Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Ndeko Messager,

 

Boni papa? Soki mushindu mozali, s'il te plait, komisela ngai makomi maye na blog na biso.

Natondi mpe natombeli na yo butu elamu.

 

Wayo ndeko,

 

Emmanuel Kandolo

 

 

Ya Moti,

 

Nasangani mpe na ba ndeko ya blog na biso oyo na sango ya mawa ya kobungisa très chère mama moboti na yo. Ndima mpasi oyo esali ngai na koyeba libungisi linene ya motindo moye.

Wa yo ndeko,

 

Emmanuel kandolo

 

 

Ndeko Sony Mokonzi,

 

 

Matondo na yo mpe lokola ndenge obakisi kombo ya Spitaels. Na oyo etali likambo ya nationalité, elazi moins sérieux kobuakela Bisengimana ye moko mokumba wana.  Tolobeli malamu ndenge ba lois nionso wana esalemaki mpe elekaki. Président a signaki, parlement a adoptaki, chambre constitutionnelle ya cours suprême efandaki nien, mutu moko te asalaki requête en annnulation na yango, le puissant bureau politique mpe efandaki nien.

Esengeli nde totika kosala une chose et son contraire à la fois. Congo oyo lelo tozali kobetela tolo, yango ezali mboka oyo esalemi na volonté ya Léopold II na ya Conférence de Berlin. Alors, pourquoi batu oyo bafandaki na Congo avant lipanda, bakoki kozala ba Congolais te ? Nakopesa exemple personnel : na 30 juin 1960 baboti ba ngai na bandeko ba ngai, tozalaki lisusu na Congo te. Tozalaki na France na Paris. Pourquoi tozali kaka ba Congolais tee lelo oyo  pendant que ba oyo bazalaki wana na 1959, année biso tokendaki ko s’installer na Paris, bakoki kozala ba Congolais te ?

Eloko mosusu ndenko na ngai, oyebi que biso nionso toyebi malamu que na Lovanuim avant juin 1971, ba nationalité miyike mizalaka na ba associations ya ba étudiants na bango. Bisengimana azalaki président ya association ya ba étudiants rwandais. Wana eyebani ! Alors, pona nini mutu ata moko te aboyaki nomination na ye officielle en qualité ya Directeur ya Bureau ya Président de la République ? Ndenge olobi, likambo ya kopesa na kobotola nationalité ewuti na mélange ya makambo ebele : manipulation tribalo-ethnique, positionnement politique, dictature ya Habyarimana, problèmes ethniques na Rwanda, kosakana na moto ya conflit ethnique, absence ya une véritable volonté politique ya ko régler mobulu kati na bato na Kivu  kobakisa na génocide nde esali esanga ya mabe oyo eye kopelisa moto na Kivu.

Volonté politique ya ko régler problème ya Kivu ezali te : 1+4 bazalaki mieux placés mpona kosilisa likambo yango, kasi basalaki rien. Elingi koloba que Kivu ezali kotekama bien, koleyisa bien, mpe komvuamisa ba politiques na ba militaires. Ozali koyeba lisusu ndenge ba généraux Nzimbi, Baramoto na Mavua basalaki mbongo tango ba ngunda bayaki na Kivu mpe tango guerre ya « libération ebandaki » ?  Président Mobutu ye moko azongaki na scène internationale grâce na opération turquoise, général Mahele ba proposaki ye pouvoir na ba Américains, Président L.D.Kabila asala mbongo mpe wana, Présidents kagame na Museveni kutu koloba te, etc. Président Joseph kabila akoma mokonzi suite na likambo ya Kivu, lelo oyo Kivu mpe lisusu ezali kobinisa ye, ba multinationales oyo ezali na Congo mpe bazobina kaka na Kivu na koboya koselumuka, général Nkunda mpe Kivu nde ezosala ye ba vrais, ba officiers ya armée na biso Kivu mpe kaka nde ezali kofula bango liseki te, Bisengimana ayebana mingi mpona Kivu, etc. Donc, on mange Kivu, on boit Kivu, on chante Kivu, on pleure Kivu, on respire kivu, on éclate Kivu, on saute Kivu, on étouffe Kivu, on nie Kivu, on prend Kivu, on coupe Kivu, on pille Kivu,on enterre Kivu, on réveille Kivu, on poignarde Kivu, on charcute Kivu, on déchire Kivu, on s’arrache Kivu, on apaise Kivu, on ligotte Kivu, on embrasse Kivu, on torture Kivu, on manipule Kivu, on tue Kivu, mpe bongo na bongo.

