NZEMBO YA MBOKELA :PAR EMMANUEL KANDOLO
NZEMBO YA MBOKELA :PAR EMMANUEL KANDOLO
Ba ndeko,
Esali mikolo mingi tosangani na masolo te na site na biso oyo. Bolimbisa ngai mpo na ngonga molayi pamba te nazalaki penza na ngonga mingi te ya koleka awa. Neti nazui mua ngonga, yango nalobi, tika tomeka lisusu kosolola na maye maleka na ekolo na biso. Yango wana, naye na lisolo ya ba nzembo ya mbokela oyo ezali na lien na bayi politique, nameki kolobela lisolo ya Damien Kandolo Lopepe na Augustin Dokolo Sanu.
Na mikolo mikoya, tokomeka kokota na bozindo na likama ya papa Wemba mpo tozalaki wana, tokolobela mama Sese na mama Bobila Dawa, professeur Bonaventure Olivier Kalongo Mbikayi, André-Alain Atundu Liongo na Edouard Mokolo wa Mpombo.
Patriotiquement,
Emmanuel Kandolo
MBOKELA EN LIEN NA BA POLITICIENS
« KEBA ! », « BONI BOYE ? », COMPOSITION, ROCHEREAU TABU, AFRICAN FIESTA VITA
Ezali mbokela ya Roger Izeidi Monkoy contre propre copine na ye, Marie-Josée Bompeli, une jolie fille ya moziki « La Mode ». Azalaki na grâce na nionso : ba bonnes manières mpe na ezaleli na ye, aisance na elateli na ye. Akomaki kobima na Ambassadeur extraordinaire et plénipotentiaire ya Mali na Léopoldville, Alioune Diakité. Ce dernier, azalaki na poste na Léopoldville wuta 1962 tee na 1964. Il est vrai que azalaki un type élégant, alinga lisano, amateur ya ba champagnes na ba vins ya talo mpe azalaki na mbongo. Ye nde amemaki African Jazz na tournée na Afrique (tolobela yango na site na biso oyo).
Tango akomi ko tourner na Marie-Josée, akomaki kosala ba kata supérieurs, azali ko commander ba champagnes mpo esokola makolo ma Marie-Josée tout en sachant bien que Roger azali wana kaka na Tam Tam, esika akomaki gérant. Tobunga te que yango ezalaki na 1963, African Fiesta Vita esila kosalema. Déséquilibre ya force ! Na kanda wana, akabuana na Marie-Josée mpe abuakela ye mbokola na ba compositions mibale ezali na likolo.
« La Mode » ezalaki moziki oyo ebandaki kaka kondima ba jeunes filles instruites, physiquement bien constituées, belles mpe oyo bazali na tendance. Exemple : Victorine Njoli, fille ya liboso oyo atambusa voiture na Léopoldville (na Congo mobimba, ye fille ya liboso azua permis de conduire), azalaki kobima na Léon Pétillon « Léo Pétillon » Gouverneur général ya Congo (1952-1958), sima, akomi Ministre ya colonie ya Congo belge na Ruanda-Urundi (1958).
« La Mode » en tant que moziki ya O.K.Jazz, yango nde penza esimbaka mpe etelemisa O.K.Jazz mpo ba filles ya « La Mode » bazalaki kobima na bakonzi, batu ya mbongo mpe bazalaki ba véritables stars oyo babandaki ko lancer mode mpe kolata na Léopoldville. Yango wana ba commerçants ouest africains « popo » oyo babandaki koteka bimbundi mpe ba commerçants Grecs oyo bazalaki mpe na ba Editions minene ya disques babandaki ko recourir na notoriété na bango mpo na ko lancer mode. Yango wana association ebandaki kobengama « La Mode ». Soki balati elamba, na mokolo elandi, ebandi kotekama makasi. Bazalaki ba véritables stars ya époque.
