Révélations d'E. Kandolo sur le décès du général Masiala
Dans sa réponse à Jean-Pierre, Emmanuel Kandolo avait évoqué les deux coups d'état de 1975 et 1978. Nous avons saisi cette occasion pour lui demander de nous éclairer sur le décès accidentel du général Masiala Kinkela survenu en 1975. Le récit qu'il expose dans les lignes qui suivent est donc une réponse à la question que nous lui avons posée par courriel. (Msg)
Ba ndeko,
Général Léopold Masiala Kinkela Kulu Kangala abotami na R.D.Congo na Mayombe na province ya Bas-Congo, le 27 novembre 1929. Sima ya formation militaire na ye na Ecole centrale ya Kananga na 1960, aye kozua affectation na ye ya liboso na ville ya Boma na province ya Bas-Congo, kobanda 1961 tee na 1963. Kuna azalaki commandant second. Sima ya wana, aye kokoma ommandant na ville ya Luluabourg (Kananga) na 1964. Passage na ye na Kananga nde esalaki que abala muasi na ye ya mibale, muena lulua, tandis que la première azali muyombe. Tango haut commandement militaire esali coup d’Etat, Colonel Léopold Massiala azalaki parmi ba officiers oyo ya haut commandement na 1965. Na même année, azui pete ya Général de brigade mpe na mbula elandi akomi commandant na Elisabethville na 1966. Président Mobutu aye kotiya ye gouverneur militaire ya Sud ya Katanga en remplacement ya politicien, na mbula moko wana 1966. Na mbula elandi, aye kokende na Kivu na bitumba na batu ya Colonel mercenaire Jean Schramme. Kuna abandaki ko commander front ya Est. Tango bitumba bisili, Président Mobutu amatisi ye pete, na 1968, akomi Général major mpe azui fonction ya Inspecteur général na makambo etali infanterie. Epesaki vraiment malamu te mpo ezalaki lokola garage. Ye abundaki ndenge esengeli, esengelaki a mériter commandement militaire ya ba solda au lieu ya Inspecteur !!! Sima na mbula mine, akomi Général de corps d’armée na 1972, mpe conseiller militaire ya Chef de l’Etat. Na 1974, aye kokoma Chancelier des Ordres nationaux et des compagnons de la Révolution. Na 1975, azui liwa na accident ya hélicoptère na province ya Bas-Congo, district ya Cataractes, Territoire ya Songololo na Secteur ya Luima.
Na mokolo mua 2 septembre 1975, Général Masiala azui message que mama bana baye azali kobela makasi na Boma, esika akendeki kopema na vacance. Yango wana Directeur général ya défense, Général Molongya Mayikusa Moyi Bongenye, atie na disposition na ye hélicoptère (Alouette) mpo ekumba ye kuna na Boma mpe soki moyen ezali azonga na ye na Kinshasa mpo na ba soins médicaux. Neti ezalaki urgence, tango ya kozonga ndaku ezalaki te. Hélicoptère eye mpe équipage ekeyi ko joindre Général na Bureau na ye na présidence mpe ensemble bakumbami na restaurant ya Cité de l’O.U.A mpo baliya yambo bapumbwa na destination ya Boma.Tango basilisi kolia, ba embarquer na hélicoptère. Na voyage wana, Général Masiala azalaki accompagner na Colonel Mushikieme, médecin militaire, Premier Sergent-major Kadima (garde du corps) mpe na trois membres ya équipage : Capitaine Djongo (Commandant ya hélicoptère), Adjudant-chef Lufungula (Copilote) na Adjudant Kabengele (mécanicien). Hélicoptère epumbwe na 15h, na héliport ya Département ya défense nationale (D.D.N.) ou Quartier général ya haut commandement militaire (Q.G.).
Par contre, tango Général Masiala azali koliya na batu esengelaki ba accompagner ye na Boma, hélicoptère esika ezalaki na D.D.N., batu misusu bazalaki kotiya tiya yango maboko. Yango ekokaki ko attirer attention te mpo ba mécaniciens wana bazalaki ya armée mpe balata ba combinaisons ya aviation. En réalité, ezalaki ba mécaniciens oyo bazalaki na mission spéciale ya ko provoquer disfonctionnement na fonctionnement ya appareil, disfonctionnement oyo ekomema na accident en plein vol.
Cite de l’O.U.A. na D.D.N. ezali à quelques mètres. Tango Général asilisi, akumbami na petite délégation na ye na ba membres ya équipage mpe batie cap sur Boma. Malheureusement, hélicoptère etikala kokoma na destination na yango te mpo déflagration esalema en plein vol. Yango epanzali yango mpe ebomi baye banso bazalaki na kati.
Na 18h, heure de Kinshasa, armée ayaki kosala communiqué officiel oyo elobeli liwa ya Général Masiala na batu bazalaki ko accompagner ye y compris na ba membres ya équipage na accident ya hélicoptère. Na communiqué wana, armée elobaki que Général abandaki kokende na inspection san pour autant ko preciser nature ya inspection. Kokamua mpo ye azalaki chancelier ya ba Ordres nationaux na ya ba compagnons. Abandaki kokende ko inspecter nini na Boma ? Armée yango moko eyangana version ya maladie ya mama Masiala na Boma.
Tango ba corps eye na Kinshasa, armée e exposer ba cercueils na Palais de la nation. Première surprise ! Masiala azalaki politicien ou Parlementaire te. Azalaki militaire populaire ! Mpo na nini bakumbaki cercueil na ye na camp militaire Kokolo te ? Kuna nde ezali esika bakokaki kolela ye malamu ! Yango elekaki bongo te. Même soki Parlement ezali esika balekaka bakonzi ya politique, ba oyo bayebi liwa ya Masiala balingaki te balela ye na camp mpo ekoki kopesa ba militaires ba idées mosusu ya mabe.
