Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Ndeko Kandolo mbote,
merci na ndenge opesi version ya KASONGO  "europe", ezali exactement kaka ndenge olobi, kasi ezali pe na version ya Kinshasa, puisque kombo ya Kasongo, vieux awutaki na yango na Kinshasa, kasi ezalaki na ampleur lokola awa na Poto te, pour la simple raison ke, batu mingi oyo bazuaki privillege ya kozala na vieux Roche na Poto esika moko, na Kinshasa vieux Rochereau po na bango azalaki en quelque sorte lokola vieux Seskoul po na bango, pour ne pas dire mingi bazalaki naino na poti na miso, soit na mbula ya kobotama, soit ba Messieurs PAS MOYEN, en clair batu ya mpiaka, mingi na bango pe bakota miziki te na Kinshasa.
Vieux Roche aye kovanda na Poto na batu ya promotion na ye te pe ya categorie na ye te, avandi esika moko na baleki, voire meme na bana, yo moko oyebi kosala ki camarade na batu oyo babandi la vie sika, ezalaka penza bien te, bozoba elekaka mingi.
Nakopesa yo exemple moko, tango MPR parti-etat ekueyaki, ba dignitaires mingi bakimaki na ba pays ya Afrique  kobuaka Ngunda, mokolo mosusu vieux moko azalaki General ya FAZ,  azuaki matanga ya monene, tozali bongo na pays africain moko, muasi na ye akufaki na Bruxelles, ba petits nionso ya ba congolais bayaki na matanga wana, po nakovandisa General te, kasi po na ko contempler General oyo, po na bango ezalaki lokola REVE, c' est vrai lelo tokovanda na VIEUX esika moko.
Ba petits nionso ya ba congolais bazalaki koya na masanga, sukali, cafe na bikoko kili kili na matanga, pe matanga yango ezalaki mouvement ya makasi.
Une semaine apres, mokolo ya kopanza matanga, General oyo na mot de remerciement, alobi : Bana na ngai, na baleki na ngai, soki bino te, mbele matanga ya mama na bino elingaki eleka bobele boye, nakobombela bino te, biso ba oyo tozali lisusu na ba moyen na ndenge boyebaki biso na Kinshasa te, tozali mosika ya mboka, soki ozali koleka pembeni ya esika oyo ngai navandi, boyaka kopesa PAPA na bino mbote.
Ndeko Kandolo, une semaine eleki mingi, ba petits nionso bakomi na kombo ya General na monoko lokola ami na bango, eyaki kosala General achanger ndako mosusu, tango ayokaki maye makomaki kobetama lokola disque ya 33 tours na kombo na ye.
Na Kinshasa surnom babesaki vieux Roche ezalaki MAITRE KASONGO, homonyme na ye azalaki avocat ya solo, azalaki ko exister, ye azalaki DEFENSEUR, lokola bino moko boyebi, avocat mosala na ye koyebisa client, il fo owangana, buka lokuta boye, ngai moko nayebi ndenge nako defendre yo...
Apres Olympia, ba malheurs nionso ya mokili e s'abattre sur vieux Roche, akoti boloko ya Makala pendant une semaine, ba musiciens ya Afrisa balongue, bakeyi kosala Afrizam, ba Officiers Generaux ya ANC oyo balingaki miziki ya Rochereau, Mobutu amami bango pension na canaille, en bref mayele ya Mwana ya Tabu esilaki, balobi akomaki meme na makanisi aboma NZOTO.
Ba amis nionso bakimi ye, vieux Roche akomi maboko makasi envers basi, et surtout Vieux Ley akomi LOKUTA, yango nde esika bamamolaki ye kombo ya MAITRE KASONGO.
Lokola na Kinshasa, vieux Roche milieu na ye ezali se ya bango na bango, lokola ba vieux Verckys, Luambo, Longomba, Kalle Jeef, Nico Kasanda na ba Hommes d'affaires, na ba Hommes Politiques na ba Officiers ya Armee, ba Musiciens na BASI - LIKAMBO OLOBI NA BANDUMBA EEE EKOPANZANA MBOKA EEE
Yango omonaki kombo ya Maitre Kasongo na Kinshasa ezalaki na botamboli makasi te, lokola na Poto epayi ya baleki, oyo babaloli yango ekomi VIEUX KASONGO pe na ndenge ya somo, na ba version kili kili.
Awa Papa Wemba, King Emeneya, ye moko Vieux Roche  bazonga na Kinshasa est-ce que boyokaka lisusu masolo na bango na ndenge ya bozoba.
PO SOKI OTALI, NA MOTU OYO ALATA KALA, NA MOTU OYO ABANDI KOLATA SIKA, NANI OYO NA BANGO MIBALE AKUMISAKA ELEMBA.