Kata supérieur ya Marie-Josée ezalaki normal mpo ye ayaka déjà Belgique na 1958, na cadre ya exposition universelle. Azalaki muasi ya « kilo », fille ya tendance, abandaki koloba français, d’où faciliter ya ko fréquenter milieu ya mindele (mindele oyo babandaki ko tourner na ba filles congolaises) na ya ba évolués. A l’époque, soki ozui mobali ya « je le connais » (mobali oyo ayebana, akenda sango), il faut tout Léo. emona yo, azali kosombela yo biloko, bilamba na ba bijoux ya talo, ozali kobaluka na ye na car, ba sorties na ba bars mpe ba restaurants ya minene, ko s’exposer na ville na ba restaurants ya ba hôtels Regina ou Memling. Na cadre wana nde asala ba kata minene na Ambassadeur Alioune Diakite. Esukaki wana te mpo tango Ambassadeur Aloiune Diakite, akomaki Ambassadeur na Brazzaville, na 1964, ba continuaki tee kuna…
Bien que Marie-Josée azalaki na « La Mode », moziki ya O.K.Jazz, African Jazz eyemba ye na Bruxelles, na 1960, durant Table ronde, na nzembo « Merengue Scoubidou », composition ya Vicky Longomba.
« BOPESA YE TOLI », COMPOSITION, JEANNOT BOMBENGA, VOX AFRICA.
Ezali mbokela ya mama Sese contre Président Mobutu tango ye na mama Bobila Dawa bazalaki na matata makasi. Awa lisusu guerre ya ba nganga nkisi ezalaki redoutable mpo ba nkisi oyo ebuakema na ba camps nionso mibale esala ba effets moko oyo tee na lelo oyo impact na yango ezali kaka. D’ailleurs, Monseigneur Malula, amonaka makambo na ye, tango babengaka ye na camp Lieutenant-colonel Tshatshi mpo akende ko neutraliser biloko ya mama Sese. Akoka ko neutraliser nionso te !!! Nakozongela na masolo mbala ya sima tango nakolobela parcours ya mama Sese na ma Bobila Dawa.
Mama Sese aponaki Jeannot Bombenga mpo azalaki fan na ye munene. Kutu asombela ye ba instruments. Grâce na mama Sese nde Bombenga a échappaki na bannissement, na 1970. Ezalaki na Cité du parti na N’Sele pendant ba festivités ya 10 ans ya Nouveau régime. Na programme oyo Ambassadeur Tshibambe (chef ya Protocole d’Etat) asalaki, esengelaki Bombenga abeta devant ba Chefs d’Etat oyo bayaki na N’Sele mpo na bal populaire mpe na butu, Franco, Rochereau na ba susu bakobeta na Mont Ngaliema. Kasi tango bakonzi basilisi koliya, Président Mobutu na mama Sese bakoti na piste, Bombenga abandi kaka miziki boye, pan ! Courant ekatani. Hein ! Président na mama Sese batelemi na piste. Ba électriciens ya présidence mbala moko babandi koluka origine ya panne bazali komona te mpo courant ezali mais ezali kokoma na connexion ya ba instruments te. Mama Sese ye moko nde a remarquer ba vas et viens ya Franco en boubou na lipapa, azali kobaluka baluka wana. Atuni Ambassadeur Tshibambe devant Président Mobutu : « Mais Franco akobeta na butu kasi awa azali kosala nini mpe pourquoi azali ko s’agiter boye ? ». Nzoka nde ye nde abuakaki biloko mpo na ko saboter Bombenga. Mama Sese a comprenaki. Na pression wana, tango Ambassadeur Tshibambe ayebisi ye que mama Sese atie ye miso, soki ayebi likambo, abongisa mpe akebisi ye que mama azali fan munene ya Jeannot mpe ye Franco ayebi yango malamu, Asengi pardon na Ambassadeur, mbala moko, ba instruments, ya sika, ebandi ko fonctionner bien !
« BISALELA », COMPOSITION, SIMARO LUTUMBA, O.K. JAZZ.
