Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Ndeko Buku,

Otuni boye : « Motuna na nga esika nini Congolais atiyaka tourisme, ba sites historiques okati ya bomoyi na ye? Ezali kaka po na mindele ? ».

Tika na yanola yo na ba ordonnances mpe na lolenge tourisme etambola na ekolo na biso.

Ordonnance  n° 75/231 du 12 juillet 1975 fixant les attributions du Département de l’Environnement, Conservation de la Nature et Tourisme, et complétant l’ordonnance n° 69/146 du 1er aout 1969

Le Président-Fondateur du Mouvement Populaire de La Révolution, Président de La République ;

Vu la constitution, notamment le chapitre IV de la Section III du titre III;

Vu telle que modifiée et complétée à ce jour, l'Ordonnance n° 69/146 du 1er  août fixant le nombre des Ministères, leur dénomination et leur compétence respective;

Considérant les décisions prises en date du 2 avril 1975 par le Comité Permanent du Bureau Politique du Mouvement Populaire de la Révolution, notamment en ce qu'elles concernent la création d'un Département de l'Environnement, Conservation de la Nature et Tourisme;

Vu l'Ordonnance n° 75/139 du 2 mai 1975 portant nomination des Commissaires d'Etat,

ORDONNE :

Article 1

Le Département de l'Environnement, Conservation de la Nature et Tourisme a pour mission de promouvoir et de coordonner toutes les activités relatives à l'Environnement, à la Conservation de la Nature, au Tourisme, et à l'Hôtellerie et de prendre toutes les initiatives et toutes les mesures tendant à la pleine réalisation de cette mission, conformément aux progrès actuels de la science.

Il est chargé, notamment, de :

En Milieu Urbain :

-  assurer la salubrité du milieu humain par la lutte contre toutes les nuisances provoquées par la pollution des eaux, du sol et de l'air;

-  créer des établissements humains par l'aménagement des zones vertes et des parcs d'attractions, tout en assurant une bonne politique de reboisement et de lutte antiérosive;

-  donner ses avis sur des questions relatives à l'Urbanisme et à l'habitat ;

-  émettre des avis circonstanciés sur tout projet d'industrialisation ou d'aménagement susceptible d'améliorer ou d'apporter atteinte à la qualité de la vie.

2.  En Milieu Rural :

-  créer et gérer des stations dites « de capture » établies au sein ou en dehors des réserves ;

-  créer et gérer des écosystèmes des eaux et des forêts.

3.  Dans le domaine du Tourisme et de l'Hôtellerie :

-  promouvoir le tourisme au Zaïre par tous moyens appropriés, notamment par la propagande, la création des bureaux de renseignements pour touristes et l'aménagement des sites touristiques ;

- promouvoir et organiser l'industrie hôtelière de l'Etat.

Article 2

Le Département de l'Environnement, Conservation de la Nature et Tourisme sera doté d’organes spécialisés requis pour l’accomplissement de sa mission.

Il pourra, à cet effet, créer des sociétés ou des offices concourant directement ou indirectement à la réalisation de son objet.

Article 3

Le département de l'Environnement, Conservation de la Nature et Tourisme, assure la coordination des commissions interdépartementales, déjà existantes ou à créer,  traitant des questions relatives à l'Environnement, à la Conservation de la Nature, au Tourisme et à l’Hôtellerie.

Article 4

Les tâches et attributions anciennement dévolues à l'Office zaïrois du Tourisme «O.Z.T.» ainsi qu'à l'Institut National pour la Conservation de la Nature "I.N.C.N." reviennent de droit au Département de l'Environnement, Conservation de la Na ¬ture  et Tourisme.

Article 5

Toutes les dispositions antérieures qui seraient contraires à la présente ordonnance sont  abrogées.

Article 6

Le Commissaire d'Etat à l'Environnement, Conservation de la Nature et Tourisme est chargé de l'exécution de la présente ordonnance qui sort ses effets à la date de sa signature.

Fait à Kinshasa, le 22 juillet 1975.