MOLIKI NZELA
Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
M

En 1982, dans la commune où j´habitais à Kinshasa, le petit-frère du Général Singa Boyende, alors Chef d´état major général des FAZ, y habitait aussi, il était civil, si je me souviens bien sa
femme était de la tribu du Citoyen Président-Fondateur du Mpr parti-état. Cette dernière était jeune et gentille, elle saluait tout monde, et tout le monde l´appréciait, aujourd´hui elle n´est plus
de ce monde.
Bon, cette famille avait perdu leur dernier rejeton, le portail de leur parcelle est grandement ouvert, tout le quartier s´est donné rendez-vous là, pendant une semaine, le samedi soir, le jour de
KOPANZA matanga, le Général s´y amène accompagné de tous les officiers de Haut-Zaïre, au nombre desquels le Général Bangala ex-Alphonse Devos. Dans la journée de ce samedi, le petit-frère du
général, le malheureux parent du petit mort, me contacta et me demanda de lui fournir exclusivement les disques 45 tours de l´African Fiesta Vita, et surtout ceux de Tabu Ley, respectons
l´Authenticité, il n´était pas bon de prononcer le nom Rochereau, Pascal à consonnance étrangère, ce qui était fait, je lui proposa d´autres tubes, il accepta et me fit savoir que YAYA (le
général) et les officiers de sa génération c´est ROCHEREAU, j´ai compris.
Vers 20 heures tout le monde était là, toutes les dispositions sécuritaires aussi, vous savez, c´est le EN CHEF des FAZ, donc le premier responsable de l´armée après Mobutu, qui est avec nous. Je
suis installé à deux tables d´où était assis YAYA, je le contemple, c´est une curiosité pour moi, le temps des émotions passé, les vraies choses commencent.
Le porte-parole de la famille, sûrement un militaire, vu son allure, demande à l´assistance de ne parler qu´en Lingala, la langue comprise par tout le monde dans notre commune. Yaya est resté
jusque 22 heures, donc de 20 à 22 heures, je vous le répète, il n´y aura que de l´African Fiesta Vita.
Après le départ du Général Singa, on sentira aussi qu´un dixième de la population avait disparu du lieu de matanga, le Chat parti, les souris dansent, dit-on, et maintenant c´est le KANETON A
L´AISEMENT à gogo.
En lisant cet article sur le fanatisme des Officiers de l´Armée à la musique de Mwana Tabu Seigneur Rochereau, j´ai jugé bon d´apporter ce témoignage inédit.
Mwana Ngaba.

Répondre
K

Tout le monde connaissait bien l'origine de l'Ouragan contre Rochereau, c'est pourquoi il ne faisait pas bon d'etre l'ami ou d'avoir connu Rochereau, c'est ainsi que ses pairs musiciens ont pris
leur distance, Rochereau se sentira abandonne, mais la preuve d'amour et de fraternite lui sera prouve a son retour d'exil, apres avoir chante LE GLAS A SONNE.

Répondre
E

Muziki na tangu ya ba vieux Rochereau, disons jusque na 1970, ezalaki mingi batu oyo bazalaki na mua mosolo, to ba postes ya mosala ya kitoko, lokola ba politiciens, ba douaniers, ba Sinangale
(Soule Labaran A Baba, Arsene Dionge) et surtout tangu Mobutu azuaki bokonzi na 1965, bakonzi mingi ya ba Soda bazalaki kosepela na miziki ya Rochereau Mwana ya Congo Mokitani ya Wendo.
Nde tangu Mobutu abambaki bakonzi ya Haut Commandement Militaire pension na canaille, ekutanaki na tangu oyo vieux Rochereau makambo nionso ya mabe ekueyelaki ye, ezali te Mobutu apesaki ba
Generaux pension mpo na Rochereau, ezali nde coincidence facheuse, comme on dit un malheur ne vient jamais seul.
Kozonga ya vieux Roche na mboka apres Olympia, eyelaki ye mindondo, justice etindelaki ye b convocations aboyaki ko se presenter, yango nde bayaki kokanga ye, mitif asalaki wana ezali domaine ya
justice. Lokola Rochereau akotaki boloko, batu nionso oyo vieux Roche adefaki ba mbongo na bango, mpo na ko preparer Olympia ba se presentaki epayi ya justice, eyelaki vieux Ley lisusu nginda
nginda, esika ba musiciens ya Afrisa ba decouvraki makambu mingi na kati ya gestion ya orchestre, mpo biso nionso toyebi ezalaki nde presidence de la republique motu a supportaki preparation ya
Olympia.
Ndenge nalobi, bakonzi ya ba Soda lokola bawutaki kozua pension, moyen ya kolonda lisusu makambo ya Rochereau ezalaki te, puisque bango moko bakomi na makambo oyo eleki bango moto.
Vieux Rochereau asalaki tout juste une semaine na Makala, mokolo abimaki na boloko, Vieux Lunkunku Sampu Benoit, a improvisaki KIN/SHOW mokolo yango, mpe vieux Rochereau alobaki, akoti boloko mpo
aboyaki ko repondre na ba convocations ya Leta, alors soki ozui convocation il fo o se presenter.
Tangu bakangaki vieux Rochereau Afrique Mobimba eninganaki, President Ngouabi na Brazzaville asengaki, soki Kinshasa ezali kokoka Rochereau te, batindela ye puisque ezali soni mpo na Afrique
Centrale, Idi Amin Dada mpe asengaki, Senghor na Senegal ye alobaki Rochereau azali Citoyen senegalais, Ahidjo na Cameroun, Bokassa na Centrafrique, Tombalbaye na Tchad etc... bango nionso se
likambo moko, batindela bango Rochereau. Awa na biso na Congo Mobimba mawa ekotaki mboka....
Soki olandi maloba ya nzembo PROPHETA, vieux Roche asakola boye : NAMIPESI NZOTO, MPO YA LOKUMU YA MBOKA, NZOKA NDE BAZALI KOKANELA NGAI...

Répondre
J

Bonjour Moleki Nzela
j'ai besoin de quelques eclairecissements par rapport à ce qui précède:pourquoi tant de deconvenues au lendemain du triomphe de l'olympia? pourquoi la prison? pourquoi Mobutu  s'en prend
jusqu'aux généraux fan de Tabu Ley.Qu'est ce qu'il s'est vraiment passé? merci d'avance ndeko MOLEKI NZELA

Répondre