Ezali mbokela ya Franco contre Aimée Zinga, (épouse, Prospère Madrandele Tanzi). Au fait, tangu Madrandele akufi na Lubumbashi, mpe sima ya matanga munene oyo M.P.R. Parti-Etat esalelaki ye, Logiquement, batu bazalaki ko continuer kokenge na Kingabwa, na résidence privée ya illustre disparu, ndenge ezalaka na ba coutumes na biso, kokende kotala mutu oyo akufeli, sima ya matanga na kitunga ya biloko na ntaba, selon ba moyens tee na pick-up etondi na biloko ou ba vivres mpe kotika mua enveloppe. Spontanément, Franco mpe azangaki te mpe na sima akomi kotinda batu mpo ba battrer Aimée (Azali metiola, pembe mpe muasi kitoko na taille ya danger !) .
Ba messagers nionso oyo Franco atindaki bazongeli ye kaka na eyano moko : « Tout, sauf Franco ! Ata yo moko papa, omoni vraiment ngai nakita tee na niveau ya Franco ? Nani abungi Prospère na ekolo oyo ? Ata kutu mibali yango basili, pardon, Franco te ! Namoni eloko nini oyo penza ekoki ko intéresser ngai wana te, Boni ko !».
Abanda ko se moquer na Franco mpe apanzi ye sango na milieu na bango (ya basi ya…) mpe abandi kobetela mutu nionso ezala akutani na yo na ville, na zando ou na ba fêtes minene oyo ezalaki koleka na milieu na bango. Encore, ye mpe ayebi koloba ! Na lolendo azalaki na yango, akotisa Franco mayi !
Nionso wana, Franco azali koyeba te que Dominique Sakombi asila ko récupérer Aimée banda kala. Tango wana Sakomi azali Secrétaire exécutif national ya Mouvement Populaire de la Révolution, chargé ya propagande, information na presse. Azali lisusu Commissaire d’Etat (Ministre) ya Orientation nationale (Information) mpe Porte-parole ya gouvernement. Il faut voir ndenge Sakombi atanga messsage ya mawa ya liwa ya Madrandele mpe na ndenge azalaki actif na matanga wana mpe ndenge asengaka na Président Mobutu soki moyen ezali azua membre ya famille Madrandele mpo na ko combler vide oyo ye atiki. Yango wana Sabine Drabua Tanzi, petite sœur ya mowe, ayaki kosala carrière na politique : Députée nationale tee Membre ya Comité centrale ya M.P.R. parti-Etat mpe administratrice na ba entreprises publiques tee na kufa na ye, na mokolo mua 4 mars 2013..
Franco amekaki nzoto mpo na tango wana amonaki neti akoki ko réussir. Azalaki na ba éditions na ye mibale : Epanza Makita na Boma Bango, orchestre O.K. Jazz mpe ezali koningisa et surtout zaïrianisation epesaki ye usine munene ya kosala ba disques na kombo ya Manufacture Zaïroise des Disques (MA.ZA.DIS.), azali kofanda na Binza I.P.N. mpe azali kotongisa ndaku ya munene na Limete.
Nionso oyo ezali rien devant charme, élégance na romantisme ya Sakomi, sans ko compter position sociale naye mpe mbongo oyo azalaki na yango. En plus, muasi nini azalaki ko résister na Sakombi bien que réputation na ye en matière de femmes ezalaki ya koyebana ? Il était toujours sûr na ye mpo ba nkisi ya makasi azalaki na yango, mbongo mingi azalaki na yango, pouvoir azalaki na yango, relations privilégiées na ye moko Président Fondateur mpe Président de la République, azalaki na yango, kolata, ba belles voitures, intelligence, azalaki na yango na surtout elobeli kitoko ya français (accent, ferveur oratoire, prononciation mpe ponctuation) !!!
« OKOZELA TROP », COMPOSITION, SIMARO LUTUMBA, O.K. JAZZ
« BOMBA BOMBA MABE », COMPOSITION, FRANCO LUAMBO, O.K. JAZZ
« Okozela trop » ezali mbokela ya Nicky Kandolo contre Marie-Hélène Moleka. Tandis que « Bomba Bomba mabe » ezali réplique ya Marie-Hélène contre mbokela ya Nicky. Awa esengeli ko souligner professionnalisme ya O.K. Jazz. Eyebaki conflits wana pamba te Nicky na Marie-Hélène ba sollicitaki yango na ba mbokela oyo bazalaki kobuakelana.
