Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

DioDio,

  

Eloko tobosanaka ezali nde ya koyeba langue ya mboka oyo ozali ko vivre. Wana esengeli ezala priorité ya liboso. Soki oyebi lokota ya mboka ofandi ekofongolela yo ba nzela ebele mpe oko comprendre ndenge mokili ofandi mozali kotambola : okoki kokota classe mpo ozua formation;  kotangisa bana na yo na ndaku sans problem ;  kokoma  curriculum vitae na kosala letter de motivation na yo sans problem (bino kuna, cover letter and resume);  passer permis de conduire sans hesitation;  kokende réunion ya ba parents sans kobanga; ko revendiquer ba droits na yo pepele mpe kolanda mibeko mia l’Etat sans kotungisama.

Mon frère, tala na cas ya irresponsabilité, mibali misuse bakoma ko faire déclarer bana bazali kobota na basi na bango pembeni na kombo ya ba leki na bango ya mibali. Par ignorance, bazali kobosana que na loi na matière ya filiation na état civil ezali ko protéger celui qui n’y est pour rien, l’innocent (muana). Disposition moko ya loi oyo elobi qu’à partir du moment où un enfant a eu possession d’un état d’enfant légitime, les parents se sont comportés avec  cet enfant comme s’il était le leur pendant plus de cinq ans, la loi ne permet plus de remettre en cause l’état civil de l’enfant.  Sika bana oyo bandeko na bango bazali ko déclarer bakotikala ya bandeko na bango na basi na bango ya pembeni oyo baboti. Ozali komona dans quelle confusion bazali komitiya ? Kobota en désordre ezali malamu te. Yango ezali kolakisa lisusu que ba précaution ezali kozuama tena ba maladies nionso oyo ezali kotambola na mokili oyo.

Esengeli tolobelaka mpe makambo ya boye mpo epesa conscience kati na biso.

 

Patriotiquement,

   

Emmanuel Kandolo

Ndeko Ya Théo na Claude kangundi,

 

Ndenge kaka tolobi awa, esengeli bazua mayele na vie. Bango bazali na chance mingi ndenge tokabelaka mpe tosombaka ba œuvres na bango, esengeli bazala mayele mpona kobongisa avenir na bango mpo succès ezalaka éternel te.

Claude kangundi, proverbe ya kikongo wana nasepeli na yango.

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

 

 

Ndeko Sony Mokonzi,

 

La vraie question esengeli tomituna ezali ya koyeba pourquoi ba artistes bakoki kozala na ba structures na bango moko te oyo ekoki ko fonctionner na autonomie nionso en dehors ya oyo ezali kotambola te? Baye bayaka na poto bakoki kosangana basala eloko oyo ekoki kosalisa bango na oyo etali gestion bakoki ko confier yango na institution financière. Esengeli nde ba souscrire na mituelle santé, complémentaire santé voir assurance santé oyo ekoki ko fandisa mbongo na bango ekoki kosalisa bango tango ya problème( prévoyance, dépendance, rente éducation,  obsèque, etc.)..

Poto na bango bayaka ezalaka kaka ya maseki ? Bazuaka temps ya kokutana ou ko se renseigner na ba organismes ou ba maisons de production ya musique na oyo etali entretient ya vie ya artiste na mikili mpe na nini esengeli kosala mpo na ko éviter ba mauvaises surprises. Lisusu, balingi kokima fisc mingi na kokima kofuta ba  cotisations. Ta lelo oyo Madilu, famille na ye ekoki ko bénéficier na ba mbongo ya œuvres na ye te parce que afutaka ba droits na ye na SACEM te. Mingi kati na ba nduliste bazuaka mbongo cache ya mabanga na ya bato oyo bayembelaka ba nzembo sans ko compter ba cadeaux en nature. Nani epekisaka bango une minimum ya gestion ? Baluka nde ba s’organiser na poto, na Kinshasa wana nde bakozua mayele ya mingi. De toutes les façons mbongo oyo bakabelaka bango sans raison ezali déjà une aide suffisante.

