Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

PHILO KOLA MOBETI MONENE YA LINDANDA

P

 Concert System A 1 040

 

Famille  African  Fiesta National(Afrisa) ezali lisusu na mawa, sima ya liwa moyembi DIANA, oyo akufaka na Luanda na na mobu eleki, lelo oyo mobeti monene ya lindanda pe mosali nzembo Philo Kola, atiki biso lisusu. Mawa mingi na famille na ye , mawa mingi na baninga baye ya lisano, mawa mingi pe na biso balandi ya miziki. Philo Kola   atikaki  lingomba  ya Afrisa,(soki na bosani te), na mobu ya 1977, tango basalaka mobembo   na ekelo ya Côte- d´ivoire. Babeti misato Philo Kola, Dizzy Mandjeku pe  Denis Lokassa ya mbongo  batikalaka kuna. Lokola Sam Mangwana azalaka kofanda kuna na Abidjan, bango   basanganaka naye. Lingomba ya liboso basalaka  azaka na    kombo  ya   Ivza   (les internationaux ivoiriens et Zairois), kasi lingomba oyo awumelaki te, yango   epesika   esika na African all stars na Sam Mangwana, Dizzy,Lokassa, Theo Blaise Nkoukou,   Ringo Moya pe    bassiste   camerounais Roland. Kasi na lingomba oyo (african all stars) Philo azalaka te. Ngai nazalaka kolinga mingi penza nzembo naye  Meno ngiele, ebimaka nzela moko na ba Marilou, Casius Clay etc...  Na manso nakomi soki na bosani, papa Seskain Molenga akoki kobongisa.    

 

 Papa Philo Nzambe  azala nayo.  


Pepé

HILO KOLA MOBETI MONENE YA LINDANDA

.

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
D
<br /> RIP RIP info a verifier il parait PEPE NDOMBE akufi lelo. <br />
Répondre
N
<br /> Toyokaka ete kulutu Ringo Moya Moya mpe asila kozongisa molimo epayi ya Nkolo Nzambe lelo eleki ba mbula ebele, oyo ayebi ndenge liwa ekangaka Ndeko wana, akoki koyebisa biso lisolo yango.<br />
Répondre