En bons professionnels, O.K. Jazz ebeta « Okozela trop », na Youlou na Manguana na chant sans voix ya Franco ni commentaire de ce dernier. Nicky aponaki Simaro mpo asalela ye nzembo. En revanche, « Bomba Bomba mabe », eyembama na chant na : Wuta Mayi, Kimbukuta, na Franco. Yango ebimaki lokola deux camps ndenge Nicky na Marie-Hélène ba se manifestaki !!!
Nicolette « Nicky » Kandolo, la fille de Damien Kandolo Lopepe na Alice Futi Malila. Azali épouse légitime ya Dominique Sakombi . Par contre, Marie-Hélène Moleka, azali fille ya Ignace Moleka Liboke na Anongo. Azali makangu ya Sakombi.
Dominique, Nicky na Marie-Hélène bayebana banda na Belgique. Ba Kandolo bayaka poto na hiver 1961 (nalobeli koya wana na biographie ya Damien Kandolo, ezali na site na biso oyo). Par ailleurs, ba Moleka baye na Belgique na été 1963.
Marie-Hélène awumeli te en tant que makangu ya Sakombi. Ye, asalaki tout Sakombi akanga lopango mpe Sakombi asalaki yango na kinsueki. Wuta wana, akomaki « bureau » ya Sakombi.
Marie-Hélène, azalaki kasola, nzunzu mpe « hirondelle ». Président Mobutu akutanisaki ye na ba circonstances planifiées na Président Jean-Bedel Bokasa, ya Centrafrique. Neti Bokassa alula basi, akueyeli ye mbala moko amemi ye na Bangui, capitale ya Centrafrique, esika akendeki kokota libala. En réalité, ezalaki plan ya Centre National de Documentation (C.N.D.), ba services secrets zaïrois, mpo a espionner Président Bokassa na maye azali kosala. Ba services centrafricains bakomaki ko se douter, kasi bazalaki vraiment na ba pistes plausibles te. Neti intelligence zaïroise ezalaki makasi mpe ekenge, e exfiltra (ebenda) Marie-Hélène na Bangui mpe ezongisa ye na Kinshasa.
Na retour wana nde ayaki kokueya na Sakombi. Akata ndayi que ye na Dominique ekosuka tee na libala mpe aloba yango polele, même s’il faut asilisa ba nganga nkisi nionso ya Zaïre, akosala yango mpe Nicky ayeba que etumba oyo ekosuka wana te. Donc, Marie-Hélène a déclaraki guerre ouverte, mpe a lancer défi na hauteur ya ba ambitions na ye !!!!
Nicky mpe de son côté, azalaki matata na ko défendre libala na ye. Ba 08 (espions) na ye basila ko yebisa ye ba mouvements ya Sakombi mpe na ndenge abandi bolingo na Marie-Hélène. Wana Sakombi azali ko tourner mpe lisusu na Ginette mpe kosala diversion, mais ba espions ya Marie-Hélène bazali aux aguets !!!. Période oyo, ezala Nicky, ezala Marie-Hélène, babandaki kotala dépenses te. Bazalaki na mbongo mpe bazalaki ko dépenser yango sans ko compter na perspective ya ko gagner mbanda mpe ko gagner mobali!!! Bango banso babale bazalaki na ba moyens mpe bana ya batu ya mbongo, ba papas na bango proches na Président Mobutu, basakana na poto, balataka biloko ya luxe, batambolaka na mituka ya luxe, bakola na poto, bazali kofanda na ba villas ya luxe ezala na Kinshasa ou na poto. Donc, bakoka.
Nicky azalaki na mua avance mpo ye nde épouse officielle, muasi ya ndaku oyo batu nionso bayebi mpe balingi (surtout ba premières bureaux). Na ba réceptions mpe ba cérémonies officielles nionso, ye nde azali na mobali na ye tee na oyo priver ezali ko se dérouler na cercle ya pouvoir. Ye mpe, azalaki na ba plans mpo na ko se défendre mpe ko protéger libala na ye.
