Réponses d'Emmanuel Kandolo à propos des chansons funèbres
.
E.Kandolo répond aux derniers commentaires sur les chansons funèbres
Ndeko Historien,
Ya solo, Arthur Bakumba azali muana ya Ngiri Ngiri. Lopango na bango ezali na coin ya ba avenues
Niangara na Katanga (prolongement ya Shaba, na ngambo ya Force Publique, ebengami Katanga). Matanga wana ezalisaki bokasi bua kosaka mpo ebembe ya Arthur ekumbaki batu tee na mutu oyo alekisaki
ye !!!
Nazali ko comprendre souci ozali na yango na lolenge mbonguana esalema na kombo ya Mbowole na
bokomi Bowule. Yo moko omeki kolakisa lolenge kombo wana ebonguami wuta ewutaki na Togo tee kokoma na Congo, epai ya ba Ntombanzale.mpe na lolenge yango ewui transformation na
Kinshasa suite na liwa ya Josée. Sika esengeli nde bino, ba membres ya famille, bo se mettre d’accord na niveau ya famille mpo na ko apporter correctif wana. Kobunga te que
lelo oyo, mingi na famille na yo, bakoma kokoma Bowule au lieu ya Mbowole. Eloko mosusu, soki nabungi te, Simon Mbowole nde azalaki cadre na Banque du Zaire.
Il est vrai que Matti abanda kokende poto na ba milieux ya ba années 60, kasi, nzela ya commerce ya
bilamba, sapato na ba sacs ya Italie, ezali génération ya ba Josée nde etombolaki yango. Nazali koyeba lisusu que tango wana, samedi, avion ya Air-Zaïre ebandaki kosala
Kinshasa-Lagos-Rome-Bruxelles. Série oyo, Matti abandaki kosomba biloko na Rome, ezali différente na oyo ya ba Josée mpo biloko wana ezalaki na ba nzela mosusu oyo nalingi kosolola awa te. Nayebi
batu mosusu oyo bazalaki na cercle restreint wana.
Mpo na Jonas Munkamba Kadiata Nzemba, yeba que akomaka ambassadeur extraordinaire et
plénipotentiaire ya Zaïre na Rome mpe représentant ya Zaïre na Food and Agriculture Organization (F.A.O) = Organisation des Nations Unies pour l’Agriculture et l’Alimentation,
kobanda na 1978 tee na 1981. Ye, a remplaçaki Ferdinand Kayukwa Kimoto, oyo atindamaki comme ambassadeur extraordinaire et plénipotentiaire ya Zaïre na Belgrade.
Na description opesi sur papa Thomas Nkumu, yeba que azalaki na poignet na ye nde misapi na ye ya
loboko : majeur, annulaire na auriculaire nde ezalaki ya kokatana. Atikalaki kaka na pouce na indexe. Yango nde abandaki kosakana na bana mike mingi na kotiya bango djiki djiki na dextérité
moko ya kosakana te !!! Azalaki vraiment amusant !!! Ye, azali originaire ya groupement Libinza, précisément na Bas-Ngiri (mutu ya mayi), territoire ya Makanza, secteur ya Equateur,
province ya Equateur.
Kati na Benjamin na Arthur, nzotu ya ainé, Benjamin , nde emonana. Kasi, tee na lelo oyo, nzotu ya
leki, Arthur, nde etikala komonana te. Na misala wana, liwa ya Pierre na Tonton ezali mpe na maboko ya ma Zophini na Pauline. Souvent Pauline abandaki ko se dedouaner na kotiya culpabilite ya ma
Zophini liboso pendant que eyebanaki malamu que bango mibale wana bayebanaki ba secrets na bango malamu na misala ya molili. En revanche, vie ya vieux Steve na le cadet papy, ebeba kaka
boye : Vieux Steve, Instabilité na instabilité. Bien que atanga mpe kelasi na Belgique, Pauline alekisela ye temps na kotia ye gérant ya biloko na ye na province ya Equateur : ba
plantations, masuwa, magasins na biloko mosusu azuaka na zaïrianisation. Na cadre ya gestion ya biloko oyo nde Pauline atindaki ye na Allemange mpo na formation. Kasi suka suka atikala ko avancer
na eloko moko te. Mitelengano, azongi lisusu kofanda na ndaku ya baboti sur Botango. Papy , ye nde wuta bomuana, bakueyisa ye na mabele, yango nde eningisa mutu na ye tee lelo oyo azali na
ye kaka ndenge wana.