MOBUTU SESE SEKO KUKU NGBENDU WA ZA BANGA,

Président Fondateur du Mouvement Populaire de la Révolution et Président de la République

ANNEXE

Organigramme ya Département ya

1. Commissaire d’Etat

2. Etudes-laboratoire, Direction générale, Comité interdépartemental pour l’E.C.N.T.

Service généraux

3. Directions

a) Environnement rural

Création na aménagement ya ba parcs nationaux na ba réserves nationales, politique ya conservation de la nature, relation extérieure, gestion des ressources aquatiques na forestières.

b) Environnement urbain

Aménagement ya ba zones vertes na ba parcs ya recréation, gestion ya ba zoos na jardins botaniques, habitat na salubrité ya milieu, environnement industriel, prévention na lutte contre pollution na nuisance.

c) Tourisme na hôtellerie

Politique touristique, projet investissement na aménagement hôtelier, formation hôtelière, relation interdépartementale na intergouvernementale na permis de conduire internationaux.

Na Mont Ngaliema okokuta Institut des musées nationaux. Tanga ba sujet ya 9 na 13 février 2009, kuna tolobeli mpe tolakisi bilili bia mont Ngaliema. Kuna nde okokuta ba monuments ya ba rois belges Léopold II na Albert 1er ; Henry Stanley na bikeko bia batu oyo bakufaki na ba travaux forces ya kotonga chemin de fer ya Matadi Kinshasa na bilembo bisusu.

Na Kinshasa, ba sites touristiques ezali ebele nakotanga na ndakisa : mémorial ya ba pionniers ya chemin de fer de Kinshasa-Matadi, première locomotive oyo efongolaki ligne iye le, 6 mars 1898 mpe etambusamaki na oyo a dirigeaki misala mia kotonga rail ya Matadi-Kinshasa, Ingénieur Luxembourgeois, Nicolas Cito . Reste ya chaudière ya bateau ya vapeur ya Révérend Pasteur protestant, George Grenfell. Baobad ya village Nshasa na avenue Wagenia mpe na Hôtel ABC na place ONATRA, hôtel ya liboso ya Léopoldville na 1914. Kaka na avenue Wagenia, nakobakisa immeuble oyo ezalaki ya banque commerciale ya Congo, esika ekoma ministère ya portefeuille.

Jardin botanique = parc de la Révolution (ex-parc De Boeck) na jardin zoologique ya Kinshasa entre ba avenues, Ruakadingi, commerce, du Marais,  Kasa Vubu, na Wangata. Bibliothèque nationale na avenue Kisangani, université ya  Kinshasa na musée de la préhistoire ezali na site na yango, stade de martyrs de la pentecôte, stade tata Raphael, zando ya munene, wenze ya bikeko, monument ya Tam Tam na foire, monument ya martyrs ya indépendance (échangeur ya Limete), monument ya Premier Ministre Patrice Emery Lumumba, Stèle ya cité de la N’sele, monument ya Président Nelson Mandela na Place ebengami na kombo na ye, monument des artistes na Place ebengami na kombo ya ba artistes,  Place du souvenir na monument ya la pleureuse, Place des Nations-Unies na Royal, Représentation  ya nations Unies na Kinshasa wuta 1960, building ex-Forescome.

Palais de la Nation, Palais du peuple, Palais de marbre, Palais de justice, Eglise Saint Léopold ya Kintambo (1899), Eglise Sainte Anne (1913), Saint Pierre ya Kinshasa ya Kinshasa(1933), Saint  François de Sales ya Kitambo (1939), Cathédrale Notre Dame du Congo ya Lingwala (1948), Saint Paul ya Gombe (1946). Paroisse internationale protestante ya Gombe (1915), Cathédrale du Centenaire Protestant à Kinshasa-Lingwala (1991), Eglise du Christ au Congo - Communauté Baptiste du Fleuve Congo (1923), Chapelle Sims (1891), Grand séminaire Saint Kagwa, Couvent ya ba religieuses Franciscaines, Concession ya Kimuenza, Centre d’accueil Kimbanguiste na Mosquée ya Itaga.