Na période oyo, ezalaki ba guerres ouvertes nganga contre nganga, kutu ba voyages esaleme spécialement tee na Ouest Afrique, nkisi nde nkisi, mutu na mutu pona camp na yo. Batu mingi bayebi ba familles oyo mibale. Ekomaki difficile mpo soki neti Nicky ayoki que okendeki epayi ya Marie-Hélène(en général na famille Moleka) ou vice versa (Marie-Hélène ayoki que okendeki na Famille Kandolo ou na couple Kandolo-Sakombi) ekokoma problème mpe kobanda kopesa ba explications mpo na ko vexer ni l’une ni l’autre. Franchement, ezalaki situation moko difficile ! En plus, famille ya Nicky, solidaire na muana na bango, ba Moleka mpe ndenge moko na Marie-Hélène, nionso oyo na kati ya division ya ba semeki : ba Sakombi mosusu pour Nicky, ba mosusu pour Marie-Hélène. Ezalaki benda pika !
Na élan wana Damien Kandolo aloba na batu que : « moko te akolonga muana na ye aussi longtemps que ye, Kandolo, azali na ba pouvoirs oyo epesameli ye na grand monde ». Kandolo ayebani de quoi il était capable mpe nini abandaki koloba. Yango wana esengeli toyoka « okozela trop na beaucoup d’attention » mpo to comprendre subtilité ya message ezali na kati !!!
Na moto ya bolingo wana nde manipulation ya famille Moleka ekomaki tee ko emballer Sakombi na ba prises des décisions étranges mpo na ko favoriser tata na Marie-Hélène.Na suka, nakotiya kabambi ya rapport ya Conférence Nationale Souveraine, na ntina iye.
Sakombi, naturellement, abota na bango banso babale mpe suka suka, Marie-Hélène ayaki kokufa mpe finalement, Nicky ayaki ko bayer Sakombi mpo akomaki na degré moko très élevé ya ba nkisi. Cette dernière aye kokende mosika, ko vivre na un diplomate Congolais na Tokyon an Japon.
Na période oyo Sakombi azalaki déjà Commissaire d’Etat na Orientation (Ministre ya information) nationale wuta 8 février 1973 tee 7 janvier 1975. Conformément na ba dispositions ya article 28 ya loi n° 75-009 du 2 avril 1975 portant organisation des élections législatives, Sakombi akomaki Commissaire du Peuple (Député national) ya circonscription électorale ya Lualaba kobana 2 novembre 1975 tee na 2 juillet 1977, sima ya guerre ya Shaba tango Président Mobutu a cédaki na ba pressions occidentales mpo na démocratisation ya Zaïre. Kobanda 29 juin 1976 nde ba nommer ye Commissaire de Région (Gouverneur) ya ville de Kinshasa. Afandi wana tee na 21 janvier 1978 mpe akotinuaki kozua ba promotions miyike. Nasuki awa mpo contexte ya étape ya carrière ya Sakombi oyo nde ezali ko concerner biso.
Rapport Bureau de la Commission des Biens Mal acquis, Conférence Nationale Souveraine (CNS), Juin 1992
Le Bureau de la Commission des Biens Mal acquis
AFFAIRE GROUPIMMO
1. Les faits
Afin de permettre la modernisation, avant 1980, de tout le quartier commercial situé entre les avenues du Commerce et du Marché, la sprl GROUPIMMO a projeté d'y ériger les Galeries du Marché et du 24 novembre avec l’approbation du Chef de l’Etat.
Pour ce faire, il fallait déloger tous les commerçants du site qui devait être démoli. Pour leur relogement provisoire, le Commissaire Urbain de Kinshasa de l'époque, Monsieur NDJOKU EY'OBABA, offrit la bande de terre de 15 mètres de large le long des avenues des Marais et Rwakadingi, aux bords du Parc de la Révolution. Cet engagement est confirmé par une correspondance du 17 novembre 1974 du Commissaire Urbain adressé à GROUPIMMO, par l'autorisation provisoire de commencer les travaux du 14 novembre et la lettre du 16 septembre 1975 du Département des Travaux Publics.