 

Patriotiquement,

 

 

Emmanuel Kandolo

Merci Emmanuel Kandolo po na commentaire na yo na makambo ya Kivu. Ezali commentaire le plus intelligent oyo na tangi na site congolais depuis ebandeli ya makambo oyo. Ezali commentaire moko sans passion, mais avec bcp d;objectivite.
Nazali d'accord na yo ke likambo ya Kivu ezali ko profiter na bato ebele, banda kaka na bandeko na biso ya Kivu oyo bazali ko profiter na likambo oyo.
Tala lelo oyo pouvoir presque nyonso ya Congo ezali na maboko ya batu ya Est..bazali ko s'enrichir mais bazali ko regler probleme ya region wana te...
Bato ebele bazali kolobela kaka mabe Ya Joseph Kabila, kasi bakonzi mosusu ya Kivu bazali wana eloko ya malonga ezali te...
Tala moto oyo azalaki ministre des affaire etrangeres pendant 2 ans Nyamuisi, diplomatie nini ya malonga asalaki po na ko aider region na ye ebima na mobulu? eloko te...
Lelo pays mobimba ezali pris en otage par likambo oyo ya Kivu, soki osengi bato kuna bayokana entre tutsi na hutu baboyi, kasi soki bitumba ebandi, bato ya kobunda bazali mingi te..sima ba pourpalers esalami ekosuka kaka bato mingi ya pamba pamba bazwa bokonzi ya kati ya gouvernement, armee, diplomatie, entreprise publique, etc...ndenge kaka olobi guerre ya Kivu ekomi fond de commerce ya batu ebele...en attendant toutes les autres regions de la RDC sont negligees....
Motuna monene oyo tozali na yango, ezali oyo ya koloba ndenge nini tokoki koloba ke moto oyo afanda na Congo avant indepedence to baboti to bakoko bazali wana avant 1960 akoki kozala congolais te?
Likambo mosusu, biso ba congolais tokomi lokola basi, tozali kokoka bitumba te, mais kaka ba rancunes..soki bitumba ebandi, bato bazali kokima, kasi sima na yango ekomi kaka koyina yina na mitema...mibali balingi kobina lokola basi, bakobuka loketo lokola basi...kasi soki bitumba ekomeli biso mibali ya solo bazali na mboka te.....il faut tozongela ndenge mibali ya solo bazalaka, moninga asakani na yo, otelemi bobetani makofi..sima lobi bobangani, pe bobongisi...soki Rwanda atumoli biso..il faut mibali ya RDC batelema pe babunda..sima toluki paix...ezali te ya kokima bituma..sima ekomi oh oh kolelala oh Rwanda boye..oh Rwanda boye lokola basi...oyo ekomi kosala nga Soni mingi...

 

Ya Theo

 

Ndeko EMMANUEL KANDOLO, merci na maye okomi, kasi tosala boni????,makila etangi mingi,solution pe ezali komonono te....probleme tozali na yango na congo ezali probleme ya sensibilisation pe reconciliation kaka. c-a-d que congolais azali na ba difficultes pona ko accepter que na congo il ya des TUTSIS PE NA BA HUTUS CONGOLAIS....na moto nionso oyo ayebi histoire ya UNION MINIERE DU HAUT KATANGA(gecamines) ayebi que ba rwandophone depuis 1910 ba contribuer mingi pona economie ya congo. mindele bakendeki kozua ba kokos na bango pona kosala misala makasi ensemble na ba kassaiens na ba mine souterraines ya gecamines....lisusu histoire pe geographie ya congo ezali mingi manipuler na ba politiciens pona ba agendas moko personels pe tribal...omoni que mbeba esalemi mingi de part et d'autre ezala cote ya ba rwandophones to yaba congolais b'erreurs esalemi mingi...pona kosukisa nakobima mua moke na politiki pona kosenga yo mua faveur:soki okoki koluka na bibliotheque nayo tresor moko na kombo ya ISOLE KERERA,yango ezali loyembo kitoko LOMINGO ALIDA asalaka na 1977 ou 78,soki ozali na yango palado pesa ndeko messager atiela biso yango....