Ndenge olobi, soki totali malamu, lisolo ya ba Soki na ya ba Nkumu ezali na ba points mosusu ezali
kokokana, kasi, différence monene ezali que ba Soki kokabuama ezali très profond kati na libota ya papa na oyo ya mama. Soki otali na ba archives na biso awa na mbokamosika, nalobela sur lolenge
Emile Soki akendaka komikaba epayi ya ba noko na ye mpe ezalaki lokola sacrilège. A part wana, lokola ba Nkumu, ezali famille ya bana mayele oyo basali université mpe bazali na ba kulutu na bango
neti Soki oyo azalaki Directeur na Banque du Zaïre (sika azali na retraite dorée), Florentine, Ministre, Max, atanga na Lubumbashi mpe patron ya ba Editions Soki mpe kolo Bella Bella. Ndenge moko
mpe na ba Nkumu avec Pauline, Steve, Benjamin oyo ba silisaki déjà ba études universitaires mpe avenir ya malonga na liboso.
Nayebi mua moke ba familles mibale mpe na zua occasion ya kokoma tee na mboka ya ba Max na oyo ya
ba Benjamin. Nayebi que misala ezalaki makasi na ba familles wana mibale. Par ailleurs, na ndimi te que Florentine a bloqua mutu mpona carrière na ye. Au contraire, bibundeli ezalaki nde contre
famille ya mère mpo ba noko bazalaki na bitumba makasi. Mise àpart solidarité ya ngambo ya famille ya papa, mutu na mutu azalaki na ba roquettes na ye mpe ba anti mpo na protection personnelle
mpe na oyo ya makambu ma ye.
Soki na zongeliba Nkumu, mutu nionso oyo ayebi famille wana ayebi bolamu oyo ezalaki na papa Thomas
Nkumu, yango nde batu bayaki ebele na matanga ma ye mpe balelaki ye mingi. D’ailleurs, avant drame oyo ekueyelaki Benjamin na Arthur, papa Thomas na ma Zophini bazalaki déjà na
séparation bien que bazalaki kofanda lopango moko, père atongisaki partie na ye pembeni ya ndaku ya monene. En revanche, tango ma Zophini akufi, azuaki kaka gerbe ya ba fleure moko, ewutalki na
famille ya première épouse ya Pierre, Tantine.
Na kozongela Pierre mbala ya sima mpe na nduliste mosusu ya Zaiko, na lolenge famille e complicaki
vie na bango tee na ndenge bakenda mpe na suka, nakolobela ndenge batu ba décidaki babeta ma Zophini na Pauline suite na liwa ya Tonton.
...........................................................................
Ndeko Leo,
Tolobela mingi na ba circonstances ya liwa ya Bavon ; likambo ya Lucie, ndaku azuaka na
Bandal, voiture asombaki epayi ya Franco, partie pris ya Franco mpo na Youlou tango azuaki nzele ya Bavon, discussion na Youlou , lolnge abandaki kotambusa en desordre tee na ndenge ayaka kosala
accident na etat oyo nzoto na ye ekomaki, maloba ma Franco na cimetière de la Gombe mpe wuta wana tee na ndenge Franco akufa atikala lisusu kozonga kuna te mpe atikala kotiya promesse na ye en
œuvre te.
Lisolo ya «Maseke ya Meme» mpe elobamaka mpe lolenge nini Bavon abandaki ko se palindre na ba cales
ya Franco ezala na vie professionnelle mpe na vie privée !!!
Soki oluki malamu, okomona makomi wana nionso.
.................................................
Ndeko Serge, Kongo,
Na ba accusation contre papa Wemba na ndenge alekisa proper mama na ye, abetaka kaka monoko. Ye moko ayebi
lolenge afongolaki nzela ya kokende na Langa Langa, lolenge a mobilisaki ba mista b aye I.S.I.F.I. mpe na ndenge moko na moko kati na bango afutaka consequence ya kisi wana. Nazali lisusu koyeba
malamu, tango awutaka kotala Bozi période oyo abelaka mutu mpe bakianga ye na ba chaîne epayi na bango wana na Matonge vers Bongolo, papa Wemba aloba que soki nayebi likambo, nasala accident!
Effectivement na nzela ya kozonga na ndaku asalaka accident mpe bakumbaka ye na hospital mpo na observation. Wuta wana, akoma evasif.
Ye , akoki na ye koyangana. Kasi, misala mia ye mizali confirmer na makambo mosusu tee na oyo ebandaka
kosalama na cave ya propre ndaku na ye Aulnay-sous-bois (93), tango Justin, leki ya Rosa akufaki!!!