Le 13 mars 1976, l'Hôtel de Ville autorisait une seconde phase de construction de type pavillonnaire le long de l'avenue Marais jusqu'à la limite de l'immeuble de l'UNTZA. Il avait été décidé que ces nouvelles constructions feraient l'objet d'une option d’urgence en faveur de la ville pour les postulants dont la liste devait être arrêtée à l'Hôtel de Ville.
En novembre 1976, le Président-Délégué Général de Groupimmo, MonsieurMOLEKA, écrit à Monsieur SAKOMBI INONGO qui vient de reconduire NDJOKU à l'Hôtel de ville une lettre sollicitant un nouvel examen du dossier, assurant que Monsieur MERALI, le mandataire du groupe, prendra contact avec l'autorité urbaine dès son arrivée.
Les négociations MERALI - SAKOMBI aboutiront à la Convention du 28 avril 1977 signée par SAKOMBI INONGO pour la Ville et MOLEKA du côté GROUPIMMO.
Cette Convention a bouleversé la situation antérieure en ce qu'elle prévoit que GROUPIMMO devait céder à la Ville de Kinshasa tous les magasins pavillonnaires provisoires précités, sitôt terminée la construction
2. Analyse
01. Il appert assez clairement que la Convention SAKOMBI – MOLEKA du 28 avril 1977, basée sur l'Ordonnance-Loi N° 73/021 du 21 juillet 1973 portant régime général des biens régime foncier et immobilier et régime des sûretés, en ce qui concerne la durée de 25 ans, n'en respecte pas toutes les autres dispositions. Cette durée concerne la concession ordinaire emphytéotique (Art. 70 et 111).
02. Que cette Convention du 28 avril 1977 a violé loi susmentionnée qui dispose, notamment en son article 183, que : Pour les terres gérées par les administrations publiques, les concessions ne sont valables que si elles sont accordées par contrat signé par le Commissaire de Région pour les blocs de terre rurales égaux ou inférieurs à deux cents hectares et pour les blocs de terres urbaines égaux ou inférieurs à dix hectares.
Pour les terres rurales de moins de dix hectares et les terres urbaines de moins de cinquante ares, le Commissaire de Région peut déléguer ses pouvoirs au Conservateur des Titres Immobiliers.
En ce qui concerne la Ville de Kinshasa, ses pouvoirs étaient exercés non par le Commissaire Urbain mais par le commissaire d'Etat ayant les Affaires foncières dans ses attributions pour les terrains dont superficie excède 2 hectares ; il pouvait déléguer ses pouvoirs au Chef de Division dans les autres cas.
03. On s'aperçoit par ailleurs que l'article premier du contrat parle de la bande de terrain à front de l'avenue du Marché et d'une partie de la rue Lowa faisant partie du Parc de la Révolution, alors que la Convention de 1977 parle de la bande de terrain le long des avenues du Marché et Rwakadingi. La superficie de cette bande de terre reprise dans cette Convention est en outre de loin inférieure à la superficie réelle bâtie.
3. Propositions
Votre Commission vous propose de dénoncer cet accord et d'en ordonner une révision d'urgence conformément à l'esprit du compte-rendu de la réunion du 23 octobre 1974, tenue au Cabinet du Commissaire d'Etat aux Affaires Politiques, Monsieur ENGULU, ceci afin de permettre à la Ville de Kinshasa de jouir des recettes locatives provenant des 83 magasins pavillonnaires étant donné que la Convention signée entre la Ville et GROUPIMMO prévoyait la cession par cette dernière des magasins précités, dès l'achèvement des Galeries du 24 Novembre et du Marché.
« 7 ANS DE MARIAGE », COMPOSITION, FRANCO LUAMBO, O.K. JAZZ
Mbokela ya mama Bobila contre lipasa na ye Kossia, mpe par ricocher contre ba oyo nionso oyo Président Mobutu alongolaki mokuya neti Tshibola Mbangula. A l’époque, ba mama Bobila na Kossia babandaki kolukana,mpe epesaki guerre ya ba nganga nkisi oyo Kossia a gagnaki mpo Président atingamaki Kossia de plus que Bobila. Na guerre wana nde Zaiko Familia Dei eyaki kozua ambargo ya kobeta te na fêtes nionso officielles ou privées tant que mama Bobila akozala wana. Nionso oyo mpo bakendeki kobeta na Faro, na Portugal, na fête ya Kossia ya anniversaire tandis que Zaiko Nkolo Mboka ebeta na Nice, epayi mama Bobila a fêtaki. Neti mama Bobila azalaki mère cheffe, a signa ambargo na bango.