Ndeko ba téléthon na biloko mosusu otangi wana ezali mpona ko aider recherche scientifique mpo ekoka kolonga ba maladies incurables. Resto du cœur esalisaka baye bazangi makoki. Alors, comment olingi ko aider mutu ayebani mpe asololala na ba chefs d’Etat oyo ye ayembaka, atambolaka na ba mituka ya talo, amelaka ba champagnes rosés, azali naba bijoux soki ya ndenge nini, azali na ba disques d’or, atondisaka ba salles mythiques ya monde oyo ? etc. Kanisa naino ! Tala na mbongo bazali na yango, soki baluki ko réduire bibotabota, ba kitisi train de vie na bango, baluki kosala na minimum, mpe bazali kotiya reste ya mbongo na ba comptes na mikili, bako vire très bien na kinshasa. Na cas ya maladie, assurance na bango ya sonas etindi yo Afrique du sud. Ezali magie te. Na oyo etali ngai, seule façon nakoki ko aider bango ezali kaka ya kosomba ba œuvres na bango a condition que ezala kitoko.

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo



Ba ndeko ya Moti na Soni Mokonzi,

 

 

Cas ya Antipas Mbusa Nyamuisi malheureusement ezali isolé te. Yango ezali ko refléter « fausse » démocratie ya R.D.Congo. Comme d’habitude personne ne peut dire aujourd’hui nini asala na Affaires étrangères et coopération internationale na mbula mibale oyo alekisi kuna. Bilan na ye ezali nini ? Rien ! D’ailleurs pendant ba remises et reprises ba ministres nionso sans exception ba déclaraki que bako continuer musala ya ba prédécesseurs na bango. Bosi bomona uniformisation ya discours ya lolenge oyo na oyo etali chaque département ministériel ? Nionso oyo avant même discours programme ya mokonzi na bango. Incroyable komona mutu azali koya wana sans méthodologie de travail, sans un état d’esprit professionnel. Mususu nde Alexie Ntambue Mwamba, mingi babosani que tango azalaka na rébellion, akumisaka mpe a revendikaka bombardement ya population civile na Kivu. Lelo oyo ye nde azali ko mener ba négociations na Rwanda mpo mpasi na kolela ya Kivu esila ! Ndenge nini tokoki ko expliquer paradoxe na contradiction oyo ? Nionso oyo parce que Congolais azali na niveau ya ko comprendre politique malamu te (surtout politique ya ba politicailleurs). Yango wana esengeli koloba que tozali na foule mpo peuple a réagisaka lolenge oyo te ! Na oyo etali armée, yango ezali surprise te mpo armée na biso eyebana banda kala que ezalaka na esprit de corps te, ebundaka te mpo indiscipline na kobanga liwa nde ezalaka  leitmotiv na yango. En plus na yango, bon sens ezangaki ba oyo ba votaki loi électorale : ndenge nini batu oyo bazali kopesa makila ba bango mpo na ekolo, bakoki ko voter te pendant que Président élu mpe commandant suprême ye nde azali kotinda bango na bitumba ? Elingi koloba nini ? Eloko mosusu oyo e frapper ngai ezali niveau ya instruction na Kivu. Na ba reportages mingi natali na ba chaînes francophones, une grande partie ya population ezali ko s’exprimer na français te. Ba oyo bazali ko s’exprimer na français, bazali kosala yango na ba fautes moko inexplicables. Wana nazali kolobela bilenge basi na mibali oyo babengami avenir ya mboka. Soki bato oyo bayebi mukanda malamu te, avenir ya mboka ekozala assurer ndenge nini ? Et encore, ba journalistes yango bazali nde kotuna mituna en rapport na quotidien na bango !