Sony Mokonzi

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
S
Ndeko EMMANUEL KANDOLO, merci na maye okomi, kasi tosala boni????,makila etangi mingi,solution pe ezali komonono te....probleme tozali na yango na congo ezali probleme ya sensibilisation pe reconciliation kaka. c-a-d que congolais azali na ba difficultes pona ko accepter que na congo il ya des TUTSIS PE NA BA HUTUS CONGOLAIS....na moto nionso oyo ayebi histoire ya UNION MINIERE DU HAUT KATANGA(gecamines) ayebi que ba rwandophone depuis 1910 ba contribuer mingi pona economie ya congo. mindele bakendeki kozua ba kokos na bango pona kosala misala makasi ensemble na ba kassaiens na ba mine souterraines ya gecamines....lisusu histoire pe geographie ya congo ezali mingi manipuler na ba politiciens pona ba agendas moko personels pe tribal...omoni que mbeba esalemi mingi de part et d'autre ezala cote ya ba rwandophones to yaba congolais b'erreurs esalemi mingi...pona kosukisa nakobima mua moke na politiki pona kosenga yo mua faveur:soki okoki koluka na bibliotheque nayo tresor moko na kombo ya ISOLE KERERA,yango ezali loyembo kitoko LOMINGO ALIDA asalaka na 1977 ou 78,soki ozali na yango palado pesa ndeko messager atiela biso yango....
Répondre
Y
Merci Emmanuel Kandolo po na commentaire na yo na makambo ya Kivu. Ezali commentaire le plus intelligent oyo na tangi na site congolais depuis ebandeli ya makambo oyo. Ezali commentaire moko sans passion, mais avec bcp d;objectivite.Nazali d'accord na yo ke likambo ya Kivu ezali ko profiter na bato ebele, banda kaka na bandeko na biso ya Kivu oyo bazali ko profiter na likambo oyo.Tala lelo oyo pouvoir presque nyonso ya Congo ezali na maboko ya batu ya Est..bazali ko s'enrichir mais bazali ko regler probleme ya region wana te...Bato ebele bazali kolobela kaka mabe Ya Joseph Kabila, kasi bakonzi mosusu ya Kivu bazali wana eloko ya malonga ezali te...Tala moto oyo azalaki ministre des affaire etrangeres pendant 2 ans Nyamuisi, diplomatie nini ya malonga asalaki po na ko aider region na ye ebima na mobulu? eloko te...Lelo pays mobimba ezali pris en otage par likambo oyo ya Kivu, soki osengi bato kuna bayokana entre tutsi na hutu baboyi, kasi soki bitumba ebandi, bato ya kobunda bazali mingi te..sima ba pourpalers esalami ekosuka kaka bato mingi ya pamba pamba bazwa bokonzi ya kati ya gouvernement, armee, diplomatie, entreprise publique, etc...ndenge kaka olobi guerre ya Kivu ekomi fond de commerce ya batu ebele...en attendant toutes les autres regions de la RDC sont negligees....Motuna monene oyo tozali na yango, ezali oyo ya koloba ndenge nini tokoki koloba ke moto oyo afanda na Congo avant indepedence to baboti to bakoko bazali wana avant 1960 akoki kozala congolais te?Likambo mosusu, biso ba congolais tokomi lokola basi, tozali kokoka bitumba te, mais kaka ba rancunes..soki bitumba ebandi, bato bazali kokima, kasi sima na yango ekomi kaka koyina yina na mitema...mibali balingi kobina lokola basi, bakobuka loketo lokola basi...kasi soki bitumba ekomeli biso mibali ya solo bazali na mboka te.....il faut tozongela ndenge mibali ya solo bazalaka, moninga asakani na yo, otelemi bobetani makofi..sima lobi bobangani, pe bobongisi...soki Rwanda atumoli biso..il faut mibali ya RDC batelema pe babunda..sima toluki paix...ezali te ya kokima bituma..sima ekomi oh oh kolelala oh Rwanda boye..oh Rwanda boye lokola basi...oyo ekomi kosala nga Soni mingi...
Répondre