«TAILLEUR», COMPOSITION, FRANCO, O.K. JAZZ
Nzembo oyo ezali mbokela contre Léon Joseph Lobicz (Kengo wa Dondo) suite na ba démêlées judiciaires oyo Franco azuaki mpe akangemi na 1978,mpo na ba chansons obscènes : « Hélène » na « Jackie ». O.K. Jazz ebetaka yango na un endroit privé ouvert na public : Bar un, deux, trois. Au fait, ebandaki na yango déjà kobetama depuis un certain temps. Tango Kengo ayoki, atinda batu na ye basala ba enregistrements (tango wana na concert ezalaki simple, oye na mua enregistreur nayo, otie cassette, otiki yango na mopanzi ya amplificateur, ba nzembo ezali kokota) a versa yango comme preuve mpe ye moko en tant que Procureur a se saisir. Likambo ekomaki na maboko ya Kengo pamba te, Franco azalaki détenteur ya médaille ya Officier ya Ordre national du Léopard. Donc, mpo bakanga ye ou bayoka ye na justice, esengelaki yambo Président de la République a signer Ordonnance présidentielle oyo ezali ko retirer ye médaille oyo. Mpe neti azalaki na yango, likambo na ye ekosambisama kaka na Cour suprême de Justice ! Nani azali kuna ? Le fameux tout puissant Procureur général de la République, Kengo wa Dondo.
Akanga Franco na ba musiciens na ye, abuaka bango na prison ya Makala basali un mois ya détention provision mpe tango procès esili, bazui condamnations mpe mbala moko transfert na prison ya Luzumu, na Kasangulu, na Bas-Zaïre. Bafanda kuna pendant trois mois, sans visite, Kengo aboyela bango droit ya visite sous prétexte ya maintien ya ordre public. Ba convoqua tee na mama na Franco, bayoka ye sous procès-verbal, likambo wana ekomaki véritable chasse à l’homme : bakanga Bar un, deux, trois, mpe soki bameki kokanga yo na ba nzembo wana (ezala na voiture, na fête privée, ou encore soki mutu apuati que ozali na ba cassettes wana, etc.) balekisi yo mbala moko na Parquet !
Franco a craquer, tee ba interventions ebandi kosalema, Président Mobutu afanda calme, atika Kengo asala mosala., Président Mobutu aye ko signer Ordonnance mpo na ko amnistier ba prisonniers ya droits commun oyo baboma batu te mpe basala 1/3 ya peine (na ba remises, etc.) soki yango ezalaki ya mbula moko, neti cas ya Franco na ba musiciens na ye. Mpe na yango, ba bénéficier na grâce présidentielle mpe ba retrouver liberté na bango. Nionso oyo esalemaki na 1978 te début 1979.
Ba manières ya Kengo ya ko appliquer droit mpe ko moraliser société zaïroise ezalaki décrier mpe mingi kokende au-delà ya ba principes fondamentaux ya ba droits de l’homme à tel point que ba Organisations ya défense ya ba droits de l’homme ba telemelaki singularité ya pouvoir judicaire ya Zaïre tee na ndenge ba Américains ba sengaki na Président Mobutu aboma Conseil judicaire version Kengo.
Na mokolo mua 2 février 1980, Président Mobutu abomi Conseil Judicaire mpe Kengo akoti mayi, akomi chômeur mpe a perdre bibonga bia ye binso : Commissaire politique, Commissaire du peuple, mpe Président ya Conseil judicaire. Awa nde Franco ayaki kobuakela ye nzembo ya «Tailleur ».