M'Yanda Yala, joli Site (na 15 Km ya Kinshasa), Pic ya Mangengenge, Menkao, Kimpoko, Plateau ya ba Teke, wenze na libongo ya Kinkole, Maluku na paysage na yango Domaine présidentiel de la N’sele, lac de ma vallée, lac verte,  plage ya Mfuti, Symphonie naturelle, Sentier ya caravanes,  chutes ya Lukaya (na 30 Km ya Kinshasa) terminus ya route des caravanes  esika  sanctuaire ya ba  chimpanzés nains bazuami : Lola ya Bonobos. Village Selembao na nzete ya Wenge. Maison communale ya Ngaliema,  ba nzete ya baobab mibale na baie ya Ngaliema esika bokutani esalemaki kati na Ngaliema na Stanley. Ile de Mimosas, Pool Malebo, Rapides ya Kinsuka, Chantier naval ya CHANIMETAL, UTEXCO,  Sémaphore ya  Léo-ouest, gare ya Kintambo, Centre Nganda, gare  ya Itaga, Bombo Lumene, Domaine mpe réserve ya chasse na Maluku na 125 Km ya Kinshasa. Novierat ya Sphents ya Mbudi,  Cimetière ya ba  Chefs Bahumbu, cimetière  ya ba pionniers, cimetière ya ba jésuites,  mausolée  tata Raphaël, mausolée ya Président Laurent Désire Kabila, Premier Hôpital ya Congo  (Hôpital de la rive), Cité ya R.T.N.C., Bâtiment administratif, Complexe Sainte Marie epayi bakunda Cardinal Joseph-Albert Malula,  Ecole de navigation, ou encore kosala ba randonnées na fleuve (club nautique ezali na Kingabwa wana).

Na 1889, Léopold II, azuaki mokano mua kosala ba réserves ya chasse mpo na ko protéger éléphant mpo akomaki menacer mingi na demande ya ivoire ndenge ebandaki kaka kozala makasi. Tango roi akufi, mokitani na ye,  Albert 1er, na 1908, asalaki ba réserves naturelles ya sika. Na 1925, nde parc national ya sika ebengami na kombo na ye, parc Albert 1er , esalemi. Yango e continuaki koya munene mbula na mbula : 1929, 1934 et 1935 tee na ndenge ekomi ndenge ezali lelo oyo, parc de Virunga. Institut Congolais ya Conservation de la nature (I.C.C.N.) nde esalemaki awa.

Na 1929, Institut des parcs nationaux esalemi mpe etiami sous tutelle ya ministère des Colonies na Bruxelles. Création ya Institut des parcs nationaux nde eyaki kobota ba parcs misatu ya sika : Garamba, Upemba na Kagera.

Na 1934, ekomi kobengama : Institut des Parcs Nationaux du Congo Belge (IPNB). Avant indépendance ya Congo, ministère ya Colonies etiaki parc Kagera na Rwanda. Yango wana ekoma ya bango. Mpe ba parcs oyo etikali, ekomaki ko dépendre na ministère ya agriculture tango tozui lipanda, wuta 1960 tee na  1969. Sima nde eyaki kokoma na ministère ya Environnement, Conservation de la nature et Tourisme.

Na 1970, ba réserves naturelles ya sika esalemaki lisusu mpe na 1972 mpe ebakisi lisusu ba superficies ya ba parcs. Na 1972 Institut National pour la Conservation de la Nature (I.N.C.N.) ekomi kobengama Institut Zaïrois ya Conservation de la Nature (I.Z.C.N.). Yango ebonguanaki statut na yango conformément na ordonnance oyo etangami likolo mpe esali mikanda ya ko vulgariser mpe ko intéresser batu na tourisme na Zaïre mpe ba publicités makasi ekomaki koleka wuta 1972 na télé na la voix du Zaïre mpo na kotambusa lokumu ya richesse touristique ya Zaïre. Ba mikanda na ba dépliants ebele ezali imprimer.

