Une vidéo de Luampasi Albert
Voici une vidéo de Luampasi Albert, un de ceux qui avaient encandré Franco Luambo au début de sa
carrière. Elle a nous a été envoyée par Sonny Mokonzi, un des recherchistes de Mbokamosika.Comme l'atteste la vidéo, le deuxième initiateur de Franco à la guitare habite ou habitait aussi la Commune de Ngiri-Ngiri, sur Rue Lokelenge. Non loin de la Rue Bosenge,
où vécurent Franco et Dewayon . (MSG)
un commentaire vient d'être posté par Luampasi sur l'article Voici Affront Jazz,
Ntoma merci pona Afront Jazz. mais, soki tokeyi mua mosika , vieux Kalle Jeef , asalaki recuperation ya kombo ya Afront Jazz, abaloli kaka moke na Africa Jazz!!!!Lokola bango nyonso na ndako ya Opika. (eza question nde).- Merci.- Richard kasongo.-
Ndeko Richard Kasongo,
Na tango ina nde nkombo ya Jazz ezalaka na lokumu, lokola ba sapeurs tozalaka kobenga bango ba Jazzeurs, la sape yango moko mpe tozalaka koloba yango kobola Jazz, soki yo olingi kobima,
okosala monzele, na tango ina tozalaka bongo koloba Otiyi ba Jazz, to osali ba fiere, lelo oyo bokobenga yango la Sape.
Kabasele Joseph dit Grand Kalle to Vieux Kalle, azalaki moto oyo azalaki komona mosika na tango ina, mpe mboka ya Leo ezalaki Capitale ya Afrique Noire, tokoki koloba na mokuse, mpo na Leo
tozalaki bongo na bikolo ndenge na ndenge ya Afrika, mingi mingi na ba Alanga nzembo, bazalaka kowuta bongo na bikolo kili-kili ya Afrika, ezalali bongo na ntina ete Mbuta-Muntu Kalle amona
etanda mobimba ya Afrika liboso ya komona Congo-Leo. Yo oyoka te ndenge bayemba African Jazz Mokili Mobimba.
Luampasi
Ndeko Luampasi, merci na eyano nayo, kasi nakotika yo naino boye, nakotuna yo mostuna mosusu pona namoni ozali na mua boyebi mua mingi. Okoki koyebisangai lolenge kani ba tata oyo babandaki kozwa bibeteli to b'instrument ya miziki. Awa najali koloba na bango nyonso na ba mibu ena(1950). Po na Cite babandaki kobola miziki. Soki otali bilili(fim)na 1960 Afrca Jazz azalaki na instrument complet ndenge balobaka complet...Merci.- Richard Kasongo.-
Ndeko wa ngai Richard Kasongo,
nalandi mpenza ndenge olobi, tika nameka koyanola yo moke na ndenge ya ba souvenirs nazali na yango, omoni na tango ina, avant 1950, tozalaki bongo se na ba studio ya enregistrement, ba
instruments
ezalaki ya ba maisons ya enregistrement, mpe lisusu ba missionnaires lokola ya Mumpe, Protestant, Armee du Salut bango mpe bazalaki na ba instruments, moke lisusu batu oyo bazalaki bongo na
ba
bars, bango mpe bazalaki na mua ndambo ya ba instruments mpe bazalaki ko completer yango na ba instruments local to ya biso moko bayindo. Mpo avant 1950, batu ya riches mingi na biso
bayindo
ezalaki bampaya, mpe ba bars mingi ezalaki ya bampaya, lokola batu ya Brazzaville, soki mpe otali malamu bazalaki na ba famille na bango, kowuta na Afrique de l'Ouest, bango moko ba
Sinangale, mpe
ba africains misusu, na biso mpenza bana ya mboka ezalaki ya kotanga na misapi. Mpe soki otali malamu na tango ina, ba familles congolaises oyo bazalaki na mosolo ezalaki mingi, oyo bana na
bango
babalanaki na ba Africains ya mikili misusu. Pamba te, ba Africains non congolais, bango bazalaki na contact na bandeko na bango na Mpoto, Amerika, na Bresil, na Haiti mpe mikili ndenge
na
ndenge.