Mpo na ko comprendre puissance Kengo azalaki na yango , tika nasala mua illustration moke na bozui projet ya Ordonnance oyo ye moko Kengo na batu ba ye ba bongisaki mpo ba nommer ye na ba pouvoirs nionso a proposaki na kati. Yango epesaki matata makasi entre ye, Kengo, na Directeur ya Bureau ya Président, Maître José Patrick Nimy Mayidika Ngimbi. Esalema te, mpe ezalaki na ba attributions ya Kengo te, kosala boye !!! Oyo ezali na attributions ya Bureau ya Président de la République mpo yango nde ezali ko jouer entre autre rôle ya conseil juridique ya Chef de l’Etat mpe Président de la République.
Président Mobutu, finalement, andimi ndenge Kengo abongisaki, a signer Ordonnance n° 77/030 ya 28 décembre 1977, portant organisation ya Conseil Judicaire mpe a nommer Kengo, Président ya organe oyo ya sika ya M.P.R. Parti-Etat.
Conseil Judicaire ezali organe oyo ezali kosangisa ensemble ya ba Cours et Tribunaux mpe na Ministère Public ya Zaïre. D’une manière détaillée yango ezali na :
- Cour suprême de justice ;
- Conseil de guerre général ;
- ba Cours d’appel ;
- Cour de Sûreté de l’Etat ;
- ba Tribunaux na ba Conseils de guerre mpe na Ministère Public oyo ezali instituer na ba juridictions oyo.
Président ya Conseil judicaire azali ko exercer contrôle général ya activité mpe na politique ya sentence ya ba Cours et Tribunaux.
Na plan juridictionnel, azali na lotomo ya ko suspendre exécution ya décision judicaire en vue ya ko obtenir na Cour suprême de justice modification na yango en fait tout comme en droit.
Azali na lotomo ya ko indiquer na ba Cours et Tribunaux, la voie à suivre pour dire le droit mpe azali Chef ya Ministère Public mpe azali na plénitude ya exercice ya action publique devant ba juridictions nionso ya République du Zaïre.
Na plan administratif, azali na lotomo ya ko proposer ba nominations na ba promotions ya ba Magistrats nionso mpe na personnel ya commandement ya Administration ya justice tout comme azali na pouvoir ya ko muter mpe ko permuter Magistrat nionso quel que soit grade na ye. Azali mpe na pouvoir ya ko déterminer service d’ordre intérieur ya ba Cours et Tribunaux, Parquets na ba greffes mpe ko régler tenue ya ba registres na bango.
Na plan disciplinaire, azali Président ya Conseil Supérieur ya Magistrature mpe azali na pouvoir ya ko déterminer composition na yango mpe na ko exercer action disciplinaire.
Donc, ba pouvoirs exorbitants mpo na mutu moko : juge et parti, indépendance ya justice kati na maboko ma ye, mpe azali ko participer na ba délibérations ya Conseil Exécutif National (Gouvernement) en qualité ya Président ya Conseil Judicaire ( azali de droit Commissaire d’Etat ya Justice « Ministre ya Justice »), mpe azali le seul na kati ya M.P.R. Parti-Etat oyo azali à la fois na ba organes nionso : Commissaire politique (Membre ya Bureau politique), Commissaire du Peuple (Député national), Commissaire d’Etat (Ministre), mpe Procureur Général de la République. En d’autres termes, azali na : Bureau Politique, Conseil Législatif National (Parlement), Conseil Exécutif National (Gouvernement), Conseil Judicaire (Ordre judicaire)!!!
Awa nde Kengo akomaki na na pouvoirs moko inimaginables, akomaki méprisant na ba droits de l’homme, akomaki ko faire trembler mutu nionso, ko nionga batu, kolongola ba Magistrats na mosala sans cause réelle, kosala nionso alingi na kombo ya prétendue loi mpe ko profiter na yango mpo na ko régler ba comptes na ba détracteurs na ye. Awa nde akangisaki oncle ya Président Mobutu, le très puissant Joseph Litho Moboti Nzoyombo mpo na ba niongo oyo aboyaki kofuta Banque du Zaïre, pendant Banque ezalaki dans ses droits ya kotungisa Litho afuta mbongo oyo ye adefaki !!!
Patriotiquement,
Emmanuel Kandolo