Ba députés mingi oyo batondi na assemblée nationale balekaki mpo bazalaki na ba moyens financiers, misusu na appuis ya pouvoir. Neti bazali na ba compte ya ko rendre na mutu te, yango wana tozali komona ata programme moko ya malonga te mpona ba populations na bango, ba lois ya malonga ezali te, bazali kosala un front commun ya malonga te na situation ya Kivu na niveau ya chef de l’Etat mpe lokola, Kivu esengelaki ezala na kati ya ba priorité ya agenda na ye, kasi asali na ye attention te. Voila  résultat ya décalage entre bango na ba oyo bavotaki bango.

Likambo ya courage ezali nini ? Soki ozali na culture ya sacrifice suprême te mpo na survie na yo, courage ekoya te. Tozali na philosophie ya ko se sacrifier mpo na génération future te. Mpe notion wana ezalaka mingi te na kati ya mabota. Tala kaka ndenge batu ba vivaka na bana na bango : facilité na nionso. Or rien n’est facile mpo vie ezali etumba. Ngambo  mosusu, kobanga liwa na une certaine interprétation ya liloba ya nzambe nde esalaka que tozonga sima na makambo ebele en se disant : nzambe ye moko ayebi kino mokano na ye ekokokisama ou encore soki nakufi nani akobokolo bana na ngai ! A la place, tolingi tozala en vie mpe totala souffrance ya bana na biso na miso pendant que tokoki kokufa mpo bango ba honorer mémoire na biso comme étant source ya ba efforts na bango na koboya kozonga sima. Na esprit oyo, bango mpe bakokitisela bakitani na bango philosophie oyo. Ezali na liberté te oyo eya sans makila etanga. Yango wana esengeli toyeba sens profond ya makila na nzoto ya mutu mpe na destinée ya mutu. Makila oyo ezali kati na biso ezali eloko oyo ezali ko conditionner physiologie na biso mpe na kobonga na kobeba na biso na etumba ya vie. Ba histoires universelles ya libérations ezali wana na ba ndakisa na yango !!!

Sika nameka koyanola na motuna ya motuya botuni ngai.

Solution ekoki kozuama soki vraiment implication ya solo ezuami en accordant tout le sérieux qu’il faut na résolution ya problème oyo ya Kivu. Esengeli réellement volonté makasi mpe engagement à long terme mpo na kosilisa conflit oyo. Solution à long terme ekoya soki to comprendre que esengeli kosala reconstitution ya tissus social en établissant ba «  mesures ya confiances »  entre ba populations concernées en développant une culture de paix durable en renforçant ba institutions politiques oyo ezali ko garantir un Etat de droit, en relevant l’économie détruite et dévastée par la guerre en tentant de supprimer les causes qui ont engendrés les conflits.

Kasi na yango esengeli mpe toyeba ndenge nini kobima na logique ya violence en prenant en compte ba points misatu :

1. Raccourcissement ya ba cycles ya conflits

Ba cycles ya conflits na région ya grands lacs africains ezalaki milayi na 1960 na 1990 nto 10 ans. Sika ekomi mikuse de l’ordre ya  quatre na deux ans. Soki totali na cas ya R.D.Congo, Président Mobutu asilisaki pacification ya mboka na 1967. Dix ans après nde attaque ya Shaba esalemaki mbala ya liboso na 1977, mpe mbala elandi na 1978. Sima ya wana nde guerre ya libération eyaki na 1996, soit 18 ans na sima. Na Rwanda, sima ya prise de pouvoir ya Habyarimana nde mobulu eyaki na 1994, en suite na guerre ya libération na 1996. Burundi, tango premier ministre Pierre Ngendandumwe alekani, massacre eye kosalema na 1972 mpe na 1980. En suite, ba nungu nungu na mbula ya sima oyo.