......................................................................................................
Ndeko Roca,
Mabala ekoya, tokolobela Ndaya Pauline (Ndaya Paradis) na Georgette Mowana (Tété).
.........................................................................................................
Ndeko King,
Papa Wemba abotama na 1949 te. Soki na bungi te, na Zaiko, kaka ye na DV nde ba
votaki na élection présidentielle ya 1970. Wana azalaki déjà na 22 ans na ndambu. Par contre, Rosa aye nde ko kitisa âge tango akomi na poto. Nazali lisusu komona tango ma Moke andimaki aya
kofanda na Kanda Kanda. Ma moke nde abandaki kopesa ye mbongo ya transport mpo akende kelasi mpe wana azalaki muana moke penza. Ba oyo bayebi muana ya Rosa ya liboso, Kady, tango azalaki
adolescente, azalaki portrait ya mama na ye tango azalaki elenge.
Espèrent abotama na 1953 mpe Djuna na 1952.
………………………………………………………………………………………
Ndeko Richard Mawete na Michel
Kinzonzi,
Nakozongela lisolo ya Pierre mpe na ba points mosusu na mbala ya sima.
……………………………………………………………………………………..
Ndeko Koko,
Papa Wemba akangamaki na Makala, na octobre 1976 mpo na likambo ya Célestine. Famille ya Célé nde
ekangisaki ye mpo abandaki kobima na muana na bango. Même Celé wana, akomaki lisusu petite ya Confiance ya Rosa tee bakabuaki tango papa Wemba yaki komikangisa bêtement epayi
ya Rosa.
Na 1977, nawutaki mobembo mpe yambo na ya na Kinshasa, na prévenaki papa Wemba na Rosa que
nakolekela bango na ndaku mpo natikelsa bango colis na bango. Tango nakomi wana, na kuti Rosa mpe ayebisi ngai que «Jules azalaki kaka awa kasi andimi te que akeyi mosika, azali kaka awa na
quartier». Neti Rosa abandaki kokende na wenza, na proposer ye na Célé que natika bango na Gambela. Nzela nzela nazali komituna ndenge nini Rosa akoki kokoma proche na muana
oyo famille na ye ekangisa mobali na ye? Avant na kumba bango, lipapa ya Célé e sauter. Rosa akoti na ndaku, azui épingle mpe atie yango comme fusible.
Rosa tango asilisi na Wenze, ye na Célé, bazongi na ndaku mpe Cele akeyi ebpayi na bango. Tango
papa Wemba azongi na ndaku, alati kaka lipapa wana. Rosa atuni ye soki azui lipapa wana wapi? Azongiseli Rosa que lipapa wana ezalaka kaka na ndaku oyo. Rosa asengi ye alongola yango atala soki
ezali na épingle oyo atiaki comme fusible. Wemba alongola lipapa boye, kaka oyo Rosa atielaki Célé fusible mpe ebimisi mobulu wana. Na bitumba wana, abacost papa Wemba alataki efunguami. Alongoli yango atie na kiti. Rosa
azui yango abandi kotala na ba poches boye, atala na kati, bien signé griffe Célé Wemba. Célé nde atongelaki ye abacost wana mpe ayebisi tailleur que akoma Célé Wemba.
Ebakisi lisusu kanda likolo ya oyo ya lipapa. Rosa akangisi papa Wemba na gendarmerie ya Matonge.
Donc, tango Célé akendaki na Rosa na wenze wana, papa Wemba azalaki na ye epayi ya ba Pecho, Célé awuti wenze
alambi biloko amemeli ye kuna ba liye pendant que Rosa kuna kidiba. Wana Rosa ye moko apesi ngai version na phone mpe tango ngai moko nakitaki wana.
Bien que papa Wemba kangamaki na Makala, bandaki kaka ko continuer ko tourner na
Célé.
………………………………………………………………………………………
Ndeko Dierto,
Nakoyanola yo na mbala ya sima. Kasi yeba
ete Mbole oyo Lutumba ayemba, ezali Jeanne Mbole. Deuxième epouse na ye. Ye, afandi na Yolo-Sud, mosika te na gendarmerie ya Mabanga.
Mbala ya sima na ko completer mpe ba ndeko oyo ba lobeli masolo mpe komeka koyanola na masolo oyo
nayebi mpe na mituna miye na yanoli te.
Patriotiquement,
Emmanuel Kandolo
.