi rond point ya Kin Mazière. Esika wana nde ebandaki kobengama Square de la cité. Soki ozali na rond point wana, direction nord, à droite ezali oyo ebandaki kobengama avenue Livingston. Ekoma avenue République Centrafricaine. Soki ekatisi  boulevard Albert 1er  (boulevard du 30 juin1960), ebandaki kobengama avenue Baron Wahis. Lelo ekoma avenue Dongo. Na rond point, toujours na direction nord, à gauche, avenue Moulaert, actuelle avenue du Tchad.  Avant 1966, soki ekatisi boulevard Albert 1er (boulevard du 30 juin1960), ebandaki kobengamai Allard l’Olivier. Kasi yango ekoma kaka na kombo moko ya avenue du Tchad. Avenue Charles de Gaulle, yango ezali un peu na sud. Yango nde ekoma kobengama avenue du commerce.

 

……………………………………………………………………………………………………………………………………………………

 

 Ndeko Don Musiensi,

 

En réalité libongo ya liboso ebandaka na Ndolo na avenue des Inflammables. Sima, epusani ekomi na sima ya gare centrale tango construction ya gare esilaki. Suka suka epusani tee na libongo ya munene. Lelo oyo, wuta Ndolo tee na libongo ya munene, nionso wana ezali ba quais ya masuwa ya O.NA.TRA. na ba compagnies privées. Par ailleurs, ambassade ya U.S.A ezali kaka esika ezalaka na croisement ya avenue des aviateurs na avenue Dongo.

 

 Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

 

................................................................................................................................

 

Sujet : Aux origines de Kintambo, KILIMANI KWETU

 

Ndeko Léoman,

 

Lingala ezali langue ewuti na ba soda oyo bazalaki na Makanza : ba Congolais ; Popo ; Haoussa ; Zanzibarites na mindele. Biso banso toyebi que Makanza ezali mabele ya ba : Ngala, Mueko na Ndobo. Ezalaki mpe esika camp militaire ya liboso esalemaki na Coquilha na 1884, pene na Mbandaka na oyo ekoma province ya Equateur.

Mbala ya sima, tokolobela yango ndenge ekotaki na ba échanges commerciaux mpe na lolenge eyaki ko s’imposer na Kinshasa, mabele ya ba Teke na ba Umbu.

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
K
<br /> <br /> merci mingi ndeko kandolo na serge  na oyo nionso bolobeli biso  nasepeli mingi nayebi makambu oyo nayebaki te yamboka  mbala ya sima soki mosusu ezali bokomela biso lisusu<br /> <br /> <br /> <br />
Répondre
J
<br /> Merci ya mingui ndeko kandolo!<br /> Natunaki bakombo ya ba pionniers wana po bazalaki pe bazali ba grands journalistes oyo ba pesaki ngai passion ya journalisme. Na zalaki kolanda bango na radio pe na television; mais ezali na date<br /> moko nako bosana té, ezalaki le Le 13 juillet 1971.Na zalaki na 12ans, pe na zalaki kokamata pepo pona ko rejoindre papa na ngai na Lubumbashi.Tango wana super DC8 eye sika. Coïncidence esalaki que<br /> à la même période conférence ya la presse congolaise ezalaki kosalema na lubumbashi.Pona ngai ezalaki conte de fée ya ko voyager na ba  stars ya radio pe télévision congolaise.Presque bango<br /> nionso bazalaki wana, et même le grand Kitutu olentwa,, oyo a inaugura ba reportages en direct des grds boulevards de bxll dans les années 66, était mon voisin de siège.Voilà, ezali souvenir monene<br /> oyo e joua mingui na vie na ngai. Encore une fois merci.<br /> <br /> <br />
Répondre
B
<br /> Ndeko Emmanuel Kandolo,<br /> <br /> Likambo ezali te.<br /> <br /> Buku<br /> <br /> <br />
Répondre
M
<br /> <br /> <br /> Ndeko Buku,<br /> <br /> <br />  <br /> <br /> <br /> Limbisa ngai na libungi mpo natie kombo na yo na esika ya oyo ya ndeko Serge. Cependant, na oyo etali motuna na yo, permettre ngai nayanola<br /> mbala moko tango nakosala ba commentaires na suka ya semaine.<br /> <br /> <br />  <br /> <br /> <br /> Patriotiquement,<br /> <br /> <br />  <br /> <br /> <br /> Emmanuel Kandolo<br /> <br /> <br /> <br /> <br /> <br />
Répondre
M
<br /> Ndeko Buku,<br /> Moto atunaki mituna sur bana ya marlchal ezalu Serge. Mpo na Bula Mandungu il faut na vérifier lisusu.<br /> Oyebi mituna miyike miwutaka o nzela ya e-mail. Tokoki mpe kobosana.<br /> <br /> messager<br /> <br /> <br />
Répondre
B
<br /> Ndeko Emmanuel Kandolo,<br /> <br /> namoni obosani, mwa kwokoso ezali awa otiye kombo nanga kasi EZALI NGAYI TE moto natuni mituna oyo etali Mandungu Bula Niati  na Bana ya marechal Mobutu.<br /> Nasengi obongisa esika wana.<br /> Buku<br /> <br /> <br />
Répondre