2. Apparition ya ba  nouvelles formes d’interventionnisme

Ba conflits oyo ezali kobima na Kivu, en réalité ezali ba conflits mal résolus mpe ba résolutions na yango ezalaki na long terme te mpona ba raisons ya manque ya volonté politique. Yango wana tango ba conflits yango ezongaka, ba mêmes raisons ezalaka souvent évoquer mpona ko expliquer ba réapparitions ya ba conflits yango neti : Banyamulenge , minorité tutsi, mise hors état de nuire ya ba interhuamue na ba ex-FAR, discrimination ya minorité, revendication ya ba droits politiques, etc. Soki perception oyo ezali ko persister, ba raisons mosusu ya sika ebakisami na yango neti dimension particulière  oyo esalaka que conflit ethnique eyaka kobonguana en mouvement de revendication ya cause nationale au fur et à mesure ba conquêtes ya espace ezali kosalema. Na yango, eyaka souvent kolakisa que conflit oyo ezalaki na kati ya mboka ekomi na ramifications na niveau régional. Yango ezali kolakisa lisusu que ba conflits nationaux oyo ezali ko produire ba conflits régionaux ezali kowuta na ba origines na affinités ethniques ya ba populations oyo ezali en grande partie transfrontalières mpe bango bazali na influence makasi na évolution ya ba conflits oyo.

3. Emergence des nouveaux modèles explicatifs, fondées na ba notions ya génocide na ethnocide.

Rôle ontologique majeur ya ba conflits ezali kosalema na ba racketteurs ya guerre, ba marchands de la mort oyo bazali na ba relations makasi  na sommets ya ba Etats ya Afriques mpe ya mikili mosusu. Yango wana toyokaka mingi entretient ya culte de la souffrance oyo e alimentaka ba conflits oyo.

Sima ya ba points oyo, mpo na ko résoudre conflits ya Kivu esengeli toyeba que yango ezali ko impliquer ba couches sociales nionso ya population. De ce fait, recherche ya causes, évaluation ya ba conséquences na yango, prévention na yango na traitement na yango ekoki  ko exclure catégorie sociale moko te  mpo conflits ezali vécus na bango, esengeli mpe bango bazala na liloba lya koloba na opinion ya kopesa na cadre ya un vrai travail de terrain. Na ba Conférences kili kili esalemaka na oyo etali lolenge ya ko résoudre ba conflits iye, mingi mingi babosanaka batu oyo bazali moins impliqué politiquement et militairement na ba conflits. Na même titre na ndenge bazali koyoka opinion ya ba responsable politiques, chefs militaires, membres ya société civile, responsables ya organisations humanitaires, ba élites na ba journalistes. Esengeli vraiment kosangisa diversité ya opinion mpo na ko comprendre mpe ko interpréter ba enjeux na kati ya groupe social.

Esengeli mpe kofandisa dynamique ya action non-violente dans le but de reconstituer le tissu conjonctif ya société dans la recherche na contribution ya construction ya une société démocratique et de droit. Na yango non-violence ezali moyen non négligeable ya ko dépasser ba clivages claniques na ethniques na kati ya ba sociétés. Un des enjeux ezali effectivement ya ko fonder une citoyenneté na ba critères ya philosophie politique oyo ezali liée te na ba perticularisme ya appartenance clanique, ethnique et bongo na bongo. Soki tomoneli makambo boye tokoki kokoma na refus de tous processus de légitimation qui font de la violence un droit de l’Homme et de la personne humaine.

Totika kokanisa que soki guerre esili, conflits mpe esili ! La fin de la guerre ne met pas forcement fin aux conflits. Elle permet seulement de résoudre les conflits par d’autres moyens que ceux de la violence. Na yango, diplomatie (qui est l’art de compromis) na intervention civiles ekoki ko accompagner durablement processus de paix. Esengeli to reconstruire tissus social en établissant ba mesures de confiances entre les populations adverses, en aidant  à l’instauration véritable des institutions politiques oyo ezali ko garantir un  Etat de droit, na kotombola économie détruite na guerre en tentant de supprimer les causes des injustices à l’origine des conflits.

Toyebi malamu que multiplicité ya ba acteurs impliqués na ba intérêts oyo ba multinationales ezali kowela kuna ekoki mpe ko compliquer résolution ya conflits. Atako bongo esengeli kosolola na bango mpona koyeba nini balingi mpe ndenge nini l’Etat na biso elingi makambo etambola na oyo etali ba matières premières minières oyo ezali kopesa bango lokoso.