Na matanga na Parlement, batandaki ba cercueils six. Ya Général Masiala ezalaki na kati. Ordres strictes eeutaki na Général Bumba Moaso Djogi, Capitaine général = Chef d’Etat major général ya F.A.Z.que mutu te apusana na pene na ba cercueils. Ba militaires ebele bayaki na Parlement mpe bayombe, basakata, ba luba na bateke bazalaki wana mpo na kolela baye bawe. Bayumbe babimisi mobulu na Parlement, ba exiger que bafongola cercueil mpo batala soki réellement nzotu ya Général Masiala ezali na kati mpe aziki na moto du fait ya explosion ndenge version officielle elobaki. Rien, Colonel Eluki Monga Ahundu, Commandant ya DITRAC, azalaki catégorique ! Pas question ya kofungola cercueil ata moko. Mobulu ebimi wana, kofinga Président Mobutu, kasi ba militaires balandaki wana te mpo na ko éviter ko aggraver lisusu ba tensions. Mama Masiala azali kolela mpe komituna na kolela na ye, mpona nini il fallait aya na Boma ? Kosala nini na Boma, Ngai nazalaki maladie te, nani ayebisaki yo que nazali maladie mpe oyo kozua ngai na Boma ? Nani akosi yo boye mpo okende kokufa pamba boye ? Nani asaleli ngai likambo ya somo boye ? etc…Bref, ba familles balela batu na bango na distance.
Mokolo mua kokunda, ba militaires bamemi ba cercueils tee na Cathédral Notre dame ya Lingwala, sima ya wana tee na cimetière de la Gombe. Kokoma kakak batu bakomi na cimetière, mobulu ebimi lisusu mpo ba militaires ba décider que mutu akopusana te pene pene na ba cercueils. Bakunda batu nionso wana bango moko mpe batika ba soda misusu de faction wanadurant un mois. Tee lelo oyo, eyebana te soki ba corps ezalaki na kati ya ba cercueils wanaou pas ? Eyebana te sokiréellement bakundama na Gombe ou pas ? Eyebana te soki ba militaires bango moko bayaki lisusu kokundola ba cercueils wana ou pas ?
Ba circonstances tragiques oyo Général Masiala na batu baye abandaki kokende na bango na Bomabakufa, tee lelo oyo eyebana malamu te mpo armée atikala ko fungola enquête te, bien que F.A.ZA. dans les toutes premières heures ya accident elobaki que hélicoptère wana ewutaki koleka na contrôle technique mpe fîche na yango ezali kolakisa que ezalaki na eloko moko te mpe panne te. Sima ya wana, etombolaki lisusu mongongo te. Famille ya Général Masiala, emekakaki kosala ba démarches, kasi tango condition sociale na bango ebandi kobonga suite na ba largesses ya Président, balembisa na bango kolandela likambo wana. Kasi ba congolais oyo bayebaki ye na mosala asalaki babosana ye te. Yango wana Mbumba Ntoto ya Kintueni national ayaka ko immortaliser ye na nzembo ya « Ntoto Nkulutu ».
Likambo ya coup d’Etat monté et manqué (procès des conspirateurs) ya 1975, nde elukela Général Masiala makambo nionso oyo. Tango Président Mobutu asangisaki haut commandement ya armée na mikolo mia 8 na 9 juin 1975 mpo na ko informer yango sur likambo ya coup d’Etat, na suka ya masolo, haut commandement e décidaki esala Commission révolutionnaire d’enquête. Yango ezalaki présider na Général Singa Boyenge Mosambayi mpe ba membres bazalaki : ba Généraux Babia Zanghi Malobia, Molongya Mayikusa Moi Bongenye , Likulia Bolongo Ligbangi na Colonel Bolozi Gbudu Tanikpama. Tango Commision esilisi ko mener ba enquêtes oyo ekangisaki batu mpe ememi na ba interrogatoires na tortures, yango eyaki kopesa rapport d’enquête na Président Mobutu. Sima na yango , Président asengi na Auditorat général militaire e saisir Conseil de guerre ya garnison ya ville de Kinshasa mpo esambisa ba soda oyo bazalaki impliquer na likambo oyo. Na constitution ya Conseil de guerre oyo nde Général Masiala Kinkela Kulu Kangala ayaki koponama comme étant le Président ya Conseil de guerre oyo esengeli esambisa batu oyo na procès ya coup d’Etat monté et manqué (procès des conspirateurs) ya 1975. Na jugement ya 1erseptembre 1975 e condamnaki sept officiers à mort dont : ba Généraux Fallu na Katsuva, ba colonels Omba na Muendo, ba Majors Mpika na Bula, mpe na Lieutenant Kabamba. Kasi batu oyo bamomaki bango te suite na intervention ya U.S.A. Kasi, bakangemaki durant sanza 20 na deuxième cité na O.U.A., sima bakeyi na éloignement na civilisation na prison ya Angenga, esika ba condamner mosusu ya procès oyo batindamaki.
Général Masiala azalaki convaincu te na culpabilité ya batu oyo mpe ayebaki malamu que ezali faux procès. Ye moko alobaka na Colonel Omba que ameka ko se rendre compte na gravité ya makambo azali koloba, tango ye abandaki kopesa ba « détails » na ba relations na ye na Général Fallu. Une façon de dire na Colonel Omba, que azali ko enfoncer batu na makambona ya lokuta. Prise de position wana ya mutu oyo alingaki kobomisisa batu inutilement te, yango nde elukela ye malambo.
Wana ezalaki maye malekaki na ekolo na biso na tango wana.
Patriotiquement,
Emmanuel kandolo
NTOTO NKULUTU, par Mbumba Ntoto et le Kintueni National

Gen. MASIALA