Office ya Tourisme esalemi mpe efonguami Bureau na yango na Bruxelles mpo e travailler na ba agences de voyages na ba tours operateurs ezuami na mikili. Centre culturel efunguami mpe na ambassade ya Zaïre na Bruxelles, Revue Zaïre mpe efungoli Bureau na Bruxelles, Véritable politique touristique ezalaki mise en œuvre. Na ba pays ya marché commun mpe na ba événements nionso ebandaki kosalema kuna ou travers le monde : festivals, foires, expositions, séminaires, conférences, etc. batu ya Commissariat Général ya Tourisme babandaki kokende.

Tourisme ezalaki kokotisa mbongo mpe kobenda batu ebele na Zaire mpo richesse wana ezalaki. Wuta milieu ya ba annees 80 mpe na koya massivement ya ba réfugiés hutus rwandais na Est ya Zaïre sima ya génocide ya 1994, na ba guerres ebele elandani kuna, ebebisaki ba réserves naturelles.

Wuta 1996, kombo ya Institut, ekoma : Institut Congolais ya Conservation de la nature (I.C.C.N.) Yango ezali kaka kobunda na gestion ya ba sept parcs nationaux oyo : Parc National ya Virunga, Parc National ya Upemba, Parc National de la Salonga,  Parc National ya Maiko, Parc National ya Kahuzi-Biega, Parc National ya Garamba,  Parc National ya Mangroves.

I.C.C.N. ezali mpe na ba réserves ya ba domaines ya chasse mpe na ba réserves ya faune na ba parcs misusu : Réserve ya Faune ya Lomako-Yokokala, Réserve ya Faune ya Okapi, Domaine ya Chasse ya Rutshuru, les Domaines ya Chasse ya Gangala-na- Bodio ; Azandés ;  Mondo-Missa na ya  Bili-Uéré, Gorges ya Lukwila, Grotte ya Mbanza-Ngungu, Grotte Dumba, Grotte ya Mont-Hoyo, Jardin botanique ya Kisantu, Barrage ya Inga na ba chutes ezali kuna, embouchure ya fleuve Congo na Banana, ba Chutes Wagenia ; Rutshuru ; Guillaume ; Luie ; Maï Munene ; Lulua ; Lubi ; Kilubi ; Kakule ; Lufira na Lufoï. Déversoir ya Semlinki na ba lacs  Mobutu na Idi Amin, lacs Tanganyika, Mayi Ndombe ; Tumba ; Munkamba ; Upemba ; Fwa ; Moero ;  Kisale na Kivu. Jardin Botanique ya Kisantu na domaine ya diamant vert na Kasangulu mpe ba randonnées na fleuve.

Ndeko Buku, sika na banzi que soki obakisi ba sites mosusu nabosakni kotiya, okozala na liste mulayi ya lolenge okoki kobanda kolekisa ba vacances na yo na Congo. Nayebi ninii nazali koloba mpo na visita ba site oyo tout comme na voyagea na ba moyens de transport nionso oyo ezali na ekolo na biso. Nabanda kotambola na intérieur ya R.D.Congo wuta nazali muana moke na ba boti ba biso mpo balingaki toyeba Congo profond. Yango wana mpe nateyaka ba compatriotes que esengeli baluka komona beauté ya Congo esika nionso : na Nioki mboka mabaya, Kwamouth malela, Bumba Lokole, Lisala Ngomba, koleka Basoko tee na Kisangani. Kotshola na masuwa na ebale ya Congo ezali na plaisir mingi, mayi ya Kasaï, kokatisa lac Mayi-Ndombe, Kotambola na plage na Moanda tee na Banana, nzela ya train Kinshasa-Matadi, Ilebo Lubumbashi, kolula Likasi mpe kobuaka lisu na Kasumbalesa, kokende ko admirer Tanganyika, ebongo Goma, Bukavu, komata na Bunia, tee na Aru, kokita Kananga, Mbuji Mayi, komata Luebo tee na Mobayi mbongo, kozongela nzela ya Tshikapa, Kikwit, Masi Manimba, Kenge , kokatisa Kwango, kokweya na Kafulu Lundala, kolanda na plateaux ba Teke tee komona Kipoko na N’Sele.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo
Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
F

Nous vous remercions de montrer votre patriotisme.
En effet, nous sommes une association basée à Kinshasa,nous encadrons et formons les jeunes en construction métallique. Notre souci est de rendre notre milieu attayant sutout, construire des
infrastructures de transport à grande échelle pour permettre aux touristes, chercheurs, vacanciers et
autres à visiter notre pays surtout les milieux riverains. Dans des conditions nobles.
C'est pourquoi nous cherchons les partenaires pour ce faire.
Votre réaction et bonne collaboration. François Mboengongo.