Esengeli souvent tozua en compte situation ya ba mama, basi ya zemi, bana na mibange na batu oyo bazali na makoki ma kosala mosala na ba zones oyo bitumba ezalaki. Na cadre ya confiance na Rwanda, R.D.C.na Burundi tokoki ko travailler makasi na cadre ya Communauté économique des pays des grands lacs (C.E.P.G.L)  patrimoine na yango ezali : Banque de Développement des États des Grands Lacs (B.D.E.G.L), Institut de Recherches Agronomique et Zootechnique (I.R.A.Z), Société Internationale d’Énergie de Grands Lacs (SINELAC) , ko réguler circulation ya biens et personnes kati na ba pays oyo, ko réduire ba barrières ya ndenge na ndenge, ko sensibiliser ba populations na paix durable na concours ya ba musiciens en demandant na ba orchestres ya minene ya Kinshasa, Goma na ya Kigali babetaka ba concerts jumellés une fois par mois durant une années sous organisation ya commission ya suivie ya paix oyo ekozala wana, kosalisa ba troupes ya théâtres avec ba acteurs ya Kinshasa, Goma, Kigali na swahili, ko sala ba groupes mobiles ya sensibilisation na paix durable et réconciliation, kosala ba propositions ya malonga na oyo etali relance ya ba activités économiques na Kivu, ko favoriser développement ya ba relations étroites na ba  voisins ya est, ko associer ba historiens contemporains ; antropologues ; juristes en économie, développement, constitution et institutions politiques ;économistes, éthologue, ba opérateurs économiques locaux na ba volontaires, na cellule moko oyo ekolandela paix durable sur le terrain na relance ya ba activités. Na likolo, Rwanda na R.D.C bakoki kozala na commission mixte ya action et de coopération transfrontalière.

Na kati ya programme ekoya, naturellement, esengeli ko désarmer batu en échange ya eloko ya malonga neti prise en charge na formation professionnelle na possibilité ya emploi, l’Etat ekoki lisusu kotala ndenge nini ekoki kosala distribution équitable ya ba terres agricoles, ko créer situation propice na investissement mpe ko tia ba conditions oyo ekoki kobenda ba ressortissants ya Congo oyo bazali na étrangers baya ko investir na Kivu stable en mettant en place une politique fiscale attractive, ko consolider société civile, ko encourager développement social, ko éradiquer corruption. N.B. Nionso oyo esengeli créativité pamba te  esengeli te ko croire ex nihilo eloko ekosalema. Wana ekozala un contresens.

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel kandolo

 

 

P.S. Sony Mokonzi, malheureusement nazali na nzembo osengi te. Je souhaite que ndeko oyo azuami na yango atiela biso yango.

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
M
Cher Kim,A travers ce blog nous essayons de servir d'exemple aux jeunes qui nous lisent et qui y apprennent l'histoire de notre pays. C'est pourquoi nous nous battons (moi et vous vous) pour demeurer humbles.Bonne nuitMessager
Répondre
K
Ndeko Messager,Je tiens à te remercier pour ton honnêteté et ta correction; un autre webmaster n'aurait peut-être pas accepté ma remarque !Je te félicité.Kim (Bruxelles)
Répondre
M
Kim,Il s'agit d'une faute que de frappe que je viens d'ailleurs de corriger. Comme vous le savez, notre blog n'a jamais toléré les propos pervers. Merci de votre vigilance.Messager
Répondre
K
A tous,M. Emmanuel Kandolo a certainement commis une faute de frappe sur sa 2ème phrase au tout début de son article; faute de frappe qui changerait cpmplètement le fond de sa pensée !"Wana esengeli ezala priorité ya LIBOLO...." Je pense sincèrement qu'il aurait voulu écrire "LIBOSO" à moins que ce mot ait un autre sens que celui qu'on lui attribue habituellement !Amicalement
Répondre