Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Longonia  lisusu na ndeko Ema kandolo, oyo na yebi te kasi maloba na ye emonisi bwanya mingi mpe bolingo na ye epayi ya ndeko na ye oyo azongiseli ye maloba.

Nalandi yango na esengo mingi, pamba te, eloko moko ezali koboma mokili, se lokambo  moko, Bolingo ezangi!!!!

Lokola biso bato y'Africa tozali na mayele mingi, mpo totiaka ntembe te ete mokili oyo esalema, 'to ekelami na nzambe, na yango tozali na mayele ya solo, mpo na mikili misusu, ming mingi, bozui epesaka bango mua lolendo , mpe bami banzaka 'te bakoki, na kolobakâ ete YEHOVA TO Yawe nzambe azali te, yango ezali lofundo ya mosuni, oyo ezangi boyebi ya solo.

Boko limbisa ngai, na lingi ko teya biblia te, kasi na lingi na buaka mua liloba ya ki bondeko, lokola na sepeli mingi na kotanga maloba ya lisolo ya ndeko Ema Kandolo ye na ndeko mosusu, na simbi mua liteya moko na na maloba na ye, yango " totika biyoka yoka, kasi toluka koyeba siki siki likambo liboso emata nzete"

Ngai, na lingaka Emile Soki Mingi koleka, mpo na mboka ya Kutu na nzela ya mai ndombe oyo na botama pe na kola ti na mbula zomi, tozalaki kolalate, soki tozali koyoka mindule na ye na radio NEC, Na zalaka na bokati kati te mpo na likambo etali Emile Soki, Kasi na tondi ndeko na mua toli apesi biso nionso na nzela ya Mboka

Mosika, mpe na sepeli ete alobi maloba ya kozokisa moninga na ye te kasi nzela ya toli.

Tozalaka boye, maloba ya yesu alobaki ete na ntango ya nsuka , Bolingo ya Bato ebele ekokoma mpio( matai mokapo ntuku mibale na minei,24, nzela ya kotanga, verset, zomi na na mibale)  maloba makasi, yango ezali komonana lel'oyo, toluka mosika te, kaka pene, soki mindoki ebimi, tò koyina, koyiba, likunia, na kozanga kokaba, moyimi, Congo to mikili mingi mizali kobeba, ntina se maloba ya YESU, BOLINGO ya bato ebele ekokoma MPIO, soki bolingo eloko ya moto ekomi mpio lokola café oyo ekomi mpio, ekoki lisusu komelama?? soki moninga bolinganaki akomi mpio mpio, esengo ezali lisusu?, na bo muana na yebi 'te soki epayi ya Mama na songolo ba pelisaki mbabula te, noki noki mama asi atindi mua sani na nionso ya koliya,, Za polo kende ko pesa mama na pakala biloko oyo, kasi  lel'oyo  bolingo ekomi mpio.

Likambo ya liboso ya kobongisa azali bolingo, koyokana, ko bakisa mua mungua na maloba na biso, kozala na bo moko.

Po na ku sikisa ba ndeko ya mboka mosika, na kanisi na si na zuaki mua libaku ya malamu ya kopesa bino longonia na mosala kitoko oyo bozali kosala, lokola ndeko na ya la Voix du ZAÏRE M.K. MATETA KANDA, NA BO MUANA NA NGAI, azalaki koyokisa esengo na miteman ya bato, po na kotiela bango ba nzembo ba zalaki kosenga, na banzi 'te boyebi ye, na yebi te soki azali na bomoyi.

Bino pe lokola bozali mpenza kozongisa esengo, uta kala, basaleli ya nzambe bazalaki kosepela na nzembo lokola, mkonzi DAVIDI, MALOBA YA KOPESA BINO BOTONDI EZANGI NGAI, BOKOBA SE KOKOBA!!!

Na sanza elekaki na sengaki bino ba nzembo ya Emile oyo na zali kokufela, na Max ndeko na ye oyo ndeko Ema Kandolo alobi na solo mpenza, koyeba koyembaekoki kosalisa moyembi  akende mosika te, kasi soki azali makoki misusu, ndakisa oyo Koffi, aye kobakisa, ata ko azali na mongongo ya nsomo te, kasi Mayele ya comelesant, mayele ya koluka luka, mayele ya kokanisa lobi, ebakisi na likabo oyo nzambe apesi ye ya kotonga nzembo, eali ye akoma oyo azali lelo, kasi azali moto ya kozanga kokoka( imparfait) lokola ngai na bino; bongo na koki lisusu kosenga bino, na mua soni mpo ezali mbala ya mibale, nzembo ya Emile SOKI, KALANDA, ntongo etani nayoki se sango, oyo bokoki kozua ya BELA MAMBO, NA KOTONDA BINO BOTONDI, NOSTALGIE Gaby lita, MILENA MILENA YA kester na lisanga ya Viva la Musica, fleur d'été, Kester, Nazoki ezali ya seskain na PéPé Kalé, soki likoki ekozala boyeba ete boko tondisa ngai n'esengo.

Ba ndeko soki tokoki kosala nini mpo to pesa bino maboko ata na mua meya muke na musala ya elengi , bozali kosala, na ko tikala sima te, pamba te musala na likanisi na bino ezali na mutuya munene.

Mapwe pwe na bino banso, mpe na ba ndeko ba tangi, totonda na BOLINGO, mpe na kolimbisana, liboso na yango eloko mosus ezali te.

Wa bino Ndeko Jean Paul na Engumba Genève

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
M

au sujet ya ba fréres Soki ,nazali na commentaire ya kosala te mpo nionso esi elobama mpona vie na bango .Tango Emile abandi miziki na 14 ans , ngai nazalaki na 13 ans , ba prémiers amours ya
vie na nga , nalingaka bango na ba nzembo ya Emile Soki.Yango te lelo atikala idole na nga.Merçi Mboka Mosika ndenge okundolaka ba souvenirs mpe vie molayi na ndeko E Kandolo.Soki bokoki kobetela
ngai baiser ya litama ya Emile Soki ,mpo yango nde ekozongisa ngai na jeunesse na ngai.Bomoyi bolayi à tous les Mbokatiers.

Répondre
C
"quand les blancs sont arrivés, nous avions des terres et eux bible ROMAINE, mais dix ans plus tard, nous avions la bible ROMAINE et eux nos terres" JOMO KENYATTAcongo ya sika
Répondre