Répondre
C

Bandeko na ngai.Likambo ya koyeba mboka na biso en voyageant ezali likambo ya moke te.Pour commencer,tozangi ba moyens économiques.Sima na yango nous n´avons pas l´infrastructure voulue.Tango ya
banoko,voie fluviale ezalaki malamu et practicable,la même chose pour les voies ferrées,pe soki oyei kotala voie aérienne ezalaki organisé na ndenge nayango.Avant l´indépendance ,j´avais eu le
privilège de voyager à Mushie,car mon père y était  transféré due à son travail comme commis d´état.Ndenge Ndeko Kandolo awuti koloba,il faut okota masuwa po omona kitoko ya ba village na
biso.Soki omoni paysage ya site ya Mangenge,grandeur ya fleuve majésté na Kwamouth et puis na tango wana fleuve ezalaki soigné(balisage na dragage),chose qui n´existe pas aujourd´hui.Lokola biso
mtozalaki kokota nzela ya mai Kasaï,soki okomi na Ladi okomona ndenge Mai ndombe na mai Kasaï bazali ko marquer limite na bango tii na Mushie esika bakokabuana,ezali scène moko
impressionante.Banzela mingi ya mituka ezalaki asphaltées te,mais ezalaki practicables.Lel´oyo banzela nioso wana ebunga.Na fin août ya 1958 to voyageaki de Mushie à Léopoldville na voiture.Totika
Mushie na 10h30 pe tokomaki Léo na 24h.Banda mushie tii Mbenkana nzela ezalaki asphaltée te,kasi très practicable,tala kitoko ya mboka,plateau ya Bateke,ba colonies ya ba singes ndenge na
ndenge,baniama lokola antilopes na ba autruches,pintades na perdrix incroyable.Na 1967(décembre)nayaki ko voyager tii na Popokabaka,macadame ekomaki tii na mai ya Kwango,kasi bach ezalaki ya
malonga lisusu te,pe tango tokotaki na nzela ya Kenge vers Popokabaka,towumeli de 17h à 3h du matin.Lelo nayebi te soki banzela wana ekoma ndenge nini.Ba avions ekoma soki omati yango osimbi motema
nayo na loboko puisque oyebi te soki okoma epayi ozali kokende.Fleuve ekoma ba accident ndenge na ndenge.Soki omoni remorqueur ya ba barge naposa ya ko voyager esili.Biloko oyo nioso ezali ko
favoriser pratique ya tourrisme te.Tango nazalaki muana moke nazalaki kokende mingi na ba grottes ya Thysville en excursion ya ba boys scouts,too entre amis,Bisika wana bizalaki na nzela na yango
ya mabele typique ya région kasi yango ezalaki malamu.Namonaki propagande ya ba grottes na Internet,soki otali nzela,naposa kutu ya kovisiter esili.Tokendeki na Inga tango barrage ezalaki en
construction na 1970 avec le Chem-chem yetu.Voyage nabiso ezalaki exellent banda Kinshasa-Matadi(train),Matadi-Inga-Matadi(bus) et puis Matadi-Moanda-Matadi(vedette).Kasi lel´oyo po osala
itinéraire wana ezali likambo monene.Mboka na biso ezali trop grand et sans infrastructures.Tango nazali na Kinshasa,ba dimanches tozalaki kosala tourrisme intérieur na bus ya tourrisme mpe prix a
ba excursions ezala modéré.Il y eue quand même un moment de sensibilisation au pays,mais les décisions mal prises nous ont foutu dans le pétrin.C´est
malheureux.