Soki bozali na fete, ezala ya mariage, ya kolongola mpili, to ya likambo nini, mpo miziki ebeta, esengeli malamu esalama na Bars, pamba te, ba orchestres na tango wana ezalaki bongo na ba
instruments te. Lisusu kobosana te, bar ezali esika oyo ezali na ciel ouvert, soki mbula enoki, fete na bino mpe ebebi to ekosalama te, yango ezalaki kosala ete, mokolo ya bar mpe ba nkolo
fete,
bakoto ndako mpo nakofula mpungu, mpo ete mbula ebeteme te.
Soki bolingi fete esalema na lopango, wana ekozala obele miziki traditionelle motu ekobeta, soki bolingi miziki ya mondele wana ekozala mingi ba souffleurs, to Saxo na Trompette, mpe boye
kobakisa
mbonda, na mokuasa, na ngongi.
Nde na 1952, tango baye kosala Usine ya yambo ya ko fabrike ba disques na Leo, Macodis, wana nde usine ye motu abandaki kopesa ba orchestres ba instruments, kofutela bango ba tickets ya
voyage mpe
na ba avantages mingi, soki otali malamu, Macodis eye na tangu ya Papa Kabasele Tshamala dit Vieux Kalle, ndenge moko lokola nzela ya Mpoto ekomi wenze-wenze na tango ya Bana ya Wenge.
Soki olingi osala comparaison, okomona ndenge nini tango ya ba Papa Wendo bamonoki mpasi mpo na ba instruments, mpe tango ya ba Negros-succes bamonoki mpasi mpo na voyage ya Mpoto, ya solo,
likambo
na likambo ezalaka na tango na yango.
Tango Papa Rochereau ayaka kobola na Olympia na 1970, Mpoto ezalaki na ba Africains ebele lokola lelo oyo boye te, mpe lisusu soki ba Alanga Nzembo ya ba Africains bazalaki koya na Leo,
ezalaki
pamba te, mpo ete ba studio mpe Usine ya ko fabrike ba disques ezalaki na biso awa na Kinshasa, yango esala ete Musique Congolaise Monderne ezala SYMBIOSE ya miziki ya Afrique Noire Mobimba.
Mpe
soki otali malamu, ba souffleurs to batu oyo babeteke Saxo na ba trompette, mingi bazali bandeko oyo bawutaki na ba colonies anglaises, to ba anglophones, nde bazalaki kobeta eloko wana na
ba
orchestres na Leo.
Bino bato bozali na contact na bana ya lelo, esengeli boyebisaka bango ete, na kati ya miziki na bango esengeli mpe bazala na ba musiciens oyo bawuti na ba pays africains mosusu, mpo tozali
komono
kaka, lelo nde ba musiciens Congolais nde batu bazali kokende na ba Cote-d'Ivoire, Kenya, Cameroun, Nigeria tii na molongo mobimba, kasi ba Pap Wemba, Koffi Olomide, Werason, Jb Mpiana bango
bazali
komema ba musiciens africains te, mpo baya kobete na ba orchestre na bango na Kinshasa, eloko oyo, esengeli bo encourager bango na yango, mpo baloba muana mpo alinga yo, mpe amesana na yo,
esengeli
malamu amonaka yo.
Nabanzi Ndeko wa ngai Richard Kasongo okokoto mpe oko developpe makanisi ma ngai.
Luampasi
Papa Luampasi , namoni otangaki kombo moko ya HAITI, soki tolali malamu tokomono COUPE CLOUE, oyo azalaki musicien monene na mboka wana. Nayango nazali kotuna boye eyaki kokoma lolemge kani miziki ina ya Haiti eya kolingama to ezwa mua inffuence epayi na biso??? Merci .- Richard Kasongo.-