Répondre
B

Ndeko Garba Emeka,

Masolo oyo ya patrimoine culturel, na biso ezali na tina mingi, soki lelo okeyi na académie des beaux-arts na Kinshasa okomona ndenge ba bikeko ezali kobeba ndenge wana, nani atala yango ata lisu.
Omoni masolo oyo ezali ya kafukafu oyo ezali bomengo ya ba mboka mosusu bazali ata na pawuli te.

Nakozongela lisusu motuna na nga BA CONGOLAIS BAKOKI KOTELEMA LELO PO BABOYA SOKI BABUKI BIKEKO TO NZETE ya talo oyo ezali na kati ya histoire ya Congo?
Hôtel de ville de Kinshasa ezali na bureau ya tourisme, mosala na yango nini pe ekanisaka nini, esalaka nini?

Tala na commune ya Kitambo ezali na mondele ya mabele oyo ekabolaka ba mindele na bayindo, lelo oyo nabanzi ata palaki moko te ezali pona kolakisa na batu esika yango ezalaki.

Bandeko bopesa makanisi na bino po soki ezalaki miziki mbele bokomi ebele, tozali na posa na yango.

Buku

Répondre
G

Ndeko Buku,
Nakobakisa mua moke boye, oyebi tangu president Mobutu azuaki likanisi ya kolongola ba Monuments ya ba Noko na mboka na biso, ezalaki mesure politique moko ya makasi, ba Tata mpe ba Mama na biso na
tangu wana, bandimaki mobeko wana, mpo yango ezalaki mpe mokano na bango, na nse ya mitema, ba monuments ya ba Noko ezalaki lokola bokonzi ya ba Noko ezalaki kaka kolandama na sima ya Lipanda,
avant 1960 = apres 1960.
Raison mosusu ya makasi ezalaki, bango moko ba Noko, sous la colonie, bazalaki kondima BO NKOKO na biso te, surtout na likambo etali, bikeko ya Mpungu mpe makambo na biso ya bo Nkoko, c'est normal
biso mpe tobuaka ya bango na mayi.
Kende partout na mboka ya bato bayindo, ezala na Afrika to na Diaspora, lokola Haiti, Bresil etc... Bikeko ezali signe ya MPUNGU YA BANKOKO.
Yango tourisme na mboka na biso, ekotambola kaka malamu, soki tozali kotala BIKEKO ya ba Noko, bongo oyo ya biso moko ezali tourisme te.
Oyo ezali mua likanisi na ngai, nakosenga na baninga mingi oyo naino batanga buku ya ndeko na biso moko, ya mboka Nigeria te, batanga yango, ezali kolobela sur la Culture negro africaine autour du
fleuve Zaire.
Garba Emeka.

Répondre
B

Ndeko Emmanuel Kandolo,
Na maye okomi, lelo oyo patrimoine nini oyo Congo asenga na Unesco po na kobatela yango na ndenge bakoki kobuka yango te, longola ba parcs nationaux ? Biloko nini to ba esika nini na cadre ya 5
chantiers ata ndenge nini ezala nzete bakoki kokata yango te po ezali patrimoine culturel ya mboka?

nayebaka kala ezalaka na monument moko ya Stanley na Kisangani na pembeni ya libongo, nabanzi basi ba buka yango kala pe elimwa.

Lelo oyo Congolais azali na nguya ya kotelema pona koboya babuka monument, to bakata nzete moko oyo ezali na histoire ya mboka to batonga na kati ya site historique? Na motuna
oyo po lingala ya batu mingi ezali "bikeko wana nakokende nayango wapi?" naluka falnga na nga naliya. politique nini bakonzi na biso bazali na yango pona kobatela lelo tresors oyo?

Yo moko omoni richesse ya avenue Wagenia kasi batali yango pamba. Hôtel Palace ya Onatra ezalaki premier hôtel de luxe ya Afrique centrale.

Nabanzi, ba ndeko mingi bakotondisa lokasa oyo ndenge balobaka" bakatisa ebale te, kaka pona koluka esika batekaka lungwila!"

Buku

Répondre